Mituna na batangi
Zakaria, tata na Yoane mobatisi, akómisamaki na mbala moko emimi mpe ebúbú, lokola yango ezali komonana na Luka 1:62?
Bala mosusu balobi ete, Zakaria akómaki mpe emimi. Totangi kati na lisoló ya Biblia ete: “Balingaki kobénga ye [mwana] Zakaria, nkombo ya tata na ye. Kasi mama na ya alobi ete: ‘Bongo te, kasi akobéngama Yoane.’ Mpe balobi na ye ete: ‘Moto moko te kati na libota na yo abéngami na nkombo oyo.’ Mpe batunaki tata na ye na bilembo soki alingaki kobénga ye na nkombo nini. Ye asɛngaki libaya mpe akomaki ete: ‘Nkombo na ye Yoane.’”—Luka 1:59-63, MN.
Kasi, likambo moko te limonisi polele ete Zakaria akómaki emimi na boumeli ya mwa ntango.
Liboso, anzelu Gabriele ayebisaki Zakaria ete, akobota mwana mobali oyo akobéngama nkombo Yoane. Lokola akómaki mobangé, Zakaria azalaki na mpasi mpo na kondima yango. Bongo, anzelu alobi na ye ete: “Okoloba lisusu te kino makambo oyo makobima, mpamba te ondimi maloba na ngai te.” (Luka 1:13, 18-20, MN) Anzelu alobaki na Zakaria te ete akoyoka lisusu te, kasi akoloba lisusu te.
Lisoló lilandi ete: “Wana ebimaki ye [esika mosantu], ayebaki koloba na bango [bato oyo bazalaki kozela] te, mpe basosolaki ete autaki komona emonaneli kati na esika mosantu. Ye azalaki koloba na bango na bilembo, mpe akómaki emimi.” (Luka 1:22) Liloba na Greke libongolami awa na “ebubu” lizali kopesa likanisi ya kolɛmba, ezala mpo na koloba, mpo na koyoka, to mpo na nyonso mibale. (Luka 7:22) Ezali boni mpo na Zakaria? Mpo na yango, totala oyo esalemaki na ntango abikaki. “Bobele na ntango wana, monoko na ye mozipwamaki mpe lolemo na ye lokangwaki mpe abandaki koloba, mpe akumisaki Nzambe.” (Luka 1:64, MN) Na bososoli malamu, tokoki kosukisa ete Zakaria azangaki bobele likoki ya koloba.
Soki ezali bongo, mpo na nini basusu bazalaki kotuna ye “[Zakaria] na bilembo soki alingaki kobénga ye [mwana] na nkombo nini?” Babongoli mosusu nkutu bayeisi mokapo yango ete “na elobeli ya bilembo.”
Zakaria, ebúbú uta anzelu alobaki na ye, asengelaki ntango nyonso kosalela motindo na elobeli na bimimi mpe bibúbú mpo na koloba. Na ndakisa, azalaki “koloba na bilembo” epai na baoyo bazalaki na tempelo. (Luka 1:21, 22) Na nsima, mpo na kosɛnga libaya, alobaki na bilembo. (Luka 1:63) Na bongo, ekoki kozala ete na boumeli ya eleko ya bobúbú baoyo bazalaki pene na ye basalelaki mpo bilembo mpo na koloba na ye.
Atako bongo, bilembo bilobelami na Luka 1:62 bizali na ndimbola mosusu ya sikisiki. Elizabete autaki koloba na ntina nkombo ya mwana na ye. Na yango, na kolanda maloba na ye, ekoki kozala ete bandeko na ye basalaki oyo bakokaki kosala na nsima: kotuna ekateli ya mobali. Mpo na yango, bakokaki koningisa motó mwa moke to mpe kosala elembo moko. Lokola bakomaki motuna na bango te ete Zakaria atanga yango, likambo wana likoki kozala elembo ete Zakaria ayokaki maloba ya mwasi na ye. Na yango, bobele koningisa moto to kosala elembo moko ekokani, ekokaki koloba ete: ‘Biso nyonso (elongo na yo, Zakaria) tosili koyoka maloba ya Elizabete, kasi yo olobi nini na ntina na nkombo ya mwana na yo?’
Mpe nokinoki na nsima, likamwisi mosusu lisalemaki oyo libongolaki makambo. “Bobele na ntango wana, monoko na ye mozipwamaki mpe lolemo na ye lokangwaki mpe abandaki koloba, mpe akumisaki Nzambe.” (Luka 1:64, MN) Ntina ezelaki te na kokanisa ete matoi na ye mazipamaki.