Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/7 nk. 4-7
  • Elikya oyo ezwi elónga likoló na kozanga elikya!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elikya oyo ezwi elónga likoló na kozanga elikya!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Moboko ya elikya
  • Elikya: “ekobukana te mpe ekoningana te”
  • Elikya: “lóngo mpo na milimo na biso”
  • “Bosimba makasi”
  • Batelá elikya na yo ya bokristo makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Sepelá na elikya oyo ekoyokisa yo nsɔni te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Epai wapi okoki kozwa elikya ya solosolo?
    Lamuká!—2004
  • Tyelá Yehova elikya mpe zalá na mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/7 nk. 4-7

Elikya oyo ezwi elónga likoló na kozanga elikya!

LE GRAND ROBERT, diksionere ya maloba na Lifalansé mpe ekopesaka ndimbola ekokani na yango, elimboli kozanga elikya lokola “kobungisa . . . elikya nyonso.” Emonani bongo polele ete mpo na kolónga kozanga elikya, tosengeli kozala na elikya.

Moto na mawa, oyo azali kobika na mpasi, akoki kozanga elikya libela te soki nde azali kolikya kozwa eloko moko. Elikya ekoki nkutu kopesa mpiko mpe makasi epai na baoyo bazali konyokwama na maladi ete bayika mpiko mpo na ezalela na bango. Kasi elikya esengeli kokokana! Yango elimboli nini?

Moboko ya elikya

Tala oyo ekómelaki Sara, mwasi ya Abalayama, tata na mabota. Ekómaki ye pene na kokokisa mibu 90, azalaki bobele ekomba mpe uta kala, azalaki lisusu te na elikya ya kobota mwana. Nzokande, Jéhovah azongelaki elaká oyo apesaki na mobali na ye, Abalayama, oyo azalaki na mibu 99, ete: Abalayama asengelaki mpenza kozala na “libota,” motuki na libula. Abalayama ayebaki ete elaká wana esengelaki kokokana. Kanisa esengo oyo Sara azalaki na yango na ntango likambo ya esengo likokanaki na motindo na likamwisi mpe abotaki Yisaka. (Genese 12:2, 3; 17:1-4, 19; 21:2) Motindo oyo Abalayama atyaki motema epai na Nzambe, ezalaki na lolenge mabe te, lokola ntóma Paulo alimbolaki yango ete: “Mpo na elaká na Nzambe, [Abalayama] akakatanaki te na ntina na kozanga kondima, kasi akómaki na nguya mpo na kondima na ye, mpe apesaki nkembo epai na Nzambe.”​—Baloma 4:20, MN.

Wana akomaki mokanda epai na Bayuda oyo bakómaki baklisto na eleko na ye, Paulo ayebisaki bango bantina mibale ya makasi ya kolikya na elaká na Nzambe ete apesa lobiko na nzela na Yesu. Kotangáká elaká na Nzambe epai na Abalayama mpe ndai oyo Nzambe alapaki mpo na yango, ntóma alobaki ete: “Bato bakolapaka ndai na nkombo ya moto oyo aleki bango, mpe ndai na bango ekosilisa ntembe nyonso, mpo ete yango ezali ndanga endimami na mibeko. Wana Nzambe alingaki mpenza komonisa toli na ye ekobongwana te epai na basangoli na elaká, alapaki ndai, ete, biso oyo tokimaki na ebombanelo, tosili kozwa elendiseli na nguya mpo na kosimba elikya epesameli biso.” (Baebele 6:16-18, MN) Ee, bilaká na Nzambe bizali solo mpe bizali kokokana. Jéhovah azali mozwi-na-nguya-nyonso mpe azali bobele ye moko oyo akoki kopesa ndanga mpo na kokokisama ya maloba na ye.

Elikya: “ekobukana te mpe ekoningana te”

Paulo akomaki ete elikya ya baklisto “ekobukana te mpe ekoningana te.” (Baebele 6:19, MN) Paulo ayebaki moboko ya elikya na ye. Alimboli ete: “[Elikya] ekokɔta kino na kati koleka elamba [ezipi Esika-Eleki-Mosantu].” Yango elimboli nini? Emonani polele ete, Paulo azalaki kolobela tempelo ya kala oyo ezalaki na Yelusaleme. Kati na yango ezalaki na Esika-Eleki-Mosantu, esika oyo ekabwanaki na biteni mosusu ya ndako mpo na elamba. (Exode 26:31, 33; Matai 27:51) Ya solo, tempelo ya Yelusaleme ebebisamaki uta kala. Bongo, Esika-Eleki-Mosantu ekokani na nini lelo oyo?

Na likoló mpenza, esika Nzambe afandi na kiti na ye ya bokonzi! Paulo alimbolaki yango na ntango alobaki ete, nsima na komata na Yesu na likoló, ‘aingeli te na esika mosantu esalemi na mabɔkɔ, elilingi na makambo na solo, kasi kati na likoló mpenza mpo na komonana sikawa liboso na Nzambe na ntina na biso.’ (Baebele 9:24, MN) Na yango, elikya na boklisto, oyo ezali kosalisa biso na kobundisa kozanga elikya, euti na bakonzi ya politike te, na bato te, kasi na ebongiseli ya likoló. Euti na Ye oyo Nzambe asili kopona, Yesu Klisto, oyo apesaki bomoi na ye lokola mbeka ya lisiko mpo na masumu na biso, mpe azali sikawa liboso na Nzambe mpo na kolobela biso. (1 Yoane 2:1, 2) Lisusu, lokola emonisami mbala mingi na masolo ya Mosenzeli, Yesu yango asili mpe koponama na Nzambe mpo na koyangela kati na Bokonzi na ye na likoló, oyo ebandaki uta 1914. Mosika te, Bokonzi yango na likoló ekolongola makambo nyonso mazali kobimisa kozanga elikya epai na bato mingi.

Elikya: “lóngo mpo na milimo na biso”

Mpo na kondimisa baoyo basengelaki kotanga mokanda na ye ete elikya na bango ya kozwa lobiko na nzela na Yesu ezalaki mpenza solo, Paulo asalaki bokokanisi oyo. Alimbolaki ete: “Elikya yango ezali lokola lóngo mpo na milimo na biso.”​—Baebele 6:19, MN.

Basali mibémbo lokola Paulo, bayebaki mpenza lóngo. Lóngo na ntango na kala ekokani mwa moke na oyo ya ntango na biso; esalemaki mingimingi na ebende mpe ezalaki na nsɔngɛ mibale oyo ezalaki lokola mino mpo etye epikama kati na mai. Pene na mobu 58 ya ntango na biso, masuwa oyo Paulo amataki, oyo mazalaki kokende na Loma, mazalaki pene na kokangama. Kasi, masuwa malekaki epai mai mazalaki mpenza mozindo te, bongo basali na masuwa “babwakaki lóngo minei na nsima na masuwa.” Na lisalisi ya lóngo wana, masuwa mapusamaki na mopepe makasi te.​—Misala 27:29, 39, 40, 44.

Na yango, osengeli kosala nini mpo ete elikya na yo ezala makasi lokola lóngo mpo ete olónga mikakatano na ntina na mosolo, na maladi, na kotungisama na makanisi to na “mipepe makasi” nyonso mosusu oyo mikoki koyela yo na bomoi? Libosoliboso, omindimisa ete bilaká ya Biblia bibongi na kotyelama motema. “Botalelaka makambo nyonso mpenza.” (1 Batesaloniki 5:21, MN) Okozwa libaku malamu ya kosala bongo mbala ya nsima, na ntango ba Témoins de Jéhovah bakoya kosolola na yo: yokamela makambo oyo bakoyebisa yo. Soki bazali koya mbala mingi te na esika oyo yo ofandi, kenda na Salle du Royaume oyo ezali pene na mboka na yo. Bakosɛngisa yo te ete osangana elongo na bango, kasi bakosɛnga yo ete boyekola Biblia na ngonga mpe na esika oyo okolinga, kozanga kofuta mbongo.

Boyekoli motindo wana ekopesa yo endimiseli ete Nzambe “akozongisa libonza epai na baoyo bakolukaka ye.” (Baebele 11:6, MN) Osengeli koyeba ete mosika te, Bokonzi na Nzambe, na nsé na litambwisi na Mokonzi Yesu Klisto, ekolongola mabe mpe mikakatano oyo mizali komema bato mingi na kozanga elikya lelo. Na nsé na Bokonzi wana, mabelé makozongisama paradis, mpe Nzambe akopesa bomoi ya seko epai na baoyo balingi ye. (Nzembo 37:29; Emoniseli 21:4) Oyo nde elikya kitoko!

Tangá Biblia na likebi nyonso mpo na koyeba ete elikya wana ezali solo. Mpe tya milende mpo na kozala na boyokani malamu mpe ya makasi elongo na Nzambe, kokómáká bongo moninga na ye, lokola Abalayama. (Yakobo 2:23) Mpo ete Jéhovah azali ‘Ye oyo akoyokaka mabondeli,’ yebisa ye mitungisi na yo. Soki okobɛlɛma epai na ye na motema moko, mabondeli na yo makosalisa yo na kokitisa bozito na yo mpe na kolónga ezaleli na yo ya kozanga elikya. Elimo na Nzambe ekoki ata kobongola ezalela ya makambo oyo mazali kotungisa yo.​—Nzembo 55:22; 65:2; 1 Yoane 5:14, 15.

“Bosimba makasi”

Nsima na kosɛnga na baninga na ye baklisto ete ‘batalelaka makambo nyonso mpenza,’ Paulo abakisi ete: “bosimba makasi yango eleki malamu.” (1 Batesaloniki 5:21) Moko na myango mpo na kosala yango, ezali bongo kotambola elongo na bato oyo bazali mpe kobatela elikya na bango ya boklisto. Salomo, mokonzi na mayele apesaki toli oyo ete: “Ye oyo akotambola na bato na mayele akozala mayele, kasi mawa ekoyela ye oyo akotambolaka na bazoba.” (Masese 13:20, MN) Kotika te ete makanisi mabe to nsoni epekisa yo na koluka baninga malamu. Na ndakisa, ba Témoins de Jéhovah bazalaki liboso na elikya moko te. Kasi boyekoli na bango ya Biblia, bakisa mpe boninga ya esengo oyo bazali na yango elongo na bandimi mosusu, ezali kolendisa boyokani na bango elongo na Jéhovah mpe ezali kopesa bango elikya ya solo, oyo ekokani na lóngo. Yango ezali kopesa nzela na kolónga kozanga elikya? Ezali likambo ya solo mpenza.

Tala ndakisa ya Anne-Marie, oyo azangaki elikya mpo na motindo oyo mobali na ye azalaki konyokola ye. Alimboli ete: “Nalingaki komiboma, kasi nayebi eloko oyo epusaki ngai te ete, nabondela naino Nzambe liboso. Nazali komikundola wana nalobaki ete: ‘Mpo na nini ozali kosalisa ngai te? Natii motema epai na yo uta ntango molai, kasi yango epesi litomba moko te.’ Nasilisaki libondeli na ngai wana ezalaki ngai na makanisi ete bomoi ezalaki na ntina te, mpe nakobungisa eloko moko te soki nakufi. Na ntango wana, babɛtɛlaki ngai ekuke. Naboyaki kofungola na elikya ete, moto oyo azalaki wana akokenda.

“Moto yango alandaki kobɛta ekuke mpe yango ebandaki kotungisa ngai. Napangwisaki mpisoli na ngai mpe nakendaki kotala moto yango, mpo na koyanola ye nokinoki ete akenda mpo ete nakokisa mokano na ngai.” Anne-Marie alandi koloba ete: “Kasi na lisalisi ya Jéhovah, makambo mabongwanaki, mpamba te, na ntango nakendaki kofungola ekuke, namonaki basi mibale. Makanisi na ngai mabulunganaki mpe nasosolaki te makambo nyonso oyo bazalaki koloba na ngai. Kasi bapesaki ngai mokanda oyo molimbolaki ete bomoi ezali na ntina. Ezalaki yango esengelaki na ngai mpo ete nasepela lisusu na bomoi.” Basi oyo bakendaki kotala ye bazwaki bibongiseli ya koyekola Biblia elongo na ye mbala na mbala Anne-Marie ayekolaki kozala moninga na Nzambe. Mpe yango epesaki ye ntina kati na bomoi. Sikawa, azali kosalisa bato mosusu na koyeba kotya motema epai na Nzambe.

Mbala mosusu olingaki ete kozanga elikya ekoka kosila, kozanga koyeba makambo oyo masɛngisami na yango. Kasi soki osilá kobondela ete: “Tika ete bokonzi na yo eya! Tika ete mokano na yo mosalema na nsé lokola na likoló,” boye obondelaki mpo na koya ya Bokonzi na Nzambe, mpe na Yesu Klisto oyo ekolongola makambo nyonso oyo mazali kokɔtisa bato ya mitema sembo kati na ezaleli ya kozanga elikya. (Matai 6:10, MN) Boyekoli na yo moko mpe kozala mbala na mbala elongo na bato oyo bazali na elikya motindo moko, ekosalisa yo na kosimba elikya ya komona eleko oyo Bokonzi na Jéhovah ekotya Paradis awa na mabelé. (1 Timoté 6:12, 19) Yango ezali elikya eleki kitoko oyo Mosenzeli ezali komonisa kati na mokomoko na banimero na yango. Simba elikya yango na motema mobimba mpo na kobundisa ezaleli ya kozanga elikya. Ya solo, elikya “ekookisaka nsoni te.”​—Baloma 5:5, MN.

[Elilingi na lokasa 7]

Boyekoli ya Biblia ezali kopesa biso elikya oyo ezali lokola “lóngo mpo na milimo biso”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto