Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/10 nk. 20-23
  • ‘Nasengeli kozwa batisimo?’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Nasengeli kozwa batisimo?’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo batisimo ezali kosenga
  • Nani asengeli kozwa batisimo?
  • ‘Nazali naino mwana’
  • ‘Nasili konuna’
  • Oyo ezali kobikisa bino sikawa’
  • Mokristo nyonso asengeli kozwa batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Okoki mpo na kozwa batisimo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Elenge: Omibongisi mpo na kozwa batisimo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Nasengeli kozwa batisimo?​—Eteni 1: Ndimbola ya batisimo
    Mituna oyo bilenge batunaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/10 nk. 20-23

‘Nasengeli kozwa batisimo?’

NA BIKATELI nyonso oyo tosengeli kokamata kati na bomoi, moko te ekokani na oyo: “Nasengeli kozwa batisimo?” Mpo na nini ezali na ntina mingi? Mpo ete ekateli na biso na likambo yango ezali na bopusi monene bobele likoló na bomoi na biso ya lelo te kasi lisusu likoló na bolamu na biso ya seko.

Osengeli kokamata ekateli yango? Ekoki kozala ete osili kolekisa mwa ntango kati na boyekoli ya Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah. To uta bomwana baboti na yo bazali koteya yo Makomami. Sikawa osengeli kozwa ekateli mpo na oyo okosala kati na bomoi na yo. Mpo ete okoka kozwa bikateli ya malamu, osengeli kososola malamu oyo batisimo ezali kosenga mpe nani oyo asengeli kozwa batisimo.

Oyo batisimo ezali kosenga

Mwa moke lokola ezalaka mpo na libala, batisimo ezali molulu oyo ezali kondimisa boyokani moko liboso na bato nyonso. Mpo na oyo etali libala, mobali mpe mwasi basilaki kokolisa boyokani moko ya penepene. Molulu ya libala mozali bobele komonisa polele liboso na bato nyonso boyokani oyo esilaki kondimama na nkuku, ete basili sikawa kokangisama solo na bikanganeli ya libala. Ezali kofungwela babalani nzela ya kosepela na bolamu ya libala mpe lisusu ezali kopesa bango mikumba oyo basengeli komema kati na bomoi na bango ya babalani.

Ezali mpenza motindo moko mpo na batisimo. Ntango tozali koyekola Biblia, tozali kososola oyo Jéhovah asili kosala mpo na biso na bolingo nyonso. Apesaki biso te bobele bomoi mpe biloko oyo tozali na yango mposa mpo na kobatela yango, kasi lisusu asili kopesa. Mwana bobele moko na ye mpo afungwela bato na masumu nzela ya kokóma na boyokani elongo na Ye mpe kozwa bomoi ya seko na paradis ya mabelé. Ntango tozali kokanisa na nyonso wana, topusami te na kosala eloko?

Tokoki kosala nini? Yesu Klisto, Mwana na Nzambe ayebisi biso ete: “Soko moto nani alingi koya epai na ngai, tika ete amiboya ye moko mpe amema nzete na ye ya mpasi mpe alanda ngai ntango nyonso.” (Matai 16:24) Ya solo, tokoki kokóma bayekoli na Yesu Klisto, mpe na kolandaka ndakisa na ye, tokoki kosalela matomba ya Tata na ye, Jéhovah. Kasi, mpo na kosala motindo yango ezali kosenga ete ‘tomiboya’ biso moko, na kondimaka na bolingo nyonso ete mokano ya Nzambe eleka liboso ya oyo na biso moko; yango esengi kokabela ye bomoi na biso, to komipesa biso moko, mpo na kosala mokano na ye. Mpo na koyebisa polele ekateli wana ya bolingo na moto ye moko, molulu moko mosalamaka liboso na bato nyonso. Batisimo ya mai ezali molulu oyo emonisaka polele komipesa na biso epai na Nzambe.

Nani asengeli kozwa batisimo?

Yesu apesaki bayekoli na ye etinda ‘ya kokende mpe kozalisa bayekoli bato na mabota nyonso, mpe kobatisa bango na nkombo na Tata mpe na Mwana mpe na elimo santu, kolakisa mpe bango ete batosa makambo nyonso masili ye kolaka bango.’ (Matai 28:19, 20) Ezali polele ete, mwa bokoli ya elimo mpe ya mayoki esengami na baoyo balingi kozwa batisimo. Na nzela na boyekoli na bango moko ya Liloba na Nzambe, bayei kokanga ntina ya ‘kobongola motema mpe kobongwana’ na motindo na bomoi na bango ya kala. (Misala 3:19) Na nsima, bakangaki ntina ya kosangana na mosala ya kosakola oyo Yesu Klisto akokisaki, mpo ete bakóma bayekoli na ye. Basengeli kokokisa matambe oyo nyonso liboso ya batisimo.

Kati na bokoli na yo ya elimo, osili kokóma kino na litambe yango? Olingi kosalela Nzambe? Soki ee, talela kati na libondeli ndakisa ya mokube Moetiopia, oyo lisolo na ye likomami kati na Misala mokapo 8. Ntango balimbwelaki mobali wana esakweli na ntina na Yesu Masiya, atalelaki elimo mpe motema na ye mpe atunaki ete: “Nini ezali kopekisa ngai ete nazwa batisimo?” Emonanaki ete eloko moko te ezalaki kopekisa ye; yango wana azwaki batisimo.​—Misala 8:26-38.

Lelo oyo bato mingi bazali mpe komituna motuna bobele moko wana: “Nini ezali kopekisa ngai ete nazwa batisimo?” Na yango, bato 300 945 oyo bamipesaki kala mingi te bazwaki batisimo na 1991. Likambo yango lizali ntina ya esengo monene epai na libota mobimba ya Jéhovah, mpe bankulutu kati na masanga bazali na esengo ya kosalisa bato mosusu ya motema sembo ete bakola mpe bakokisa masengami mpo na kozwa batisimo.

Mbala mosusu bankulutu ya lisanga na bino bakoki koyebisa yo ete ozela. To, soki ozali elenge, baboti na yo bakoki kosenga na yo ete ozela. Bongo osengeli kosala nini? Kolemba te. Osengeli koyeba ete kokota na boyokani ya penepene elongo na Oyo Aleki Likolo ezali likambo ya liseki te. Esengeli kokokisa mpe kobatela masengami matombwani. Mpo na yango, yoka batoli bapesi yo mpe salela yango na motema na yo mobimba. Soki ososoli naino malamu te bantina oyo bapesi yo, kokakatana te, kasi tuna mituna kino oyeba malamu oyo osengeli kosala mpo na komibongisa.

Epai mosusu, ezali na bato oyo bazali kokakatana mpo na kosala litambe wana monene, lokola bazali kobenga yango. Ezali bongo mpo na yo? Ya solo, okoki kozala na bantina malamu mpo na yango ozali kozongisa nsima mokolo ya komipesa na yo mpe ya kozwa batisimo. Kasi soki osili kokokisa masengami mpe ozali naino kokakatana, ekozala malamu omituna motuna oyo: “Nini ezali kopekisa ngai ete nazwa batisimo?” Talela ezalela na yo kati na libondeli mpe tala soki ozali solo na bantina ya kozongisa nsima libyangi oyo Jéhovah azali kopesa yo ya kosala boyokani ya penepene elongo na ye.

‘Nazali naino mwana’

Soki ozali elenge, okoki mbala mosusu kokanisa ete ‘nazali naino mwana.’ Ezali solo ete wana bilenge bazali komonisa botosi mpe etamboli malamu epai na baboti na bango baklisto mpe soki bazali kosalela batoli ya Makomami na makoki na bango nyonso, bakoki solo komindimisa ete Jéhovah azali kotalela bango lokola “bulee.” Biblia ezali koyebisa biso ete ngolu na Nzambe epai na baboti oyo bazali sembo ezali mpe kokóma epai na bana oyo bazali na nse na libateli na bango. (1 Bakolinti 7:14) Kati na Biblia, ezali te na mbula oyo etyami lokola ndelo na libateli yango. Atako bongo, bilenge baklisto basengeli kotalela na likebi mingi motuna oyo: “Nasengeli kozwa batisimo?”

Biblia ezali kolendisa bilenge na ‘kokanisa Motongi Monene na bango na mikolo na bolenge na bango.’ (Mosakoli 12:1) Na likambo yango, tozali na ndakisa ya elenge Samwele, oyo “asalelaki Jéhovah naino azalaki mwana.” Tozali lisusu na ndakisa ya Timoté, oyo longwa na bomwana asimbaki na motema mobimba solo oyo mama na ye mpe nkoko na ye bateyaki ye.​—1 Samwele 2:18; 2 Timoté 1:5; 3:14, 15.

Bobele bongo lelo, bilenge mingi basili kopesa bomoi na bango mpo na kosalela Jéhovah. Akifusa, oyo azali na mibu 15, alobi ete lisolo moko na Likita ya mosala nde esalisaki ye na kokamata ekateli ya kozwa batisimo. Elenge mwasi Ayumi azwaki batisimo wana azalaki na mibu zomi. Alingaki kosalela Jéhovah mpo ete akómaki komonisa bolingo ya solo mpo na ye. Sikawa azali na mibu 13 mpe azalaki na esengo ya komona moyekoli na ye ya Biblia ya mibu 12, oyo amonisaki mpe bolingo epai na Jéhovah, kozwa batisimo. Hikaru, leki na Ayumi ya mobali, azwaki batisimo na mibu 10. Azali komikundola ete, “Bato mosusu bazalaki koloba ete nazalaki naino mwana moke, kasi Jéhovah azalaki koyeba mayoki na ngai. Nazwaki ekateli ya kozwa batisimo nsima ya komipesa na ngai mpo na kosalela ye na biloko nyonso oyo nazalaki na yango.”

Ndakisa ya baboti ezali mpe na bopusi makasi lokola emonisami na likambo ya elenge moklisto moko ya mwasi. Tata na bango apekisaki mama na bango koyekola Biblia elongo na ye mpe ndeko na ye ya mwasi mpe ndeko na ye ya mobali. Azalaki kobeta bango mpe kotumba mikanda na bango. Kasi mpo na mpiko mpe kondima makasi ya mama na bango, bana bamonaki ntina ya kosalela Jéhovah Nzambe. Elenge mwasi wana azwaki batisimo na mibu 13, mpe leki na ye ya mobali mpe leki na ye ya mwasi balandaki ndakisa na ye.

‘Nasili konuna’

Mokomi na Nzembo alobaki: “Mibange mpe bana elongo . . . bosanzola nkombo na Jéhovah.” (Nzembo 148:12, 13) Ya solo, mibange mpe basengeli koyeba ete basengeli komitya na ngambo ya Jéhovah. Nzokande, mibange misusu baboyaka kosala mbongwana. Bakanisaka ete: “Bakoki koteya mbwa ya mokolo makambo ya sika te.” Kasi, kanisa ete moto na kondima Abalayama azalaki na mibu 75 ntango Jéhovah ayebisaki ye ete: “Longwa na mokili na yo mpe na batata na yo mpe kenda na mokili mokolakisa ngai yo.” (Misala 7:3; Genese 12:1, 4) Moize azalaki na mibu 80 ntango Jéhovah atindaki ye ete: “Bimisa libota na ngai . . . na Ezipito.” (Exode 3:10) Mibali wana mpe bato mosusu bazalaki na bomoi ya bozwi ntango Jéhovah asengaki na bango ete bamonisa bolingo na bango mpe komipesa epai na ye. Bakakatanaki te mpo na koyanola na libyangi ya Jéhovah.

Ezali boni lelo? Shizumu azalaki bouddhiste na boumeli ya mibu 78 ntango abandaki koyekola Biblia. Libota na ye batemelaki ye, bapekisaki ye koyekola ata na ndako na ye moko. Bobele nsima na mbula moko ya boyekoli, amonaki ntina ya komipesa na Jéhovah mpe azwaki batisimo. Mpo na nini asalaki mbongwana wana? Alobi ete: “Lingomba ya lokuta ekosaki ngai na boumeli ya bambula mingi, yango wana nalingaki kolanda kozwa solo ya Jéhovah mpo na libela.”

Oyo ezali kobikisa bino sikawa’

Ntango eyei mokuse. Bomoi ya bato mingi, bakisa bomoi na yo moko, ezali na likama. Osengeli kotalela ete likambo ya komipesa epai na Jéhovah mpe kozwa batisimo ezali ya nokinoki mpe ya ntina monene. Ntóma Petelo amonisaki ntina na yango na maloba oyo: “Oyo . . . mpe ezali lelo kobikisa bino, yango batisimo.” Alimboli lisusu ete batisimo ezali “kolongola mbindo na nzoto te” (makambo oyo moto asilaki kosala liboso ete akokisa masengami mpo na batisimo) “kasi lisengi lisalemi epai na Nzambe mpo na lisosoli ya malamu.”​—1 Petelo 3:21.

Na kokokisaka masengami ya Jéhovah, moyekoli oyo auti kozwa batisimo akómi na lisosoli ya malamu. Na kolandaka kosalela Jéhovah na makoki na ye nyonso, akobatela kimya ya elimo mpe bosepeli. (Yakobo 1:25) Likoló na oyo nyonso, akoki mpenza kolikya epai na Jéhovah mpo na mapamboli mazangi nsuka kati na ebongiseli ya sika oyo ezali koya. Tika ete ezala bongo mpo na yo soki oyanoli malamu na motuna oyo ete: ‘Nasengeli kozwa batisimo?’

[Elilingi na lokasa 21]

Naino ezalaki ye mwana, Samwele asalelaki Jéhovah

[Elilingi na lokasa 22]

Moize azalaki na mibu 80 ntango Jéhovah apesaki ye mokumba

[Bililingi na lokasa 23]

Lelo oyo, bilenge mpe mibange oyo bazali kozwa batisimo bazali kozela na motema likoló kozwa bolamu ya seko kati na ebongiseli ya sika elakami na Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto