Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/7 nk. 14-19
  • Bankulutu, bosambisaka makambo na bosembo nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bankulutu, bosambisaka makambo na bosembo nyonso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Klisto: Mosambisi oyo tosengeli kolanda
  • Basambisi na mokili
  • Basambisi oyo bazali ‘kobanga Jéhovah’
  • Babateli na mpate ya ntango nyonso
  • Babateli na mpate mpe basambisi na boboto mpe na motema mawa
  • Ezalela ebongi na ntango ya kosambisa makambo
  • Ntina ya comité ya kosambisa
  • Bankulutu​—Bobatela etonga na Nzambe na motema malamu!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Jéhovah, mosambisi na sembo na mabelé mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Tóbatela kimya mpe bopɛto ya lisangá
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Ndenge ya komonisa bolingo mpe motema mawa ntango ndeko moko asali lisumu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/7 nk. 14-19

Bankulutu, bosambisaka makambo na bosembo nyonso

“Wana ekoyoka bino makambo mazali kati na bandeko na bino, bosengeli kosambisa na bosembo nyonso.”​—DETERONOME 1:16, MN.

1. Mpo na oyo etali kosambisa makambo, banani bapesameli lotomo mpo na yango, mpe yango ezali kosenga nini mpo na bato oyo bazali basambisi?

Jéhovah, Mosambisi aleki monene, apesaki lotomo ya kosambisa epai na Mwana na ye. (Yoane 5:27) Klisto, Mokonzi ya lisangá na boklisto azali kosalela kelasi ya moombo na sembo mpe na mayele oyo etambwisami na Collège central mpo na kopona bankulutu oyo na bantango mosusu basengeli kokokisa mpe mokumba ya basambisi. (Matai 24:45-47; 1 Bakolinti 5:12, 13; Tito 1:5, 9) Basambisi balandi bazali na mokumba ya kolanda malamu ndakisa ya Basambisi na likoló, Jéhovah mpe Yesu Klisto.

Klisto: Mosambisi oyo tosengeli kolanda

2, 3. (a) Esakweli nini na ntina na Masiya emonisi bizaleli ya Mosambisi oyo Yesu azali na yango? (b) Makambo nini ya esakweli yango mazali mpenza na motuya koleka?

2 Na ntina na Klisto mpo na mokumba na ye ya Mosambisi, ekomamaki boye kati na esakweli: “Mpe elimo na Jéhovah ekofanda likoló na ye, elimo na mayele mpe na bososoli, elimo na toli mpe na nguya, elimo na boyebi mpe na botosi kotosa Jéhovah. Akosepela na botosi kotosa Jéhovah. Akosambisa te engebene oyo eyokani na matoi na ye; kasi na boyengebene akosambisa babola mpe na sembo akolobela basokemi kati na mokili.”​—Yisaya 11:2-4.

3 Tala, kati na esakweli oyo, bizaleli bipesi nzela na Klisto ete “asambisa mokili mobimba na bosembo.” (Misala 17:31) Azali kosambisa na boyokani na elimo na Jéhovah, na bwanya, na mayele na toli mpe na boyebi oyo ezali kouta epai na Nzambe. Tala mpe ete azali kosambisa na kobanga Jéhovah. Na bongo, “esambiselo na Klisto” ezali komonisa “esambiselo na Nzambe.” (2 Bakolinti 5:10; Baloma 14:10) Azali kosenzela ete asambisa na lolenge oyo Nzambe azali kosambisa. (Yoane 8:16) Azali kosambisa te bobele na lolenge oyo amoneli moto to mpe kolanda makambo oyo ye ayoki. Azali kosambisa na bosembo mpo na bolamu ya babola mpe ya basokemi. Oyo nde mosambisi malamu! Oyo nde ndakisa kitoko mpo na bato bazangi kokoka oyo bapesameli mokumba ya kosambisa na ntango na biso!

Basambisi na mokili

4. (a) Nini ekozala moko na misala ya ba 144 000 na boumeli ya Boyangeli ya mibu nkoto ya Klisto? (b) Esakweli nini ezali komonisa ete baklisto mosusu bapakolami basengelaki koponama basambisi wana ezali bango naino na mokili?

4 Makomami mazali komonisa ete baklisto bapakolami​—oyo motuya na bango ezali mpenza moke mpe oyo babandaki na bantóma 12—​bakozala basambisi esika moko na Yesu Klisto na boumeli ya Mibu Nkoto. (Luka 22:28-30; 1 Bakolinti 6:2; Emoniseli 20:4) Batikali kati na bapakolami ya Yisraele na elimo awa na mabelé basambisamaki mpe babongisamaki na 1918-1919. (Malaki 3:2-4) Na ntina na kozongisama wana ya Yisraele na elimo, esakweli oyo ekomamaki: “Nakozongisa basambisi na yo lokola na liboso mpe bapesi na toli na yo lokola na ebandeli.” (Yisaya 1:26) Na bongo, lokola asalaki yango “na ebandeli” na Yisraele ya mosuni, Jéhovah apesaki epai na batikali oyo abongisaki basambisi mpe bapesi na toli oyo balingi boyengebene.

5. (a) Mibali nini ‘baponamaki basambisi’ nsima na kobongisama ya Yisraele na elimo, mpe lolenge nini bamonisami kati na mokanda ya Emoniseli? (b) Bakengeli bapakolami bazali kosalisama sikawa na banani kati na mosala ya kosambisa makambo, mpe lolenge nini baoyo bazali kosalisa bango bazali kobongisama mpo na kokoma basambisi malamu mingi?

5 Na ebandeli, ‘mibali na mayele’ oyo ‘baponamaki lokola basambisi,’ bango nyonso bazalaki bankulutu bapakolami na elimo. (1 Bakolinti 6:4, 5) Bakengeli bapakolami, bato na sembo mpe bato bapesameli limemya, bamonisami kati na mokanda ya Emoniseli lokola ete bazwami kati na loboko mobali na Yesu, na elobeli mosusu bazali na nse na bokonzi na ye mpe na nse na litambwisi na ye. (Emoniseli 1:16, 20; 2:1) Kobanda 1935, Bapakolami bazali kozwa lisungi na sembo ya “ebele monene” baoyo bazali kobakisama ntango nyonso, oyo bazali na elikya ya kobika na “bolozi monene” mpe kofanda libela na mabelé oyo ekobongwana paradis. (Emoniseli 7:9, 10, 14-17) Lokola “libala ya Mwana na mpate” ebelemi, bato mingi bazwami kati na ebele monene baponami na Collège central, oyo esalemi na bapakolami, mpo na kozala bankulutu mpe basambisi kati na masangá koleka 66 000 ya ba Témoins de Jéhovah kati na mokili mobimba.a (Emoniseli 19:7-9) Na lisalisi ya biteyelo ya sipesiale, bazali kobongisama mpo na kokokisa mikumba kati na lisangá ya “mokili ya sika.” (2 Petelo 3:13) Eteyelo ya mosala ya Bokonzi oyo esalamaki na nsuka ya mobu 1991 kati na mikili mingi, elobelaki mingi lolenge malamu ya kosambisa makambo. Bankulutu oyo bazali kokokisa mokumba ya basambisi basengeli komekola Jéhovah mpe Yesu Klisto, baoyo kosambisa na bango ezali solo mpe sembo.​—Yoane 5:30; 8:16; Emoniseli 19:1, 2.

Basambisi oyo bazali ‘kobanga Jéhovah’

6. Mpo na nini bankulutu oyo bazali kati na comité ya kosambisa basengeli ‘kobanga Jéhovah’?

6 Soki Klisto ye moko azali kosambisa na kobanga Jéhovah mpe na lisalisi ya elimo na Ye, esengeli ete bankulutu oyo bazangi kokoka basala motindo wana koleka! Ntango baponami mpo na kozala kati na comité ya kosambisa, esengeli na bango ‘kobanga Jéhovah’ mpe kobelela “Tata oyo akosambisaka na koponapona bato te” mpo ete asalisa bango na kosambisa na bosembo. (1 Petelo 1:17) “Lokola bato oyo bakozongisa monoko na ntina na makambo na bango,” basengeli komikundola ete bomoi na bato ‘milimo’ na bango etalelami kati na yango. (Baebele 13:17) Na ntina yango, ntembe ezali te ete bakozongisa monoko epai na Jéhovah mpo na libunga nyonso ya lisambisi oyo bakokaki kopengola yango. Kati na ndimbola na ye na ntina na Baebele 13:17, J. Ebrard akomaki ete: “Mokumba ya mobateli na mpate ezali ya kosenzela likoló na milimo oyo mipesamelaki ye, mpe . . . asengeli kozongisa monoko na ntina na yango nyonso, mpe na ntina na oyo ebungi mpo na ye. Ezali wana makambo ya solo. Tika ete ministre nyonso ya liloba atalela ete andimaki kokokisa mokumba wana ya ntina mingi na bolingo na ye moko!”​—Tala Yoane 17:12; Yakobo 3:1.

7. (a) Basambisi ya ntango na biso basengeli komikundola likambo nini, mpe mokano na bango esengeli kozala nini? (b) Mateya nini bankulutu basengeli kozwa na Matai 18:18-20?

7 Bankulutu oyo bazali kokokisa mokumba ya basambisi basengeli komikundola ete Basambisi ya solo ya likambo nyonso, ezali Jéhovah mpe Yesu Klisto. Tomikundola oyo elobamaki na basambisi ya Yisraele: “Bokosambisa mpo na moto te nde mpo na Jéhovah. Ye azali na bino elongo mpo na kokata makambo. Bongo tika ete botosi na kotosa Jéhovah ezala na bino! . . . Bokosala bongo mpo ete bokweisama te.” (2 Ntango 19:6-10) Bankulutu oyo bazali kosambisa likambo basengeli na limemya mozindo, kosala nyonso ekoki na bango mpo na komindimisa ete Jéhovah azali mpenza ‘elongo na bango mpo na oyo etali lisambisi.’ Ekateli na bango esengeli komonisa na bosembo nyonso lolenge oyo Jéhovah mpe Klisto bazali kotalela likambo yango. Lokola emonisi yango Liloba na Nzambe lipemami, oyo ‘ezali bango kokanga’ (oyo bakweisi) to oyo ‘ezali bango kofungola’ (oyo balongisi) awa na mabelé na elobeli ya elilingi esengeli kozala oyo esilaki kokangama to kofungolama na likoló. Soki babondeli Jéhovah na nkombo na Yesu, Yesu akozala “katikati na bango” mpo na kosalisa bango. (Matai 18:18-20, Traduction du monde nouveau, éd. angl., note; La Tour de Garde, 15 février 1988, lokasa 9) Elimo oyo esengeli kozala na esika bazali kosambisa likambo esengeli komonisa ete Klisto azali mpenza katikati na baklisto wana.

Babateli na mpate ya ntango nyonso

8. Na kotalela ndakisa na Jéhovah mpe na Yesu Klisto, mokumba ya liboso ya babateli na mpate epai na etonga ezali nini? (Yisaya 40:10, 11; Yoane 10:11, 27-29)

8 Bankulutu bakosambisaka ntango nyonso te. Nzokande, bazali babateli na mpate ya ntango nyonso. Bazali wana mpo na kobikisa, kasi mpo na kopesa bitumbu te. (Yakobo 5:13-16) Likanisi ya moboko oyo ebimi na liloba na greke oyo ebongolami na mokengeli (e-pi’sko.pos) ezali oyo ya likebi lityami kati na mokano ya kobatela. Ekomami boye kati na diksionere moko ya makambo ya théologie (Theological Dictionary of the New Testament): “Kobakisamaka na mokengeli na mpate [na 1 Petelo 2:25]; liloba (e-pi’sko.pos) elobeli mosala ya kokengela bampate oyo etali bongo kosenzela likoló na yango, to kobatela yango.” Na bongo, mokumba ya liboso ya mokengeli na mpate ezali ya kosenzela likoló na bampate mpe kobatela bango, kosala ete batikala kati na etonga.

9, 10. (a) Ndenge nini Paulo abendaki likebi mingi likoló na mokumba ya liboso ya bankulutu, mpe na bongo motuna nini mobongi kotunama? (b) Maloba na Paulo oyo mayebisami kati na Misala 20:29 masengi lisusu nini, mpe ndenge nini bankulutu bakoki komeka kokitisa motuya ya makambo ya kosambisa?

9 Kolobaka na bankulutu ya lisangá na Efese, ntóma Paulo atyaki likebi mingi likoló na likambo ya ntina: “Bokeba na ntina na bino mpenza mpe na ntina na etonga mobimba oyo elimo santu esili kotya bino bakengeli na yango; bozala babateli ya lisangá na Nzambe oyo asombi na makila ya Mwana na ye mpenza.” (Misala 20:28) Paulo amonisaki motuya ya kobatela etonga, kasi ya kopesa yango bitumbu te. Ekozala litomba mpo na bankulutu mosusu ete bakanisa na ntina na motuna molandi: ‘Tokoki kopengola ntango mingi oyo esengeli kolekisa yango mpo na kosala ba ankete mpe kosambisa makambo soki nde tozali kolekisa ntango mingi mpe milende mingi na mosala ya kotala bampate?’

10 Ezali solo ete, Paulo ayebisaki koya na “bankoi na yauli.” Kasi apamelaki bango ete ‘bakonyokola etonga.’ (Misala 20:29, MN) Mpe, wana elingaki ye koloba ete bakengeli na sembo basengeli kobengana “bankoi” yango, amonisaki na maloba na ye ete bankulutu basengeli kosalela basangani mosusu ya etonga “na bolingo.” Ntango mpate moko alembi na elimo mpe atiki nzela ya lobiko, eloko nini azali na yango mposa: kobetama to kobikisama; kopesamela etumbu to kosungama? (Yakobo 5:14, 15) Na ntina yango, bankulutu basengeli mbala na mbala kobomba ntango mpo na kotala bampate. Mbala mosusu Litomba malamu ekozala ete ntango ekoleka lisusu mingi te na ba comités ya kosambisa makambo oyo mataleli baklisto oyo bakwei kati na lisumu. Ya solo, bankulutu basengeli komibanzabanza liboso ete bazala liziba ya kobondisa mpe ya elendiseli, mpe ya kokolisa kimya kati na basaleli ya Jéhovah na motindo boye ete koimaima to nungunungu ezala te.—Yisaya 32:1, 2.

Babateli na mpate mpe basambisi na boboto mpe na motema mawa

11. Mpo na nini bankulutu oyo bafandi kati na comité ya kosambisa basengeli kozala na koponapona te kasi kozala nde na “mayele na likoló”?

11 Ekoki kozala ete mosala ya kotala bampate oyo ekokisami malamu liboso ete moklisto moko abeta libaku ekokitisa motuya ya makambo ya kosambisa kati na basaleli na Jéhovah. (Tala Bagalatia 6:1.) Nzokande, mpo na lisumu mpe kozanga kokoka oyo ekangami na nzoto ya moto, ekoki kozala ete bakengeli baklisto bakosengela mbala mosusu kosambisa likambo litali lisumu moko. Mitinda nini misengeli kotambwisa bango? Yango ebongwani te uta eleko na Moize to oyo na baklisto ya yambo. Maloba oyo Moize ayebisaki na basambisi ya Yisraele mazali ntango nyonso na motuya: “Wana ekoyoka bino makambo mazali kati na bandeko na bino, bosengeli kosambisa na bosembo. . . . Bosengeli koponapona te wana ezali bino kosambisa makambo.” (Deteronome 1:16, 17, MN) Kozanga koponapona ezali elembo, ya “mayele na likoló,” mayele oyo mazali na ntina mingi mpo na bankulutu oyo basali comité mpo na kosambisa likambo. (Yakobo 3:17; Masese 24:23) Mayele yango ekopesa bango nzela na kososola likeseni oyo lizali kati na bolembu mpe mabe.

12. Na ndimbola nini basambisi basengeli kozala bato oyo bazali bobele na bosembo te, kasi lisusu bato malamu?

12 Bankulutu ‘basengeli kosambisa na bosembo,’ na boyokani na mibeko mizali komonisa nini ezali malamu mpe nini ezali mabe na miso na Jéhovah. (Nzembo 19:9) Kasi, wana ezali bango kosala milende mpo na kozala bato na bosembo, basengeli mpe komeka kozala bato malamu, na lolenge oyo Paulo akesenisi yango kati na Baloma 5:7, 8. Kolimbolaka ba versets yango kati na lisolo na yango likoló na “Boyengebene,” mokanda Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible elobi ete: “Liloba na Greke oyo lisalelami elimboli ete ye oyo amonani polele, oyo amikesenisi, na boboto na ye azali moto malamu (azali pene na kosala malamu epai na mozalani) mpe mokabi (oyo azali komonisa malamu na ye na misala). Azali bobele komibanzabanza te na kosala oyo boyengebene to bosembo etindi ye na kosala; azali kosala na koleka wana, kopusamaka na bolingo oyo azali na yango mpo na basusu mpe na mposa na ye ya kosalisa bango mpe kosalela bango malamu.” (Lokasa 876) Bankulutu oyo bazali bobele bayengebene te, kasi lisusu bato malamu, bazali kosalela na boboto bato oyo bazali kobuka mibeko na kozalaka na bolingo mpo na bango. (Baloma 2:4) Basengeli kozala na mposa ya kozala na motema mawa. Ata soki mosumuki amonisi liboso ete azali kondima milende na bango te, bankulutu basengeli kosala nyonso oyo esengeli na bango mpo na kosalisa ye na koyeba ete esengeli na ye kobongola motema.

Ezalela ebongi na ntango ya kosambisa makambo

13. (a) Atako bankulutu bakosambisaka makambo na bantango mosusu, nzokande bazali ntango nyonso banani? (b) Toli nini ya Paulo ezali na ntina ata mpo na ba comités ya kosambisa mpe ezalela na bango esengeli kozala nini liboso ya mosumuki?

13 Ntango likambo moko lisengi ete lisambisama, bakengeli basengeli kobosana te ete bazali ntango nyonso babateli na mpate mpe ete bazali nde kosambisa bampate na Jéhovah, na nse na bokonzi ya “mobateli na mpate aleki malamu.” (Yoane 10:11) Toli oyo Paulo apesaki na ntina na lisalisi oyo lisengeli kopesama na bampate oyo bazali na mikakatano ezali mpe na motuya na ntango ya bosambisi kati na comité. Akomaki ete: “Bandeko, soko moto azwami na likambo, bino bato bozali na makoki na elimo, bosembola ye na elimo na bopolo. Omibatela yo moko ete yo mpe omekama te! Bokumbanaka mikumba na mawa, boye bokokokisa mobeko na Klisto.” Bagalatia 6:1, 2.b

14. Lolenge nini bakengeli basengeli kotalela comité ya kosambisa makambo, mpe ezalela na bango liboso na mosumuki esengeli kozala motindo nini?

14 Na esika ya komitalela lokola bakonzi to lokola basambisi oyo bayangani mpo na kopesa etumbu, bankulutu oyo bazwami kati na comité ya kosambisa basengeli nde kotalela comité lokola motindo mosusu ya mosala na bango ya babateli na mpate. Moko na bampate na Jéhovah azali na mikakatano. Basengeli kosala nini mpo na kobikisa ye? Ntango esili koleka mpo na kosalisa mpate yango oyo amitangoli na etonga? Tokanisi ete te. Bankulutu basengeli ntango nyonso kozala na makanisi ya kolikya malamu mpe komimonisa bato na motema mawa ntango yango esengeli. Elimboli te ete basengeli kobuka mitinda na Jéhovah soki lisumu monene lisalemi. Kasi basengeli komona ezalela nyonso oyo ekoki kokitisa bonene ya likambo, oyo esengeli kosalisa bango, soki likoki ezali; ete bamonisa motema mawa. (Nzembo 103:8-10; 130:3) Nzokande basumuki mosusu bazali mpenza na motó makasi, mpe mpo na yango bankulutu basengeli kobatela ngwi mibeko ya Biblia, atako bakozala na maloba makasi te epai na mosumuki.​—1 Bakolinti 5:13.

Ntina ya comité ya kosambisa

15. Ntango likambo moko monene libimi kati na baklisto, eloko nini esengeli koluka koyeba liboso?

15 Ntango likambo moko monene libimi kati na baklisto, bankulutu ya mayele balukaka liboso koyeba soki bato oyo batalelami na likambo yango bamekaki kobongisa likambo yango bango moko na elimo ya Matai 5:23, 24 to ya Matai 18:15. Soki mwango wana elongi te, ekokoka mbala mosusu ete nkulutu moko to bankulutu mibale bapesa bango toli. Comité ya kosambisa ezali na ntina bobele na ntango lisumu moko monene lisalami, oyo likoki komema kino kobimisama na lisangá. (Matai 18:17; 1 Bakolinti 5:11) Esengeli mpenza ntina moko monene euti na Biblia mpo na kosala comité ya kosambisa. (Tala Mosenzeli ya 15 septembre 1989, lokasa 18.) Ntango bozali kosala comité, bosengeli kopona bankulutu oyo bakozala na makoki mpenza mpo na kotalela likambo yango.

16. Mokano ya bankulutu kati na comité ya kosambisa ezali nini?

16 Mosala ya bankulutu ezali nini na ntango ya comité ya kosambisa? Ya liboso, ezali mpasi mpo na kosambisa na bosembo soki solo eyebani te. Lokola na Yisraele, na ntango ya makambo minene, bosengeli ‘koluka malamumalamu.’ (Deteronome 13:14; 17:4) Moko na bantina ya comité ezali mpenza ya koluka koyeba bilembeteli nyonso oyo bitali likambo yango. Kasi yango ekoki mpe esengeli kosalema na bolingo. (1 Bakolinti 13:4, 6, 7) Soki bilembeteli nyonso biyebani, bankulutu bakosala nyonso oyo esengeli na bango mpo na kobatela lisangá mpe kosala ete mitinda mitombwani ya Jéhovah mibatelama kati na yango, na kosenzelaka ete elimo santu elanda ntango nyonso kosala mosala kozanga epekiseli. (1 Bakolinti 5:7, 8) Atako bongo, moko na bantina ya comité ezali ya kobikisa mosumuki oyo azali na likama, soki likoki lizali.​—Tala Luka 15:8-10.

17. (a) Ndenge nini mofundami esengeli kotalelama na ntango ya kosamba liboso ya comité, mpe kati na mokano nini? (b) Yango ezali kosenga nini epai na basangani ya comité ya kosambisa?

17 Mofundami asengeli kotalelama lolenge mosusu te bobele lokola mpate na Nzambe. Bosengeli komonisa bolingo epai na ye. Soki asalaki lisumu moko to masumu mingi, mokano ya basambisi balingi bosembo ekozala ya kosalisa ye na komipamela ye moko, na kososola ete abungaki na nzela na ye, na kobongola motema, mpe na bongo kolongwa “na motambo ya Diable.” Esengeli, na mayele ya “koteya malamu,” ‘kolakisa na bopolo.’ (2 Timote 2:24-26; 4:2) Na bongo nini ekolanda na nsima soki mosumuki andimi libunga na ye, soki mpenza ayoki mpasi kati na motema na ye mpe asengi epai na Jéhovah ete alimbisa ye? (Tala Misala 2:37.) Soki comité bandimisami ete azali solo na mposa ya lisalisi, ntina ya kobimisa ye na lisangá ekozala te.—Tala Mosenzeli ya le 1er avril 1984, lokasa 22, paragrafe 4.

18. (a) Na makambo nini comité ya kosambisa esengeli kobatela makasi mibeko ya Biblia kino kobimisa mosumuki na lisangá? (b) Likambo nini limonisi ntina mpo na bankulutu na koboma nzoto mpo na mpate moko oyo apengwi?

18 Nzokande, ntango basangani ya comité moko ya kosambisa bazali kotalela likambo ya ndeko moko oyo azali mopengwi azangi kobongola motema, ndeko moko oyo azali motomboki na nkó kotemela mibeko na Jéhovah to azali na motema mabe, mokumba na bango ezali ya kobatela basangani mosusu ya lisangá na kobimisaka mosumuki oyo azangi kobongola motema. Soki emonani polele ete mosumuki azali na mawa te oyo ebongi na bizaleli ya kobanga Nzambe, ntina ezali te ete comité ya kosambisa eluka kokutana na ye mbala na mbala to kobondela ye ete aloba, komekaka kopusa ye ete abongola motema.c Bambula oyo, emonani ete kati na mokili mobimba kobimisama na lisangá esili kozwa 1 % ya basakoli. Yango elimboli ete kati na bampate nkama oyo batikali kati na lopango, moko asili kobunga​—ata mpo na ntango moke. Soki tokanisi mpo na ntango mpe milende oyo misengeli mpo na komema moto kati na lopango, ezali mawa mingi na komona ete, mbula na mbula, ebele kati na bango ‘bapesami lisusu na Satana.’​—1 Bakolinti 5:5.

19. Likambo nini bankulutu oyo bazali kati na comité ya kosambisa basengeli kobosana yango te, mpe mokano na bango esengeli bongo kozala nini?

19 Ntango babandi kotalela likambo moko kati na comité, bankulutu basengeli komikundola ete masumu mingi masalami kati na lisangá ezalaka mpo na bolembu, kasi ezalaka te mpo na motema mabe. Basengeli mpenza te kobosana lisese ya mpate abungi, oyo Yesu apesaki. Ezali kosuka na maloba oyo: “Nalobi na bino ete, bongo esengo ekozala kati na likoló mpo na moto moko na masumu oyo akobongola motema, ekoleka esengo mpo na bayengebene ntuku libwa na libwa baoyo bazali na mposa na kobongola motema te.” (Luka 15:7) Ya solo Jéhovah . . . alingi te ete moto moko abomama, kasi [alingi] ete bato nyonso bakoma na kobongwana na motema.” (2 Petelo 3:9) Tika ete na lisalisi ya Jéhovah, ba comités ya kosambisa na mokili mobimba basala nyonso oyo ekoki na bango mpo na kosepelisa likoló na kobendaka basumuki na koyeba ete esengeli na bango kobongola motema mpo na kozongela kotambola na mpiko nyonso kati na nzela moke oyo ezali komema na bomoi ya seko!​—Matai 7:13, 14.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na oyo etali esika ya bankulutu bazwami kati na bampate mosusu mpo na kotyama na loboko mobali ya Klisto, tala mokanda Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi! oyo ebimisamaki na la Société Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., lokasa 136, note.

b Tala Mosenzeli ya 15 septembre 1989, lokasa 19.

c Tala Mosenzeli ya 1er septembre 1981, lokasa 14, paragrafe 24.

Bozongeli

◻ Na kolandaka ndakisa ya Mobateli Aleki-Monene mpe ya Mobateli na mpate Aleki-Malamu, nini esengeli kozala lobanzo ya liboso ya bankulutu?

◻ Na lolenge nini bankulutu bakoki kosala nyonso mpo na kokitisa motuya ya makambo makoki kosambisama na comité?

◻ Na ndimbola nini basambisi basengeli kozala, bobele bato na bosembo te, kasi lisusu bato malamu?

◻ Lolenge nini tosengeli kosalela mosumuki na ntango ya kosamba liboso ya comité, mpe kati na mokano nini?

◻ Mpo na nini kobimisama na lisangá ezali mwango ya nsuka?

[Elilingi na lokasa 16]

Ntango mosala ya kobatela bampate ekokisami malamu, tokoki kopengola makambo mingi oyo masengeli kosambisama na comité

[Elilingi na lokasa 18]

Ata na ntango ya kosambisa likumbu, bankulutu basengeli komeka kosembola mosumuki na elimo yo bopolo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto