Lisiko mpo na bato mingi
MOKOLO ya 31 mars 1970, mpepo moko ekosalaka mibémbo milai eyibamaki penepene na ngomba Fuji, na mboka Japon. Basangani libwa ya etuluku moko ya Bajaponé oyo bayebani na nkombo “Faction Armée Rouge” bakangaki soko bato 120 kati na basali mobémbo mpe basali na mpepo, mpe basɛngaki ete bamema bango na Corée du Nord.
Na ntango mpepo ekitaki na engumba Séoul, na Ekólo Corée, Shinjiro Yamamura, vice-ministre des transports na mboka Japon, amipesaki lokola mokangami na esika ya basali mobémbo, kotyáká bongo bomoi na ye na likámá. Baoyo bayibaki mpepo bandimaki ete azala lokola ndanga mpo na bango mpe batikaki bakangami nyonso, longola bobele basali na mpepo. Na nsima mpepo ekendaki na engumba Pyongyang, epai kuna miyibi na mpepo bamikabaki na mabɔkɔ ya bakonzi ya Corée du Nord. Na nsima, M. Yamamura mpe mokumbi mpepo bazongaki na mboka Japon kozanga likámá.
Kati na lisoló oyo, bobele moto moko nde apesaki bomoi na ye mpo na bato koleka 120 baoyo bakangamaki. Likambo oyo likoki kosalisa biso na kososola lolenge nini moto bobele moko akokaki kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na bato mingi. Kasi mpo na kokanga ntina ya liteya ya Biblia mpo na lisiko, tosengeli kotalela lisoló yango na bozindo mpenza
Libosoliboso, tosengeli koyeba ebandeli ya lisumu. Biblia elimboli ete: “Lisumu likɔtaki na mokili na moto moko, mpe liwa likɔtaki mpo na lisumu, mpe bongo liwa lipalangani epai na bato nyonso mpo ete bango nyonso basali lisumu.” (Baloma 5:12, MN) Ndenge nini yango esalemaki? Moto oyo alobelami awa ezali Adam, moto oyo azalisamaki liboso. Kati na mikapo misato ya liboso na Genese, okoki kotanga lisoló na kala na ntina na kozalisama na ye mpe likambo oyo limemaki ye na kopɛngwa longwa na mitinda na Nzambe.
Lisoló ya Biblia limonisi ete na ntango Adam asalaki lisumu ya liboso, ezalaki na moto moko oyo apusaki ye na kosala mabe. Mpo na kokokisa mposa na ye ya kozala na bokonzi, mopusi wana na mabe asalaki myango mabe mpo na koyangela Adam mpe bakitani na ye nyonso. Mopusi wana ezalaki Satan le Diable. Abéngami lisusu “nyoka ya kalakala” mpo ete asalelaki nyoka mpo na komema Adam na kosala lisumu. (Emoniseli 12:9) Mozalisi, oyo alingi bato, alobaki na Adam ete atosa lotómo na Ye ya kokata mpo na oyo ezali malamu mpe na oyo ezali mabe, kasi nyoka akosaki Eva, mwasi ya Adam, mpo na komema ye na kozanga kotósa Nzambe. Na nsima, Eva apusaki mobali na ye ete ye mpe azanga kotósa Nzambe. Na bongo, Adam asɛngaki lipandá liboso na Nzambe; asalaki lisumu na nko, mpe na yango, apesi lolenge ya bomoi wana epai na bakitani na ye.
Lelo oyo, tozali naino komona mpasi oyo euti na yango. Ndenge nini? Ya solo, Mozalisi azalaki na elónga na kozwa ekateli ete soki Adam mpe Eva baboyi kotósa na nko, liwa likolanda nsima. Bongo, na kosaláká lisumu, Adam atɛkaki mokili mobimba na boombo ya lisumu mpe na liwa.—Genese 2:17; 3:1-7.
Lolenge nini bato bakokaki kosikolama na ezalela wana ya bato na masumu? Yesu Klisto ayaki awa na mabelé mpo na “kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na mingi,” likambo oyo lifungolaki nzela na kosikolama ya bato.—Matai 20:28.
Kosombama mpe kosikolama
Biblia emonisi ete mwango ya kobikisa bato mozali na biteni mibale: (1) kosombama mpe (2) kosikolama. Tala oyo elobamaki na Albert Barnes, molimboli na Biblia, na ntina na liloba na Greke (ly’tron) oyo ebongolami na “lisiko”: “Liloba lisiko lilimboli mpenza: motuya na mosolo mopesami mpo na kosomba bakangami. Mosolo oyo mosɛngisami mpo na kosikola bato oyo bakangami na monguna na ntango na bitumba, mobéngami lisiko; elingi koloba mwango mpo na yango bakangami bazwi bonsomi. Na bongo, eloko nyonso oyo ezali kopesa nzela na moto ete alongwa na etumbu, na mpasi to na lisumu, ebéngami lisiko.”
Na yango, “eloko nyonso oyo ezali kosikola moto” ekoki kobéngama ly’tron. Na ntina yango, liloba wana ya Greke lizali kolobela mingi likambo to mwango motali kosikolama.a
Ntóma Paulo asalelaki an-ti’ly-tron, liloba oyo liuti na yango, mpo na komonisa motuya ya mosolo ya lisiko. Akomaki kati na 1 Timoté 2:6 (MN) ete: “[Yesu] amipesaki ye moko lokola lisiko likokani mpo na bato nyonso.” Na ntina na liloba wana, diksionere moko (Greek and English Lexicon to the New Testament, ya Parkhurst) elobi ete: “Elimboli mpenza motuya mosolo mpo na yango bakangami basombami longwa na maboko ya monguna; mpe motindo ya bosombitanyi mpo na yango bomoi ya moto moko esombami na nzela na bomoi ya moto mosusu.” Oyo elobelami mingi awa, ezali bokokani to motuya ya mosolo mopesami mpo na kosomba ete epimeli ya boyengebene ekokana. Lolenge nini mbeka ya lisiko na Yesu ekokaki kotalema lokola “lisiko likokani?”
Lisiko likokani
Adam atɛkaki bato nyonso, biso mpe lokola, na lisumu mpe na liwa. Lifuti, to lomande oyo afutaki ezalaki bomoi na ye ya kokoka, elongo na likoki ya kozala na bomoi ya seko. Mpo na kosikola oyo ye atɛkaki, esengelaki bomoi mosusu ya kokoka, lisiko likokani, epesama lokola lifuti. Nzokande, ata moto moko te oyo abotami na bato bazangi kokoka, akokaki kopesa bomoi ya moto na kokoka oyo esengelaki. (Yobo 14:4; Nzembo 51:5) Kasi na mayele na ye, Nzambe asalaki mwango mpo na kosilisa ezalela wana ya mpasi. Kati na libumu ya moseka moko, akɔtisaki bomoi ya kokoka ya Mwana na ye bobele moko na likoló mpe bongo, abotamaki moto ya kokoka. (Luka 1:30-38; Yoane 3:16-18) Liteya oyo litali kobotama na Yesu epai na moseka mwasi, ezali te lisapo oyo lisalemi mpo na kokumisa mobandisi ya lingomba moko. Bongo te, kasi liteya wana lizali komonisa polele mwango malamu oyo molingisi na Nzambe ete apesa mbeka ya lisiko.
Mpo na kopesa mbeka yango, Yesu asengelaki kotikala pɛto na boumeli ya ntango nyonso oyo azalaki awa na mabelé. Ezali yango nde asalaki. Na nsima akufaki lokola mbeka. Ezali bongo nde apesaki bomoi na ye ya moto na kokoka lokola lisiko mpo na kobikisa bato. (1 Petelo 1:19) Tokoki bongo koloba kozanga komikosa ete “moto moko akufeli bato nyonso.” (2 Bakolinti 5:14, MN) Ee, “lokola bato nyonso bakufi mpo na Adam, boye nyonso bakozonga na bomoi kati na Klisto.”—1 Bakolinti 15:22, MN.
Moto moko akufeli bato mingi
Kati na likambo ya koyibama ya mpepo oyo tolobelaki na ebandeli ya lisoló oyo, bakangami bazalaki na likoki ya komisikola te, ata soki bazalaki bazwi. Bazalaki na mposa ya lisalisi ya bato mosusu, mpe esengelaki ete moto oyo akokangama na esika na bango akokisa mwa masɛngami. Yango ekokani mpenza na ntina na lisiko lisengeli mpo na kosomba bato, kasi yango ezali na lolenge ya mozindo mingi. Mokomi moko na nzembo akomaki ete: “Baoyo . . . bakomikumisaka mpo na ebele na bozwi na bango; kati na bango, moto te akolonga kosikola ndeko na ye to mpe kopesa epai na Nzambe lisiko mpo na ye; (mpe lifuti ya kosikola milimo na bango eleki motuya na boye ete ekokoka kofutama te libela na libela).” (Nzembo 49:6-8, MN) Bato bazalaki mpenza na mposa ya lisalisi liuti na moto mosusu. Bobele bomoi ya moto moko nde ekokaki mpo na kosikola bato nyonso, kasi moto yango asengelaki kokokisa masɛngami mpo ete epimelo na boyengebene na Nzambe ekokana. Bobele Yesu Klisto nde azalaki moto na kokoka oyo akokisaki masɛngami yango.
Jéhovah Nzambe asikolaki bato na nzela na mbeka ya lisiko oyo Yesu Klisto apesaki. Kasi Nzambe asalaki likambo mosusu lileki monene. Akatelaki Satan le Diable etumbu ya liwa, ye oyo amemaki bato na lisumu. (Emoniseli 12:7-9) Mosika te, Jéhovah akokangisa mosali wana na mabe, mpe na nsuka akoboma ye na ‘kobwákáká ye kati na libéké ya mɔ́tɔ mpe na sufulu,’ elilingi ya kobomama ya seko. (Emoniseli 20:1-3, 7-10, 14) Na nzela na kobomama ya ekelamu ya elimo wana ya mabe mpe na kopesama ya lisiko, bato bakosikolama te bobele na lisumu mpe na liwa, kasi lisusu na bopusi ya Satana. Wana bakosikolama mpe wana bakozwa bolamu mingi na motuya ya mbeka ya lisiko ya Klisto, bato ya botósi bakokóma kino na ezaleli ya kokoka.
Lisiko mpe yo
Na koyebáká liteya ya mbeka ya lisiko na Yesu Klisto, ebele ya bato ya Orient bakómaki komonisa botɔndi mingi epai na Nzambe na ntina na likambo oyo asalaki mpo na bango. Kazuo azali moko na bato yango. Lobanzo na ye ya liboso ezalaki bongo komela drogue na kobendáká nsolo ya bankisi oyo esalelami mpo na kosanzola langi. Mbala mingi abebisaki bavuatire na ye wana ezalaki ye kotambwisa yango na nsé na molangwa ya drogue. Misato kati na baninga na ye bamibomaki nsima na kobebisa kolongono na nzoto na bango. Kazuo alukaki mpe komiboma. Na nsima, abandaki boyekoli ya Biblia. Wana asepelaki na solo oyo azalaki koyekola, azwaki ekateli ya kopɛtola bomoi na ye. Abundisaki momeseno na ye ya kobebisa nzoto na nsolo ya bankisi oyo bakosanzolaka langi, kasi mbala mingi, azalaki lisusu kozongela yango. Azalaki kobunda etumba na mposa ya nzoto mpe na mposa ya kosala makambo ya sembo. Azalaki na esengo wana abondelaki Nzambe mpo na kosɛnga ye ete alimbisa ye na moboko ya motuya ya mbeka ya lisiko na Yesu Klisto. Na nzela na libondeli mpe na lisalisi ya baninga na ye baklisto, alongaki mabe na ye wana mpe, sikawa, azali mosaleli na esengo ya Jéhovah mpe azali na lisosoli ya pɛto.
Ozali lisusu komikundola mpo na Chisako, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisoló ya liboso? Na nzela na boyekoli ya Biblia, ye mpe akangaki ntina na lisiko, ebongiseli oyo etondi na bolingo. Asepelaki mingi wana ayebaki ete Nzambe apesaki Mwana na ye mpo na kosikola bato na lisumu. Chisako apesaki bomoi na ye epai na Jéhovah. Kino lelo, asili kokóma na mibu 77, azali kolekisa soko bangonga 90 sanza na sanza mpo na koyebisa bato mosusu, bolingo monene ya Jéhovah mpe ngolu oyo azali komonisa yango epai na bato.
Lisiko lisengeli mpe kozala na motuya mpo na yo lokola. Ezali mwango oyo Nzambe akopesa nzela na bato ete basikolama mpenza: basikolama na lisumu mpe na liwa. Elikya kitoko na mikolo mizali koya, bomoi ya seko na mabelé oyo makobongwana paradis, ezali kozela baoyo bandimi mbeka ya lisiko na Yesu Klisto. Kutana na ba Témoins de Jéhovah mpe tala yo moko lolenge oyo okoki kosikolama na lisumu mpe na liwa na nzela na lisiko, ebongiseli oyo etondi na bolingo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kati na Makomami na Liebele, liloba pa-dhah’ mpe maloba mosusu mauti na yango, mabongolami na “kosomba” to “motuya ya mosolo na kosomba” mpo na kolobela kosikolama oyo etalelami na yango.—Deteronome 9:26.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 5]
Na ndingisa na bolingo ya Mainichi Shimbun