Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/5 nk. 6-7
  • Libota ya 1914—Mpo na nini lizali na ntina mingi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libota ya 1914—Mpo na nini lizali na ntina mingi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Masolo mosusu
  • Totondo jehovah bokonzi na masiya esili kobanda koyangela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/5 nk. 6-7

Libota ya 1914​—Mpo na nini lizali na ntina mingi?

“Batangi na biso bayebi ete esili koleka mwa bambula, tozalaki komizela komona nsuka na libota oyo na eleko ya mpasi eleki monene mpe tondimi ete ekosalema na mobulu mpe nokinoki mwa moke nsima na octobre ya mobu 1914.”​—Ezwami na La Tour de Garde et Messager de la présence de Christ ya 15 mai 1911 (ebimeli ya Lifalansé ya janvier 1912).

UTA 1879, zulunalo oyo ebéngamaki liboso ete La Tour de Garde et Messager de la présence de Christ (oyo ebéngami lelo ete Mosenzeli ayebisaka Bokonzi ya Jéhovah) ezalaki kobenda likebi ya bato likoló na mobu 1914, komonisáká ete ezalaki mbula oyo elobelami kati na bisakweli ya Biblia. Wana mobu yango mozalaki kobɛlɛma mokemoke, zulunalo yango ezalaki kokundwela batangi ete bakokaki komizela na “eleko ya mpasi eleki monene.”

Baklisto bapalanganisaki nsango yango bipai binso, na kolanda bososoli oyo bazalaki na yango na ntina na “ntango nsambo” mpe “ntango na Bapakano” oyo elobelami na Biblia.a Basosolaki ete eleko yango ezalaki na boumeli ya mibu 2 520; ebandaki na ntango bokonzi ya Davidi ekweaki na Yelusaleme na kala mpe esengelaki kosuka na octobre 1914.b​—Danyele 4:16, 17; Luka 21:24, Crampon 1905.

Na mokolo ya 2 octobre 1914, Charles Russell, oyo azalaki prezidá ya la Société Watch Tower na ntango wana, asakolaki na molende nyonso ete: “Ntango na Bapakano esili, elaká na bakonzi ekoki.” Maloba oyo makokanaki mpenza. Na octobre 1914, likambo monene oyo limonanaki na bato te, lisalemaki na likoló. Yesu Klisto, Motuki na libula na seko na “kiti na bokonzi ya Davidi,” abandaki koyangela lokola Mokonzi likoló na bato.​—Luka 1:32, 33; Emoniseli 11:15.

Kasi okoki kotuna ete: ‘Soki Klisto abandaki koyangela na 1914, mpo na nini makambo ya mokili makómaki mabe koleka?’ Mpo ete Satana, monguna na bato oyo azangi komonana, azalaki naino na bomoi. Kino na 1914, Satana azalaki naino kokenda na likoló. Kasi makambo yango mabongwanaki na ntango Bokonzi na Nzambe botyamaki na mbula wana. “Etumba ebimaki kati na likoló.” (Emoniseli 12:7) Satana mpe bilimu mabe na ye balongamaki mpe babwakamaki awa na mabelé, likambo oyo libimisaki mpasi mingi mpo na bato. Biblia esakolaki yango ete: “Mawa na mokili mpe na mai monene! Mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaká mokuse.”​—Emoniseli 12:12.

Na ekeke ya liboso ya ntango na biso, Yesu alobaki ete koya na ye ezangi komonana lokola Mokonzi ya mabelé, ekoyebana na elembo ekomonanaka. Batunaki ye ete: “Elembo ya koya na yo mpe ya nsuka na biloko ya ntango oyo ekozala nini?” Tala eyano na Ye: “Libota moko likotɛmɛla libota mosusu, mpe bokonzi moko bokotɛmɛla bokonzi mosusu, nzala mpe koningana na mabelé ekozala esika moko nsima na mosusu. Makambo nyonso oyo mazali ebandeli na mpasi.”​—Matai 24:3, 7, 8, MN.

Na boyokani na esakweli oyo, etumba oyo ebimaki na 1914 ebimisaki nzala, mpamba te nzela ya kozwa bilei ezalaki lisusu te koleka boumeli ya mibu minei. Boni mpo na “koningana na mabelé na esika moko nsima na mosusu?” Na boumeli ya mbula zomi oyo elandaki mobu 1914, koningana makasi na mabelé esalemaki soko mbala zomi mpe ebomaki koleka bato 350 000. (Tala encadré.) Solo mpenza, libota ya 1914 limonaki “ebandeli na mpasi.” Mpe uta ntango wana, mpasi ezali mbala na mbala komonana na makámá mauti na biloko bizalisami, na nzala mpe na ebele na bitumba.

Atako bongo, nsango ya kotyama na Bokonzi na Nzambe na 1914 ezali nsango malamu, mpo ete Bokonzi yango ekobikisa mabelé longwa na libebi. Lolenge nini? Na kobomáká mangomba ya lokutá na bokosi, mpe biyangeli mabe mpe bopusi mabe ya Satana. (Danyele 2:44; Baloma 16:20; Emoniseli 11:18; 18:4-8, 24) Lisusu, Bokonzi yango ekosala mokili ya sika “epai boyengebene ekofanda kati na yango.”​—2 Petelo 3:13, MN.

Mwa moke nsima na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo bazalaki kobenga ba Témoins de Jéhovah, babandaki kokanga ntina ya mosala oyo bazalaki na yango na kotalela likambo mosusu lizali kati na elembo ya koya na Yesu lokola Mokonzi. Yesu Klisto asakolaki ete: “Nsango malamu oyo na bokonzi ekosakolama na mokili mobimba, lokola litatoli na mabota nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.”​—Matai 24:14.

Uta ebandeli moke na 1919, ba Témoins de Jéhovah bazali kolanda kopanganisa “nsango malamu oyo.” Na nzela na mosala yango, bamilió na bato ya mikili koleka 200, bayanganisami sikawa mpo na kozala bato na Bokonzi na Nzambe. Mpe mapamboli mingi mazali kozela bango. Bokonzi na Nzambe bokolongola bitumba, nzala, mabe mpe monyoko. Ekolónga ata maladi mpe liwa!​—Nzembo 46:9; 72:7, 12-14, 16; Masese 2:21, 22; Emoniseli 21:3, 4.

Liboso ete libota ya 1914 eleka, mosala ya kosakola Bokonzi na Nzambe ekokóma na nsuka na yango. Yesu asakolaki ete: “Ekozala na bolózi monene lokola oyo emonani naino te uta ebandeli ya mokili kino sikawa, mpe ekobima lisusu te. Ee, soki mikolo yango miyeisamaki mokuse te, mbɛlɛ moto moko te akobika; nde mikolo yango miyeisami mokuse mpo na baponami.”​—Matai 24:21, 22, MN.

Tosala libungá te lokola libota lizalaki liboso na mobu 1914. Makambo makozala bobele lokola oyo ya lelo te. Mabongwani minene makosalema. Kasi bilikya ya baoyo bazali kosala na mayele bikozala kitoko.

Na yango, totya likebi na maloba oyo ya mosakoli na kala, ete: “Boluka Jéhovah, bino basɔkɛmi nyonso ya mokili . . . ; boluka boyengebene, boluka komikitisa, soko nde bokobómbama na mokolo na nkanda na Jéhovah.” (Sofoni 2:3) Lolenge nini tokoki kosalela toli oyo? Masoló malandi makosalisa mpo na koyanola na motuna oyo.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Lokasa ya motó na likambo ya mokanda Scénario du Photo-Drame de la création, ebimisami na 1914.

b Mpo na kozwa bandibola mosusu, tala mokapo 16 ya mokanda Okoki kozala na bomoi na seko na mabele oyo ekobongwana paradis, oyo ebimisami na la Société Watchtower.

[Etanda na lokasa 7]

Koningana na mabelé na boumeli ya bambula zomi oyo elandaki mobu 1914

Date: Esika: Bakufi:

13 janvier 1915 Avezzaino (Italia) 32 600

21 janvier 1917 Bali (Indonésie) 15 000

13 février 1918 Etuká ya Kwangtung (Chine) 10 000

11 octobre 1918 Esanga Porto Rico (na ouest) 116

3 janvier 1920 Veracruz (Mexique) 648

7 septembre 1920 Etuká ya Calabre (Italia) 1 400

16 décembre 1920 Etuká ya Ningsia (Chine) 200 000

24 mars 1923 Etuká ya Szechwan (Chine) 5 000

26 mai 1923 Mokili ya Iran (na nord-est) 2 200

1er septembre 1923 Tokyo-Yokohama (Japon) 99 300

Ezwami na etánda “Koningana monene ya mabelé kati na mokili” na mokanda Terra Non Firma, ya James Gere mpe Haresh Shah.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto