Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/12 nk. 5-7
  • Matomba nini Evanzile ekoki kozwila yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Matomba nini Evanzile ekoki kozwila yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Basalisamaki na Evanzile
  • Nsango malamu elimboli nini lelo?
  • Nguya ya Evanzile lelo
  • Mapamboli mpo na mikolo mizali koya
  • ‘Bazali koyeisa nsango malamu ya eloko moko oyo eleki malamu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Evanzile ezali mpenza nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • “Nsango malamu”!
    Tóyembela Yehova na esengo
  • Nsango malamu oyo bato nyonso basengeli na yango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/12 nk. 5-7

Matomba nini Evanzile ekoki kozwila yo?

BIBLIA etalelami lokola mokanda ya motuya mingi​—ata na bato oyo bandimaka te ete Nzambe azali. Nzokande, bobele bato moke bazali kotanga yango mpo na kosalela makambo mazali na kati. Lisusu, lokola nsango malamu oyo ezali kati na yango esili koumela penepene na mibu nkoto mibale, bato mingi bazali kokanisa ete esengeli koyeisa yango ya sika, koyokanisa yango na makambo ya mikolo na biso. Evanzile esili konuna to esila ngala? Soki moke te.

Bamilio ya mibali mpe basi, bilenge mpe mikolo bayebi ete Biblia ezali liziba monene ya lisalisi. Ezali lokola maloba ya ebandeli ya libongoli ya Biblia ebyangami Today’s English Version mazali komonisa yango ete: “Biblia ezali bobele mokanda monene te oyo tosengeli kosimba mpe kokumisa yango; ezali Nsango malamu mpo na bato ya bisika nyonso​—nsango oyo esengeli na mbala moko kososolama mpe kosalelama kati na bomoi ya mokolo na mokolo.”

Evanzile ezali kolimbola nini mpo na yo? Osalelaka yango lokola etambwiseli ya bomoi na yo? Totalela lolenge nini nsango malamu epesaki matomba epai na baoyo bayokaki yango na ekeke ya liboso mpe na mikolo na biso.

Basalisamaki na Evanzile

Na eleko na Yesu, bato oyo bazalaki kosala misala makasi, lokola balobi mbisi to basi ya mabala babendamaki na nsango malamu mpe bayekolaki solo na ntina na mokano na Nzambe mpo na bato. Nsango malamu esalaki mbongwana monene kati na bomoi na bango mpe mbala mingi epesaki bango libondisi ya mozindo. Na ndakisa, Marie Madeleine abikisamaki na bilimu mabe. Zakai, oyo azalaki kala mokonzi ya bakongoli ya mpako, atikaki lolenge ya bomoi na ye ya lokoso. (Luka 8:2; 19:1-10) Bakufeli miso mpe bato ya mbala babikisamaki ntango bayaki epai na Yesu, oyo azalaki kosakola nsango malamu. (Luka 17:11-19; Yoane 9:1-7) Yesu akokaki koloba na sembo nyonso ete: “Bakufi miso bazali kotala lisusu mpe mikakatali bazali kotambola, bato na mbala bazali kopetwa mpe bakufeli matoi bazali koyoka, bakufi bazali kosekwa mpe babola bazali koyoka nsango malamu.”​—Matai 11:5.

Nzokande, likambo lilekaki kobikisama na ntina, lizalaki lolenge oyo nsango malamu ebongolaki bomoi na mingi na babola yango. Bato na motema sembo batondaki na elikya mpo na mikolo mizali koya. Batyaki motema na bango kati na Bokonzi na Nzambe​—eloko oyo eleki évangile social na malamu. (Matai 4:23) Elikya na bango esukaki na mawa te mpo na liwa ya Yesu. Na ntina na makambo makomaki nsima ya liwa yango, Misala 5:42 elobi na ntina na bayekoli na ye: “Nde batiki te kolakisa mikolo nyonso kati na Tempelo mpe na ndako na bango mpenza mpe kosakola nsango malamu ete Yesu azali Klisto.” Na ekeke ya liboso, bato na mikili mingi bazwaki lisalisi ya kosakolama motindo yango.

Na eleko yango Bokonzi ezalaki nsango oyo eleki malamu. Nsango ya Bokonzi ezali kino lelo nsango malamu?

Nsango malamu elimboli nini lelo?

Soki ozali koluka mokili ya kimya, bongo osengeli kondima ete nsango malamu ya Bokonzi ezali solo ya malamu. Ya solo, ezali nsango bobele moko ya solo mpe ya koumela kati na mokili oyo etondi na ebele ya bamilió na bato bazali kolya malamu te to mpe bazangi bilei, esika bamaladi ya nsomo ezali likama mpo na bato nyonso, epai mobulu ezali ntango nyonso kobakisama, mpe epai kotengatenga ya biyangeli ezali kokola. Ezali elikya bobele moko mpo ete bato babonga mpenza.

Ezali mpo na yango Yesu asakolaki na ntina na eleko na biso ete: “Nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba, lokola litatoli epai na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Maloba oyo mazali kokokisama na lolenge ya kokamwa wana ba Témoins de Jéhovah bazali kosakola nsango malamu kati na mikili koleka 200. Mokanda moko ya Katolike, Nova Evangelização 2000, ekumisaki Batemwe na likambo yango, na kolobaka ete: “Epai wapi tokoki kokuta ba Témoins de Jéhovah? Na bikuke ya bandako na bato. Mpe mpo na kozala Témoin de Jéhovah, longola kozala moto ya Jéhovah esengeli lisusu kotatola. Yango wana tozali kokuta bango kosala mosala, kosakola, mpe kolakisa oyo bayekolaki.”

Kasi, bolamu ya nsango malamu ekoki koya yango moko na pwasa te. Ekosalisa baoyo bazali koyoka mpe kotosa yango. Mpo na komonisa likambo yango, Yesu asalaki bokokanisi na moto oyo abimaki mpo na kolona mboto. Balolenge mingi ekeseni ya mabelé epai nkona ekweaki elimboli bizaleli bikeseni ya motema oyo bayoki ya nsango malamu bazali komonisa. Yesu alobaki ete: “Ekoyoka moto Liloba na Bokonzi mpe ekokata ye ntina te, oyo mabe akoya mpe akobotola oyo ekonami na motema na ye . . . Ye oyo akonami likoló na mabelé malamu azali ye oyo ayoki Liloba mpe akati ntina, ye aboti mbuma mpe abimisi yango, mosusu mokama mokama, mosusu ntuku motoba ntuku motoba, mosusu ntuku misato ntuku misato.”​—Matai 13:18-23.

Lelo lokola na ekeke ya liboso, bato mingi bazali kosala makasi te mpo na kokanga ntina ya nsango malamu. Bazali kokanga ntina na yango te, mpe bazali kobungisa matomba monene. Basusu bazali komonisa bosepeli mpo na nsango malamu mpe bazali koyekola lolenge ya koyokanisa bomoi na bango na mokano na Nzambe. Na lolenge yango bazali kozwa mapamboli mingi. Ozali na etuluku oyo wapi?

Nguya ya Evanzile lelo

Makambo masalemaki mazali komonisa ete kososola nsango malamu ezali kosalisa baoyo “bazalaki na elikya te mpe bazalaki na Nzambe te.” (Baefese 2:12; 4:22-24) Roberto, mofandi ya engumba Rio de Janeiro azalaki na mposa ya lisalisi. Uta bomwana na ye, azalaki na lolenge ya bomoi ya mbindo, komelaka bangi mpe komibebisa na pite, mpe moyibi. Asukaki na kokangama na boloko. Kuna Roberto ayekolaki Biblia elongo na Temwe moko oyo azalaki koya kotala bato na boloko. Asalaki bokoli ya nokinoki na elimo na motindo boye ete mikolo na ye ya boloko mikitisamaki mpenza.

Nsima na kobima na ye na boloko, Roberto akutanaki na elenge mwasi oyo ye abetaki mpe alingaki koboma ye na monduki. Ye mpe azalaki koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah. Likambo nini lisalemaki? Eteni oyo elandi euti na mokanda moko oyo ezali koyebisa likambo yango: “Bakutanaki na Salle du Royaume mpo na mbala ya liboso nsima na likambo wana. Bokutani wana ezalaki likambo ya kosimba motema. Bango nyonso balelaki mpo na maoki ya motema mpe bayambanaki na bolingo ya bondeko. Sikawa ye oyo azalaki moyibi mpe moto oyo ye ayibaki bazali bango nyonso kokumisa Jéhovah.”

Moto mosusu, na nkombo ya Isabel, azalaki mpe na mposa ya lisalisi mpo ete azalaki mwasi ya bizaleli mabe. Azalaki komipesa na misala ya bilimu mabe mpe na bonganga mpe azalaki kotungisama na bilimu mabe. Wana abandaki koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah, amonaki ete nsango malamu ezali solo kosalisa. Nsima na mwa ntango asikwamaki na bilimu mabe mpe abongolaki bizaleli na ye​—ayekolaki komipekisa. Azali sikawa moklisto moko ya sembo, oyo ayebani lokola moto na bizaleli malamu elongo na basusu.

Ya solo, nsango malamu ezali bobele mateya ya mpamba te. Ezali na nguya ya kobongola bomoi. (1 Bakolinti 6:9-11) Esalaka ata koleka yango. Ezali lisusu komema na mapamboli mpo na mikolo mizali koya.

Mapamboli mpo na mikolo mizali koya

Engebene Liloba na Nzambe, mikolo mizali koya mibombi bilikya ya kitoko. Tokomona kokokisama ya libondeli oyo Yesu asalaki mpo ete Bokonzi na Nzambe eya mpe mokano na ye esalama na nse lokola na likoló. (Matai 6:10) Nsima na mwa ntango moke, ebongiseli ya biloko mabe ya ntango oyo elongo na libebi mpe mobulu na yango oyo ezali kookisa mpasi ekolongwa, mpe boyangeli ya likoló ya Nzambe, Bokonzi na ye ekoyangela bato nyonso ya motema sembo baoyo bamonisaki motema malamu ya koyoka mpe ya kotosa nsango malamu.​—Danyele 2:44.

Kobongisama ya makambo nyonso ekolanda mpo ete bato bakozwa mokumba ya kobongola mabelé ete makoma paradis epai bato na bopolo bakobika mpo na libela. (Nzembo 37:11, 29) Na ntembe te, ezali nsango malamu na koyoka ete mobulu, maladi, kozanga bilei, kobebisa mabelé, mpe bitumba ekolimwa mpo na libela. Okoki na makanisi komimona yo mpe libota na yo kobika kati na mokili ya sika na kimya mpe kolongono ya kokoka kozanga kobanga maladi mpe liwa?​—Emoniseli 21:4.

Ezali solo ete, bato mingi bazali komona nsango malamu motindo yango lokola ezali na ntina te mpe bobele ndoto mpamba. Kasi bazali komikosa. Nsango malamu etongami likoló na moboko makasi ya solo, mpe esilá kobongola bomoi ya bamilió na bato. Na yango, kobanga soki moke te ata basusu baboyi kondima.

Kanisa moto moko ya mayele oyo asombi lopango na esika oyo ezali kopusama na bokoli, na elikya ya kozwa litomba ya mosolo na ye. Moto akoki kopamela ye mpo ete asaleli mosolo na ye na lolenge yango? Te. Na kokesene tokoki koloba ete azali moto na mayele. Bongo, mpo na nini te kotala mikolo mizali koya na boyokani na Bokonzi mpe kotya mosolo na yo, soko tokoki koloba bongo, kati na nsango malamu? Mpo ete kondima nsango malamu elimboli kobika, ezali na lolenge mosusu te ya kotya mosolo oyo ekoki kopesa matomba lokola yango.​—Baloma 1:16.

Lolenge nini okoki kotya mosolo na yo kati na nsango malamu? Ya liboso, zala pene ya kolinga ete Nzambe ateya yo. Na nsima, sala na boyokani na oyo ozali koyekola. Landa masengami ya moboko lokola elimbolami na mosakoli Moebele ya ntango na kala ete: “Jéhovah alingi nini epai na yo? Bobele ete osala na boyengebene mpe olinga boboto mpe ete otambola na bopolo esika moko na Nzambe na yo.” (Mika 6:8) Koyekola kotambola elongo na Nzambe ezali kosenga ntango mpe molende. Nzokande, ba Témoins de Jéhovah, baoyo basalisaki Roberto mpe Isabel, bakozala na esengo ya kosunga yo​—lokola basili kosala yango mpo na bamilió na bato mosusu na boumeli ya bambula mingi.

Na kozelaka kokokisama ya bilaka na Nzambe, landa kobatela bozwi na yo na kozalaka na bomoi engebene nsango malamu, kosepelaka na kimya ya elimo mpe kokolisaka boyokani ya penepene elongo na Nzambe. Ekozala bozwi ya solosolo boye bokoki kobebisama te na kokwea ya mobulungano ya makambo na politike. Na nsuka ekomemela yo matomba ye kokamwa. Yango nini? Ntóma Yoane akomaki: “Mokili ezali nde koleka mpe mposa mabe na yango lokola, kasi ye oyo akosala mokano na Nzambe akoumela libela.”​—1 Yoane 2:17.

[Elilingi na lokasa 7]

Nkona ya nsango malamu ezali kokwea na lolenge nyonso ya mabelé

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Garo Nalbandian

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto