Nzambe akobosana te “bolingo bosili bino komonisa mpo na nkombo na ye”
“NZAMBE azangi sembo te ete abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bosili komonisa mpo na nkombo na ye, wana bosalelaki basantu mpe bozali se kosalela bango.” (Baebele 6:10, MN) Maloba oyo ya ntoma Paulo makokani epai na ba Témoins de Jéhovah ya Europe de lˈEst. Na kosalaka na bosembo nyonso mpo na nkombo ya Nzambe, basalaki mosala makasi na boumeli ya mibu mingi ya bipekiseli na biyangeli oyo bizalaki liboso kokambama na Union Sovietique. Jehovah abosani te misala malamu na bango mpe azali komonisela bango na kosopelaka bango mapamboli na nzela ya Bokonzi. Na ndakisa, totalela bobele rapport ya mbula ya mosala euti na koleka mpo na mikili misato kati na yango.
Bateritware oyo ebengamaki kala ete Union Soviétique
Rapport ya bateritware ya mikili ya oyo ebengamaki kala ete Union Soviétique mpo na mbula ya mosala 1992, motuya ya sika ya basakoli ebakisamaki na 35 %—longwa na 49 171 kino motuya ya 66 211! Kasi esuki te, mpamba te basakoli wana basalaki mpenza na molende, lokola yango emonisami na bokoli na motuya ya mikanda mikolimbolaka Biblia mpe bazulunalo oyo ekabolamaki. Basalelaki mpe malamu ba brochures ya minene mpe ya mike, oyo baka-bolaki ezalaki 1 654 559. Motuya yango moleki mbala misato motuya ya mbula oyo euti koleka, oyo ezalaki bongo 477 235! Kokabolama ya mikanda nyonso wana ebimisaki matomba nini? Motuya ya boyekoli ya Biblia ebakisamaki mbala mibale. Sikawa boyekoli ya Biblia 38 484 bozali kotambwisama.
Lisusu, bosangani kati na mosala ya pionnier auxiliaire ebakisamaki na 94 %. Yango epesaki lisungi monene mpo na kokoma na motuya monene ya bayekoli ya sika 26.986 oyo bazwaki batisimo. Soki tokokanisi yango na motuya ya 6 570 mpo na mbula euti koleka, emonisi bokoli ya 311 %!
Lolenge nini basusu kati na bato oyo bautaki kozwa batisimo babandaki kosepela na nsango malamu? Mbala mosusu mposa monene emonisamaki na Temwe oyo atambwisaki boyekoli ezalaki na ntina monene. Mokengeli-mokambi moko na lisanga ya Moldova, ayebisi ete:
“Ngai mpe mwasi na ngai tokendaki kotala mwasi moko oyo kala amonisaki mposa mpo na solo ya Biblia. Boyekoli ya Biblia ebandaki elongo na ye. Kasi, mobali na ye amonisaki bosepeli soko moke te. Mokolo moko ntango tozalaki kokende kotala ye mpo na kolanda boyekoli, malili ezalaki makasi mpe mbula mpembe ezalaki konoka. Bato bazalaki te na balabala, kasi tokomaki na ndako na ye na ngonga epesamaki. Alobaki na mobali na ye ete: ˈOmoni lolenge bato oyo bazali komibanzabanza mpo na biso? Atako mbula mpembe ezali konoka bakomi na ngonga malamu.ˈ Likambo oyo etindaki mobali na ye na kokanisa. Abongolaki makanisi na ye mpe abandaki kosangana na boyekoli, mpe sikawa ye mpe mwasi na ye bazali ba Batemwe oyo basili kozwa batisimo.”
Na libaku mosusu ezali bonkónde ya Temwe moko nde elamwisaki mposa mpo na nsango malamu. Nkulutu moko, bobele na Moldova, ayebisi likambo oyo:
“Mobali moko oyo nakutanaki na ye kati na teritware na ngai azalaki kosepela na ba Témoins de Jéhovah te. Azalaki koloba ete azali mosangani ya lingomba ya Orthodoxe, lokola tata na ye mpe nkóko na ye. Mpo na yango, asengaki ete nabima na ndako na ye. Nzokande, liboso ete nabima asengaki ngai ete nalimbwela ye ntina ya boyei na ngai. Nalakisaki ye Matai 28:19, oyo elobi ete: ‘Bokende kozalisa bayekoli na mabota nyonso; bobatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu.’ Napesaki ye adresse ya esika tosalaka makita na biso mpe nakendeki. Na kokamwa nyonso, nsima na mposo moko mobali yango ayaki na makita! Afandaki kino nsuka ya makita. Alimbolaki ete kati na mposo wana mobimba, aokaki mawa na motema mpo ete azangaki komonisela ngai boboto. Boyekoli ya Biblia ebandaki mbala moko, mpe sikawa azali moko ya bandeko na biso.”
Likambo mosusu ya ntina mingi kati na mobu ya mosala ezalaki lisungi monene lipesamaki mpo na kokokisa bamposa ya bandeko na biso na mokili wana. Na eleko ya mpiɔ ya 1991/1992, batone 400 ya bilei mpe ebele na bilamba mpo na mibali, basi mpe bana etindamaki mpo na baoyo bazalaki na bosenga. Biloko yango bikabolamaki na mikili nyonso ya oyo ebengamaki kala ete Union Sovetique, ata na bituka mosika lokola Irkoutsk na Siberie mpe na Khabarovsk, pene na Japon. Yango emonisi na lolenge ya solo ete Jehovah abosanaki te bolingo oyo bandeko na biso bamonisaki mpo na nkombo na ye! Komonisama wana ya bolingo ya bandeko epusami na elimo ya Jehovah, esalaki lisusu ete bazala na bomoko elongo na libota na bango ya mokili mobimba. Na ndakisa, ndeko mwasi moko na mokili ya Ukraine akomelaki comite ya filiale ete:
“Lisalisi oyo bopesaki biso esimbaki mitema na biso mpenza. Tozalaki na esengo kino tolelaki mpe totandaki Jehovah Nzambe mpo na ete abosanaki biso te. Ya solo, tozali naino na mikakatano mpo na biloko ya mosuni, kasi na lisalisi liuti na bandeko na biso ya Ouest, tozali kokokisa bamposa na biso ya mosuni. Sikawa mpo na lisalisi na bino, libota na biso likozala na makoki ya kolekisa ntango mingi na mosala ya Jehovah. Soki Jehovah alingi, ngai mpe mwana na ngai ya mwasi tokozala ba pionniers auxiliaires na boumeli ya basanza ya eleko ya molunge.”
Lisusu, milende ya kosalisa bandeko epesaki litatoli epai na bato ya libanda, mpo ete baoyo bazalaki kotala bakokaki komona bolingo oyo bandeko bamonisaki na misala. Libota moko ya lisanga mosusu likomaki ete: “Tozwaki lisalisi ya mosuni oyo esangisaki bilei mpe bilamba. Tozali na mposa na yango mingi! Lisungi mpe bilendiseli na bino ezali liteya epai na biso ete biso mpe tosengeli kosala malamu epai na basusu. Bato oyo bazali bandimi te mpe baoyo bazali kosepela na solo mpe na mabota na bango, bamonaki lolenge ya komonisa bolingo, ezalaki mpenza litatoli monene na ntina ya bolingo ya solo mpo na bandeko.”
Ba assemblées mitano ya district mpe assemblée internationale moko esalemaki na juin mpe juillet ya mobu moleki, na motó ya likambo “Bamemi na pole,” ezalaki elembeteli mosusu ya mapamboli na Jehovah likoló na mosala makasi na Batemwe na ye mpe bolingo oyo bamonisaki mpo na koyebisa nkombo na ye. Bato 91 673 bayanganaki na ba assemblees yango, mpe 8 562 bazwaki batisimo. Motango moleki monene ezalaki ya Saint Petersbourg, esika assemblée internationale esalemaki, ezalaki na bato 46 214—sangisa bandeko bautaki na bikolo soko 30 na mokili mobimba—bayanganaki na stade ya engumba Kirov.
Na Siberie mobali moko ya mibu soko 60 ayaki na esika ya assemblée na Irkoutsk bobele mpo na komona makambo mazalaki koleka. Alobaki ete: “Bayangani nyonso balati malamu, bazali na esengo na elongi na bango, mpe bazali na boboto kati na bango. Bato oyo bazali lokola libota oyo lizali na bomoko. Moto akoki kososola ete bazali baninga bobele awa na stade te kasi lisusu kati na bomoi na bango. Nazwaki mikanda kitoko mikolimbolaka Biblia mpe nayebi malamu sikawa lolenge nini lisanga yango ezali. Nalingi kozala na boyokani elongo na ba Témoins de Jéhovah mpe koyekola Biblia elongo na bango.”
Bobele na assemblée wana ya Irkoutsk, epai bato 5 051 bayanganaki, mwasi moko azalaki kosepela na solo, oyo autaki na Republique ya Iakoutie, na Siberie, ayebisaki ete: “Nazali komona bato, mpe ezali kopesa ngai mposa ya konganga na esengo. Nazali kotɔnda Jéhovah lokola asalisaki ngai na koyeba libota motindo oyo. Awa na assemblée, nasili kozwa mikanda, mpe nalingi kolobela bato mosusu mpo na yango. Nazali mpenza na mposa monene ya kokóma mosambeli ya Jehovah.”
Mokambi ya stade monene ya Alma-Ata, na Kazakhstan, epai bato 6 605 bayanganaki na assemblée ayebisaki maloba malandi: “Nakamwe mingi na ezaleli na bino. Sikawa nandimi solo ete bino nyonso, bilenge mpe mikóló, bozali bato na limemya. Nakoki te koloba ete nandimaka Nzambe, kasi nandimi makambo ya bulee oyo mamonisami na bondeko na bino, na ezaleli na bino mpo na makambo ya elimo mpe ya mosuni.”
Mokonzi moko ya bapolisi na assemblée ya Alma-Ata alobaki ete: “Nasili kokutana na bino mbala mibale, mbala wana nyonso ezalaki na assemblée. Ezali mpenza likambo ya esengo mingi kosala elongo na ba Témoins de Jéhovah.”
Roumanie
Jéhovah abosanaki te bolingo oyo bandeko ya Roumanie bamonisaki mpo na nkombo na ye. Mbula ya mosala oyo euti koleka, ebimisaki makambo mingi ya esengo mpo na Batemwe. Ya liboso, filiale moko efungwamaki lisusu Bucarest. Mosala ya Batemwe mopekisamaki na Leta na 1949. Biro ezali na bandeko mibali mpe basi soko 20 oyo bazali kosala na bandako ya sika. Filiale ezali kotalela mosala ya basakoli 24 752—motuya ya sika moleki monene oyo emonisi bokɔli ya 21 % likoló ya mwayene ya mbula euti koleka.
Nsima ya mibu mingi ya mosala ya kosakola na kobombama, basakoli bazali komesena mokemoke na mosala ya kosakola polele ndako na ndako. Likambo oyo lisalemaki na etuká Mureş ezali komonisa ete Batemwe bazali kosalela mabaku nyonso mpo na kosakola epai na bazalani na bango, ata ntango bazali kosala mibembo. Biro ya filiale ekomi ete:
“Mosakoli moko azwaki ekateli ya kosakola kati na engunduka na kolekaka na eteni moko na moko. Bato mingi bazalaki kosepela, kasi na eteni ya nsuka, akutanaki na mwa mikakatano. Moko te kati na basali mobembo azwaki bazulunalo na biso. Na nsuka, mobali moko oyo asilikaki makasi, atelemaki mpe angangaki ete: ‘Nakobwaka bazulunalo na yo nyonso na lininisa! Mpo na nini ozali kotungisa biso mingi boye na ntina na lingomba na yo?’ Mosakoli ayanolaki na boboto nyonso ete ata soki abwaki yango, moto mosusu akozwa na yango litomba—baoyo bakolokota bazulunalo yango. Emonaki ye kimya ya mosakoli wana, mobali yango akamwaki mpe akamataki bazulunalo mpe abandaki kokabola yango ye moko epai na basali mobembo oyo bazalaki kati na eteni wana. Na kokamwa, bango nyonso bazwaki moto na moto zulunalo moko. Nsima ya kokabola yango mobali wana ye moko azangaki zulunalo. Na yango, mosakoli atunaki ye: ˈMonsieur, olingi te kozwa zulunalo moko mpo na yo?ˈ Bongo mobali yango azwaki zulunalo moko epai na mosali mobembo mosusu oyo azalaki na yango mibale, mpe alobaki ete: ˈSikawa ngai mpe nasili kozwa yango!ˈ”
Kati na mikili mingi mosala ya kosakola ya ba Témoins de Jéhovah ezali mbala mosusu kokutana na botemeli ya bakonzi ya mangomba na boklisto ya lokuta. Na Roumanie, basángó ya lingomba ya Orthodoxe mbala mingi basilikaka na Batemwe. Kasi yango ekoki te kopekisa ete mapamboli ya Jehovah mazala likoló ya libota na ye mpo na bolingo oyo bazali komonisa mpo na nkombo na ye. Mokengeli moko ya zongazonga akomi ete:
“Tokendeki elongo na lisanga mobimba, kosakola na bamboka ya pembeni. Ezalaki na bandeko soko mokama. Tofutelaki motuka moko ete emema biso kino bakilometele 50 na kati ya mboka, na engumba moko ya moke. Tobyangaki bato mingi na lisoló ya bato nyonso oyo elingaki kosalema na ndako ya masano. Nokinoki nsima ya kobanda likita, sángó moko ya lingomba ya Orthodoxe ayaki mpo na kotya mobulu na likita na biso. Bakonzi ya Bapolisye bamekaki kopekisa ye, kasi aboyaki kofanda nyee. Abebisaki likita ntango abukaki talatala ya ekuke monene. Kasi bato mingi ya mboka yango basepelaki te na lolenge oyo sángó asalaki. Litatoli malamu lipesamaki na bayangani nyonso, mpe ebele ya mikanda mikabolamaki.”
Na mawa nyonso, na biteni mosusu ya mokili wana, Batemwe bazali mingi te. Ntango pionnier permanent moko akómaki na etuka ya Olt, akutaki bobele bandeko libwa na etuka wana mobimba, mpe na teritware monene oyo asengelaki kosakola. Nsima ya mbula moko motuya ya Batemwe emataki kino 27, kati na bango basakoli mitano bozongelaki lisusu molende na bango. Pionnier afandaki na engumba ya Corabia, epai Batemwe bazalaki te. Nsima ya mikolo bobele 45, sángó mokonzi abimisaki bifundeli na radio ya Craiova na ntina na mosala na bango ya kosakola. Alobaki ete basili “kotondisa” engumba ya Corabia na mateya na bango, kolukaka ete bato batika mangomba na bango. Botemeli elandanaki, na mokano ya kopekisa mosala mpe kobebisa lokumu ya Batemwe ya etuka wana. Ekómaki na nsuka na yango ntango bandeko bazalaki na Bucarest mpo na assemblée ya district. Sángó mokonzi ya lingomba ya Orthodoxe na Corabia apesaki liyebisi moko ya makasi nsima ya misa na ndako-nzambe: “Biso nyonso tosengeli kotambola na balabala mpo na kotinda bapolisye bazwa meko na ntina na Batemwe, baoyo basili kotondisa etuka oyo mobimba na mikanda na bango mpe basili kobebisa bato.” Kasi na butu oyo ezalaki liboso ete koyangana wana esalema, likambo moko ya kokamwa ebimaki. Etuluku moko ya basali na mabe babebisaki cathedrale mpe ndako ya masano ya engumba. Na yango, botomboki yango bosalemaki te!
Bateritware ya oyo babéngaki kala ete Yougoslavie
Mbula ya mosala 1992 ezalaki mobu moko ya nkaka mingi mpo na bandeko na biso na teritware ya Yougoslavie. Nzokande, bobele na ntango wana bakutanaki na makambo ya kosepelisa. Ezali likambo ya kolendisa na komona ete Jehovah abosani te mosala mpe bolingo oyo bamonisaki mpo na nkombo na ye.
Etumba ebandaki liboso na Slovenie, na nsima na Croatie, mpe esuki na Bosnie mpe na Herzégovine. Kati na mobu bobele moko, mboka wana moko ekabwanaki na bikólo mitano oyo bizali komeka kotya bandelo na bango, mibeko mpe mbongo na yango. Ebele na bandeko bakimaki bandako na bango mpe bakendeki koluka ebombamelo epai na bandeko na bango na bisika mosusu. Lokola na mikili misusu ya Europe de lˈEst, ba comités mpo na kopesa lisungi esalemaki na bingumba ya minene, mpo na kotalela bisika ya kolala, bilei mpe bilamba mpo na bandeko na biso oyo bazali na bosenga. Na boumeli ya mobu na mosala, batone 55 ya bilei ekabolamaki mpo na bandeko ya masangá esika mobulu mozali. Tozwaki mikanda mingi ya matondi.
Bandeko na Dubrovnik bayebisaki motindo nini bazali na botondi mpo na lisungi oyo epesamaki. Ndeko mwasi moko azalaki kozonga na ndako na liboke na ye ya bilei, moninga moko ya pembeni atunaki ye epai wapi asombaki maki. Ndeko mwasi ayebisaki ye ete bandeko na ye ya elimo ya bitoka mosusu nde batindelaki ye yango. Moninga wana ya pembeni akamwaki. Na libaku mosusu mobali moko oyo ayebanaki te abyangaki nkulutu moko longwa na Slovénie mpe alobaki ete: “Nayokaki ete ba Témoins de Jéhovah bazali kokabola na motindo mobongi bilei oyo bandeko na bango bazali kotinda. Natindaki maboke mingi mpo na bato, kasi moko te ekómaki. Nakoki kotinda biloko ya lisungi motindo wana epai na yo, mpo ete okoka kokabola yango?” Lisusu, bazulunalo mpe radio elobelaki malamu mosala na biso ya lisungi.
Ndeko moko oyo azwaki batisimo na assemblée internationale ya Zagreb na 1991 ayebaki ete mikakatano mikozala mingi, na yango asombaki bilei mingi oyo abombaki. Abombaki bilei yango na ndako na ye pene na esika etumba ezali kosalema. Ntango kozanga ya biloko ekómaki makasi, biloko yango bizalaki solo mapamboli mpo na bandeko.
Ndingisa ezwamaki ya kosalela motuka moko ya monene mpo na komema bilei ya ntina mpo na bandeko oyo bafandaki na Sarajevo, engumba oyo ezingelami na banguna. Tozali na esengo koloba ete kokabolama ya biloko wana elekaki na lolenge ya malamu.
Etumba ebomaki bato mingi kati na basivile. Na mawa, pene na nsuka ya mobu ya mosala bandeko na biso motoba mibali mpe basi mpe bato mibale oyo bazalaki kosepela na solo babungisaki bomoi na bango, mpe basusu bazokaki.
Ya solo, makambo mingi mazali komonisa ete, mbala mingi, kozala Témoin de Jéhovah ezali libateli. Na libaku moko, bandeko bazalaki kokende na assemblée ya district na Belgrade, basoda batelemisaki motuka, batunaki soki basangani ya lingomba boye bazalaki kati na bango. Bandeko bayanolaki ete bazalaki te. Basengelaki kolakisa mikanda na bango ya leta, mpe basusu kati na bango bazalaki na nkombo oyo ekokaki kolakisa ete bazali na lingomba wana. Basoda balobaki na bandeko ete bazali kokosa, kasi bandeko bazalaki na karte ya komonisa ete basilaki komilongola na lingomba wana; balimbolaki ete, atako babotamaki na lingomba yango, kasi sikawa bazali ba Témoins de Jéhovah, bazali kokende na assemblée na bango. Na yango, basoda batikaki bango kolanda mobembo na bango.
Ba pionniers bazali kolanda mosala na bango kozanga kokitisa milende na bango, mpe yango epesaki elendiseli mpo na mosala. Mosenzeli, na ezipeli na yango kitoko na langi, ezali kobongolama na mbala moko na minoko nyonso minene ya ekolo wana. Ezali kopesa epai na bato oyo balingi solo mpe boyengebene, “bilei na bango na elaka na yango.” (Luka 12:42) Na boumeli ya mobu ya mosala 1992 bandeko ya sika mibali mpe basi 674 bazwaki batisimo.
Na ntembe te, Nzambe abosanaki te mosala ya bandeko na Europe de l’est mpe bolingo oyo bamonisaki mpo na nkombo na ye. Lisusu, alingi ete basambeli na ye nyonso, ata bazali kofanda epai wapi, balanda toli kitoko oyo ntoma Paulo apesaki, kati na Baebele 6:11, oyo elobi ete: “Nde tolingi ete moto na moto kati na bino amonisa etingya ete atonda na elikya kino nsuka.”