Etumba mpo ete Biblia na lokóta Espagnol ebatelama
MOKOLO moko na octobre 1559, soko bakatolike 200 000 ya Espagne bakendaki na Valladolid, engumba oyo ezali na nord ya Espagne. Bakendaki kotala esika oyo bazalaki kotumba bato na mɔ́tɔ, na boumeli na yango “bato mibale batumbamaki wana ezalaki bango na bomoi, mpe zomi bakamolamaki nkingo mpo na kobomama.” Bato yango bafundamaki ete bazalaki “bapɛngwi.”
Philippe II, elenge mokonzi oyo alingamaki mingi na bato ya mokili na ye, akambaka ye moko makambo yango. Na ntango moto moko oyo akweisamaki mpe asɛngaki ete mokonzi aokela ye mawa, mokonzi azongisaki ete: “Soki mwana na ngai mpenza azalaki moto mabe lokola yo, mbɛlɛ ngai moko namemi nkoni mpo na kotumba ye.” Mabe nini moto yango asalaki? Bobele mpo ete atangaki Biblia.
Bobele na ntango wana, bakonzi ya katolike bazalaki kosala Ankete na engumba ya Andalouse na Séville. Kuna, na monastère ya engumba San Isidro del Campo, etuluku ya basángó bautaki kozwa ba Biblia na lokóta Espagnol, na nkuku. Banɔngi basengelaki nde kotɛka bango? Basusu bakimaki mboka wana, mpamba te bayebaki ete bazalaki na likámá ya kufa. Kasi 40 kati na baoyo batikalaki, babikaki te mpe batumbamaki wana babakisamaki likoló na nzeté; kati na bango ezalaki na mobali oyo akɔtisaki ba Biblia na nkuku kati na mboka wana. Na ekeke ya zomi na motoba, ezalaki likámá mpo na baoyo bazalaki kotanga Biblia ete bafanda na mboka Espagne: bobele bato moke nde babikaki na bitumbu biuti na bakonzi ya katolike.
Moko na bango azalaká sángó, nkombo na ye Casiodoro de Reina (pene na 1520-1594). Akimaki na Londres, kasi ata kuna, abatelamaki te. Alandelamaki na bakonzi wana ya katolike, mpe ntóma ya Espagne na mboka Angleterre alukaki myango nyonso ete azongisa ye na mboka oyo eyangelami na Espagne. Mosika te, bafundaki ye ete asali ekobo mpe azali kosangisa nzoto na mibali misusu, likambo oyo lisɛngisaki ye ete alongwa na mboka Angleterre.
Na bozwi moke mpe na libota asengelaki koleisa oyo ezalaki sé kokóma monene, akendaki kobombama liboso na engumba Francfort. Na nsima, banzela oyo azalaki koluka mpo na kozwa ebómbamelo, ememaki ye na mboka France, na Hollande mpe, na nsuka, akómaki na Suisse. Kasi, na ntango nyonso wana, atikaki te kosala mosala. Alimbolaki ete: ‘Longola bobele ntango oyo nazalaki maladi to ntango oyo nazalaki kosala mobémbo, . . . nazalaki ntango nyonso kokoma.’ Alekisaki bambula mingi mpo na kobongola Biblia na Espagnol. Na nsuka, baekzamplere 2 600 ya Biblia ya Reina ebandaki konyatama na Suisse na 1568, mpe, na 1569, mosala ya konyatama mosilaki. Oyo eleki ntina mingi na libongoli ya Reina ezalaki ete ebongolaki Tétragramme, makomi minei ya Liebele ya nkombo na Nzambe, na Iehoua (Jehová) kasi na Señor te.
Kobimisama ya Biblia na Espagnol
Na kokesena mpenza, na eleko oyo ba Biblia ebimaki mingi na nzela na bamasini ya konyata mikanda na mikili ya Mpótó, nzokande yango ezalaki komonana mingi te na mboka Espagne. Kasi liboso ezalaki bongo te. Na boumeli ya bikeke mingi, Biblia ezalaki mokanda oyo mapalanganaki mingi na mboka Espagne. Baekzamplere oyo ekomamaki na mabɔkɔ ezalaki na lokóta Latin mpe nkutu eumelaki na Gotique na mwa bikeke mingi. Mokomi moko ya makambo na kala alimbolaki ete na Moyen Age, “Biblia, oyo etalelamaki lokola liziba ya maloba mapemami mpe na bokonzi, mpe etalelami lokola mitinda na kondima mpe na etamboli, eyebanaki mingi mpe elingamaki mingi na Espagne koleka na Allemagne mpe na Angleterre.” Mikanda mingi milobeli masoló ya Biblia, mikanda ya nzembo, mikanda mikolimbola maloba, masoló ya bizaleli malamu mpe mikanda misusu ya lolenge wana mizalaki mikanda ya lokumu mingi na eleko yango.
Bakomeli ya makoki bazalaki kokóma mikanda ya Biblia na lolenge malamu. Esengelaki mbula mobimba mpo ete bakomeli 20 bakoka kobimisa mokanda bobele moko ya kitoko koleka; atako bongo, na ekeke ya zomi na mitano, ba Biblia mingi na Latin mpe ebele na mikanda oyo mizalaki kolimbola Biblia mipalanganaki na Espagne.
Lisusu, na ntango Espagnol ebandaki kolobama na bisika mingi, bato basepelaki kozwa Biblia na lokóta yango. Uta ekeke ya zomi na mibale, Biblia ebongolamaki na lokóta ya Loma, oyo ezalaki kolobama na bato oyo bayekoli mingi te, yango nde ebimisaki monoko Espagnol.
Bokɛngɛli ya ntango mokuse
Kasi bokɛngɛli ezalaki ya ntango mokuse. Na ntango ba Vaudois, ba Lollards mpe ba Hussites basalelaki Makomami mpo na kolóngisa bindimeli na bango, bamonisaki mayoki na bango nokinoki mpe na mobulu. Bakonzi ya katolike baboyaki botangi ya Biblia mpe bapekisaki mabongoli ya sika ya Biblia na nkóta oyo elobamaki na bato mingi.
Likita ya Toulouse lisalemaki na 1229, liyebisaki ete: “Epekisami na balaike ete bazala na mikanda ya Kondimana ya Kala mpe Kondimana ya Sika; longola bobele mokanda ya Nzembo, mokanda ya mabondeli (Bréviaire) . . . ; epekisami mpenza kozala na mikanda oyo mibongolami na lokóta oyo elobami na bato nyonso.” Mbula minei na nsima, Jacques 1er d’Aragon (oyo ayangelaki etando monene ya esanga) apesaki bobele mikolo mwambe epai na baoyo nyonso bazalaki na Biblia na lokóta oyo lolobamaki na bato mingi ete bamema yango epai na episkopo ya mboka wana, oyo asengelaki kotumba yango. Mokonzi nyonso ya lingomba to Laike oyo azalaki na Biblia nde asalaki bongo te, atalelamaki lokola moto azali pene na kopɛngwa.
Atako bipekiseli wana, oyo bitósamaki mpenza ntango nyonso te, na nsuka ya Moyen Age, bato ya Espagne basepelaki wana bazwaki Biblia na lokóta ya Loma. Kasi Esambiselo oyo esalemaki na 1478, na bakonzi ya katolike ya Espagne na nsé na boyangeli ya mokonzi mwasi Isabelle mpe mokonzi Ferdinand, esukisaki likambo yango pwasa. Na 1492, bobele na engumba ya Salamanque, baekzemplere 20 ya makomi ya Biblia ya ntina mingi etumbamaki. Baekzamplete ekomamaki na lokota ya Loma oyo etumbamaki te, longola bobele oyo ezalaki na bibliotɛkɛ ya mokonzi to mpe na oyo ya mwa bato minene oyo bakoki kokanisela bango mabe te.
Na boumeli ya bikeke mibale bilandaki, longola Vulgate, libongoli ya Latin, Biblia moko ya katolike oyo ebimisamaki polele na Espagne, ezalaki bobele Biblia Polyglotta Compluti, libongoli ya liboso ya Biblia ebimisami na nkóto mingi, ekomamaki na lisalisi ya cardinal Cisneros. Yango ezalaki mpenza mosala na mayele oyo ekomamaki te mpo na bato mpamba. Bobele baekzamplere 600 nde ebimisamaki, mpe bobele bato moke nde bakokaki kokanga ntina na yango, mpamba te ezalaki na makomi ya Biblia na Liebele, na Araméen, na Greke mpe na Latin, kasi ezalaki na Espagnol te. Lisusu, ntalo na yango ezalaki makasi. Etɛkamaki na ducats misato ya wolo (mosolo mokokani na lifuti ya sanza motoba mpo na mosali moko).
Biblia na Espagnol ebómbami
Na ebandeli ya ekeke ya zomi na motoba, moto moko akokani na “Tyndale” azalaki na Espagne, nkombo na ye Francisco de Enzinas. Lokola azalaki mwana ya mozwi moko oyo azalaki na bandako mingi na Espagne, abandaki kobongola Makomami na Greke ya boklisto na lokóta Espagnol, nzokande azalaki bobele elenge moyekoli. Na nsima, abimisaki libongoli na ye na binyateli ya mboka Pays-Bas mpe, na 1544, amekaki na molende nyonso ete azwa lotómo epai na mokonzi mpo na kopalanganisa yango na Espagne. Lokola Charles 1er, mokonzi ya Espagne azalaki ntango wana na engumba Bruxelles, Enzinas asalelaki libaku yango mpo na kosɛnga ye ndingisa na likambo yango.
Bongo, bayebisaki lisoló ya ntina oyo lisalemaki kati na mibali wana mibale na libaku yango: Mokonzi atunaki ete: “Ezali mokanda nini?” Enzinas ayanoli ete: “Ezali ndambo ya Makomami Mosantu oyo ebéngami ete Kondimana ya Sika.” Atunaki ete: “Nani mokomi na yango?” Mpe Enzinas ayanolaki ete: “Elimo santu.”
Mokonzi andimaki ete mokanda yango mobimisama, kasi esengelaki naino ete sángó moko ya Espagne, oyo mokonzi azalaki kotúbela epai na ye, andima yango. Mawa mpenza mpo na Enzinas, andimamaki te, mpe nokinoki, atyamaki na bolɔkɔ mpo na Ankete oyo esalemaki na bakonzi ya katolike. Alóngaki kokima nsima na mbula mibale.
Nsima ya mwa bambula, ebimeli mosusu ya libongoli wana enyatamaki na Italia, na engumba Venise, mpe ezali ebimeli wana ya Makomami nde Julián Hernández akɔtisaki na nkuku na engumba Séville. Kasi akangamaki, mpe nsima ya mbula mibale ya monyoko mpe bolɔkɔ, abomamaki elongo na bayekoli mosusu ya Biblia.a
Na likita ya Trente (1545-1563), Lingomba ya katolike bazongelaki lisusu kokweisa mabongoli ya Biblia na nkóta oyo elobami na bato mingi. Babimisaki index ya mikanda oyo mipekisamaki, kati na yango ezalaki na mabongoli nyonso ya Biblia oyo mabimisamaki kozanga ete Lingomba katolike bapesa ndingisa. Na ndenge emonani, yango elimbolaki ete Biblia nyonso na lokóta Espagnol epekisamaki mpe kozala na moko na yango, ekokaki komema etumbu ya liwa.
Cipriano de Valera, ye mpe azaláká sángó ya kala, oyo alóngaki kokima etumbu epesami na Esambiselo ya bakonzi ya katolike na engumba Séville, asalaki ebimeli mosusu ya libongoli ya Reina mwa bambula nsima na kobima na yango. Libongoli wana linyatamaki na engumba Amsterdam na 1602, mpe mwa baekzamplere na yango ekɔtisamaki na Espagne. Kati na mabongoli na yango ya ebandeli mpe oyo na ebimisamaki lisusu, Biblia ya Reina-Valera ezali naino lelo libongoli oyo lisalelami mingi na baprotestá oyo balobaka lokóta Espagnol.
Maninisa mafungwami
Na nsuka, na 1782, tribinale ya Esambiselo mpo ya bakonzi ya katolike ezwaki ekateli ete Biblia ekoka kobimisama, kasi esengelaki kolobela masoló mpe mateya ya lingomba. Na 1790, Felipe Scio de San Miguel, episkopo wa engumba Ségovie asalelaki Vulgate (na Latin) mpo na kobongola Biblia na lokóta Espagnol. Likambo ya mawa mpenza, yango etɛkamaki na ntalo mingi, 1 300 réaux, ntalo oyo elekaki mpenza na eleko wana, mpe lolenge oyo yango ekomamaki ezalaki mpenza polele te, na boye ete moto moko ya Espagne, mokomi na makambo na kala alobaki mpo na yango ete “ezalaki malamu te.”
Mwa bambula na nsima, Ferdinand VII, mokonzi ya Espagne apesaki etinda epai na Félix Torres Amat, episkopo wa engumba Astorga ete asala libongoli malamu longwa na Vulgate. Libongoli yango libimaki na 1823 mpe lipalanganaki mingi koleka oyo ya Scio. Nzokande, lokola esalemaki te longwa na makomi ya Liebele mpe na Greke ya ebandeli, ezwaki mabunga oyo makoutaka na kobongola mokanda longwa na libongoli mosusu.
Atako bokóli wana, Lingomba mpe bakonzi ya mboka bandimisamaki mpenza te ete Makomami masengelaki kotangama na bato oyo bayekoli mingi te. Ntango George Borrow, momonisi ya société moko ekobimisaka Biblia (British and Foreign Bible Society), asɛngaki lotómo ya konyata Biblia na Espagne, na bambula 1830, Mendizabal, oyo azalaki ministre, ayanolaki ye ete: “Monsieur, tozali na mposa ya Biblia te, kasi tozali nde na mposa ya mindoki mpe masasi mpo na koboma batomboki nyee, mpe, na koleka, tozali na mposa ya mosolo mpo na kofuta basodá na biso.” Borrow abandaki kobongola Evanzile ya Luka na lokóta ya bato ya Bohème oyo bafandi na Espagne, mpe na 1837, akɔtaki bolɔkɔ mpo na misala na ye!
Na nsuka, mikakatano wana mikokaki koumela ntango molai te. Na 1944, soko mibu 375 nsima ya libongoli ya Casiodoro de Reina, Lingomba ya katolike na Espagne banyataki libongoli na bango ya liboso ya Makomami Mosantu longwa na nkóto ya ebandeli. Ezalaki libongoli ya Nácar mpe Colunga, bakatolike balimboli na Biblia. Na 1947, libongoli yango lilandamaki na oyo ya Bover mpe Cantera. Kobanda ntango wana, mabongoli ya Biblia na lokóta Espagnol matondi mpenza na mboka yango.
Ezwi elónga
Atako Biblia na lokóta Espagnol ebundaki na boumeli ya bikeke mingi mpo na kobatelama, na nsuka, elongaki. Milende minene misalemaki na babongoli ya mpiko lokola Reina, mizalaki mpamba te. Bato boni kati na baoyo bazali lelo kosomba Biblia bazali kozwa ntango ya kokanisa mpo na eleko oyo epekisamaki ete moto azala na Biblia?
Na mikolo na biso, Biblia ezali mokanda moleki na lokumu mingi na Espagne mpe na mikili oyo mikolobaka lokóta Espagnol, mpe ezali na mabongoli mingi. Kati na mabongoli yango, tozali kokuta Versión Moderna (Libongoli ya sika, 1893), oyo esaleli nkombo ya Nzambe, Jehová na bisika nyonso; ebimeli ya lingomba ya katolike ya Sao Paulo (1964), oyo esaleli nkombo Yavé kati na Makomami ya Liebele; Nueva Biblia Española (Biblia ya sika na Espagnol, 1975), oyo na mawa mpenza, esaleli Jehová te mpe Yavé te; mpe Traducción del Nuevo Mundo (Libongoli ya mokili ya sika, 1967), oyo ebimisami na la Société Watch Towera ezali mpe kosalela Jehová.
Poso na poso, ba Témoins de Jéhovah bakendeke kotala bamilió ya bato oyo balobaka lokota Espagnol mpo na kosalisa bango ete bayeba ntina ya Biblia Mosantu—mokanda oyo tosengeli kokufela yango, mokanda oyo tosengeli kozala na bomoi mpo na yango. Ya solo, lisoló ya etumba oyo esalemi na Biblia na lokóta Espagnol, lizali elembo mosusu emonisi ete “liloba ya Nzambe na biso . . . likoumela seko.”—Yisaya 40:8.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na eleko wana, buku moko te ekokaki kokɔtisama na mikili misusu kozanga ndingisa ya sipesiale, mpe ata nkolo bibliotɛkɛ moko te akokaki kofungola babuku oyo batindeli ye kozanga ndingisa ya Saint-Office (Esambiselo ya bakonzi ya katolike).
[Elilingi na lokasa 10]
Biblia Polyglotta Compluti ebimisamaki lisusu mpe ekoki bongo kotalelama kozanga nkaká (Tala lokasa 8.)
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na ndingisa na bolingo ya Biblioteca Nacional, Madrid