Mokili mozangi masumu: mokoki kosalema?
NA KARTYÉ moko ya kimya na engumba Tokyo, mbelá makasi eyokamaki na ntongo moko na eleko ya mpio. Na boumeli ya minute mitano to zomi, soko bato zomi bayokaki ntango mwasi moko mokaboli na bazulunalo azalaki konganga makasi wana bazalaki kolanda ye mpe kotobolatobola ye na mbeli. Moto moko te alukaki koyeba likambo nini lizalaki kosalema. Mwasi wana akufaki mpo ete makila mabimaki ye mingi na nzoto. Mokonzi moko ya bapolisi alobaki ete: “Soki moko na bato oyo bayokaki konganga na ye akendaki nokinoki koyebisa na bapolisi, mbele bomoi na ye ekokaki kobikisama.”
Atako baoyo bayokaki mongongo ya mwasi wana akomaki pene na liwa basalaki lokola nde bayebaki eloko te, bakokaki mpenza koloba na sembo nyonso ete bazalaki na likambo moko te? Mobali moko oyo ayokaki konganga ya mwasi oyo alobaki ete: “Lisosoli na ngai litungisamaki mingi mokolo ya mitano mobimba wana nayokaki nsango na ntina ya koboma wana.” Yango ezali kopusa biso na komituna soki lisumu ezali nini mpenza.
Lisumu ezali nini?
Kati na zulunalo Asahi Shimbun, Hideo Odagiri, molimboli na mikanda ya ntɔ́ki mpe molakisi na université ya Hosei, na Tokyo, alobaki na ntina na mayoki mauti na masumu, ete: “Nakoki kobosana te makambo oyo masila koleka na ntina na mayoki ya masumu mosusu, lokola moimi oyo ezali komonana epai na mwana moke, zuwa ya nsoni, kotɔnga moto. Nazwaki mayoki wana na ntango nazalaki naino na bakelasi ya ebandeli, mpe yango ezali kotungisa ngai kino lelo.” Osilá kotungisama motindo wana? Motema na yo ekweisaka yo soki osali likambo oyo oyebi ete ezali mabe? Mbala mosusu osali mabe te, kasi ozali ntango nyonso na mayoki oyo mazali kotungisa elimo na yo. Wana ezali nde mosala ya lisosoli na yo, mpe Biblia elobi na ntina na yango kati na eteni elandi ete: “Bapakano baoyo bazangi mibeko, awa ezali bango kosala makambo ya mibeko, bato yango, ata bazangi mpenza mibeko, bazali na mibeko kati na bango moko. Bazali komonisa polele ete makambo malaki mibeko makomami kati na mitema na bango. Lisosoli ya mitema na bango ekotatolaka, makanisi na bango ndenge na ndenge makolobela mpe bango mpo na kokweisa bango to kolongisa bango.” (Baloma 2:14, 15) Ee, bato mingi bakotungisamaka na ntango basali misala lokola ekobo, moyibi, mpe lokutá. Lisosoli na bango lizali kotatola ete yango ezali lisumu.
Nzokande, soki moto aboyi kolanda lisosoli na ye, yango ekozala lisusu mokambi mpe mobateli na ye te. Ekoki kotika kosala mpe ekobeba. (Tito 1:15) Ekotika kosala liboso na mabe. Yango wana, lisosoli ya bato mingi lelo lisili kokufa na ntina etali masumu.
Lisosoli ezali mwango bobele moko oyo epesi nzela na koyeba lisumu, to mpe ezali na mwango mosusu mpo na kososola likambo oyo ezali lisumu mpe yango ezali lisumu te? Esili koleka mibu 3 000, Nzambe apesaki buku ya Mibeko epai na libota na ye liponami, mpe na nzela ya Mibeko yango, masumu mayei ‘komonana lokola masumu.’ (Baloma 7:13) Ata likambo oyo lizalaki komonana liboso ete ezalaki mpenza mabe te, liyaki komonana polele ete ezalaki mpenza lisumu. Mpe Bayisraele, libota liponami na Nzambe, bamonanaki ete bazalaki bato ya masumu mpe na yango, bakweisamaki.
Wapi masumu oyo toyebi yango mpe mamonisami polele na Mibeko ya Moize? Na lolenge yango esalelami na Biblia, liloba lisumu elimboli kozanga kokokisa mokano na ntina etali Mozalisi. Likambo nyonso liyokani te na bomoto na ye, na mitinda na ye, na banzela na ye mpe na mokano na ye, ezali lisumu. Nzambe akoki te kotika ete ekelamu oyo ezangi kokokisa mokano na ye ezala na bomoi. Na ekeke ya liboso, moto moko oyo ayebaki Mibeko malamu apesaki likebisi oyo epai na baklisto Baebele ete: “Bandeko, bokeba ete moto moko te kati na bino akoma na motema mabe, oyo ezangi kondima, ete atangwa na Nzambe na bomoi te.” (Baebele 3:12, MN) Ee, kozanga kondima epai na Mozalisi ezali lisumu monene. Na yango, ndimbola ya lisumu oyo epesami kati na Biblia ezali mozindo koleka lolenge oyo bato bazali kotalela yango. Nkutu Biblia elobi ete: “Bato nyonso basali masumu mpe bazangi nkembo na Nzambe.”—Baloma 3:23.
Ebandeli ya lisumu
Yango elimboli ete moto azalisamaki na masumu? Te, moto ya liboso oyo azalisamaki na Jéhovah Nzambe, Mobandisi ya bomoi ya moto, azalaki ekelamu ya kokoka. (Genese 1:26, 27; Deteronome 32:4) Kasi, babalani ya liboso bazangaki kokokisa mokano wana bazangaki kotosa epekiseli bobele moko oyo Nzambe apesaki na ntina etali kolya “mbuma ya nzeté ya koyeba malamu mpe mabe.” (Genese 2:17) Atako bazalisamaki bato ya kokoka, bazangaki kokokisa mokano ya komonisa botosi nyonso epai na Tata na bango; bakómaki bato ya masumu mpe, na yango, bazwaki etumbu ya liwa.
Lisoló oyo ya kala lizali na boyokani nini na lisumu na eleko na biso? Biblia epesi ndimbola oyo ete: “Na bongo mabe ekotaki na mokili mpo na moto moko, mpe kufa ekotaki mpo na mabe. Kufa mpe epalanganaki epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe.” (Baloma 5:12) Biso nyonso tosili kosangola lisumu; na yango, tozwi etumbu ya liwa.—Mosakoli 7:20.
Milende misalami na bato mpo na kolongola masumu
Bakitani ya Adam basangolaki bobele lisumu te, kasi basangolaki lisusu lisosoli oyo Nzambe apesaki epai na ye. Lisumu ekoki kobimisa liyoki ya kozanga kimya. Lokola tomonaki yango liboso, bato balukaki myango mikeseni mpo na kolongola liyoki wana. Kasi, basili mpenza kolonga?
Na mikili ya Orient mpe na mikili ya Occident, bato bamekaki kobundisa mayoki ya lisumu na kobongoláká mitinda na bango na ntina na bizaleli to na koboyáká kondima ete yango ezali. (1 Timoté 4:1, 2) Ezalela ya bato ya masumu ekokani na moto oyo azali na fièvre. Tokoki kokokanisa lisumu na mikrobe oyo ezali kobimisa bilembo ya bokono, mpe lisosoli litungisami likokani na fièvre. Ata soki moto ya maladi aboyi kosalela telemometele, yango ekobongola te likambo oyo ete mobeli azali na fièvre. Kobwaka mitinda ya bizaleli malamu, lokola bato mingi kati na boklisto ya lokutá, mpe koboya kotósa litatoli ya lisosoli ekolongola lisumu soki moke te.
Moto akoki kosalela mai ya mpio mpo na kokitisa fièvre na nzoto na ye. Bobele bongo, basusu bazali komeka kokitisa mitungisi miuti na lisosoli na bango na kosaláká milulu ya kopetolama ya bato na lingomba ya Shintõ. Mai ya mpio ekoki kokitisa fièvre mpo na mwa ntango moke, kasi ekoki te kolongola eloko oyo ezali kobimisa yango. Na eleko ya Yilimiya, banganga mpe basakoli bamekaki kosala motindo moko mpo na kobikisa Bayisraele ya ntango wana. “Balongaki te” kobikisa bampota ya elimo mpe ya bizaleli ya bato yango, na kolobáká ete “Kimya ezali, kimya ezali.” (Yilimya 6:14; 8:11) Kosala milulu mpamba ya lingomba mpe koyembayemba ete “kimya ezali,” elongolaki libota na Nzambe te longwa na kobeba ya bizaleli na bango; bobele bongo lelo, milulu ya kopetolama ezali kobongola bizaleli ya bato te.
Na komeláká bankisi ya fièvre, moto ya maladi akoki kosalisama na yango, kasi mikrobe ya maladi ekotikala na nzoto. Yango ekokani na myango misalelami na lingomba Confucius mpo na kobundisa mabe na nzela ya mateya oyo babéngi ete li. Na libanda, ezali ntango mosusu kosalisa bato ete babutwa longwa na mabe, kasi kosalela li ezali bobele kosilisa masumu nzokande ekoki te kolongola mposa oyo bato bazali na yango mpo na kosala masumu, oyo ezali mpenza ntina ya etamboli mabe.—Genese 8:21.
Ezali boni mpo na liteya ya lingomba ya Buda oyo ete, kokota na moto na Nirvana ezali kopesa ye nzela na kolongola mposa na ye ya kosala masumu? Ezalela ya Nirvana, oyo elimboli “kozimisa,” ekanisami lokola ete ekoki kolimbolama te, ezali kolongola mposa mpe bilulela nyonso. Basusu bakanisi ete ezali nsuka ya bomoi ya moto. Ezali lolenge moko na koloba na moto oyo azali na fièvre ete, asengeli kokufa mpo ete ayoka malamu, boye te? Lisusu, kokota na Nirvana etalelami lokola likambo ya mpasi mingi, to ekoki kosalema te. Liteya oyo likoki mpenza kosalisa moto oyo azali na lisosoli ya mabe?
Kosikolama na lisumu
Ezali polele ete bafilozofi ya bato na ntina ya bomoi mpe mposa ya kosala masumu ekoki bobele kolalisa mpenza lisosoli. Ezali kolongola ezaleli ya bato ya masumu te. (1 Timoté 6:20) Likoki ezali mpo na kolongola masumu? Kati na Biblia, mokanda ya kala oyo ekomamaki na Moyen orient, tozali kokuta mwango ya kosikolama na masumu. “Ata masumu na bino ezali motane lokola ngola, ekokoma pee lokola mbula mpembe . . . . Soko bolingi mpe bozali na botosi, bokolya malamu na mokili.” (Yisaya 1:18, 19) Awa, Jéhovah azalaki koloba epai na Bayisraele, baoyo, atako bazalaki libota liponami, bazangaki kokokisa mokano ya komimonisa sembo epai na ye. Motinda oyo mozali mpe kosalelama mpo na bato nyonso. Mpo na kopetolama, na elobeli mosusu kosukolama na masumu, esengeli komonisa mposa ya koyoka mpe kotosa maloba ya Mozalisi.
Liloba ya Nzambe elobi na biso nini na ntina na kopetolama ya bato longwa na masumu? Lokola bato nyonso bakómaki basumuki na nzela ya moto moko, Biblia elobi ete bato ya botosi bakosikolama na mpasi na bango na nzela ya moto moko ya kokoka oyo monisaki botosi epai na Nzambe. (Baloma 5:18, 19) Lolenge nini? “Nzambe amonisi bolingo na ye epai na biso na nzela oyo, naino ezalaki biso bato na masumu, Klisto akufeli biso.” (Baloma 5:8) Lokola abotamaki moto ya kokoka, mpe ya kozanga masumu, oyo akokanaki na Adam ya ebandeli liboso ete asala lisumu, Yesu Klisto akokaki mpenza kolongola masumu ya bato. (Yisaya 53:12; Yoane 1:14; 1 Petelo 2:24) Kokufáká likoló ya nzeté ya mpasi lokola mosali na mabe, Yesu asikolaki bato longwa na boombo ya lisumu mpe ya liwa. Paulo alimbolaki epai na baklisto ya Loma ete: “Mpo ete wana ezalaki biso naino bato ya bolembu, na ntango elakami Klisto akufeli biso. . . . Motindo moko lokola lisumu mpe liwa eyangelaki lokola mikonzi, bobele bongo mpe ngolu ya Nzambe ezali koyangela na nzela na Yesu Klisto Nkolo na biso.”—Baloma 5:6, 21.
Liwa ya Klisto mpo na bato nyonso ezalaki “lisiko” lizali emekeli ya sikisiki mpo na kozongisa oyo Adam abebisaki. (Matai 20:28) Tokoki kokokanisa yango na nkisi oyo ezali kobundisa mikrobe oyo ezali kobimisa fièvre. Motuya ya mbeka na Yesu Klisto oyo esalelami mpo na bato, ekoki kobikisa bango longwa na ezalela ya mabe oyo euti na lisumu—mpe na kufa yango moko. Kobikisama wana emonisami na maloba ya elilingi kati na mokanda ya nsuka ya Biblia: “Na bipai nyonso mibale ya ebale, ezalaki na nzeté ya bomoi, kobótá mbuma mitindo zomi na mibale, sanza na sanza kobotáká mbuma na yango. Nkasa ya nzeté ezali mpo na kobikisa mabota.” (Emoniseli 22:2) Kanisa naino! Ebale ya elilingi na mai ya bomoi ezali kotiyola katikati na banzete ya bomoi oyo nkasa na yango ezali mpo na kobikisa bato. Biloko ya elilingi bipemami na Nzambe bimonisi bibongiseli bikamatami na Nzambe mpo na kozongisa bato ezalela ya kokoka na nzela ya mbeka na Yesu Klisto.
Mosika te, bimonaneli ya bisakweli oyo bizwami na mokanda ya Emoniseli, bikokokana. (Emoniseli 22:6, 7) Na yango, wana motuya ya mbeka ya lisiko ya Yesu ekosalelama nyonso epai na bato, bato nyonso balingi bosembo bakokóma na ezalela ya kokoka mpe “bakosikwama na boombo ya libebi mpo na kozwa bonsomi na nkembo ya bana na Nzambe.” (Baloma 8:21, MN) Kokokisama ya bisakweli ya Biblia emonisi ete kosikolama yango ya nkembo ebelemi. (Emoniseli 6:1-8) Mosika te Nzambe akolongola mabe na mokili mobimba mpe bato bakosepela na bomoi ya seko na paradis awa na mabelé. (Yoane 3:16) Mokili ekozala mpenza na masumu te!
[Elilingi na lokasa 7]
Mbeka ya lisiko ya Yesu ekopesa nzela na mabota, lokola oyo elakisami awa, ete bazala na bolamu ya seko