Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/7 nk. 19-22
  • Okoki kozwa libɔndisi na ntango ya mpasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kozwa libɔndisi na ntango ya mpasi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntomá oyo azwaki mpasi, abɔndisami
  • Lolenge oyo tosengeli kotalela mikumba oyo Nzambe azali kopesa biso
  • Libɔndisi na ntango mpasi euti na mayoki ya mawa
  • Totalela libondeli na bopotu te
  • Na mpasi euti na ntembe?
  • Tomikundola ete Jéhovah akopesaka libɔndisi
  • Kotika te!
  • Tótya motema epai na Yehova, “Nzambe ya kobɔndisama nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Yehova azali ‘Ekimelo na biso na ntango ya mpasi’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • ‘Tóbɔndisa baoyo bazali kolela’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Yehova abɔndisaka biso na bolɔzi na biso nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/7 nk. 19-22

Okoki kozwa libɔndisi na ntango ya mpasi

LOLENGE nini tosengeli kotalela mpasi? Soki tosili komipesa epai na Jéhovah, tosengeli kokanisa ete, na ntina na elikya na biso kitoko mpe na bozwi na biso ya elimo tokoki te kozala na mayoki wana? Soki tozali na mayoki motindo oyo, yango elimboli ete tozangi makoki ya elimo mpo na kosalela Nzambe?

Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Eliya azalaki moto na mayoki motindo moko na biso.” (Yakobo 5:17, MN) Atako Nzambe asalelaki Eliya na motindo na kokamwa, kasi mosakoli wana ya sembo aokaki mpe mpasi. Na libaku moko, Eliya angángaki ete: “Ekoki! Sikawa, ɛ Jéhovah, longola molimo na ngai, mpamba te naleki batata na ngai na malamu te.” (1 Mikonzi 19:4) Yobo, moto na sembo; Hanna, mwasi na sembo, mpe basaleli mosusu na sembo na Jéhovah, bazwaki mpasi. Ata Davidi, mokomi na Nzembo oyo azalaki kobanga Nzambe, abondelaki ete: “Mpasi ya motema na ngai ekómi mingi; bimisa ngai longwa na mikakatano oyo nazali kati na yango.”​—Nzembo 25:17, MN.

Bato oyo Jéhovah azali kosalela kati na mosala na ye, babatelami te longwa na mitungisi nyonso. Bazali na bolɛmbu mpe na mayoki oyo ezali mpo na bato nyonso, mpe bakoki kozwa mpasi kati na mimekamo. (Misala 14:15) Nzokande, basaleli na Nzambe bazali na lisungi malamu koleka bato nyonso mosusu mpo na kolónga mikakatano. Totalela mwa bandakisa ya Biblia mpo na komona eloko oyo esalisaki bato mosusu na kolónga minyoko oyo bazalaki na yango kati na makanisi mpe bampasi na bango.

Ntomá oyo azwaki mpasi, abɔndisami

Ntomá Paulo ayebaki ndimbola ya konyokwama na makanisi. Alobaki ete: “Na yango, ekómaki biso na Makedonia, nzoto na biso ezwaki epemelo te​—etumba ezalaki na libandá mpe nsɔmɔ ezalaki na kati. Kasi Nzambe oyo akobɔndisaka baoyo bakweisami, abɔndisaki biso na koya ya Tito.” (2 Bakolinti 7:5, 6, MN) Paulo anyokwamaki na makanisi mpo na ebele na makambo na mpasi oyo mazalaki kobima na mbala moko. ‘Etumba ezalaki na libandá’​—minyoko makasi mityaki bomoi na ye na likámá. (Tala 2 Bakolinti 1:8.) Epai mosusu, “nsɔmɔ ezalaki na kati,” elimboli mitungisi na ntina na masangá, lokola oyo ya Kolinti.

Nokinoki nsima na mwa basanza, Paulo akomaki mokanda na ye ya liboso epai na baklisto ya Kolinti. Kati na yango, akweisaki mpenza ebele ya makambo mabe mazalaki kati na lisangá mpe, emonani ete azalaki komitungisa na lolenge oyo Bakolinti bakoyamba mokanda na ye. Atako bongo, Paulo abɔndisamaki wana Tito autaki Kolinti mpe ayebisaki ye makambo kitoko mpo na ezalela na makambo oyo emonisamaki na Bakolinti. Bobele bongo, Jéhovah akoki kosalela moko na basaleli na ye ya ntango oyo mpo na koyebisa biso nsango malamu mpe kobɔndisa mpasi na biso.

Lolenge oyo tosengeli kotalela mikumba oyo Nzambe azali kopesa biso

Baklisto mosusu bazali na mwa mpasi mpo na mosala na bango. Na yango, basaleli mosusu na Jéhovah bakanisaki ete mikumba oyo Nzambe azalaki kopesa bango, mizalaki mpasi mingi mpo na bango. Na ndakisa, Moize amiyokaki ete azali na makoki te mpo na kozala momonisi na Nzambe mpo na Bayisraele na Ezipito. Kati na makambo mosusu, alobaki ete azalaki na makoki ya koloba malamu te. (Exode 3:11; 4:10) Kasi na kotyáká motema epai na Nzambe mpe na lisalisi ya Alona, oyo azalaki molobeli na ye, Moize abandaki kokokisa mokumba na ye.

Na boumeli ya ntango, Moize atalelaki lisusu Alona te. Bobele bongo, basusu bakomonaka ete mosala ya boklisto ezali mpasi na ebandeli, kasi bazali kozwa formation mpe bazali kokóma bapalanganisi ya nsango malamu na makoki. Na ndakisa, ebele na bilenge ba Témoins de Jéhovah basili kokóla mpe basili kokóma basakoli ya ntango nyonso, lokola ba pionniers mpe bamisionere. Ezali likambo na kolendisa mpo na ba ministres baklisto na koyeba ete, bakoki ntango nyonso kotya motema epai na Jéhovah mpo na kozala na makoki mpe kozwa makasi ya kokokisa mikumba oyo ye azali kopesa bango.​—Zakaria 4:6; 2 Bakolinti 2:14-17; Bafilipi 4:13.

Libɔndisi na ntango mpasi euti na mayoki ya mawa

Mbala mosusu tokoki kolɛmba mpamba te tozali na mawa mpo ete tosalaki mingi te kati na mosala na Nzambe. Ndeko mobali moko oyo atikaki kosakola uta bambula mingi, azongelaki kosangana lisusu kati na mosala yango. Nsima ya mwa ntango, azwaki maladi makasi mpe azalaki bobele kolala na mbeto. Ndeko wana alɛmbaki, alobaki ete: “Mwa liboso, wana ezalaki ngai na makoki ya kozala na molende, nazalaki kokima mokumba na ngai. Awa elingi ngai kokóma na molende, nazali na makoki ya kosala yango te.”

Ezali likambo na mayele na kosala mingi sikawa, na esika na kolɛmbisa nguya ya mayoki na biso na ntina na makambo masila koleka, boye te? Yakobo mpe Yuda, bandeko na Yesu bakómaki bandimi bobele nsima na liwa mpe lisekwa na ye. Atako baokaki mawa mingi, kasi yango epekisaki bango te ete bakóma basaleli na Nzambe mpe bakómaki nkutu bakomi na Biblia.

Totalela libondeli na bopotu te

Wana banyokwami na makanisi, basaleli na Nzambe basengeli kobondela na mayoki mingi. Ya solo, Makomami mazali na ebele na mabondeli masalemaki na ntango na mpasi. (1 Samwele 1:4-20; Nzembo 42:8) Basusu bakoki komiloba ete: ‘Nanyokwami mpenza na makanisi na boye ete nakoki te kobondela.’ Soki ezali bongo, mpo na nini te kokanisa Yona? Ezalaki ye kati na libumu ya mbisi, alobaki ete: “Esɛnzwaki molimo na ngai kati na ngai, nakanisaki Jéhovah; libondeli na ngai likómelaki yo kati na tempelo na yo na bulee. . . . Ngai nakokabela yo mbeka na mongóngó na kotɔnda; nakokisa yango esili ngai kolapa ndai. Lobiko ezali epai na Jéhovah.” (Yona 2:4-9) Ee, Yona abondelaki, mpe Nzambe abandisaki ye mpe abikisaki ye.

Na Suède, ndeko mwasi moko azalaki pionnier na boumeli ya bambula mingi, kasi na pwasa, amiyokaki lisusu na makasi te mpe alɛmbaki, atako mosala na ye mozalaki malamu. Alobelaki bolɛmbu na ye kati na libondeli epai na Jéhovah. Nsima na mwa mikolo, ndeko moko azalaki kosala na filiale ya la Société Watch Tower, abyangaki ye na telefone. Atunaki ye soki akokaki kosala na Béthel mokolo moko na poso, mpo na kopesa lisalisi na boumeli na misala ya bokólisi bandako ya biro. Na nsima, ndeko mwasi wana alobaki ete: “Ezalela ya makambo na Béthel mpe komona bokóli ya mosala mpe kosangana na yango, ebakiselaki ngai makasi oyo nazalaki na yango mposa.”

Soki tonyokwami na makanisi, ezali malamu tomikundola ete libondeli ezali moko na myango mpo na kobundisa bolɛmbu. (Bakolose 4:2) Mpo na koyanola na mabondeli na biso, Jéhovah akoki kofungola nzela ete mosala monene kati na mosala na ye, to akopambola mosala na biso ete ebota mbuma mingi. (1 Bakolinti 16:8, 9) Ya solo, “mapamboli na Jéhovah makopesaka bozwi, mpe akobakisa mpasi elongo na yango te.” (Masese 10:22, MN) Yango ekolamwisa mpenza elimo na biso.

Na mpasi euti na ntembe?

Mbala mosusu moko na basaleli na Jéhovah akoki kozala na ntembe. Soki tozali kati na ezalela wana, tosengeli te nokinoki kosukisa ete tondimami lisusu na Nzambe te. Yesu abwakaki ntomá Toma te mpo ete atyaki ntembe na matatoli mapesamaki na baoyo bamonaki lisekwa ya Nkolo na ye. Kasi, Yesu asalisaki Toma na bolingo nyonso ete alongola ntembe na ye. Mpe Toma asepelaki mingi wana asosolaki ete Yesu azalaki na bomoi!​—Yoane 20:24-29.

Na mateya na bango ya lokutá, na koimaima na bango mpe na myango mosusu, “bato mabe” oyo bakɔtaki kati na lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso, babimisaki ntembe makasi epai na baklisto mosusu. Bongo, moyekoli Yuda akomaki ete: “Bozala na motema mawa epai na basusu oyo bazali na ntembe. Bobikisa bango mpe bolongola bango na mɔ́tɔ.” (Yuda 3, 4, 16, 22, 23, MN) Mpo na kolanda kozwa mawa ya Nzambe, baninga na Yuda​—mingi mpenza, bankulutu ya lisangá—​basengelaki kozala na motema mawa epai na baoyo bazali na ntembe mpe babengaki mpo na yango. (Yakobo 2:18) Bomoi na bango ya seko ezalaki na likámá, mpo ete bazalaki liboso na “mɔ́tɔ” ya libebi ya seko. (Tala Matai 18:8, 9; 25:31-33, 41-46.) Oyo nde esengo na ntango baninga oyo bazalaki na ntembe balendisami na elimo mpo na lisalisi oyo lipesameli bango na bobóto!

Soki mimekamo makasi mibimiseli biso ntembe ete Nzambe azali na biso te, tosengeli kozala na maloba ya sikisiki kati na mabondeli na biso. Na mabaku wana, tolendendela mpo na kosɛnga mayele epai na Jéhovah. Akopesaka yango na bokabi mpe kozanga kopamela biso ete tozangi mayele, mpe mpo ete tobondeli mpo na kozwa yango. Tosengeli kolanda “kosɛnga yango na kondima, na kobɛta ntembe te,” mpamba te moto na ntembe “akokani na mbongé na mai monene epusami na mopepe mpe ekotambolatambola” epai na epai. Bato motindo wana bakozwa eloko moko te epai na Nzambe, mpo ete bazangi ekateli, bazali “na mitema mibale” kati na mabondeli na bango mpe na banzela na bango nyonso. (Yakobo 1:5-8, MN) Tondimisama ete Jéhovah akosalisa biso na kozala na likanisi malamu na ntina na mimekamo na biso mpe mpo na koyikela yango mpiko. Bandimi mosusu bakoki kobenda likebi na biso likoló na Makomami to na boumeli na boyekoli ya biso moko na Biblia. Na lisungi na Nzambe, makambo mazali kosalema makoki kobongwana mpe kosalisa biso na kososola yango tosengeli kosala. Baanzelu bakoki kokamba biso, to tokoki kozwa litambwisi ya elimo santu. (Baebele 1:14) Likambo ya ntina mingi ezali ya kobondela Nzambe na biso ya bolingo na elikya nyonso mpo na kozwa mayele.​—Masese 3:5, 6.

Tomikundola ete Jéhovah akopesaka libɔndisi

Na mabondeli, Paulo atyaki motema na ye epai na Jéhovah mpe ayebaki ete ye azali Liziba ya libɔndisi. Ntomá akomaki ete: “Mapamboli na Nzambe mpe Tata na Yesu Klisto, Nkolo na biso; Tata na motema mawa mpe Nzambe na kobɔndisama nyonso, akobɔndisaka biso na bolózi ete, na libɔndisi oyo biso moko tosili kozwa epai na Nzambe, tokoka kobɔndisa baoyo bazali kati na motindo na bolózi nyonso.”​—2 Bakolinti 1:3, 4, MN.

Nzambe na kobɔndisama nyonso ayebi mpasi oyo basaleli na ye bazali kokutana na yango mpe alingi kobɔndisa bango. Na ntina na Paulo oyo azalaki komitungisa mpo na Bakolinti, kobɔndisama eutaki na Tito, moninga na ye moklisto. Yango ezali moko na mitindo oyo tokoki kobɔndisama lelo oyo. Na ntango tozwi mpasi, tosengeli komitangwisa te. (Masese 18:1) Kozala elongo na baninga baklisto mosusu ezali moko na myango oyo Nzambe azali kobɔndisa biso. Tokoki kokanisa ete: ‘Nalɛmbi mingi mpenza na boye ete nazali na makasi te ya kokenda kokutana na baninga na ngai baklisto mosusu.’ Soki bongo, tosengeli kobundisa mayoki motindo wana mpe tosengeli te komipimela libɔndisi oyo bandeko na biso bakoki kopesa biso yango.

Kotika te!

Mingi kati na biso bakutani naino te na mimekamo makasi oyo mikoki komema na konyokwama na makanisi. Kasi maladi makasi, liwa ya mobalani na yo to mokakatano mosusu ekoki kopesa mpasi. Soki yango esalemi, tokoki kosukisa te ete tozali na maladi kati na elimo. Moto oyo azali konyokwama na makanisi akoki kozala moto asɛlingwi mpo na mosala ya Nzambe mpe akoki kozala na makoki ya kosalisa bato mosusu kati na elimo. Paulo alendisaki bandeko ete “babɔndisa milimo minyokwami,” kozanga kokanisela bango mabe ete basali libungá mpe bazali maladi kati na elimo. (1 Batesaloniki 5:14, MN) Atako konyokwama na makanisi eutaka mbala mosusu na libungá mpe na mayoki ya komikweisa, kasi yango ezali bongo te mpo na baoyo bazali kosalela Nzambe na motema ya pɛto. Losambo oyo bazali kopesa epai na Jéhovah, mbala mosusu kati na mikakatano ndenge na ndenge, ezali kosepelisa ye. Alingi bango mpe azali kosalisa bango na kopesáká bango lisungi mpe libɔndisi lisengeli.​—Nzembo 121:1-3.

Na 1918, batikali na Yisraele ya elimo bakutanaki na mimekamo oyo mipesaki bango mpasi mingi. (Tala Bagalatia 6:16.) Mosala na bango ya kosakola mokómaki pene na kokwea, basusu kati na bango bakɔtisamaki na bolɔkɔ kozanga koyeba likambo, mpe mingi na basalani na bango ya kala bakómaki bapɛngwi mpe batɛmɛlaki bango. Epai mosusu, batikali bapakolami oyo bazalaki sembo basosolaki te mpo na nini Nzambe apesaki nzela na makambo nyonso wana. Na boumeli ya mwa ntango, ‘balónaki na mpisoli,’ kasi batikaki te. Balandaki kosalela Jéhovah mpe bazalaki lisusu komitalela bango moko. Ebimisaki matomba nini? ‘Bazongi na kongánga na esengo, wana bamemi mbuma na bango.’ (Nzembo 126:5, 6) Bapakolami basosoli sikawa ete, Nzambe apesaki nzela na mimekamo wana mpo na kopɛtola bango na mosala na bango ya kobuka mbuma na mokili mobimba.

Soki tooki mpasi mpo ete tozwi mimekamo mikeseni, tokoki kozwa litomba na oyo ekómelaki batikali bapakolami. Na esika na kotika yango, tolanda kosala malamu, ata soki tosengeli kosala yango na mpisoli. Mokolo mosusu, mimekamo na biso mikosila mpe ‘tokozonga na kongánga na esengo.’ Ee, esengo​—mbuma ya elimo na Nzambe—​ekozala na biso ete toyika mpiko na mimekamo. Mpo na biso, Jéhovah ekomonana mpenza “Nzambe na kobɔndisama nyonso.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto