Ndakisa ya mosala ya misionere oyo baklisto ya solo bazali kolanda yango
“Bozala bamekoli na ngai, lokola ngai nazali komekola Klisto.”—1 BAKOLINTI 11:1, MN
1. Na makambo nini Yesu atikaki ndakisa malamu mingi mpo na bayekoli na ye ete bamekola yango? (Bafilipi 2:5-9)
OYO nde ndakisa kitoko Yesu atikelaki bayekoli na ye! Atikaki na esengo nyonso nkembo na ye na likoló mpo na koya awa na mabelé kati na bato na masumu. Andimaka kooka mpasi mingi mpo na kobikisa bato mpe, oyo eleki ntina, mpo na kobulisa nkombo ya Tata na ye oyo azali na likoló. (Yoane 3:16; 17:4) Wana ezalaki ye kosambisama, Yesu alobaki kozanga kobanga ete: Nabotamaki mpo na likambo oyo, mpe nayaki na mokili mpo na likambo oyo, ete napesa litatoli mpo na solo.”—Yoane 18:37, MN.
2. Na nsima ya lisekwa na ye, mpo na nini Yesu apesaki etinda epai na bayekoli na ye ete balanda kosala mosala oyo ye abandisaki?
2 Liboso ya liwa na ye, Yesu abongisaki bayekoli na ye malamu mpo ete bakoka kolanda kokokisa mosala ya kopesa litatoli na ntina na solo ya Bokonzi. (Matai 10:5-23; Luka 10:1-16) Yango wana nsima na lisekwa na ye, Yesu apesaki bango etinda ete: “Bokende kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo na Tata mpe na Mwana mpe na elimo mosantu, kolakisa mpe bango ete batosa nyonso esili ngai kolaka bino.”—Matai 28:19, 20.
3. Lolenge nini mosala ya kozalisa bayekoli ekólaki, kasi na bitúka nini yango ekokisamaki mingi mpenza?
3 Na boumeli ya mbula misato na ndambo oyo elandaki, bayekoli na Yesu batosaki etinda yango, kasi bakokisaki yango bobele epai na Bayuda mpe na bato ya mabota oyo babongwanaki na losambo ya Bayuda, mpe na Basamaria oyo bakatamaki ngenga. Na nsima na mobu 36 ya ntango na biso, Nzambe asalaki ete nsango malamu ekoka kosakolama epai na Korneye, moto oyo akatamaki naino ngenga te mpe na libota na ye. Na boumeli ya bambula zomi oyo elandaki, bapakano mosusu bayaki kokota na lisangá. Nzokande, emonani ete kosakolama ya nsango malamu na ntango wana esukaki na mikili oyo ezalaki na est ya mai monene Méditerranée.—Misala 10:24, 44-48; 11:19-21.
4. Likambo nini ya ntina lisalemaki pene na mibu 47-48 ya ntango na biso?
4 Esengelaki eloko moko mpo na kopusa baklisto to mpo na kopesa bango nzela ete bazalisa bayekoli kati na Bayuda mpe epai na bapakano kati na mikili mizalaki mosika. Na bongo, pene na mibu 47-48 ya ntango na biso, bankulutu ya lisangá ya Antiokia ya Sulia bazwaki nsango eutaki na Nzambe ete: “Boponela ngai Balanaba mpe Saulo mpo na mosala mosili ngai kobyanga bango mpo na yango.” (Misala 13:2) Tala ete Paulo ayebanaki ntango wana na nkombo na ye ya liboso, Saulo. Tala lisusu ete Nzambe atangaki nkombo ya Balanaba liboso na Paulo, mbala mosusu mpo ete, na eleko wana, Balanaba nde azalaki kosala mingi kati na bango mibale.
5. Mpo na nini lisoló oyo ezali kolobela mosala na Paulo mpe Balanaba lokola bamisionere ezali lelo na ntina mingi mpo na baklisto?
5 Lisoló lilobeli mosala ya misionere ya Paulo mpe Balanaba na bolai na yango, ezali elendiseli monene mpo na ba Témoins de Jéhovah, mingi mpenza mpo na bamisionere mpe ba pionniers oyo basili kotika bamboka na bango mpo na kokende kosalela Nzambe kati na bamboka ya bopaya. Lisusu, botaleli ya mokapo 13 mpe mokapo 14 ya Misala, ekopusa lisusu baklisto mingi na komekola Paulo mpe Balanaba, mpe na kobakisa milende na mosala na bango ya kozalisa bayekoli, mosala oyo moleki nyonso mosusu na motuya.
Na esanga ya Kupulu (Chypre)
6. Ndakisa nini bamisionere bapesaki ntango bazalaki na Kupulu?
6 Mosika te, bamisionere wana bamataki masuwa na libóngo ya Selukia na Sulia, mpo na kokende na esanga ya Kupulu. Ntango bakomaki na Salamini, babosanaki mosala na bango te, kasi “basakolaki Liloba na Nzambe kati na biyanganelo ya Bayuda.” Kolandáká ndakisa na Klisto, bafandaki mpamba te na engumba wana, kozelaka ete bafandi na esanga yango baya epai na bango. Na esika na kosala bongo, basalaki mosala na bango “kati na esanga mobimba.” Na ntembe te, yango esengaki na bango kotambola mingi mpe kolala na bisika bikeseni, mpamba te Kupulu ezalaki esanga moko monene, mpe mobémbo na bango ememaki bango na kokatisa eteni na yango oyo eleki monene.—Misala 13:5, 6.
7. (a) Likambo nini malamu lisalemaki na engumba ya Pafa? (b) Lisoló yango elendisi biso na kozala na ezaleli nini?
7 Na nsuka ya mobémbo na bango na Kupulu, mibali yango mibale bazwaki mbano wana ezalaki bango na engumba ya Pafa: Bamonaki likambo moko kitoko. Selegi Paulu, mokonzi na esanga yango, ayambaki nsango na bango mpe “akómaki mondimi.” (Misala 13:7, 12, MN) Na nsima, Paulo akomaki ete: “Bandeko, botala ebyangeli na bino. Bato na mayele na mosuni babyangami mingi te, bato na nguya mingi mpe te, bato na lokumu mingi te.” (1 Bakolinti 1:26) Atako bongo, Selegi Paulu akokaki kotangama kati na bato na nguya oyo bayambaki nsango malamu. Likambo oyo lisengeli kolendisa biso nyonso, mingi mpenza bamisionere, ete tozala na elimo ya kokende liboso mpo na kopesa litatoli epai na bakonzi, lokola 1 Timote 2:1-4 ezali kolendisa biso. Mbala mosusu, bato oyo bazali na bokonzi bapesaka lisalisi monene epai na basaleli na Nzambe.—Nehemia 2:4-8.
8. (a) Mbongwana nini esalemaki kati na Balanaba na Paulo uta ntango wana? (b) Na ndimbola nini Balanaba azalaki ndakisa malamu?
8 Na bopusi ya elimo na Jéhovah, Paulo akokisaki mokumba monene mpo na kobongwana ya Selegi Paulu. (Misala 13:8-12) Lisusu, emonani ete uta ntango yango, Paulo alekaki liboso kati na mosala. (Tala Misala 13:7 mpe Misala 13:15, 16, 43.) Yango ezalaki na boyokani na mokumba oyo azwaki epai na Nzambe ntango abongwanaki. (Misala 9:15) Mbala mosusu likambo oyo likokaki kotya komikitisa ya Balanaba na komekama. Kasi, na esika ya kotalela mbongwana wana na lolenge mabe, Balanaba amimonisaki ete abongi na nkombo na ye oyo elimboli “Mwana na kobɔndisama.” Na bosembo nyonso, asungaki Paulo na boumeli ya mibémbo na mosala na bango ya misionere mpe na nsima, ntango Bayuda mosusu oyo bakómaki baklisto bamonaki mabe lokola bakendaki kosakola epai na bapakano oyo bakatamaki ngenga te. (Misala 15:1, 2) Oyo nde ndakisa malamu mpo na biso nyonso, mpe mpo na baoyo bazali kosala na bandako ya bamisionere mpe na ba Béthels! Tosengeli ntango nyonso kondima bibongiseli ya teokratike mpe kosunga na motema na biso mobimba baoyo bazwi mokumba ya kokamba biso.—Baebele 13:17.
Na Asie Mineure
9. Liteya nini tozali kozwa na lolenge oyo Paulo mpe Balanaba bandimaki kokende na Antiokia na Pisidia?
9 Kolongwa na Kupulu, Paulo mpe Balanaba bamataki masuwa mpo na kokende epai na likoló to na nord, na eteni ya mokili ebengami ete Asie. Mpo na ntina oyo eyebani te, bamisionere wana bafandaki te na mokili oyo ezalaki pembeni na mai monene, kasi basalaki mobembo moko molai mpe ya likámá na bakilometele soko 180 kino Antiokia na Pisidia, mboka oyo ezalaki na katikati na mokili na ngomba-papálá to plateau ya Asie Mineure. Elingi koloba ete basengelaki koleka likoló na bangomba mpe kokita na esobe oyo emekeli na yango ezalaki na bametele 1 100 kokokisa yango na nivo ya mai monene. J. S. Howson, molimboli ya Biblia, alobi ete: “Bato oyo bazalaki kofanda na bangomba wana, oyo ekabolaki ngomba-papálá mpe bisobé ya sud, bazalaki na bizaleli ya kotyola mibeko mpe ya koyiba na etuluku, mpe yango eyebanaki bipai nyonso na ntango ya kala.” Bamisionere yango bakutanaki lisusu na makama mauti na biloko bizalisami. Howson abakisi ete: “Etuká mosusu te ya Asie Mineure eyebani mingi mpo na ‘mpela’ na yango lokola etando ya bangomba ya Pisidia, epai bibale bikotyolaka na lombango nyonso kolandaka nzela ya mabulu mozindo mpe na nkaká mingi oyo ezali katikati na bangomba.” Makambo oyo mazali kosalisa biso na koyeba motindo ya makama oyo bamisionere wana bakutanaki na yango na mibémbo oyo bandimaki kosala mpo na kopalanganisa nsango malamu. (2 Bakolinti 11:26) Bobele bongo lelo, mingi na basaleli ya Jéhovah bazali kolónga mikakatano ya lolenge nyonso mpo na kokutana na bato ete bayebisa bango nsango malamu.
10, 11. (a) Paulo asalaki nini mpo na kobimisa bobele maloba makokaki koyokanisa ye elongo na bayoki na ye? (b) Mpo na nini Bayuda mingi bakamwaki wana bayokaki nsango ya mpasi oyo Masiya azwaki? (c) Lobiko nini oyo Paulo ayebisaki na bayoki na ye?
10 Lokola eyanganelo ya Bayuda ezalaki wana na Antiokia na Pisidia, bamisionere bakendeki liboso epai na bango mpo na kopesa bango libaku ya kondima nsango malamu, mpamba te bazalaki bato bameseni na Liloba na Nzambe. Ntango Paulo abyangamaki mpo na koloba, atelemaki mpe asalaki lisolo moko ya ntina mingi liboso na bato nyonso. Uta ebandeli kino nsuka na lisoló na ye, alandaki kobimisa makambo oyo makokaki koyokanisa ye na Bayuda mpe na bato oyo babongwanaki na losambo ya Bayuda, baoyo bazalaki koyoka ye. (Misala 13:13-16, 26) Nsima na maloba na ye ya ebandeli, Paulo alobelaki lisoló kitoko ya Bayuda, kokundwelaka bango ete Jéhovah aponaki bankoko na bango, na nsima asikolaki bango na Ezipito; mpe lolenge oyo asalisaki bango mpo na kolónga bafandi ya Mokili na ndaká. Na nsima, Paulo ayaki kolobela mingi boyokani na Jéhovah elongo na Davidi. Makambo wana ezalaki na mitema na Bayuda ya ekeke ya liboso, mpamba te bazalaki kozela ete Nzambe abimisa mokitani na Davidi oyo asengelaki kozala mobikisi mpe mokonzi na seko. Wana alobelaki likambo wana, Paulo alobaki na molende nyonso ete: “Na libota ya moto oyo [Davidi], pelamoko eleká na ye, Nzambe asili koyeisela Yisraele mobikisi, Yesu.”—Misala 13:17-23, MN.
11 Nzokande, Bayuda mingi bazalaki kozela mobikisi moko oyo asengelaki kozala elombé na basodá mpo na kosikola bango na boyangeli ya Loma mpe kotombola libota ya Bayuda likoló na mabota nyonso mosusu. Na bongo, ntembe ezali te ete bakamwaki mingi ntango bayokaki Paulo koloba ete Masiya akabamaki na bakonzi ya mangomba na bango mpo na kobomama. Na molende nyonso, Paulo alobaki ete: “Kasi Nzambe asekwisaki ye kati na bakufi.” Pene na nsuka ya lisoló na ye, amonisaki na bayoki na ye ete bakokaki kozwa lolenge na lobiko ya malamu mingi. Alobaki ete: “Na bongo, tika eyebana na bino . . . ete mpo na ye wana kolimbisama na masumu esakolami na bino; mpe mpo na ye moto na moto oyo andimi alongisami na makambo nyonso, oyo Mibeko na Mose mikokaki kolongisa bino na yango te.” Paulo asukisaki lisoló na ye na kolendisaka bayoki na ye ete bazala te kati na baoyo Nzambe asakolaki ete bakotyola ebongiseli oyo ya kitoko asili kozwa mpo na lobiko.—Misala 13:30-41.
12. Lisoló ya Paulo libimisaki matomba nini, mpe lolenge nini yango esengeli kolendisa biso?
12 Oyo nde lisoló kitoko litongami likoló ya Makomami! Lolenge nini bayoki bayambaki yango? “Bayuda mingi mpe bato oyo babongwanaki na losambo na Bayuda balandaki Paulo mpe Balanaba.” (Misala 13:43, MN) Lisoló yango lizali mpenza kolendisa biso lelo. Tika ete biso mpe tosala milende mpo na koteya solo na lolenge ya malamu, ezala ntango tozali kosakola epai na bato nyonso to ntango tozali kopesa eyano to tozali kosala lisoló na makita ya lisangá na biso.—1 Timote 4:13-16.
13. Mpo na nini bamisionere wana basengelaki kotika Antiokia na Pisidia, mpe mituna nini mitunami na ntina na bayekoli ya sika?
13 Bato ya sika oyo basepelaki na nsango malamu na Antiokia na Pisidia, bakokaki te kobomba yango mpo na bango moko. Yango wana “na sabata elandaki, pene na bato nyonso na mboka bayanganaki mpo na koyoka liloba ya Jéhovah.” Mosika te, nsango malamu epalanganaki kino libanda ya mboka. Ya solo, “liloba ya Jéhovah lipalanganaki na mokili yango mobimba.” (Misala 13:44, 49, MN) Na esika ya kosepela mpo na likambo yango, Bayuda oyo bazalaki na zuwa basalaki ete bato babengana bamisionere yango na mboka na bango. (Misala 13:45, 50) Yango ezalaki na bopusi nini likoló na bayekoli ya sika? Balɛmbaki mpe bazongaki nsima?
14. Mpo na nini batɛmɛli balongaki te kobebisa mosala oyo mobandisamaki na bamisionere wana, mpe yango eteyi biso nini?
14 Te, mpo ete yango ezalaki mosala ya Nzambe. Lisusu, bamisionere wana batyaki mpenza moboko makasi ya kondima epai na Nkolo Yesu Klisto oyo asekwaki. Emonani polele ete bayekoli wana ya sika batalelaki Klisto lokola Motambwisi na bango, kasi batalelaki bamisionere wana te. Na yango, tozali kotanga ete “balandaki kotonda na esengo mpe na elimo santu.” (Misala 13:52) Oyo nde elendiseli mpo na bamisionere mpe baklisto mosusu oyo bazali kozalisa bayekoli lelo! Soki tokokisi mokumba na biso na elimo ya komikitisa mpe na molende, Jéhovah Nzambe mpe Yesu Klisto bakopambola mosala na biso.—1 Bakolinti 3:9.
Na Ikonia, na Lusutula mpe na Delebe
15. Lolenge nini bamisionere wana bakokisaki mosala na bango na Ikonia, mpe yango ebimisaki matomba nini?
15 Na nsima, Paulo mpe Balanaba basalaki mobémbo ya bakilometele 140 na sud-est ya Asie Mineure kino na Ikonia, engumba oyo elandaki. Batikaki te ete kobanga minyoko epekisa bango kokokisa mosala na bango lokola basalaki yango na Antiokia. Biblia eyebisi matomba oyo bazwaki, ete: “Ebele na Bayuda mpe na Bagreke bakómaki bandimi.” (Misala 14:1, MN) Bayuda oyo bandimaki nsango malamu te bayaki lisusu kobimisa botɛmɛli. Kasi bamisionere bayikaki mpiko mpe bafandaki mikolo mingi na lkonia mpo na kosalisa bayekoli wana ya sika. Ntango bayokaki ete Bayuda oyo bazalaki kotemela bango balingaki koya kobola bango mabanga, Paulo mpe Balanaba bamonisaki mayele na kokimaka na teritware mosusu, “na Lusutula, na Delebe mpe na mikili ya penepene.”—Misala 14:2-6.
16, 17. (a) Likambo nini likómelaki Paulo na Lusutula? (b) Lolenge oyo Nzambe asalisaki ntóma Paulo ezalaki na bopusi nini likoló na elenge mobali moko na Lusutula?
16 Na mpiko nyonso, “balandaki kosakola nsango malamu” na teritware wana ya sika oyo moto asakolaki naino wana te. (Misala 14:7) Ntango Bayuda ya Antiokia na Pisidia mpe Bayuda ya Ikonia bayokaki likambo yango, bayaki bango nyonso na Lusutula mpe bapusaki bato ebele na kobola Paulo mabanga. Lokola Paulo azwaki ntango ya kokima te, abetamaki mpenza mabanga kino banguna na ye bakanisaki ete akufi. Bamemaki ye lokola ebembe na libanda ya mboka.—Misala 14:19.
17 Okoki kokanisa mpo na mawa oyo bayekoli wana ya sika bazalaki na yango? Kasi tala likambo ya kokamwa! Ntango bazingelaki Paulo, ye atelemaki! Biblia elobi te soki elenge mobali na nkombo Timoté azalaki moko na bayekoli wana ya sika. Na ntembe te, ayokaki lolenge Nzambe asalisaki Paulo, mpe yango ezalaki na bopusi mingi likoló na elimo na ye ya elenge. Paulo akomaki kati na mokanda na ye ya mibale epai na Timoté, ete: “Osili kokangama na bosembo nyonso na mateya na ngai, na motindo na bomoi na ngai, . . . na motindo na makambo makómelaki ngai na Antiokia, na Ikonia, na Lusutula, na motindo na minyoko oyo nayikelaki mpiko; kasi Nkolo abikisaki ngai kati na yango nyonso.” (2 Timoté 3:10, 11, MN) Pene na mbula moko to mibale nsima wana babolaki ye mabangá, Paulo azongaki na Lusutula mpe amonaki ete elenge Timoté azalaki moklisto oyo apesaki ndakisa malamu, “mpe bandeko na Lusutula mpe na Ikonia bapesaki litatoli malamu na ntina na ye.” (Misala 16:1, 2, MN) Bongo, Paulo aponaki ye lokola moninga ya mobémbo. Yango esalisaki Timoté mpo na kokóla na elimo, mpe na nsima akómaki moto asɛlingwi mpo ete Paulo atinda ye mpo na kokenda kotala masanga makeseni. (Bafilipi 2:19, 20; 1 Timoté 1:3) Bobele bongo lelo, basaleli ya Nzambe ya molende bazali na bopusi malamu likoló na bilenge, baoyo mingi na bango bazali kokóla mpo na kokóma basaleli malamu ya Nzambe, lokola Timoté.
18. (a) Likambo nini likómelaki bamisionere wana na Delebe? (b) Likoki nini lipesamelaki bango, kasi bazwaki ekateli nini?
18 Na ntɔngɔ elandaki mokolo oyo abikaki na liwa na Lusutula, Paulo akendeki na Delebe elongo na Balanaba. Mbala oyo batɛmɛli balandaki bango te, mpe Biblia elobi ete ‘bazalisaki bayekoli mwa mingi.’ (Misala 14:20, 21, MN) Nsima na kosala lisangá na Delebe, Paulo na Balanaba basengelaki kozwa ekateli moko. Nzela moko etongamaki na Baloma eutaki Delebe kino Tarse. Longwa wana, mobémbo kino Antiokia na Sulia ezalaki mokuse. Ekokaki kozala nzela moko malamu mpo na kozonga, mpe bamisionere yango bakokaki komona ete basengelaki sikawa kozwa bopemi. Kasi, kolandaka ndakisa na Nkolo na bango, Paulo na Balanaba bamonaki ete mposa ezalaki naino mingi.—Malako 6:31-34.
Bakokisaki malamu mosala na Nzambe
19, 20. (a) Lokola bamisionere bazongaki na Lusutula, na Ikonia mpe na Antiokia, lolenge nini Jéhovah apambolaki bango? (b) Yango epesi liteya nini na libota ya Jéhovah na ntango na biso?
19 Na esika ya kozwa nzela mokuse mpo na kozonga epai na bango, bamisionere wana, kozanga kobanga, bazongaki nde na bingumba epai kuna bomoi na bango ezalaki na likama. Lokola bamonisaki elimo ya komibanzabanza mpo na bampate ya sika, Jéhovah apambolaki bango? Ee, mpamba te lisoló liyebisi ete “bakembisaki milimo ya bayekoli, kolendisáká bango ete batikala kati na kondima.” Na sembo mpenza, bayebisaki bayekoli wana ya sika ete: “Ekoki na biso kokota na Bokonzi na Nzambe na nzela na bolózi mingi.” (Misala 14:21, 22, MN) Paulo mpe Balanaba bakundwelaki bango ete babyangamaki mpo na kozala batuki na libula na Bokonzi na Nzambe oyo ezali koya. Lelo oyo, tosengeli kopesa bilendiseli motindo moko epai na bayekoli ya sika. Tokoki kokembisa bango na ntina ete bakoka koyika mpiko kati na mimekamo soki tokolakisaka bango elikya ya bomoi na seko awa na mabelé na nsé na Bokonzi na Nzambe oyo Paulo na Balanaba basakolaki.
20 Liboso ya kotika engumba moko na moko, Paulo mpe Balanaba bazalaki kosalisa lisangá na yango mpo na komibongisa malamu. Na yango, babongisaki mibali oyo basɛlingwi mpe bapesaki bango mokumba ya kokamba lisangá. (Misala 14:23) Na ntembe te, yango epesaki nzela na bokóli. Bobele bongo lelo, ekómaka ete nsima na kosalisa bato oyo bameseni naino te ete bakóla kino kozwa mikumba, bamisionere mpe basakoli mosusu balongwaka na bisika wana mpo na kolanda kokokisa mosala na bango malamu na bisika mosusu epai mposa eleki monene.
21, 22. (a) Likambo nini lisalemaki nsima wana Paulo mpe Balanaba basukisaki mobémbo na bango ya misionere? (b) Mituna nini mikoki kotunama?
21 Ntango bamisionere [Paulo na Balanaba] bazongaki na Antiokia na Sulia, bazalaki na nsai mpenza. Ee, Biblia elobi ete “bakokisaki malamu” mosala oyo Nzambe apesaki bango. (Misala 14:26, MN) Ya solo, lisoló ya mosala na bango lipesaki “esengo mingi epai na bandeko nyonso.” (Misala 15:3, MN) Kasi eloko nini balingaki kosala na nsima? Balingaki nde kofanda, komonaka ete mosala basalaki ekoki sé bongo? Soki moke te. Nsima na kokutana na college central ya Yelusaleme na ntina na likambo ya kokata ngenga, Paulo mpe Balanaba bazongelaki mibémbo ya misionere. Mbala oyo, bakendeki na banzela ekeseni. Balanaba azwaki Yoane Malako mpe akendeki na ye na Kupulu, nzokande Paulo azwaki moninga mosusu, Silas, mpe balekaki na Sulia mpe Silikia. (Misala 15:39-41) Ezali na mobémbo oyo nde ayaki kopona elenge Timoté mpe akendeki na ye elongo.
22 Biblia eyebisi te makambo oyo mabimaki na mobémbo ya mibale ya Balanaba. Kasi Paulo alandaki kosala na bateritware ya sika na mikili ya Mpótó mpe asalaki masangá na bingumba mitano: Filipi, Beloya, Tesaloniki, Kolinti mpe Efese. Nini esalaki ete mosala ya Paulo ebimisa matomba wana kitoko? Myango yango moko mikoki lelo kopesa matomba na mosala ya boklisto ya kozalisa bayekoli?
Bozongeli
◻ Mpo na nini Yesu azali ndakisa malamu mpenza oyo tosengeli komekola?
◻ Na likambo nini Balanaba amonisaki ndakisa malamu?
◻ Lisoló ya Paulo na Antiokia na Pisidia eteyi biso nini?
◻ Lolenge nini Paulo mpe Balanaba bakokisaki mosala na bango malamun?
[Elilingi na lokasa 15]
Mpiko oyo ntóma paulo amonisaki kati na minyoko ezalaki na bopusi mingi likoló na elenge Timoté