Masiya—elikya ya solo?
Azalaki komibénga ete Moize. Nkombo na ye mpenza ebungaki na boumeli ya Lisoló ya bato. Na ekeke ya mitano ya ntango na biso, atambolaki na esanga ya Kelete mpo na kondimisa Bayuda ete ye azalaki masiya oyo bazalaki kozela. Alakaki bango ete mosika te bakosikolama na monyoko, bakozonga na mokili na bango mpe bakosikolama na boombo. Bayuda bandimaki yango. Wana mokolo ya kosikolama na bango ekokaki, Bayuda balandaki “Moize” na ngomba moko ezalaki likoló na mai monene Méditerranée. Alobaki na bango ete bamibwaka na mai monene, mpe yango ekokabwana ngambo mibale liboso na bango. Mingi batosaki mpe bamibwakaki na mai monene, kasi emikabolaki te. Mingi na bango bakufaki na mai; bamoko basungamaki na basali na masuwa mpe na balɔbi mbisi. Kasi, Moize amonanaki lisusu te. Masiya wana ebungaki libela.
MASIYA azali nani? Maloba “mobikisi,” “mosikoli,” mpe “mokambi” ekoki koyela biso na makanisi. Bato mingi bakanisi ete, masiya ezali moto oyo azali kopesa bayekoli na ye elikya mpe elimo ya kokangama makasi, na kolakáká bango ete akosikola bango na monyoko mpo na kozwa bonsomi. Lokola monyoko emonani mingi kati na Lisoló ya bato, ezali likambo ya kokamwa te ete ebele ya bamasiya babima na boumeli ya bikeke. (Tala Mosakoli 8:9.) Kasi, lolenge moko na oyo abéngamaki ete Moize ya Kelete, ebele na bamasiya wana bazali mbala mingi kopesa bayekoli na bango mawa mpe mpasi, na esika ete basikola bango.
“Oyo azali Mokonzi Masiya!” Wana ezali lolenge oyo Akiba ben Joseph, molakisi na mibeko ya Bayuda, ayambaki Simeon Bar Kokhba na mobu 132 ya ntango na biso. Bar Kokhba azalaki moto ya makasi oyo azalaki kokamba limpinga moko ya nguya. Mpo na Bayuda mingi, ye azalaki mpenza moto oyo asengelaki kosilisa monyoko na bango longwa na Loma, nguya ya mokili mobimba. Bar Kokhba alongaki te; mpo na yango, bankóto mingi kati na bato ya ekólo na ye bakufaki.
Na ekeke ya zomi na mibale, masiya mosusu ya Bayuda abimaki mbala oyo na mboka Yémen. Na ntango mokonzi asɛngaki ye elembo emonisi ete azalaki masiya, alobaki na mokonzi ete akata ye nkingo; lisekwa oyo lisengelaki kosalema nokinoki, lisengelaki kozala elembo. Mokonzi andimaki, mpe yango ezalaki nsuka mpo na masiya ya mboka Yémen. Bobele na ekeke wana, moto moko nkombo na ye David Alroy, alobaki na Bayuda ya Proche-Orient ete bamibongisa mpo na kolanda ye likoló na mapapu ya baanzelu mpo na kozonga na Mokili na Ndaká. Mingi bandimaki ete ye azalaki masiya. Bayuda ya Bagdad bazalaki ntango nyonso kozela na esengo nyonso likoló na nsamba ya bandako na bango, kozanga koyeba ete miyibi bazalaki kopunza bandako na bango.
Sabbatai Zevi abimaki na ekeke ya zomi na nsambo; autaki na mboka Sumuluna. Asakolaki epai na Bayuda na mikili nyonso ya Mpótó ete, ye azalaki masiya. Ezalaki mpe na baklisto oyo bandimaki ye. Zevi alakaki kosikola bayekoli na ye—na ndenge emonani, na kotikáká bango ete basala masumu ntango nyonso. Bayekoli na ye ya penepene bamipesaki na bilambo ya lokoso, na kolata bilamba te, na kosala pite, mpe na kosangisa nzoto elongo na bandeko na bango, mpe bazalaki komipesa etumbu na komibɛtáká mpimbo, na komibalola motakala na nsé na mbula mpɛmbɛ mpe na komikunda na mabelé ya mpiɔ kino na nkingo. Wana akendaki na mboka Turquie, Zevi akangisamaki mpe asengelaki kopona kati na kobongwana na lingomba ya mizilmá to kokufa. Andimaki kobongwana. Mingi na bandimi na ye baokaki mawa mingi. Atako bongo, na bikeke mibale oyo bilandaki, Zevi azalaki ntango nyonso kobéngama masiya na bisika mosusu.
Boklisto ya lokutá mpe ebimisaki bamasiya na yango. Na ekeke ya zomi na mibale, moto moko nkombo na ye Tanchelm, amisalelaki limpinga moko ya bandimi mpe ayangelaki na engumba Anvers. Masiya wana azalaki komibenga nzambe; azalaki nkutu kotɛkela bayekoli na ye mai oyo ye azalaki kosukola ete bamela yango mpo ete babulisama! Thomas Müntzer azalaki masiya “moklisto” mosusu na ekeke ya zomi na motoba, na Allemagne. Abongisaki bato ete batombokela bakonzi ya mboka, kolobaka epai na bayekoli na ye ete, yango ezalaki Armaguedon. Alakaki bango ete akokanga masasi ya banguna na mabɔkɔ na ye. Na esika ete esalema bongo, bato na ye babomamaki, mpe Müntzer akatamaki nkingo. Ebele ya bamasiya mosusu ya motindo wana babimaki na boklisto ya lokuta na boumeli ya bikeke.
Mangomba mosusu mpe mazalaki na bamasiya na yango. Bamizilmá bazali kozela Mahdi, to oyo akambami na nzela malamu, ye oyo akomema eleko ya boyengebene. Na lingomba ya ba Hindous, basusu bazali komitanga ete bazali ba avatars, to bililingi ya banzambe ndenge na ndenge. Lisusu, mokanda The New Encyclopoedia Britannica ekomaki ete: “Ata lingomba lizali na bamasiya mingi te lokola lingomba ya Buddha, esili komonisa kondima na bituluku ya Mahāyāna, epai na Buddha Maitreya oyo akoya, oyo akokita longwa na efandelo na ye ya likoló mpo na komema bandimi na paradis.”
Bamasiya na ekeke ya ntuku mibale
Na ekeke na biso, mposa ya masiya ya solo ekómi mpenza makasi koleka na liboso; na yango, ezali likambo ya kokamwa te na komona ebele na bato oyo bazali komitanga masiya. Na Afrika, na mboka Congo, na bambula 1920, 1930, mpe bambula 1940, Simon Kimbangu mpe mokitani na ye André “Yesu” Matswa batalelamaki lokola bamasiya. Basila kokufa, kasi bayekoli na bango bazali sé kozela bozongi na bango, mpamba te, eleko ya mbula nkóto ekoya na Afrika na nzela na bango.
Na ekeke oyo, tomonaki lisusu kobima ya “losambo ya biloko mingi” na Nouvelle-Guinée mpe na Mélanesie. Basangani na yango bazali kozela masuwa to mpepo oyo ekomema mindele oyo bazali lokola bamasiya, baoyo bakozalisa bango bazwi mpe bakoyeisa eleko ya bolamu oyo na boumeli na yango, ata bakufi bakosekwa.
Mikili ya bozwi mpe bazalaki na bamasiya na yango. Bakonzi mosusu ya mangomba, lokola Sun Myung Moon, asakolaki ete ye azelaki mokitani na Yesu Klisto mpe asengelaki kopetola mokili na nzela ya libota ya bandimi na ye oyo bazalaki na bomoko. Bakonzi ya politike mpe balukaki kozwa nkombo wana ya masiya; Adolf Hitler azalaki ndakisa eleki mabe ya ekeke oyo; asalaki diskur na ye monene na ntina na mbula nkóto ya Allemagne.
Filozofi mpe masangá ya politike ezwaki esika ya masiya. Na ndakisa, mokanda The Encyclopedia Americana elobi ete mateya na politike ya Marxisme-Léninisme ezalaki lokola masiya. Lisangá ya Mabota, oyo endimami pene na bisika nyonso lokola elikya bobele moko ya kozwa kimya na mokili, emonani lokola ete esili kozwa esika ya masiya kati na makanisi ya bato mingi.
Elikya ya solo?
Nyonso touti komona elakisi ete, lisoló na ntina na masiya ezalaki makanisi mpamba, bilikya mpamba mpe ndoto mpamba. Na bongo, ezali lelo likambo ya kokamwa te na komona ete bato mingi bazali na ntembe mpo na kozela masiya.
Liboso ya kolongola elikya nyonso na ntina na masiya, tosengeli naino koluka koyeba epai yango euti. Na yango, “masiya” ezali liloba lizwami na Biblia. Na Liebele ezali liloba ma·shiʹach, to “mopakolami.” Na ntango ya kala, bakonzi mpe banganga bazalaki ntango mosusu kozwa mikumba na bango elongo na molulu ya kopakolama, na boumeli na yango bazalaki kosopela bango mafuta na nsolo kitoko na motó. Na yango, liloba ma·shiʹach libongaki mpenza mpo na bango. Ezalaki lisusu na bato oyo bapakolamaki to bapesamelaki mikumba ya ntina mingi, kozanga milulu ya kopakolama. Na Baebele 11:24-26, Moize abéngamaki “Klisto,” to “mopakolami” mpo ete aponamaki lokola mosakoli mpe momonisi na Nzambe.
Ndimbola oyo epesami mpo na masiya ete, azali moto oyo “apakolami,” emonisi kokesena oyo ezali kati na bamasiya ya Biblia mpe bamasiya ya lokutá oyo toutaki kolobela. Bamasiya ya Biblia bamiponaki bango moko te; baponamaki mpe te na bituluku ya bayekoli na bango. Te, koponama na bango eutaki na likoló, epai na Jéhovah Nzambe ye moko.
Atako Biblia elobeli ebele ya bamasiya, kasi emonisi Masiya moko oyo aleki bamasiya nyonso mosusu. (Nzembo 45:7) Masiya wana alobelami kati na bisakweli nyonso ya Biblia; bilaká nyonso bipemami na Biblia bikokokana epai na ye. Mpe Masiya wana akobundisa mpenza bampasi nyonso oyo tozali na yango lelo.
Mobikisi na bato
Masiya ya Biblia akosilisa bampasi na kobandáká na ebandeli na yango. Na ntango baboti na biso ya liboso, Adam na Eva, batombokelaki Mozalisi na kopusama na Satana, ekelamu ya elimo, bamizwelaki lotómo ya komitambwisa bango moko. Balingaki kozwa bango moko ekateli mpo na oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. Na bongo, batombokelaki boyangeli ya libateli mpe etondi na bolingo ya Jéhovah, mpe bakɔtisaki libota nyonso ya bato kati na libebi mpe na mpasi euti na lipandá, na kozanga kokoka, mpe liwa.—Baloma 5:12.
Na yango, Jéhovah Nzambe amonisaki bolingo monene na koponáká eleko oyo ya molili kati na Lisoló ya bato, mpo na kopesa elikya epai na bato nyonso. Na ntango apesaki etumbu epai na bato wana batombokaki, Nzambe asakolaki ete bakitani na bango bakozwa mosikoli. Lokola abengami “libota,” Mobikisi wana asengelaki kolongola mabe oyo Satana asalaki na Edene; Libota likonyata “nyoka,” Satana, na motó, mpe likoboma ye.—Genese 3:14, 15.
Uta kalakala, Bayuda batalelaki esakweli wana ete ezalaki mpo na Masiya. Ba Targums mingi, mikanda ya Bayuda oyo mizalaki na Makomami na Bulee oyo masalelamaki mingi na ekeke ya liboso, milimboli ete esakweli wana esengelaki kokokana “na mokolo ya Mokonzi Masiya.”
Ezali bongo likambo ya kokamwa te ete, uta na ebandeli, bato ya kondima balendisamaki mingi na elaka wana etali Libota, to Mobikisi oyo asengelaki koya. Kanisa mpo na mayoki oyo Abalayama azalaki na yango na ntango Jéhovah alobaki na ye ete Libota likobima kati na ye, mpe ete bobele bakitani na ye te, kasi “bikólo nyonso ya mabelé bikopambolama” na Libota wana.—Genese 22:17, 18.
Masiya mpe Boyangeli
Na nsima, bisakweli bimonisaki boyokani kati na elikya wana mpe oyo ya boyangeli moko ya malamu. Na Genese 49:10, elobamaki na ntina na Yuda, nkoko ya Abalayama, ete: “Nzeté na bokonzi ekolongwa na Yuda te mpe lingenda ya bokonzi likolongwa na makolo na ye te, kino ekoya Oyo abongi na yango; mpe bato nyonso bakotosa ye.” Emonani ete, “Oyo abongi na yango” asengelaki koyangela mpe akoyangela—bobele likoló na Bayuda te, kasi likoló na bato nyonso. (Tala Danyele 7:13, 14.) Mpo na Bayuda na ntango ya kala, Oyo abongi na yango azalaki bongo Masiya; na yango, ba Targums mosusu ya Bayuda ezalaki bobele kotya liloba “Oyo abongi na yango” na esika ya “Masiya” to “mokonzi Masiya.”
Lokola kongengisama ya bisakweli bipemami ezalaki se kobakisama, makambo mingi mamonisamaki na ntina na boyangeli ya Masiya wana. (Masese 4:18) Na 2 Samwele 7:12-16, mokonzi Davidi, mokitani ya Yuda, alobaki ete Libota wana lisengelaki kobima kati na ye. Epai mosusu, Libota yango lisengelaki kozala Mokonzi monene. Kiti na bokonzi na ye, to boyangeli na ye, esengeli koumela seko! Yisaya 9:6, 7 eyebisi motindo moko ete: “Mwana abotameli biso, mwana mobali apesameli biso; bokonzi ekozala likoló na lipeka na ye. . . . Kofuluka na bokonzi na ye mpe na kimya ekosuka te, na kiti na bokonzi ya Davidi mpe likoló na bokonzi na ye, ete abongisa yango mpe mpo na kotɛlɛmisa yango na kosambisa-sembo mpe na boyengebene, uta sikawa kino seko. Molende ya Jéhovah na bibele ekosala yango.”
Okoki kokanisa lolenge boyangeli motindo oyo ekozala? Moyangeli ya boyengebene, ya sembo oyo akotya kimya mpe akoyangela seko. Oyo nde kokesena monene na bamasiya ya lokuta oyo bazalaki kolandana na boumeli ya Lisoló ya bato! Na esika na kozala mokonzi oyo amiponi ye moko, Masiya ya Biblia azali moyangeli ya mokili mobimba oyo asili kozwa bokonzi mpe nguya ekoki mpo na kobongola ezalela ya makambo ya mokili.
Elikya oyo ezali na ntina monene na eleko na biso oyo ya mobulu. Bato bazali lelo na mposa mingi ya elikya oyo. Nzokande, lokola ezali mpasi te na kokangama na bilikya ya lokutá, moto na moto asengeli mpenza kotalela malamu motuna oyo: Yesu ya Nazarete azalaki Masiya oyo asakolamaki, lokola bato mingi bazali kondima yango? Ezali yango nde ekotalelama kati na lisoló lilandi.
[Etanda na lokasa 6]
Masiya na Brooklyn?
Kala mingi te, mayebisi ya motindo na motindo mpe makomi ya miinda biutaki kosakola na Yisraele ete: “Bomibongisa mpo na koya ya Masiya.” Mosala wana ya kopesa mayebisi oyo esɛngaki 260 000 000 000 Z, esalemaki na ba Lubavitch, bato ya lingomba moke ya Bayuda oyo na mibeko makasimakasi. Mingi kati na asangani 250 000 ya lingomba yango, bandimi ete Menachem Mendel Schneerson, makonzi na bongo monene oyo azali na Brooklyn, na New York, azali Masiya. Mpo na nini? Schneerson ateyaki bango ete libota ya lelo likomona koya ya Masiya. Mpe, engebene zulunalo Newsweek, bakambi na lingomba wana balobi ete moteyi yango, oyo azali na mibu 90, akokufa le liboso na koya ya Masiya. Lingomba wana lizali koteya uta bikeke mingi ete libota na libota lizali kobimisa moto moko oyo abongi mpo na kozala Masiya. Schneerson atalelami na bayekoli na ye lokola moto ya lolenge yango, mpe amiponeli mokitani te. Atako bongo, zulunalo Newsweek elobi ete, Bayuda mingi bazali kondima te ete ye azali Masiya. Zulunalo Newsday elobi ete, Eliezer Schach, molakisi ya mibeko ya Bayuda, mowɛlani na ye oyo azali na mibu 96, abéngaki ye ete “masiya ya lokuta.”
[Elilingi na lokasa 7]
Bato mingi bakufaki mpamba te, bandimaki ete Moize ya Kelete azalaki masiya