“Ebongiseli ya sika mpo na mokili mobimba” oyo elakami na bato, esili kobɛlɛma?
1. Lolenge nini mposa ya kozwa bonsomi mingi na makambo ya politike emonisamaki na bambula oyo euti koleka?
LELO oyo, bamilió na bato batyami na boombo na mangomba ya lokutá, mpe mingi kati na bango basepeli kotikala baombo. Bobele na ntango wana, ebele mosusu ya bato bazali kosɛnga bonsomi na makambo ya politike. Makambo minene masalemaki na Europe de l’Est mpe na mikili misusu na boumeli ya bambula oyo euti koleka, mamonisi ete bato balingi mitindo na biyangeli oyo bikoki kopesa bango bonsomi mingi. Mpo na yango, bato mingi bazali koloba ete, tobɛlɛmi na eleko ya sika ya bonsomi. Ezali yango nde prezidá ya Etats-Unis abéngaki ete “ebongiseli ya sika mpo na mokili mobimba.” Bobele bongo, bipai binso na mokili, bakonzi basili koloba ete koswana na bikólo mpe kowelana mpo na kosala bibundeli esili, mpe eleko ya sika, eleko ya kimya, esili kobanda mpo na bato.—Tala 1 Batesaloniki 5:3.
2, 3. Makambo nini mazali kotɛmɛla bonsomi ya solo?
2 Kasi, ata soko bato batiki kosala bibundeli mpe batii biyangeli bikopesa bonsomi mingi, bonsomi ya solo ekoki nde kozwama? Ekozwama te, mpo na ebele na mikakatano oyo mizwami na mikili mingi, ata na mikili oyo bazali kosalela démocratie, epai motuya ya babóla mozali sé kobakisama mpe bamilió na bato bazali kobunda mpo na kolónga makambo na nkita. Rapport moko esalemi na Lisangá ya mabota emonisi ete, atako bokóli na sianse mpe na mayele ya minganga, mokolo na mokolo kati na mokili, mwayene ya bana 40 000 bazali kokufa mpo na kozanga kolya malamu to na bamaladi oyo ekokaki kopɛngolama na nzela na mangwelé to na meko mosusu. Moto moko ayekoli makambo oyo alobaki ete: “Mpasi ezali kokóma likámá monene mpo na bomoi ya bato nyonso na mikolo mizali koya.”
3 Lisusu, bato mingi bazali kokutana na mabe oyo mazali sé kokóla mingi. Koyinana na ntina na mposo, na makambo ya politike mpe na mangomba esili kokabola bamboka mingi. Na mikili misusu, makambo makeseni te na mikolo oyo mimonisami na Zakaria 14:13, epai totangi ete bato bakozala na “mobulu monene” kati na bango, “bakobunda bango na bango” mpe “bakosimbana na nzoto.” (Liloba lya Nzambe) Drogue mpe bamaladi oyo ekozwamaka mpo na kosangisa nzoto, esili kopalangana mingi mpenza. Bamilió na bato basili kozwa maladi ya SIDA; bobele na Etats-Unis, bato koleka 120 000 basili kokufa mpo na yango.
Baombo na masumu mpe na liwa
4, 5. Na kokesena na bonsomi bomonani lelo oyo, bato nyonso batyami na boombo ya makambo nini?
4 Nzokande, ata soko makambo mabe wana mazalaki te, bato bakokaki bobele kozwa bonsomi ya solo te. Mbɛlɛ bato nyonso bazali naino na boombo. Mpo na nini bongo? Tozwa ndakisa: kanisa ete mokonzi mabe moko atii bato nyonso ya mokili kati na boombo mpe abomi bango nyonso. Ezali yango nde ekómelaki bato na ntango baboti na biso ya liboso batombokelaki Nzambe mpe batyamaki na boombo na boyangeli mabe ya Diable.—2 Bakolinti 4:4.
5 Lokola emonisami na mokapo 1 mpe mokapo 2 ya Genese, Nzambe azalisaki bato mpo ete bazala na bomoi ya kokoka awa na mabelé, kati na paradis, mpe bafanda wana libela. Kasi mpo ete Adam, nkoko na biso atombokelaki Nzambe, biso nyonso tosili kozwa etumbu ya liwa longwa na libumu ya mama na biso: “Mpo na moto moko [Adam, tata ya libota na bato] lisumu likɔtaki na mokili, mpe kufa eyei mpo na lisumu, mpe kufa epalangani na bato nyonso.” Lokola Biblia elobi yango, “kufa ezwaki bokonzi.” (Baloma 5:12, 14, MN) Na yango, ata bonsomi nini tokoki kozala na yango, biso nyonso tozali baombo ya masumu mpe ya liwa.
6. Mpo na nini elikya na bato mpo na kozala na bomoi molai, ebakisamaki mwa moke uta Nzembo 90:10 ekomamaki?
6 Oyo eleki mpenza, lelo oyo mbula ya bomoi na biso ezali moke mingi. Ata mpo na bato na libaku malamu, bazali bobele na mwa bambula. Mpo na baoyo bazali na libaku malamu te, bazali bobele na mwa bambula moke, to bobele moke mpenza. Lokola emonisamaki na ankete moko euti kosalema kala mingi te, ete “mpo na sianse mpe na mayele ya minganga nde bato bazwi lisusu elikya malamu ya kozala na bomoi.” Ezali bongo mpo na lisumu ya Adam, kozanga kokoka mpe liwa ekɔtaki na baboti na biso. Oyo nde mawa na kokóma na mibu 70 to 80, mbula oyo moto asengeli kozwa mayele mpe kosepela na bomoi, nde ayei komona ete mokemoke, nzoto na ye etiki kosala malamu kino kosuka na mputulu!—Nzembo 90:10.
7. Mpo na nini bato bakoki soko moke te kopesa biso bonsomi ya solo oyo tolingi mpe oyo tozali na yango mposa?
7 Motindo nini na boyangeli ya bato oyo ekoki kopekisa boombo na lisumu mpe na liwa? Moko te. Na mokili, mokonzi moko te, moto na sianse moko te, monganga moko te oyo akoki kolongola biso na bolózi oyo ete maladi, bonunu mpe liwa; mpe akoki te kolongola mobulu, bokesene, koboma, nzala mpe mpasi. (Nzembo 89:48) Ata makanisi malamu bato bazali na yango, bakoki te kopesa biso bonsomi ya solo oyo tolingi mpe tozali na yango mposa.—Nzembo 146:3.
Lotómo na bango ya kopona oyo balingi esalelami na lolenge mabe
8, 9. Likambo nini lityaki bato na ezalela ya mpasi oyo bazali kati na yango lelo?
8 Libota na bato lizali lelo kati na ezalela oyo mpo ete Adam na Eva basalelaki lotómo na bango ya kopona oyo balingi na lolenge mabe. Kati na Boyokani ya Sika, 1 Petelo 2:16 ebongolami ete: “Bozala bato ya bonsomi; nzokande bosalela bonsomi na bino mpo na kobomba mabe te.” Emonani bongo polele ete, Nzambe akanaki te ete bato bazala na bonsomi bonzangi ndelo. Bonsomi wana bosengelaki kosalelama kati na ndelo etyami na mibeko na Nzambe, mibeko oyo mizalaki sembo mpe misalemaki mpo na bolamu ya bato nyonso. Lisusu, ndelo yango ezalaki monene mpenza na motindo boye ete epesa moto na moto bonsomi ya kopona oyo elingi ye, na motindo wana, boyangeli ya Nzambe ekokaki te konyokola bato.—Deteronome 32:4.
9 Atako bongo, baboti na biso ya liboso balingaki bango moko kokata mpo na oyo ezali malamu mpe mabe. Lokola baboyaki bokonzi na ye na nko, Nzambe atikaki kosunga bango. (Genese 3:17-19) Bakómaki bongo bato bazangi kokoka mpe, na yango, bazwaki maladi mpe liwa. Na esika ete bazala na bonsomi, bato bakómaki baombo ya masumu mpe ya liwa. Batyami mpe na boombo ya bakonzi ya politike bazangi kokoka, baoyo bazali mbala mingi basali na mabe.—Deteronome 32:5.
10. Lolenge nini Jéhovah asilisaki likambo yango kati na bolingo na ye?
10 Ntango oyo Nzambe atikelaki bato ete bazwa oyo babéngaki ete bonsomi kati na makambo nyonso, ezali na ndelo. Ayebaki makambo nini masengelaki kobima: likambo yango lisengelaki mpenza komonisa ete, boyangeli ya bato bakabwani na Nzambe ekoki kozwa elónga te. Lokola bonsomi ezali eloko ya motuya mingi na ntango yango esalelami malamu, Nzambe kati na bolingo na ye, apesaki nzela na makambo wana ete masalema na mwa ntango mokuse, na esika ya kobɛtɛla bato likabo ya lotómo na bango ya kopona oyo balingi.
‘Moto akoki kotambolisa makolo na ye te’
11. Lolenge nini Lisoló na bato lisili komonisa bosolo ya Biblia?
11 Lisoló na bato lisili komonisa bosolo ya maloba oyo tokoki kotanga na Yilimia mokapo 10, versets 23 mpe 24, ete: Ekoki na motamboli te ete atámbolisa makolo na ye? Jéhovah, sembola ngai.” Lisoló na bato limonisi lisusu bosembo ya maloba oyo tozali kokuta na Mosakoli 8:9, ete: “Moto azali na bokonzi likoló na moto mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” Oyo nde solo emonani na maloba oyo! Ya solo, libota na bato lisili kozwa mpasi mingi, oyo esili komema moko na moko kino na nkunda. Ntóma Paulo amonisaki ezalela yango na sikisiki wana elobaki ye, engebene Baloma 8:22, ete: “Toyebi ete, kino sikawa, biloko nyonso bizalisami bizali kokimela esika moko mpe kooka mpasi esika moko.” Ee, lipandá liboso na mibeko ya Nzambe epesi matomba mabe.
12. Maloba ya bato mosusu mamonisi biso nini na ntina na bonsomi kati na makambo nyonso?
12 Na ntina na bonsomi, tala oyo tokoki kotanga kati na mokanda moko (Inquisition and Liberty): “Na kotalela yango, lipandá ezali mpenza nzela na mayele te: ezali likambo oyo tosengeli kosepela na yango te. Na solo mpenza, mbala mosusu ezali nde lolenge na moïmi oyo eleki mabe mingi . . . Moto ezali ekelamu oyo akoki kozwa lipandá na makambo nyonso te, kasi soki ezali koluka yango, ezali bobele mpo na bozoba na ye.” Mokolo moko, Philippe, mwana na mokonzi ya mboka Angleterre, alobaki ete: “Bonsomi ya kokokisa bamposa na biso mpe makanisi na biso ekoki komonana malamu, kasi makambo oyo mazali kobima masili komonisa mbala mingi ete bonsomi bozangi ndelo . . . mpe etamboli ezangi kotalela bato mosusu, ezali mpenza kobebisa ezaleli ya bomoi na bato, ata soki yango ezali kopesa bolamu.”
Nani ayebi yango malamu?
13, 14. Nani, mpe bobele nani, akoki kopesa bonsomi ya solo epai na bato?
13 Banani bayebi lolenge malamu oyo libota lisengeli kotambola? Ezali baboti na bolingo, ya makoki mpe ya mayele, to mpe bana mike? Eyano emonani polele. Bobele bongo, Tata na biso ya likoló, Mozalisi na bato, ayebi makambo oyo mabongi na biso. Ayebi lolenge malamu oyo libota na bato lisengeli kotambola mpe kotambwisama. Ayebi mitinda nini tosengeli kosalela lotómo na biso ya kopona oyo tolingi mpo ete bato nyonso bazwa bolamu na bonsomi ya solo. Bobele Jéhovah, Nzambe mozwi-na-nguya-nyonso nde ayebi lolenge nini kolongola libota ya bato longwa na boombo mpe kopesa bonsomi ya solo epai na bato nyonso.—Yisaya 48:17-19.
14 Kati na Liloba na ye, na Baloma 8:21, Jéhovah apesaki elaká oyo kitoko, ete: “Biloko bizalisami mpe bikosikwa na boombo ya libebi mpo na kozwa bonsomi na nkembo ya bana na Nzambe.” Ee, Nzambe apesi eleká ya kolongola bato nyonso na ezalela mabe oyo bazali kati na yango. Lisoló lilandi limonisi lolenge oyo yango ekosalema.
Bozongeli
(Ebandi na lokasa 3 kino lokasa 8)
◻ Mpo na nini bato bazali na mposa mingi ya bonsomi?
◻ Mitindo nini na boombo oyo bato batyamaki na boumeli ya bikeke mingi?
◻ Mpo na nini Jéhovah apesaki nzela na boumeli ya ntango molai ete bato basalela lolómo na bongo ya kopona oyo balingi na lolenge mabe?
◻ Nani, mpe bobele nani akoki kopesa bonsomi ya solo epai na bato nyonso, mpe mpo na nini?
[Elilingi na lokasa 7]
Mbula ya bomoi ya moto ezali penepene na oyo elakisami na Nzembo 90:10, esili koleka mibu 3 500 sikawa British Museum
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Courtesy of The British Museum