Jéhovah abatelaki ngai malamu
MPO nakoka koloba te ete nasalelaki Jéhovah na koleka mpenza, nakoloba ete lolenge oyo nazalaki kosalela ye ekesenaki na bato mosusu. Nakólaki na mboka moko kitoko na nord ya Nouvelle-Zélande, oyo etondi mingimingi na ba Maoris, oyo ngai moko nazali moko na bango. Mokolo moko, wana ezalaki ngai kosala mobembo likoló na mpunda, ndeko na ngai Ben ayaki kokutana na ngai. Ezalaki na ebandeli ya eleko ya moi na mobu 1942 (na mikili ya sud mpe, ebandeli ya eleko ya mbula na mikili ya nord). Nazalaki na mibu 27 mpe na ntango wana, nazalaki mosangani ya molende ya Lingomba ya Angleterre.
Ben azalaki kotanga uta bambula mingi mikanda ya zuzi Rutherford, prézidá ya la Société Watch Tower na ntango wana, mpe sikawa na maboko azalaki na mokanda moko ya biro ya la Société na Nouvelle-Zélande, oyo ezalaki kosenga ye ete abyanga bafandi ya mboka na koyangana mpo na kokumisa Elambo ya Nkolo. Lisusu, Ben asengelaki koluka moto moko mpo na kokamba molulu. Atalaki ngai mpe alobi ete: “Yo ozali moto yango.” Nandimaki, mpamba te nazalaki na esengo ete batanga ngai ete nakoki. Lisusu, nazalaki mondimi na Lingomba ya katolike.
Na mpokwa yango, mwa bato 40 bayanganaki na ndako ya Ben mpo na kokanisa liwa ya Nkolo na biso, mpe moko te kati na bango azalaki Témoin de Jéhovah. Ndeko na ngai apesaki ngai plan ya diskur ntango nakomaki. Nayembisaki loyembo oyo eponamaki te mpe nasengaki na semeki ya Ben ya mobali ete asala libondeli. Na nsima nalobelaki makambo oyo mazwamaki kati na plan: molongo ya mituna elongo na biyano oyo bitongami likoló na Makomami. Sángo moko ya etúka wana oyo azalaki kati na bayangani, akataki ngai maloba na kobimisaka botemeli, kasi nayanolaki ye na kotangaka mikapo ya Biblia oyo mizwamaki kati na plan.
Nazali koyeba lisusu ete moko na makambo ya plan elobelaki eleko ya mbula oyo molulu mosengelaki kosalema. Oyo nde esengo nayokaki wana bayangani nyonso bamonaki sanza kobima yango nyonso, ntango batalaki na lininisa! Ya solo, ezalaki le 14 Nisan.
Oyo nde butu kitoko! Ekaniseli eumelaki ngonga minei. Bato batunaki mituna mingi mpe toyanolaki yango na kosalelaka mikapo ya Biblia oyo mizwamaki kati na plan ya la Société. Soki nazongaki nsima, nakokaki kolonga te kosala likambo motindo wana kozanga libateli litondi na bolingo ya Jéhovah—nzokande na eleko yango, nazalaki nkutu Témoin de Jéhovah oyo amipesi te. Kasi, na butu wana ya Ekaniseli ya 1942 nde nayebaki ntina ya bomoi na ngai.
Bomwana na ngai
Nabotamaki na 1914. Tata na ngai akufaki soko sanza minei liboso ya kobotama na ngai, mpe nazali komimona lisusu elenge, kolulaka bana misusu oyo balingamaki mingi na batata na bango. Ezali yango nde ezalaki mpenza kozanga ngai. Mpo na mama na ngai, kozanga mobali ezalaki mpenza etumba monene. Makama minene oyo mabimisamaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba mazalaki koyeisa mpasi na bomoi.
Nabalaki wana nazalaki naino elenge mpenza. Elenge mwasi nkombo na ye Agnes Cope, mpe azali moninga na ngai uta koleka mibu 58. Na ebandeli, tosalaki makasi mpo na kolonga bomoi. Nalongaki te na mosala ya kolóna bilanga mpo ete mbula ezalaki konɔka te. Na yango, namonaki malamu ete nalekisa ntango na masano, kasi kino na Ekaniseli wana ya 1942, nazalaki mpenza na mokano ya sikisiki te kati na bomoi.
Napesi litatoli na libota na ngai
Nsima na Ekaniseli wana, namipesaki mpenza mobimba na koyekola Biblia, na kosololáká elongo na bandeko na ngai mosusu na mikanda mikolimbolaka Biblia oyo mibimisamaki na la Société Watch Tower. Na septembre 1943, ba Témoins de Jéhovah ya bitúka mosusu bayaki kotala mboka na biso oyo ezalaki mwa mosika. Tosololaki na molende na boumeli ya ngonga minei. Na nsima, ntango nayokaki ete bazali kozonga lobi lolandi, natunaki ete: “Eloko nini ezali kopekisa ngai mpo ete nazwa batisimo sikawa?” Bandeko na ngai mibale ya mibali mpe ngai moko tozwaki batisimo na 1h30 ya ntongo.
Na nsima, nasalaki mibembo mingi mpo ete nakoka kopesa litatoli epai na basangani ya libota na ngai. Basusu bazalaki kosepela. Na likambo yango, nazalaki kotonga masolo na ngai likoló na Matai mokapo 24. Basusu bazalaki kondima te. Nazalaki bongo kosalela maloba na Yesu oyo ayebisaki na Bafalisai, engebene mokapo 23. Nsima na mikolo, nayekolaki kosalela takte mingi, na ndakisa ya Tata na biso ya likoló oyo atondi na boboto mpe na bolingo.—Matai 5:43-45.
Na ebandeli, mwasi na ngai azalaki kotemela mposa na ngai ya kosalela Jéhovah. Nzokande, mosika te alandaki nzela na ngai mpe, kobanda décembre 1943, ntango amipesaki na Nzambe mpe azwaki batisimo, akomaki mpo na ngai lisungi moko monene. Mokolo wana monene, bato mosusu mitano ya mboka na biso, Waima, bazwaki batisimo elongo na ye, mpe motuya nyonso ya basakoli na Bokonzi ekómaki libwa kati na esika yango.
Mapamboli atako botemeli
Na 1914, bandeko ya etúka mosusu bayaki lisusu kotala biso. Mbala oyo, babongisaki biso na mosala oyo tozalaki na yango mposa, mosala ya kosakola ndako na ndako. Lokola tozalaki komonana mingi kati na mboka, bakambi ya boklisto ya lokutá bamonisaki botemeli monene. (Yoane 15:20) Tozalaki ntango nyonso na matáta elongo na bakonzi ya mangomba ya mboka, likambo oyo ezalaki kopesa nzela na kolobana ntango molai na ntina na bindimeli. Kasi Jéhovah apesaki biso elonga, mpe bafandi mosusu ya mboka, ndeko na ngai ya mwasi azalaki kati na bango, bayaki komitya na nse na libateli litondi na bolingo ya Jéhovah.
Na juin 1944, lisangá moko lisalemaki na Waima. Koyina mpe monyoko euti na lingomba ebakisamaki. Baboyaki kokunda ba Témoins de Jéhovah kati na mayita ya mboka. Minyoko mizalaki mbala mosusu kokoma makasi. Bazalaki kosimba bato na nzoto mpo na kobundisa bango. Vuatire na ngai mpe garage oyo ezalaki kobomba yango ezikisamaki nyonso. Kasi, Jéhovah apambolaki ngai mpe, sanza misato na nsima tolongaki kosomba motuka ya monene. Ezali kati na likalo oyo libendami na bampunda nde nazalaki komema libota na ngai na makita, libota oyo lizalaki koya sé monene.
Lokola mbala na mbala bato bazalaki koya na lisangá, tososolaki ete tozalaki nokinoki na mposa ya ndako moko monene mpo na makita. Na bongo tozwaki ekateli ya kotonga Salle du Royaume na Waima. Ezalaki Salle du Royaume ya liboso ya Nouvelle-Zélande. Le 1er décembre 1949, banzeté ya liboso ekatamaki. Sanza minei na nsima, salle ya sika ya bisika 260 ya kofanda esalemaki, mpe assemblée moko esalamaki. Na eleko wana, ezalaki mpenza elonga monene oyo ekokaki kosalema bobele na lisungi ya Jéhovah.
Jéhovah abatelaki ngai lisusu
Lokola motuya ya basakoli na Bokonzi na ngambo ya nord ya Nouvelle-Zélande ezalaki sé kobakisama, bakengeli ya zongazonga, na ntango ya bavizite na bango, balendisaki biso ete tokende kosala epai kuna mposa ezalaki monene. Na bongo nakendaki elongo na libota na ngai na mboka Pukekohe, mwa moke na sud ya Auckland. Tosalaki kuna mbula 13.—Tala Misala 16:9.
Ntango nyonso nakanisaka na makambo mibale oyo mazali komonisa ete Jéhovah abatelaki ngai mpenza na ntango wana. Ezalaki ngai kosala lokola motambwisi mpe mobongisi na mituka ya Leta, nabyangamaki mpo na kolanda mateya na Eteyelo ya mosala na Bokonzi na boumeli ya poso minei, na filiale ya la Société Watch Tower na Auckland. Na bongo nasengaki poso minei ya bopemi. Ingénieur mokambi alobaki na ngai ete: “Ya solo mpenza. Nakolinga ete bato mingi bakoma lokola yo. Ntango okozonga, yaka kokutana na ngai na biro.” Na nsima, ntango, nalekaki na biro na ye, afutaki ngai poso minei na ngai oyo nazalaki te. Na yango, bamposa ya mosuni ya libota na ngai ekokisamaki.—Matai 6:33.
Wana likambo ya liboso. Ya mibale esalamaki nsima wana mwasi na ngai mpe ngai tobandaki mosala ya pionnier permanent na 1968. Wana lisusu, botyaki motema na lisalisi ya Jéhovah, mpe asungaki biso. Mokolo moko na ntongo, nsima na komela ti, mwasi na ngai afungolaki ezipeli ya frigo mpe amonaki bobele mwa ndambo moke ya manteka. Alobaki na ngai ete: “Sarn, tozali lelo na eloko moko te mpo na kolya. Atako bongo, tokokende bobele kosakola?” Eyano na ngai ezalaki nini? “Ee!”
Moto ya liboso oyo tokendaki kotala andimaki mokanda oyo tolakisaki ye mpe na bolingo nyonso apesaki biso maki zomi na mibale lokola likabo. Moto ya mibale oyo totalaki apesaki biso ndunda: ba kumara (mabɛngɛ́), ba choux-fleurs mpe karote. Kati na bilei mosusu oyo tozongaki na yango na ndako mokolo wana, nyama mpe manteka ezalaki na kati. Maloba oyo na Yesu makokanaki mpenza epai na biso, ete: “Botala bandeke na likoló ete bakokonaka te mpe bakubukaka te, bakoyanganisaka na ebombelo mpe te; nde Tata na bino na likoló azali koleisa bango. Bino nde boleki bango na motuya te?”—Matai 6:26.
Kotindama mpo na kosala na mokili mosusu
Rarotonga ezwami kati na bisanga ya Cook! Yango nde ezalaki teritware na biso mpo na mosala ya pionnier spécial na 1970. Ezali kuna nde tofandaki na boumeli ya mibu minei oyo milandaki. Mokakatano ya liboso ezalaki boyekoli ya lokotá ya sika. Kasi, na kotalela mwa bokokani na maloba kati na lokota Maori ya bato ya Nouvelle-Zélande mpe oyo ya bisanga na Cook, nakokaki kosala diskur piblike na ngai ya liboso, poso mitano nsima ya bokómi na ngai.
Ezalaki na basakoli moke ya Bokonzi na bisanga ya Cook, mpe esika ezalaki te mpo na koyangana. Lisusu, mpo na koyanola na mabondeli na biso, Jéhovah akokisaki bamposa na biso. Na lisalisi ya lisolo moko ya libaku malamu elongo na motekisi moko, tobandaki kofutela lopango moko oyo ebongaki, mpe mbula moko na nsima, tozwaki mwa esika moke ya kofanda mpe Salle du Royaume moko ya bisika 140 ya kofanda. Na bongo tozwaki mapamboli mingi, mpo na lokumu ya Jéhovah.
Boyambi oyo bafandi ya bisanga bamonisaki epai na biso esimbaki mitema na biso mpenza. Na mosala ya kosakola, mbala mingi bazalaki kopesa biso mwa bimeli ya mpio mpo na kokitisa motema; tozalaki kondima yango na esengo nyonso mpenza na ntango wana ya moi makasi. Mbala mingi, ntango tozalaki kozonga epai na biso, tozalaki kokuta bitabe, payipayi, mangolo mpe malálá etyami liboso na ekuke kozanga ete bakabi yango bayebisa nkombo na bango.
Na 1971, ngai mpe mwasi na ngai, mpe basakoli mosusu misato ya Rarotonga tokendaki na esanga ya Aitutaki, oyo eyebanaki mingi mpo na libéké na yango ya mai na mungwa. Tokutaki bato oyo bazalaki kolinga Liloba na Nzambe kati na bafandi na bisanga wana oyo bazalaki bayambi bapaya, mpe tobandaki koyekola Biblia elongo na bato minei tokobaki kotambwisa bango na nzela na kotindelana mikanda wana tozongaki na Rarotonga. Nsima na mikolo, bato oyo bazalaki koyekola Biblia na Aitutaki bazwaki batisimo mpe lisangá moko lisalemaki. Na 1978, batongaki Salle du Royaume ya mibale na bisanga ya Cook. Nzambe akolisaki oyo tokonaki mpe tomwangisaki mai.—1 Bakolinti 3:6, 7.
Nazwaki libaku kitoko ya kotala bisanga zomi kati na bisanga wana, mbala mingi kati na mikakatano mpenza. Esengelaki na ngai kosala mikolo motoba mpo na kokoma na Aitu na masuwa, na ntáka ya bakilometele 180, mpo na mopepe makasi mpe na mai monene na mbonge makasi. (Tala 2 Bakolinti 11:26.) Ya solo, bilei bizalaki mingi te, mpe zingazinga na ngai bato mingi bazalaki koyoka motó mpasi na ntina na koningana ya masuwa, kasi nazalaki na botondi mingi epai na Jéhovah mpo na libateli na ye oyo esungaki ngai mpo na kokóma malamu.
Na 1974, baboyaki kobakisela biso mikolo mosusu mpo na kofanda na bisanga ya Cook. Na bongo tozongaki na Nouvelle-Zélande. Na eleko wana, ezalaki na masangá misato kati na bisanga wana.
Mikumba mosusu ya mosala, mpe momekamo
Na bozongi na ngai na Nouvelle-Zélande, bikuke ya sika bifungwamaki. (1 Bakolinti 16:9) La Société azalaki na mposa ya moto moko mpo na kobongola Mosenzeli mpe mikanda mosusu mikolimbolaka Biblia na lokotá Maori. Bapesaki ngai mokumba yango oyo nazali na yango kino lelo oyo. Mpe nazalaki na esengo ya kokende kotala mbala na mbala bandeko ya bisanga ya Cook, liboso lokola mokengeli ya zongazonga na nsima lokola mokengeli ya distrike mokitani.
Na boumeli ya moko na bavizite yango, ndeko Alex Napa, pionnier spécial ya Rarotonga, asalaki mobembo moko ya mikolo 23 elongo na ngai na mai monene, mobembo oyo momemaki biso na Manahiki, na Rakahanga mpe na Penrhyn—na nord ya bisanga ya Cook. Na esanga moko na moko, Jéhovah asimbaki mitema na bafandi oyo bazali bayambi na bapaya, na boye ete bapesaki biso esika ya kolala mpe bandimaki ebele na mikanda mikolimbolaka Biblia. (Tala Misala 16:15.) Kati na bisanga yango, pauni ezali mingi mpe mbala mingi, bato bazalaki kopesa lisungi mpo na kosimba mosala ya mokili mobimba oyo motali kosakola nsango malamu na kopesaka biso pauni kitoko mpo na kosombitanyaka na pauni kitoko ya elimo oyo tozalaki kopesa bango.—Tala Matai 13:45, 46.
Eteni oyo ya mokili ezali kitoko mpenza! Kanisa na mbisi minene oyo ibengami requins, oyo ezali kotambola na kimya nyonso kati na mai elongo na bana kati na libéke moke ya mungwa. Na butu, makoló mazalaki mpenza kitoko mingi na kotala. Maloba oyo na mokomi na nzembo mazali mpenza solo: “Mokolo moko ekoteyaka mokolo mosusu, butu moko ekoyebisaka butu mosusu.”—Nzembo 19:2.
Ekoki mibu liwa sikawa, bosembo na biso emekamaki mpenza. Mwasi na ngai akutaki lopitalo mpo makila mazalaki kobima ye na kati ya motó. Esengelaki kopasola ye, kasi monganga aboyaki kosala yango soki azongisi ye makila te. Ngai mpe mwasi na ngai tokokaki te, na lisosoli nyonso ete tondima mwango moko oyo ekobuka mobeko moko ya Nzambe. Kasi lisosoli ya monganga—mopasoli ezalaki koyebisa ye ete abikisa bomoi na nzela nyonso oyo esengeli, bakisa mpe makila.
Kolongono ya nzoto ya mwasi na ngai ebebaki, atyamaki na bonbonne (salle de réanimation) epai kuna bobele vizite moke epesamelaki nzela. Azalaki koyoka lisusu malamu te mpo ete matoyi na ye ezalaki kosala ye mpasi makasi. Ezalela ekomaki mabe mpenza. Nsima ya vizite na ngai, monganga moko alandaki ngai kino na vuatire na ngai mpe ayebisaki ngai ete likoki bobele moko oyo etikali mpo na mwasi na ngai ezalaki kopasola ye na kosaleláká makila mpe abondelaki ngai na kondima likanisi yango. Ngai mpe mwasi na ngai totyaki bongo elikya na biso epai na Jéhovah—ata soki kotosa mobeko na ye elimbolaki kokitisa moke mwa bambula ya bomoi ya ntango oyo.
Na mbala moko, kolongono ya nzoto ya mwasi na ngai ekómaki mpenza malamu. Mokolo moko, ntango nakomaki, nakutaki ye afandi likoló na mbeto na ye, azali kotanga. Mikolo milandaki, abandaki kopesa litatoli epai na bato ya maladi mpe na minganga. Na nsima nabyangamaki na biro ya monganga—mopasoli. Alobaki na ngai ete: “M. Wharerau, ozali mpenza na makila malamu! Mpo na biso, mwasi na yo asili kobika.” Mbala moko, makila matikaki kobima ye. Ngai mpe mwasi na ngai totɔndaki Jéhovah, mpe tozongelaki lisusu ekateli na biso ya kosalela ye na makoki na biso nyonso.
Sikawa nasili kozonga na bisanga ya Cook, mpe nazali kosala lisusu na Rarotonga. Oyo nde libaku kitoko! Soki totali nsima na biso, ngai mpe mwasi na ngai tozali na botondi epai na Jéhovah mpo ete abatelaki biso mpenza na boumeli ya mibu soko 50 oyo tolekisi kati na mosala na ye. Na mosuni, naino tozangi eloko moko te ya ntina. Mpo na mapamboli ya elimo, ezali mingi mpo ete tokoka kotanga yango. Moko ya ntina mingi kati na yango ezali motuya ya basangani ya libota na ngai oyo basili kondima solo. Nakoki kotanga bango koleka 200 oyo bazali sikawa ba Témoins de Jéhovah, kati na bango 65 bazali mpenza bankoko na ngai ya mike. Moko kati na bankoko na ngai azali mosangani ya libota ya Béthel na Nouvelle-Zélande, mpe moko kati na bana na ngai ya basi azali kosala elongo na mobali na ye mpe na bana na ye mibale na batongi ya bandako mpo na ba filiales.—3 Yoane 4.
Ntango nazali kokanisa mpo na mikolo mizali liboso, nazali kosepela na elikya ya kofanda kati na paradis, epai kuna mabelé mobimba makozala lisusu kitoko koleka lobwako kitoko mpe etondi na nzeté epai oyo nabotamaki. Oyo nde libaku kitoko nakozala na yango mpo na koyamba mama na ngai mpe tata na ngai na lisekwa, mpe kolobela bango lisiko, Bokonzi mpe mitindo nyonso mosusu oyo Jéhovah azali kobatela biso!
Ekateli na ngai, elendisami na likambo oyo ete Jéhovah abatelaki ngai, ezali oyo, engebene maloba ya mokomi na nzembo kati na Nzembo 104:33: “Nakoyembela Jéhovah naino ezali ngai na bomoi; nakoyembela Nzambe na ngai na ntango nyonso naino ezali ngai.”—Lisoló ya Sarn Wharerau.
[Elilingi na lokasa 28]
Salle du Royaume ya liboso oyo etongamaki na Nouvelle-Zélande na 1950