Mabe nini ezali na mposa ya mbongo?
PAUL mpe Mary bazalaki bankolo ya magazini moko monene na quartier moko ya bobola na mokili ya Afrika.a Na kosaláká mosala makasi butu na moi, bazwaki mbongo mingi. Nsima na mwa ntango Mary amikumisaki na ntina na ndako monene oyo etondaki na biloko ya motuya. Mpo na Paul, azalaki kolakisa vuatire kitoko ya ntalo mingi.
Mokolo mosusu etuluku moko ya batemeli na boyangeli bayaki epai na Paul. Bayebisaki ye ete: “Tolingi ete mombongo na yo epesaka ba dollars 100 sanza na sanza mpo na kosunga etuluku na biso.” Lokola baboyaki komikotisa na kowelana ya politike, Paul mpe Mary baboyaki na mpiko nyonso. Mpo na etelemelo na bango ya bokatikati, bakanisaki ete bazali kozwa mosolo na boyangeli mpo na kokolisa mombongo na bango. Mokolo moko ya nsuka na poso, wana Paul na Mary bazalaki na engumba te, bapunzaki magazini na bango, mpe batumbaki motuka mpe ndako na bango kitoko.
Ya solo, oyo ezali lisoló ya mawa, kasi ekoki nde koteya biso? Ekoki kozala ete bato mingi oyo basalaki makasi mpo na kozwa mosolo mingi bakutanaki te na makama oyo elongolaki bango bozwi nyonso, kasi ezali boni mpo na mikolo mizali koya? Mpo na nini Biblia ezali koloba ete “baoyo bazali na mposa na kozwa mosolo, bakokwea na kati na komekama mpe na lilonga, mpe kati na mposa ezangi ntina mpe ekoyokisa mpasi. Mposa yango ekozindisa bato na liwa mpe libebi nye”?—1 Timoté 6:9.
Likanisi libongi na ntina ya Mbongo
Engebene Biblia, moklisto ya solo asengeli kokokisa bamposa ya basangani na libota na ye oyo bazali epai na ye. Makambo mosusu, lokola kozanga mosala to kolongono mabe ya nzoto, makoki koyeisa yango mpasi. Epai mosusu, moklisto oyo azali komonisa na nkó nyonso bopotu ya kokokisa mposa ya libota na ye “asili koboya kondima mpe aleki mabe moto oyo azangi kondima.”—1 Timoté 5:8.
Na bituka mosusu, bato babikelaka na mosala ya mabelé, balonaka bilei na bango mpe babokolaka bibwele. Basusu basalelaka mpenza mbongo mingi te, basalaka misala to basombitinyaka biloko mpo na kozwa oyo basengeli na yango mpo na kobikela. Nzokande, ebele na mibali bazali kokokisa bamposa ya mabota na bango na kosaláká mosala oyo bakofutaka bango mbongo. Na mbongo oyo bazali kozwa bakoki kosomba bilei mpe biloko mosusu mpo na bolamu na mabota na bango. Lisusu, mbongo oyo esalelami malamu ekoki kozala libateli na ntango ya mikakatano to ya makama. Na ndakisa, ekoki kosalelama mpo na komisalisa na ntango na bokono, to kobongisa ndako. Yango wana Biblia ezali koloba na bosolo nyonso ete “mosolo ekobatelaka” mpe “ekosilisa ntembe nyonso.”—Mosakoli 7:12; 10:19.
Mpo ete mbongo ekoki kosala makambo mingi, likama lizali na kokolisa likoló na nguya na yango makanisi mabongi te. Moklisto asengeli kososola malamu bandelo na mbongo na bokokanisi na makambo mosusu oyo ezali na motuya mingi. Na ndakisa, Biblia ekokanisi motuya ya mbongo na mayele mauti na Nzambe na maloba oyo: “Mpo ete mayele ekobatelaka lokola ekobatelaka mosolo. Malamu na mayele ezali ete mayele ekobikisa bomoi na ye oyo azwi yango.” (Mosakoli 7:12) Na meko nini mayele mauti na Nzambe mazali na litomba mingi koleka mosolo?
Liteya liuti na Makambo ya kala
Makambo makomaki na Yelusaleme na mobu 66 T.B. mazali komonisa litomba ya mayele mauti na Nzambe likoló na mosolo. Nsima ya kobengana mampinga ya Baloma, Bayuda ya Yelusaleme bakanisaki mpenza ete makoki ya kokolisa mombongo malingaki lisusu kobonga. Na yango, babandaki kobimisa mbongo na bango moko mpo na kokumisa bonsomi na bango oyo bautaki kozwa yango sika. Mosolo na bango mokomamaki, na monoko ya Liebele, na maloba lokola oyo “Mpo na bonsomi ya Siona” mpe “Yelusaleme Mosantu.” Mbula na mbula bazalaki kobimisa mbongo ya sika na makomi oyo mazali komonisa yango lokola oyo ete: “mbula ya mibale,” “mbula ya misato,” mpe “mbula ya minei.” Bayekoli ya biloko ya kala bakundolaki na mabelé ata mwa ndambo ya mbongo oyo ezalaki na makomi “mbula ya mitano,” oyo ekokani na mobu 70 T. B. Baklisto Bayuda batalelaki mbongo wana ya sika ya Bayuda lokola elembo ya solo ya bonsomi ya koumela?
Soko moke te. Mpo ete babatelaki maloba ya mayele ya Nkolo na bango. Yesu asilaki kosakola boyei ya Baloma mpo na kokamata mboka, oyo esalemaki na mobu 66 T.B. Akebisaki bayekoli na ye ete soki yango ekómi, basengeli ‘kobima na Yelusaleme.’ (Luka 21:20-22) Lisoló ya bato emonisi ete baklisto Bayuda basalaki mpenza bongo. Bandimaki kobungisa biloko na bango, mpe kozanga makoki ya kokolisa mombongo mpo ete batikaki Yelusaleme. Mbula minei na nsima, mampinga ya Baloma mazongaki mpe mazingaki engumba.
Engebene litatoli ya Josèphe, mokomi na makambo ya kala, “wolo ezalaki mingi kati na engumba.” Kasi ebele na mosolo wana ebikisaki Yelusaleme te na nzala, oyo “ekolaki mingi” mpe ezalaki “kosilisa basangani nyonso ya ndako moko mpe mabota mobimba.” Bato mosusu bazalaki komela mbongo esalemi na wolo mpe bazalaki komeka kokima engumba. Kasi bazalaki kobomama na banguna na bango baoyo bazalaki kopasola mabumu na bango mpo na kobimisa mosolo yango. Josèphe alimboli ete: “Mpo na mozwi, kotikala kati na engumba ezalaki na likama motindo moko na kokima yango; mpo ete moto azalaki kobomama na ntina na bozwi na ye na mokalo ete alingi kokima.”
Sanza motoba ekokaki naino te uta kozingama ya engumba ebandaki, Yelusaleme ebebisamaki mpe koleka milió moko ya bato na yango bakufaki na nzala, na maladi mabe, mpe na mopanga. Mposa ya mbongo ekangaki miso na bato mingi, komemáká bango kati na libebi mpe na mpasi, nzokande kosalela maloba ya mayele epesaki baklisto Bayuda makoki ya kokima mpo na komibikisa.
Wana ezalaki mbala ya liboso te na lisoló ya bato oyo emonisi ete mbongo ekoki te kobikisa bato na ntango ya mpasi. Mposa ya mbongo ezali mpenza nkolo mabe! (Matai 6:24) Na koleka, ekoki lisusu kolongola biso bolamu ya ntango oyo.
Bisengo oyo Mbongo ekoki kosomba te
Mposa makasi ya kokóma mozwi ekoki kopekisa moto na komona makambo mingi oyo ezali kopesa bisengo mpe ezali kosenga mbongo mingi te. Na ndakisa, kanisa esengo ya boyokani malamu kati na libota, baninga ya solo, makambo kitoko mazali na mokili, kolimwa kitoko ya moi, ekumbaki monene, likoló litondi na myoto, kosakana ya banyama to bafololo mpe banzete kati na zamba oyo ebebisami te.
Ezali solo ete, bato mosusu ya bozwi bazali na ntango mingi ya kosepela na makambo oyo tolobeli awa na likoló, kasi mingi kati na bango bamipesi mpenza na koluka kobatela bozwi na bango to ya kofulukisa yango. Ezali likambo ya kokamwa, na komona ete bolamu ezali mbala mingi kokima baoyo bazali na makoki ya kosepela. Likambo yango ezali kokamwisa balukiluki ya ntango na biso. Kati na mokanda na ye L’argent et l’inconscient — étude d’une obsession, Thomas Wiseman abimisaki motuna oyo: “Ndenge nini tokoki kolimbola likambo oyo ete eloko oyo bato bazali mpenza koluka yango, mpe oyo bazali kotalela yango lokola ekosala makambo nyonso, ntango bazwi yango ekobimisa mobulungano mpe mayoki ya mawa?”
Likambo moko oyo ekoki kolongola esengo epai na mozwi ezali mokakatano ya koyeba banani bazali solo baninga na ye. Salomo, mokonzi oyo azalaki na bozwi mingi amonaki bosolo na likambo yango, “wana biloko ekofuluka, baoyo bakolya yango bakoya mpe mingi.” (Mosakoli 5:11) Bazwi mingi bazali mpe na motema likoló mpo na koluka kobatela to kofulukisa bozwi na bango. Mbala mingi, yango ezali kopekisa bango kolala mpongi ya malamu. Biblia elimboli ete: “Mpongi na moto na mosala ezali kitoko, ata alei moke to mingi; kasi biloko mingi na mozwi ekopekisa mpongi na ye.”—Mosakoli 5:12.
Mposa ya mbongo ekoki kobebisa boyokani kati na libota mpe kati na baninga, mpo ete ekoki kotinda moto na kosalela makambo mazangi kolongobana to kosala makambo mabe. Mbala mingi baoyo balingi mbongo bamipesaka na masano ya mbongo. Ezali likambo ya mawa na komona ete mposa makasi ya kobeta lisusu mbala moko masano ya mbongo ezali komema bato mingi kati na nyongo. Monganga moko ya Afrique du Sud oyo asalisaka maladi ya makanisi alobaki ete, “Wana bazali kokóma epai na ngai, [babeti oyo bamipesa na masano ya mbongo] mbala mingi basili koleka ndelo oyo bakoki kozwa lisungi; basili kobungisa mosala na bango, mombongo na bango, ndako na bango mpe mabota na bango masili kokima bango.” Likebisi oyo ya Biblia ezali mpenza solo: “Moto na bosembo akoyikana na mapamboli, kasi ye oyo [akowela kozala na bozwi mingi] akozanga etumbu te.”—Masese 28:20.
“Ekomibimisela Mapapu . . . mpe ekopumbwa mosika”
Ezali na ntina mosusu oyo mpo na yango mposa ya mbongo ezali likama. Ya solo, biyangeli na bato bilongi te koyokana mpo na kobatela motuya ya mosolo kati na mokili mobimba; bilongi mpe te kopekisa kotengatenga to kokita ya motuya ya mosolo, kokwea ya motuya ya biloko. Kobuba, moyibi, mpe kosila motuya ya mosolo ezali lisusu kondimisa bosolo ya maloba oyo mapemami: “Sala makasi te mpo na kozala mozwi, tika mpo na boyebi na yo moko. Okotya miso na yo na yango ezali te? Mpo ete biloko na mozwi ekomibimisela mapapu solo, ekopumbwa mosika lokola mpongo kati na lola.”—Masese 23:4, 5.
Kokita na motuya ya mosolo. Mokakatano oyo mosuki te bobele na mikili ya bobola. Na ebandeli ya ekeke oyo ya ntuku mibale, kokitisama ya motuya ya mosolo ezalaki makasi na mikili ya bozwi ya Europe centrale. Na ndakisa, liboso ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mark allemand moko ekokanaki na shilling britannique, na franc français, to na lire ya Italie. Nsima na mbula zomi, shilling, franc, mpe lire ekokanaki mwa moke na mark 1 000 000 000 000. Kokita monene ya motuya ya mosolo ezali na bopusi nini likoló na bato kati na mikili ya bozwi? Kati na mokanda na ye Wana mbongo ebebi, Adam Fergusson alobaki ete: “Soki totaleli likambo likomelaki banguya ya centre nsima na kokwea na bango, na ebandeli ya bambula 1920 ezali likambo oyo tokoki kozwa liteya na yango, boye [kokwea ya mosolo] ebimisaki lokoso, mobulu, kozanga esengo, mpe koyinana, oyo mbala mingi eutaki na kobanga, mpo na komonisa ete etuluku moko te ekoki kobima kozanga kobeba mpe kozanga kobongwana.”
Na 1923, Allemagne ezongisaki motuya na mosolo na yango na kolongoláká bazero na yango 12, na boye ete mark moko ya sika ekokanaki lisusu na ba marks 1 000 000 000 000 ya kala. Likambo yango epekisaki kokita na motuya ya mosolo kasi ebimisaki makama mosusu ya minene. Fergusson alimboli ete: “Kobongisama ya mosolo, ekweisaki bankoto ya bato, elongolaki makoki ya komileisa epai na bamilió ya bato, mpe elongolaki elikya ya bamilió mosusu, kobimisáká mpasi mosusu ya nsomo oyo mokili mobimba mosengelaki kokutana na yango.” Na ntembe te “mpasi ya nsomo” oyo mokomi azalaki kokanisa ezalaki kobima ya nazisme mpe Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.
Koyeba ete mosolo mingi na banques mopesaki lisungi te epai na bato mingi na ntango ya kala esengeli kozala likebisi ya ntina monene na mikolo oyo ya kotengatenga na nkita ya mokili mobimba. Mwana na Nzambe ye moko akebisaki ete mosolo mokobungisa motuya na yango, likambo oyo lisili komonana mbala na mbala. (Luka 16:9) Kasi kokweisama oyo eleki monene ya mosolo ekoya ntango Jéhovah Nzambe akoyeisa lisambisi na ye likoló na mokili oyo mabe. “Bozwi ekosunga na mokolo na nkanda te, nde boyengebene ekobikisa moto kati na kufa.”—Masese 11:4.
Na yango, ezali likambo ya ntina ete moko na moko na biso abunda makasi mpo na kobatela boyokani ya sembo elongo na baninga na biso ya solo, Jéhovah Nzambe mpe Yesu Klisto!
Liziba ya Bolamu ya koumela
Paul mpe Mary, oyo balobelami na ebandeli ya lisoló oyo bazalaki ba Témoins de Jéhovah. Basalaki mosala ya pionnier na boumeli ya mibu mingi. Nzokande, mposa na bango ya bozwi esalaki ete batika kosangana na makita ya lisangá, mpe kosakola kondima na bango epai na bato nyonso. Kasi balamukaki lisusu na elimo. Nsima ya kopunzama mpe ya kobebisama ya ndako na ye, Mary alobaki ete: “Sikawa namoni ete ezalaki na ntina moko te ya kobungisa ntango mpe makasi na ngai mpo na biloko oyo bikoki kolimwa na minutes moke.” Na esengo, babalani wana bazwaki liteya yango liboso ete elikya nyonso elimwa. Ya solo, likama lileki monene oyo mposa ya mbongo ekoki kosala ezali ya kopekisa moto ete andimama na Jéhovah Nzambe mpe Yesu Klisto. Soki tozangi baninga wana, elikya nini tokoki kozala na yango mpo na kobika na nsuka ya mokili mabe oyo mpe kokota na mokili ya sembo molakami na Nzambe?—Matai 6:19-21, 31-34; 2 Petelo 3:13.
Na yango, ata okanisi ete ozali mozwi to mobola, omisenzela ete okolisa mposa ya mbongo te. Sala makasi na kozwa mpe kobatela bozwi oyo eleki monene—kondimama na Jéhovah, Nzambe. Okoki kosala yango na kotya ntango nyonso likebi na yo na libyangi oyo ya nokinoki: “Elimo mpe mwasi na libala balobi ete: ‘Yaka!’ Tika moyoki aloba ete: ‘Yaka!’ Tika ete moto na mposa na komela aya; mpe oyo azali na mposa akamata mai na bomoi lokola likabo.”—Emoniseli 22:17.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Their real names are not used.
[Bililingi na lokasa 8, 9]
Liboso mpe nsima ya mbongo etutami na boumeli ya botomboki na Bayuda, elongo na likomi “mbula ya mibale”
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.