Bililingi ya Mokili na ndaká
Na nzela ya Silo—Bana malamu mpe bana mabe
NTANGO okanisaka mpo na bingumba to na bituka ya Mokili na ndaká, bankombo ya mibali mpe basi ya lokumu eyelaka yo na makanisi? Na ntembe te, mpo ete masoló ya Biblia mazali kolobela mingi mikóló. Kasi ezali boni mpo na bana mike ya eleko wana? Okanisaka bango kati na masoló wana?
Fɔtɔ́ oyo ezali na nsé epesi biso nzela na kotalela mingi masoló oyo ezali kolobela bana mike, oyo bamoko na bango basili kotika bandakisa malamu mpenza mpo na baklisto, mpe basusu basili kotika bandakisa oyo ezali kopesa likebisi. Nkeka oyo ezingelami na katikati emonani ete ezali bitika ya Silo.a
Na ntembe te ozali komikundola ete, wana Bayisraele bakɔtaki na Mokili na ndaká, basalaki liboso tabernakle ya Nzambe na mboka Gilegale, pene na Yeliko. (Yosua 4:19) Kasi na ntango ya kokabola mboka, hema wana ya bulee—oyo ezalaki moboko ya losambo ya Yisraele—ememamaki na Silo (Yosua 18:1), oyo ezalaki na ntaká ya bakilometele soko ntuku misato na nord ya Yelusaleme, na etuká na ngomba mingi ya Efraime. Mibali mpe basi ya Yisraele mobimba bazalaki kokenda na Silo; bazalaki mbala mosusu koyangana mingi mpenza kati na lobwaku oyo ezali na sud ya esika wana, epai tabernakle etɛlɛmisamaki mpenza. (Yosua 22:12) Okanisi ete bana mike bazalaki na esika wana?
Basusu bayaki wana. Ndakisa oyo tolingi kolobela mpenza ezali oyo ya Samwele. Baboti na ye, Elekana mpe Hana, bazalaki kofanda na engumba moko moke kati na nkeka epai na ouest. Mbula na mbula, bazalaki kokenda na Silo, wana ezalaki bango mbala mosusu komema bana oyo Elekana abotaki na mwasi na ye mosusu. Na nsuka, Jéhovah apambolaki Hana mpe apesaki ye mwana mobali oyo abengamaki nkombo Samwele. Na nsima, baboti na ye bamemaki ye na Silo ete afanda kuna mpe asala na tabernakle elongo na nganga monene, Eli.—1 Samwele 1:1 kino 2:11.
Elenge mobali wana, oyo azwaki mikumba mosusu kati na ndako ya Nzambe, na ntembe te azwaki mabaku mingi ya kotambola na nkeka ya zingazinga. (1 Samwele 3:1, 15) Mosusu oyo ezalaki na mabulu, ezwamaki na nzete ya olive, lokola yango emonani na fɔtɔ́ na lokasa 9. Tala ekengelo moko esalemi na mabangá. Basali na bilanga to babateli na mpate oyo bazalaki mosika, bakokaki kokengela longwa na motindo na ekengelo wana, kasi tokoki kokanisa ete elenge Samwele mpe amataki mpo na kotala mokili yango. (Tala 2 Ntango 20:24.) Longwa kuna na likoló, bazalaki na esika malamu mpo ete bakoka komona banyama mabe.
Na ntango wana, banzeté ezalaki mingi koleka sikawa; ata zámba ezalaki epai banyama mabe bazalaki kotambolatambola. (Yosua 17:15, 18) Tokoki komonisa yango na likambo lisalemaki na eleko oyo Elize autaki kokóma mosakoli monene ya Nzambe. Ezalaki ye kouta na Yeliko mpo na kokenda na Béthel, akómaki na etuká wana, oyo ezalaki na ntaká ya bakilometele soko zomi na mitano na sud ya Silo. Lolenge nini ayambamaki na bafandi ya Béthel, engumba oyo ekómaki esika ya losambo ya ngombe ya wolo? (1 Mikonzi 12:27-33; 2 Mikonzi 10:29) Emonani ete, mikóló batɛmɛlaki mosakoli ya Jehovah, mpe emonanaki ete bana na bango balandaki elimo wana.
Mokanda ya mibale ya Mikonzi 2:23, 24 (MN) moyebisi ete ebele na bana mike basekaki mosakoli ya Nzambe ete: “Buta, yo moto na libandi! Buta, yo moto na libandi!” Elizé asalaki nini? “Abengaki mabe likoló na bango na nkombo ya Jéhovah. Mpe ngombolo mibale ebimaki na zámba mpe epasolaki bana ntuku minei na mibale kati na bango.” Nyama wana ya mboka Sulia, oyo ebéngami ngombolo, ezalaki kotomboka soki moto abimeli ye to soki baluki koboma bana na ye. (2 Samwele 17:8; Masese 17:12; 28:15) Jéhovah asalelaki ngombolo wana mibale mpo na kopesa etumbu na baoyo bazalaki mpenza kotyola momonisi na ye, oyo ezalaki bongo kotyola Ye moko.
Ekokaki kosalema mbala mosusu ete mwana moke akutana na nyama mabe na nkeka wana ezalaki zingazinga ya Silo. Tala oyo esalisi biso na kososola kondima oyo baboti ya Samwele bazalaki na yango mpo na komema ye ete asala na tabernakle.
Liboso, mosaleli mosusu na losambo ya solo azalaki na kondima wana mpe na ezaleli ya kobanga Nzambe: ezalaki mosambisi Yefeta. Azalaki kolanda na etuka ya bangomba mingi na Galaad, na ngambo ya est ya Yordani. Mpo na kobundisa banguna na ye Baamona na ntina na molende na ye mpo na Jéhovah. Yefeta alapaki ndai mpo na kopesa ye mosangani na libota na ye oyo akobima liboso mpo na koyamba ye. Mwana na ye ya mwasi, oyo azalaki moseka, abimaki. Amemaki bongo mwana na ye bobele moko na hema ya Nzambe, na Silo, epai afandaki mpe asalaki na bosembo nyonso na boumeli ya bambula mingi.—Basambisi 11:30-40.
Ezaleli ya kobanga Nzambe mpe bosembo oyo Samwele mpe mwana mwasi ya Yefeta bamonisaki na etuká ya Silo, ekeseni na ndakisa mabe ya bana 42 ya mobulu oyo batyolaki mosakoli ya Jéhovah na etuka wana.—Tala 1 Bakolinti 10:6, 11.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala calendrier des Témoins de Jéhovah 1992, epai fɔtɔ́ oyo elakisami na monene na yango.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 8]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 9]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 9]
Safari Zoo Ramat-Gan, Tel Aviv