Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/2 lok. 24
  • Kosalisa mibange ezali mpasi kasi epesaka esengo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosalisa mibange ezali mpasi kasi epesaka esengo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mikumba ya Bizaleli malamu mpe ya Makomami
  • Tolónga Mikakatano oyo mibimisami
  • Kobungisa Bonsomi
  • Kopesa Bango Misala
  • Ntango Baboti bakómi Mibange
  • Esengeli kokokisa Bamposa ya Mayoki
  • Baoyo bazali kobatela Bato na Maladi bazali mpe na Mposa ya Likebi
  • Liziba ya Esengo
  • Tókumisa baboti na biso atako bakómi mibangé
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Libota ya boklisto esalisaka mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Ndenge ya kosunga mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Biblia elobi nini na likambo etali kosunga baboti oyo bakómi mibange?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/2 lok. 24

Kosalisa mibange ezali mpasi kasi epesaka esengo

SHINETSU, ndeko mobali moklisto, azalaki kosepela mingi na mosala na ye. Azalaki kofanda elongo na mwasi na ye mpe mama na mwasi na ye. Bango nyonso misato bazalaki na esengo mingi ya kosala elongo na lisangá moko moke ya ba Témoins de Jéhovah, kolakisáká bato Biblia, wana basengaki ete Shinetsu atalela libaku ya kotambola elongo na mwasi na ye mpo na kotala masangá mosusu. Esengelaki ete poso na poso akende na esika mosusu. Azalaki kosepela na libaku yango, kasi nani alingaki kobatela mama ya mwasi na ye?

Mabota mingi bakutanaka na mikakatano lolenge yango​—ndenge nini kobatela baboti oyo basili kokóma mibange. Mbala mingi likebi etyamaka mpenza mingi te na likambo yango ntango baboti bazali na na nzoto kolongono mpe bazali na makasi. Nzokande, makambo ya mikemike makoki komonisa ete babandi konuna, lokola kolenga ya maboko wana balingi kokotisa nsinga na lidusu ya ntonga to bazali na mpasi komikundola epai batyaki eloko moko oyo bazali koluka. Nzokande, mbala mingi likama to bokono ya mbalakaka nde ezali kotinda ete basosola bamposa na bango. Esengeli na ntango wana kopesa lisalisi.

Na mikili misusu baboti oyo bazali na nzoto kolongono balingaka kolekisa bambula na bango ya mobange bango moko na esika ete bazala elongo na bana na bango. Na mikili misusu, lokola na bikólo mingi ya Orient mpe ya Afrika, ezali momeseno mpo na mibange kofanda elongo na bana na bango, mingi mpenza elongo na bana ya liboso. Likambo yango ezali mpenza bongo ntango moko na baboti azali kokoka lisusu kotambola te. Na ndakisa, na Japon penepene na mibange 240 000 oyo bazali na mibu 65 to koleka, baoyo bakoki te kotambola, bazali kozwa libateli na ndako ya mabota na bango.

Mikumba ya Bizaleli malamu mpe ya Makomami

Atako tozali kobika na libota oyo bato mingi basili kokóma “balingi na bango moko,” bazangi “bolingo,” biso tozali na mikumba ya bizaleli malamu mpe ya Makomami na ntina ya mibange. (2 Timoté 3:1-5) Tomiko, oyo azali kobatela mama na ye oyo anuni mpe azali kobela bokono ya kolembisa nzoto (Parkinson), amonisaki mokumba ya bizaleli malamu oyo azalaki na yango mpo na mama na ye ete: “Abatelaki ngai mibu 20. Sikawa nalingi kosala bobele bongo mpo na ye.” Mokonzi na mayele Salomo apesaki elendiseli oyo: “Yokamela tata na yo oyo abotaki yo mpe tyola mama na yo te wana ekonuna ye.”​—Masese 23:22.

Ezala makanisi mabe ya lingomba to nkanda oyo baboti bazangi kondima bazali komonisa, ekoki kolongola te motinda wana ya Makomami. Ntoma Paulo akomaki na kopemama na elimo ete: “Soko moto nani akoleisa bato na ye te mpe na koleka bato kati na ndako na ye moko te, asili koboya kondima mpe aleki mabe moto oyo azangi kondima.” (1 Timoté 5:8) Yesu atikeli biso ndakisa, na moko na makambo asalaki liboso na liwa na ye, azwaki bibongiseli mpo ete mama na ye abatelama.​—Yoane 19:26, 27.

Tolónga Mikakatano oyo mibimisami

Ntango mabota masangani lisusu nsima na mibu mingi ya bokabwani, esengaka ete mabongwani mingi esalema. Ekosenga bolingo mingi, motema molai mpe komitya moto na moto na esika ya moninga. Soki mwana mobali ya liboso, to mwana mosusu ya mobali to ya mwasi, asengeli kokende elongo na libota na ye kofanda na ndako ya baboti, makambo mingi ya sika makobima. Ekosenga mbala mosusu mosala ya sika, biteyelo ya sika mpo na bana mpe komesene na quartier ya sika. Mbala mingi ekobakisa misala ya ndako mpo na mwasi ya libala.

Ekozala mpe likambo ya mpasi mpo na baboti komesene na mabongwani wana. Mbala mosusu basilaki komesene kozala bango moko, na kimya mpe na bonsomi; sikawa bakozala na makelele ya bankoko na bango mpe baninga na bango. Bameseneki kozwa bikateli na bango mpe bakoki kolinga te ete bapesa bango bitinda. Baboti mingi, na kokanisáká mikolo oyo mabota na bana na bango bakoya kofanda na bango elongo, batongaki bandako mosusu kati na lopango to mwa biteni ya kobakisama na ndako na bango elongo na elekeli oyo ekangisi yango, mpo na kopesa bato nyonso mwa bonsomi.

Soki ndako ezali moke, mabongwani ya minene masengeli kosalema mpo na koyamba baoyo bakoya. Mama moko ya libota asekaki ntango amikundolaki lolenge bana na ye ya basi minei babulunganaki ntango biloko mosusu bisengelaki kokota na ba chambres na bango mpo ete esika ezwama mpo na nkoko na bango ya mwasi ya mibu 80. Nzokande, makambo mingi mabongisamaka yango moko soki moto na moto asosoli ntina ya kosala mabongwani mpe amikundoli toli ya Biblia oyo elobi ete bolingo “ekolukaka matomba na yango moko te.”​—1 Bakolinti 13:5.

Kobungisa Bonsomi

Mokakatano monene mokoki kobima mpo na mwasi moklisto soki mobali na ye azali mondimi te mpe soki azwi ekateli ete bakende kofanda elongo na baboti na ye. Mikumba ya kotalela libota mikoki komonana ete mizali mpasi mingi na kokokisa yango elongo na mikumba ya boklisto mpe misala misusu. Setsuko alobaki ete: “Mobali na ngai azalaki komona ete ezali likama kotika mama na ye oyo asilaki konuna ete azala ye moko, mpe alingaki ete nazalaka ntango nyonso na ndako. Soki namekaki kokende na makita, azalaki kosilika mpe komilela. Na ebandeli, mpo na mimeseno na bato ya Japon oyo nakolaki na yango, nazalaki komona ete ezali mabe kotika ye moko na ndako. Kasi na nsima, nasololaki ete makambo makokaki kobongisama.”

Hisako akutanaki na mokakatano motindo moko. Ayebisi ete: “Ntango tokendeki kofanda elongo na libota na ye, mobali na ngai alingaki ete nabongola lingomba mpe natika misala na ngai ya losambo, mpo ete azalaki kobanga oyo bandeko na ye balingaki kokanisa. Mpo na koyeisa mikakatano makasi, mokolo ya eyenga bandeko na ye baoyo bazalaki kofanda pembeni basengelaki koya na ndako, bongo ezalaki mpasi mpo na ngai kokende na makita. Lisusu, bana bakómaki kolinga mingi kosakana elongo bana ya bandeko na tata na bango na esika ya kokende na makita. Namonaki ete elimo na biso ekómaki kobeba. Esengelaki ete nazwa ekateli ya makasi mpe nalimbwela mobali na ngai ete lingomba na ngai ezali eloko ya kobongola yango lokola bilamba te, kasi ezali likambo ya ntina mingi mpo na ngai. Nsima na mwa ntango libota esalaki mabongwani ya malamu.”

Basusu babongisaki makambo na kozwa ntango mingi ya bonsomi na kolukáká mwana ya mosala mpo na kopesa lisungi mokolo moko to mikolo mibale na poso. Basusu bazwaki mwa bonsomi mpo na makambo na bango moko to mpo na mosala ya boklisto na kolukáká lisalisi ya bana na bango, ya bandeko oyo bazali penepene, ata ya baninga baklisto kati na lisangá. Mibali mpe bakoki kopesa lisalisi na mpokwa to na nsuka ya poso wana bazali na ndako.​—Mosakoli 4:9.

Kopesa Bango Misala

Ntembe mosusu oyo esengeli kolónga ezali ya kosala ete mibange basala mwa misala. Mibange misusu bakozala na esengo ya kosangana na mosala ya kolamba to na misala misusu ya ndako. Bakomimona ete bazali na ntina soki basengi na bango ete babatela bana mpe basepelaka kobongisa elanga moke ya ndunda, kobatela bafololo to na kosangana na likambo mosusu.

Nzokande, basusu balingi kolala ntango mingi na moi mpe ekosenga ete babatela bango. Kasi, kosenzela ete basalaka mwa misala mikemike ezali na ntina mingi mpo na bolamu na bango, kobakisama ya mikolo na bango mpe kobatela makoki na bango ya kokanisa. Hideko amonaki ete, atako mama na ye azalaki kofanda na velo ya bandikape, komema ye na makita ezalaki likambo libongi na ye. Bato nyonso bayambaki ye malamu mpe bakotisaki ye kati na masoló. Likebi oyo batyelaki ye, etindaki ye kondima koyekola Biblia elongo na mwasi mosusu ya mobange. Mobali moko mpe mwasi na ye bazalaki kobatela moboti na bango oyo azalaki kobela bokono moko oyo ebebisaka boongó (Alzheimer), bazalaki komema ye na makita ya boklisto. Bamonaki ete: “Mbala mingi azalaki kolinga kosala eloko moko, kasi na makita azalaki na esengo. Bayambaki ye na esengo mingi, mpo na yango azalaki kosepela kokende na makita. Tomoni ete ezali mpenza na matomba mingi mpo na ye.”

Shinetsu, oyo tolobelaki na ebandeli na lisoló oyo asilisaki mokakatano na kozwáká ndako mpo na mama ya mwasi na ye na kati ya etuka epai asengelaki kotambola mpo na kotala masangá. Na yango, poso na poso, ye mpe mwasi na ye batikalaka elongo na ye mwa moke liboso ete bakende kotala masangá mosusu. Mwasi na ye Kyoko, alobaki ete: “Mama azali kooka ete azali na ntina mingi kati na mosala na biso. Asepelaka mingi soki mobali na ngai asengi ye ete alamba mwa biloko mosusu.”

Ntango Baboti bakómi Mibange

Wana baboti bazali kokola na mbula, makambo mingi ya bompaka makobanda komonana, yango ekosenga likebi mingi. Bakobosana mikolo, ngonga, bileko mpe bilaka. Bakoki kobosana kokata nsuki na bango mpe kosukola bilamba na bango. Bakoki ata kobosana komilatisa mpe komisukola bango moko. Mingi bazali kobulungana, nzokande basusu bakozanga mpongi na butu. Bakomonisa ezaleli ya kozongela likambo moko mbala na mbala mpe bakosilika soki bayebisi bango yango. Elimo na bango ezali kotya bango na mobulungano. Bakoki koloba na makasi ete bayibeli bango eloko to ete miyibi bazali koluka koyiba bango kati na ndako. Libota moko ya bana basi minei esengelaki ntango nyonso koyika mpiko na bifundeli ya lokuta etali pite. Balobaki ete: “Ezalaki kopesa mpasi, kasi toyekolaki kokanga motema na bifundeli yango mpe tozalaki kobongola masoló na likambo mosusu. Kotyana ntembe elongo na nkoko ya mwasi ezalaki na ntina moko te.”​—Masese 17:27.

Esengeli kokokisa Bamposa ya Mayoki

Konuna ememaka mikakatano mingi epai na mibange. Bokono ya makasi, kozanga makoki ya kotambola mpe koyika mpiko na mpasi ya makanisi. Mingi bazali kokanisa ete bomoi na bango ezali na ntina te. Bakoki komona ete bazali kobakisa mikumba mpe komonisa mposa ya kokufa. Bazali na mposa ya kooka ete balingi bango, bazali kotosa bango mpe bazali kokotisa bango kati na makambo ya ndako. (Levitike 19:32) Hisako alobaki ete: “Tozalaki ntango nyonso komeka kokotisa mama ya mobali na ngai kati na masoló ntango azali wana, kosala ete ayeba ntina ya lisoló yango soki likoki ezali.” Libota mosusu ezalaki kosala makasi mpo na kolendisa nkoko na bango ya mobali na kosengáká ye ete akamba botaleli ya texte ya mokolo na mokolo.

Esengeli kosala makasi mpo na kozala na makanisi malamu na ntina na mibange. Baoyo balali mpo na bokono basepelaka te wana bamoni ete bazali koloba na bango na lolenge lobongi te to bazali kozanga limemya epai na bango. Kimiko oyo azalaki kofanda elongo na mama ya mobali na ye oyo azalaki na bokono, alimbolaki ete: “Mama azalaki kososola, azalaki koyeba ntango nazalaki kosepela te kobatela ye to ntango nazalaki kosala na lolenge lobongi te.” Hideko mpe abongolaki ezaleli na ye. “Na ebandeli nazalaki kooka mabe ntango nasengelaki kobatela mama ya mobali na ngai. Nazalaki pionnier [Témoin de Jéhovah oyo apesi ndambo monene ya ntango na ye na mosala ya kosakola] mpe nasengelaki kozanga kobima na mosala ya kosakola. Na nsima namonaki ete nasengelaki kosembola makanisi na ngai. Atako mosala ya kosakola ndako na ndako ezalaki na ntina mingi, oyo nazalaki kokokisa ezalaki mpe koyokana na mibeko na Nzambe. (1 Timoté 5:8) Nakangaki ntina ya kokolisa bolingo mpe bosepeli mingi soki nalingaki kozala na esengo. Lisosoli lizalaki kotungisa ngai ntango nazalaki kosala makambo nokinoki mpo to bobele na kokokisa mokumba. Ntango nazwaki likamá mpe nazalaki na mpasi makasi, nakanisaki bokilo na ngai mpe mpasi oyo azalaki na yango. Na nsima, ezalaki na ngai mpasi te komonisa mɔ́tɔ mingi mpe bosepeli.”

Baoyo bazali kobatela Bato na Maladi bazali mpe na Mposa ya Likebi

Esengeli kobosana te ntina ya komonisa botondi epai na moto oyo azali na mokumba ya kobatela mobange. (Tala Masese 31:28.) Bapesa bango matondi to te, basi mingi bazali kolanda kokokisa mikumba na bango. Nzokande, soki totaleli bonene ya mokumba wana, tokondima ete kopesa bango matongo ezali mpenza na ntina mingi. Mbala mingi mikumba ya bopeto, ya kosukola bilamba mpe ya kolamba mibakisamaka. Esengeli lisusu kokende na lopitalo to epai na na monganga, bakisa mokumba ya koleisa mpe ya kosukola mobange oyo azali kobela. Mwasi moko oyo abatelaki mama ya mobali na ye ntango molai alobaki ete: “Nayebi ete ezali mpasi mpo na mobali na ngai komonisa botondi na maloba mpo na oyo nazali kosala, kasi amonisaka na lolenge mosusu ete azali kosepela na oyo nazali kosala.” Bobele maloba ya matondi makoki kozala na ntina mingi.​—Masese 25:11.

Liziba ya Esengo

Mabota mingi oyo masili kobatela mibange uta mibu mingi balobi ete esalisaki bango na kolona bizaleli kitoko ya boklisto: mpiko, elimo ya komipesa, bolingo bozangi moimi, molende makasi, komikitisa mpe boboto. Mabota mingi masili kokóma na boyokani ya mozindo kati na yango. Lipamboli mosusu ezali bongo likoki ya kosolola mingi elongo na baboti oyo bazali na bokono mpe ya koyeba bango malamu. Hisako alobaki na ntina ya mama ya mobali na ye ete: “Azalaki na bomoi ya kosepelisa. Akutanaki na mikakatano mingi. Nakómaki koyeba ye malamu mpe nabandaki kosepela mingi na bizaleli na ye oyo liboso nayebaki te.”

Kimiko, oyo asengelaki kobatela baboti na mobali na ye mpe nkoko na ye ya mwasi oyo azalaki na bokono na mbeto, alimbolaki ete: “Liboso ete nayekola Biblia ezalaki na eleko moko oyo nalingaki koboma libala mpe kokima mikakatano yango. Bongo natangaki ete tosengeli ‘kokanisela . . . basi bakufeli mibali kati na mpasi na bango.’ (Yakobo 1:27) Nazali na esengo ete nasalaki makasi, na motindo boye ete moto moko te kati na libota akoki komilela na ntina na bindimeli na ngai. Lisosoli na ngai lizali peto.” Ndeko mobali mosusu alobaki ete: “Namonaki na miso na ngai makama minene ya lisumu ya Adam mpe sikawa nazali koyeba malamu ntina ya lisiko.”

Bokoyamba sikawa mosangani mosusu ya libota kati na ndako na bino? To mbala mosusu bokokende kofanda elongo na baboti na bino oyo banuni? Bozali kokakatana mwa moke? Likambo te. Ekosenga na bino kokamata bibongiseli. Kasi soki bolongi mikakatano yango bokomona ete bomoi na bino ekozala na esengo.

[Elilingi na lokasa 24]

Mibange bazali na mposa ya komiyoka ete balingi bango mpe ete bazali komemya bango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto