Malamu na mabe: Etumba oyo eumeli bikeke mingi
NA MASAPO ya kala, “moto malamu” azalaki ntango nyonso kolonga banguya ya mabe. Kasi na bosolo, yango ezalaka likambo ya petee te. Kati na bomoi, emonanaka mbala mingi ete mabe nde ezali kolonga.
Mpokwa nyonso, makambo mabe mazali kolobelama mingi. Na nord ya États-Unis, mobali moko ya mboka Milwaukee abomi bato 11 akatikati nzoto na bango mpe abombi biteni yango oyo ekatami kati na congelateur na ye. Na ngambo mosusu ya mokili wana, mopaya moko akoti nokinoki kati na caféteria ya mboka Texas, afungoli mondoki na ye mpe abandi kobeta yango bibetela na boumeli ya minite zomi, kobomaka bongo bato 22 liboso ete amiboma ye moko. Na Corée, motemeli moko oyo ayini ba Témoins de Jéhovah azikisi Salle du Royaume na bango: bandimi 14 bakufi.
Longola makambo wana mazali na esika moko moko, ezali na likambo mosusu ya nsomo oyo ezali kongala kati na mokili mobimba: koluka koboma bikolo mobimba. Mitango mipesamaki ete bobele na ekeke oyo milio moko ya bato ya Armenie, milio motoba ya Bayuda mpe koleka milio moko ya bato ya Cambodge babomamaki na ntina na matata ya politike mpe ya koponapona mposo. Kati na mboka oyo ebengamaki kala ete Yougoslavie, bato mingi basili kobomama na oyo babengaki ete kopetolama ya ekolo. Moto moko te ayebi motuya ya bamilio ya bato basali likambo te baoyo banyokwamaki na mabele mobimba.
Makambo ya nsomo motindo wana mazali kopusa biso na komituna mpo na nini bato bazali kosala bongo. Tokoki te koyanola na motuna wana ya mpasi na kolobáká ete mabe wana ezali bobele likambo ya mwa bato oyo moto na bango ezali malamu te. Bonene ya mabe oyo esalemi na boumeli ya ekeke oyo ya ntuku mibale endimi ndimbola oyo te.
Mabe elimbolami lokola likambo oyo litemeli mibeko ya bizaleli malamu. Likambo ya mabe esalemaka na moto oyo akoki kopona kati na malamu mpe mabe. Mpo na bantina ekeseni, lolenge na ye ya kotalela makambo ebebisamaka mpe mabe ekozwa elonga. Kasi mpo na nini mpe lolenge nini yango ekomaka?
Bandimbola oyo mangomba mazali kopesa na ntina na mabe mbala mingi esepelisaka mpenza te. Thomas dˈAquin filozofe ya Katolike andimi ete “ebele ya makambo kitoko ekokaki kobungisa motuya na yango soki Nzambe apesaki nzela na mabe te.” Bafilozofe mingi ya protesta bazali na likanisi motindo moko. Na ndakisa, engebene mokanda LˈEncyclopédie britannique, Gottfried Leibniz azalaki kokanisa ete mabe ezali “bobele kokembisama ya malamu kati na mokili, kokembisama oyo ezali kokoma mingi na ntina na bokeseni kati na malamu mpe mabe.” Na maloba mosusu, azalaki kokanisa ete tozali na mposa ya mabe mpo na kokoka kosepela na malamu. Ezali lokola nde bazali koloba na moto oyo azali na cancer ete, maladi na ye ezali na ntina mpo ete moto mosusu ayeba mpenza ete azali na bomoi mpe na nzoto kolongono.
Makanisi mabe masengeli kozala na ebandeli na yango. Nzambe nde azali mobandisi na yango? Biblia eyanoli ete: “Tika te ete moto oyo amekami aloba ete: ‘Nazali komekama na Nzambe.’ Mpo ete Nzambe amekami na mabe te, ye mpe akomekaka moto te.” Soki makanisi mabe mautaka na Nzambe te, yango ezali kouta wapi? Ba versets elandi eyebisi biso epai yango ezali kouta: “[Kasi] moto na moto akomekamaka mpo na kobendama mpe kolengolama na mposa mabe na ye moko. Na nsima, esili mposa [kokola], eboti lisumu.” (Yakobo 1:13-15) Na bongo, likambo ya mabe ebotamaka soki tokolisi mposa mabe na esika ya kobwaka yango. Nzokande ezali na likambo mosusu.
Makomami malimboli ete bamposa mabe eyaka mpo ete bato basangolaki likambo moko ya mabe: kozanga kokoka. Ntoma Paulo akomaki ete: “Na bongo, mabe ekotaki na mokili mpo na moto moko, mpe kufa ekotaki mpo na mabe. Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe.” (Baloma 5:12) Na ntina na lisumu oyo tobotamaki na yango, makanisi na biso makoki kopusama na moimi na esika epusama na malamu, mpe motema mabe ekoki kolónga likoló ya ezaleli ya koyokela mawa.
Ya solo, bato mingi bayebi na lolenge bazalisami ete ezaleli boye ezali mabe. Lisosoli na bango—to ˈmibeko mikomami na mitema na bango,ˈ lokola ntoma Paulo abengi yango—ezali kopekisa bango na kosala mabe. (Baloma 2:15) Na esika bato basalaka mabe mayoki motindo wana makoki mpenza kolongolama, mpe lisosoli likoki kobeba soki totosi yango te.a—Tala 1 Timoté 4:2.
Kozanga kokoka ezali yango moko likambo oyo likoki kolimbola mabe oyo ezali komonana na eleko na biso? Jeffrey Burton Russell, mokomi na makambo ya kala amonisaki likanisi oyo: “Ezali solo ete mabe ezali kati na moko na moko na biso, kasi ekoki te kokokana na oyo esalemaki na Auschwitz (Camp de concentration na lokóta ya Pologne) ata soki tosangisi mabe mingi oyo esalemi na moto moko na moko. Na esika oyo mabe eleki mpenza koleka na kotalela bonene mpe lolenge na yango.” Ezali Yesu Klisto ye moko nde amonisaki na sikisiki oyo ezalaki liziba ya mabe wana oyo ezali na lolenge mosusu.
Mwa ntango moke liboso ya liwa na ye, Yesu alimbolaki ete bato oyo bazalaki kokana koboma ye bazalaki kosala makambo nyonso na mokano na bango moko te. Nguya moko oyo ezangi komonana ezalaki kokamba bango. Yesu ayebisaki bango ete: “Bino bouti na tata na bino, [Diable], mpe mokano na bino ezali ete bosala mposa na tata na bino. Ye mobomi na bato longwa na ebandeli atelemi kati na solo te.” (Yoane 8:44) Emonani polele ete Diable, oyo Yesu abengaki “mokólo ya mokili oyo,” azali mobandisi ya mabe.—Yoane 16:11; 1 Yoane 5:19.
Na boumeli ya bambula mingi, kozanga kokoka ya bato mpe bopusi ya Satana ebomi bato mingi. Mpe ezali na likambo moko te oyo limonisi ete bopusi yango likoló na bato ezali kokita. Mabe ekozala ntango nyonso? To banguya ya malamu ekolónga kosukisa yango?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kala mingi te, balukiluki bamonaki ete boyokani bozali kati na mobulu oyo molakisami na televizyo mpe mabe oyo bilenge bazali kosala. Kofanda na esika oyo mobulu ezali mingi to kati na libota likabwani ezali lisusu kopesa nzela na bizaleli mabe. Na boyangeli ya Nazi na Allemagne, ezaleli ya koponapona mposo oyo ekumisamaki mingi ememaki bato na kolongisa to na kokumisa, minyoko makasi oyo bayeiselaki Bayuda mpe ba Slaves.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]
Cover: U.S. Army photo
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
U.S. Army photo