Tobongwana kati na elimo mpe tongenga kati na motema
“Bongo, nazali koloba mpe kotatola kati na Nkolo ete ebongi na bino lisusu te ete botambolaka lokola ekotambolaka bapakano.”—BAEFESE 4:17.
1. Elimo na biso mpe motema na biso esalaka nini mpo na biso?
ELIMO mpe motema ezali makoki mibale ya kokamwa oyo bato bazali na yango. Atako misala na yango mizali mingi, elimo mpe motema ekeseni epai ya moto na moto. Bomoto na biso, maloba na biso, etamboli na biso, maoki na biso, mpe makambo na biso ya malamu ezalaka mingi kotalela lolenge oyo elimo mpe motema na biso ezali kosala.
2, 3. (a) Na ndimbola nini Biblia esalelaka maloba “motema” mpe “elimo”? (b) Mpo na nini tosengeli komibanzabanza na ntina na elimo mpe na motema?
2 Kati na Biblia, “motema” mbala mingi emonisaka mikano, maoki, mpe bamposa; “elimo” nde emonisaka makoki ya kososola mpe ya kokanisa. Nzokande, ezalaka ntango nyonso na boyokani. Na ndakisa, Moize alendisaki bana na Yisraele ete: “Osengeli kokundola yango na motema na yo [note: “osengeli kokanisa yango lisusu na elimo na yo”] ete Jéhovah azali Nzambe na solo.” (Deteronome 4:39) Epai na bakomeli baoyo bazalaki koluka koboma ye, Yesu alobaki ete: “Mpo na nini bozali kokanisa mabe na mitema na bino?”—Matai 9:4; Malako 2:6, 7.
3 Yango emonisi ete elimo mpe motema ekangani mpenza. Yango mibale ezalaka na bopusi moko likoló na mosusu; mbala mosusu, esalisanaka, esalaka elongo, kasi ebundaka kati na yango mpo na koluka wapi oyo ekoki kolónga. (Matai 22:37; tala Baloma 7:23.) Na yango, mpo na kozwa ngolu na Nzambe, tosengeli te bobele kokengela ezalela ya elimo na biso mpe ya motema na biso, kasi tosengeli lisusu komesenisa elimo mpe motema na biso ete esala na boyokani, elanda bobele nzela moko. Tosengeli kobongwana kati na elimo mpe kongenga kati na motema.—Nzembo 119:34; Masese 3:1.
‘Nzela oyo Mabota mazali kolanda’
4. Lolenge nini Satana apusaka elimo mpe motema ya bato, mpe nsuka na yango ezali nini?
4 Satana azali mobandisi ya lokuta mpe ya makambo na kozimbisa. Ayebi ete mpo na kozala na bokonzi likoló na bato, asengeli kosalela elimo mpe mitema na bango. Uta ebandeli ya lisoló na bato, asalelaki myango ndenge na ndenge mpo na kolónga na likambo yango. Mpo na yango, “mokili mobimba ezali kolala kati na [nguya] na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19) Ya solo, Satana alóngaki na kopusa motema mpe elimo ya bato na mokili oyo Biblia elobi na ntina na bango ete bazali “libota na bato babebi mpe bapengwi nzela.” (Bafilipi 2:15) Ntoma Paulo alobeli na makasi nyonso ezalela ya motema mpe elimo ya libota ya bato babebi mpe bapengwi nzela, mpe maloba na ye mazali likebisi mpo na biso nyonso lelo. Na ndakisa, totanga Baefese 4:17-19, mpe tokokanisa yango na maloba ya ntoma Paulo na Baloma 1:21-24.
5. Mpo na nini ntoma Paulo apesaki batoli makasi epai na Baefese?
5 Tokoki koyeba mpo na nini ntoma Paulo akomaki maloba wana makasi epai na baklisto oyo bazalaki na Efese soki tomikundoli ete engumba wana eyebanaki mingi mpo na misala na yango ya mbindo mpe na losambo ya bapakano oyo bazalaki kopesa na bikeko. Atako Bagreke bazalaki na bato na bango ya mayele mpe bafilozofe, emonani ete mateya ya Bagreke mapesaki ebele ya bato mayele mingi mpo na kosala mabe, mpe bobele mateya na bango wana ekómisaki bango mabe koleka. Ntoma Paulo azalaki komibanzabanza mingi mpo na baninga na ye baklisto oyo bafandaki na engumba wana. Ayebaki ete mingi kati na bango bazalaki liboso bapakano mpe “batambolaki na kolanda makambo ya mokili oyo.” Kasi sikawa bandimaki solo. Elimo na bango ebongwanaki, mpe mitema na bango mingengaki. Lisusu, ntoma Paulo alingaki komona bango “kotambola [na boyokani] na ebyangeli.”—Baefese 2:2; 4:1.
6. Mpo na nini maloba na ntoma Paulo masengeli kotalela biso?
6 Ezalela yango ekokani na oyo ya lelo. Tozali mpe kobika kati na mokili mopengwi longwa na makambo malamu, oyo esili kobeba na bizaleli na yango, mpe motondi na misala ya mangomba ya lokuta. Mingi kati na biso bazalaki kala kolanda makambo ya mokili oyo. Basusu bazali mokolo na mokolo kokutana na bato ya mokili. Basusu, bazali kofanda kati na bandako epai elimo na mokili ezali komonana mingi. Mpo na yango, ezali likambo ya ntina ete tososola ndimbola ya maloba ya ntoma Paulo mpe tozwa litomba na toli na ye.
Makanisi mpamba mpe ya molili
7. Ntoma Paulo alingaki koloba nini na elobeli “makanisi na bango ya mpamba”?
7 Mpo na koyeisa makasi elendiseli na ye oyo ete moklisto asengeli te “kotambola lokola ekotambolaka bapakano,” ntoma Paulo alobeli liboso “makanisi na bango ya mpamba.” (Baefese 4:17) Yango elimboli nini? Liloba libongolami awa na “mpamba,” na kotalela Biblia ya Anchor, elimboli “kozanga eloko, kozanga mosala, bisalasala, bolema, ezangi ntina, mpe ezangi litomba.” Na yango, ntoma Paulo amonisaki ete lokumu mpe nkembo ya mikili ya Greke mpe Loma ekokaki komonana ete ezalaki kokamwisa kasi kolanda yango ezalaki se mpamba mpe bolema. Baoyo bazalaki na mposa makasi ya lokumu mpe nkembo, na nsuka bazalaki kozwa eloko te kasi mawa mpe kozanga litomba. Ezali mpe bobele bongo mpo na mokili ya lelo.
8. Mpo na nini mikano ya mokili mizali mpamba?
8 Mokili ezali na bato na yango ya mayele mpe ya lokumu oyo bato bazali kotalela bango mpo na kozwa biyano na mituna minene lokola ebandeli mpe ntina ya bomoi mpe elikya ya bato mpo na mikolo mizali koya. Kasi nini ezali mayele mpe litambwisi oyo basili kopesa? Kozanga kondima ete Nzambe azali, kozanga kondima makambo oyo maleki mayele na moto, évolution, mpe ebele na makanisi mosusu ya mobulu mpe mazangi koyokana mpe mateya oyo mazali kongengisa te koleka milulu mpe biyambayamba ya kala. Misala mingi ya mokili mimonani mpe lokola ete mizali kopesa mwa litomba mpe bosepeli. Bato bazali kolobela bolóngi na bango na sianse, na ntóki, na miziki, na masano, na politike mpe na makambo mosusu. Bazali kosepela kati na nkembo na bango ya ntango mokuse. Nzokande, mikanda ya lisoló na bato mitondi na nkombo ya bilombe ya kala oyo bato bayebi bango lisusu te. Nyonso wana ezali na ntina te, ezali se mpamba, kozanga mosala, bisalasala, bolema, ezangi ntina, mpe ezangi litomba.
9. Makambo nini ya mpamba bato mingi bazali kolanda?
9 Koyebáká ete mikano oyo nyonso mizali se mpamba, mingi bamibaloli na koluka biloko ya mosuni—kozwa mbongo mpe biloko oyo bikoki kosombama na mbongo—mpe bakómisi biloko yango mokano na bango kati na bomoi. Bandimisami ete bolamu ezali kozwama na koluka bozwi, biloko mingi, mpe bisengo. Bazali bobele kotya elimo na bango na mokano yango te, kasi bazali kondima kobebisa ata—kolongono ya nzoto na bango, mabota na bango, mpe ata lisosoli bobele mpo na bozwi mpe bisengo. Litomba nini bazali kozwa? Na esika ete bazala na bosepeli, bazali nde “komitobola bango mpenza na bolozi mingi.” (1 Timoté 6:10) Ezali likambo na kokamwa te ete ntoma Paulo akebisaki baninga na ye baklisto na kotika kotambola lokola bapakano bazali kosala yango na ntina na makanisi mpamba ya lolenge wana.
10. Na ndimbola nini bato na mokili bazali “kati na molili na makanisi”?
10 Mpo na komonisa ete mokili ezali na eloko moko ya malamu te na kolula to na komekola, ntoma Paulo na nsima alobaki ete “ekaniseli na bango ezali na molili.” (Baefese 4:18) Ya solo, mokili ezali na bato na yango ya mayele mpe ya boyebi kati na makambo mingi matali mosala. Nzokande, ntoma Paulo alobi ete ekaniseli na bango ezali na molili. Mpo na nini? Maloba na ye matali mayele to makoki na bango te. Liloba “elimo” ekoki mpe kolobela ntéi to centre ya boyebi ya bato, efandelo ya bososoli, kati ya moto. Bazali kati na molili mpamba te batambwisami te na pole to batambwisami te na nzela elongobani kati na misala na bango. Yango ezali komonana kati na mobulungano bazali na yango mpo na koyeba oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. Bato bazali mbala mosusu kokanisa ete likambo nyonso bato balobi to bazali kosala esengeli kondimama mpo ete makanisi na bango mangengisami, nzokande ekaniseli na bango ezali mpenza na molili, na kotalela maloba ya ntoma Paulo. Na makambo ya elimo bazali kati na molili makasi.—Yobo 12:25; 17:12; Yisaya 5:20; 59:6-10; 60:2; tala Baefese 1:17, 18.
11. Mpo na nini mokili ezali kati na molili na makanisi?
11 Mpo na nini bato bakoki kozala mayele, ata mpe kolónga kati na makambo mingi, nzokande kati na elimo bazali na molili? Na 2 Bakolinti 4:4, ntoma Paulo apesi biso eyano: “Nzambe na mokili oyo azimisi miso na makanisi na bango baboyi kondima ete bamona pole na nsango malamu na nkembo na Klisto te. Ye azali elilingi na Nzambe.” Oyo nde mapamboli kitoko mazali kozwama na baoyo bazali kondima nsango malamu na nkembo, na kobongwana kati na elimo mpe na kongenga kati na motema!
Mitema makasi mpe mizangi Boyebi
12. Na ndimbola nini bato na mokili “bamitangoli longwa na bomoi na Nzambe”?
12 Mpo na kosalisa biso na koyeba malamu mpo na nini tosengeli kobongwana kati na elimo mpe kongenga kati na motema, ntoma Paulo abendi likebi na biso na likambo oyo ete makanisi na mokili “matangolami mosika na bomoi na Nzambe.” (Baefese 4:18) Elingi koloba te ete bato bazali lisusu kondima Nzambe te, to ete bakotikala libela batuki. Mopanzi nsango moko amonisaki likambo yango na maloba oyo: “Na esika ya koloba ete bato oyo bandimaka Nzambe te, ezali malamu tobimisa liloba moko: baoyo bamipesaka mingi te na makambo ya Nzambe kati na bomoi na bango. Bato oyo bamipesaka mingi te na makambo ya Nzambe balingaka ete bakumisa bango mpe bayebana ete bandimaka Nzambe, nzokande bazali kotya Ye pembeni, kotyeláká Ye likebi bobele mokolo ya lomingo na ntongo mpe bazali kopesa Ye nzela te ete azala na bopusi likoló na makambo na bango ya politike to likoló na bomoi na bango moko, kati na mikolo misusu ya poso. Atako, bandimaka Nzambe, nzokande bazali kokanisa te ete Ye azali ata na likambo moko ya koloba na mokili ya lelo.” Lokola ntoma Paulo alobaki yango na Baloma, “ata bayebaki Nzambe, bakumisaki ye lokola Nzambe te mpe batondaki ye te.” (Baloma 1:21) Mokolo na mokolo tozali komona bato bamipesi na misala na bango kozanga kokanisa Nzambe, ntina ezali te mpo na bango na kopesa ye lokumu mpe kotɔnda ye.
13. Nini ezali “bomoi na Nzambe”?
13 Maloba “bomoi na Nzambe” mazali na ntina mingi. Mamonisi mpenza lolenge molili ya makanisi mpe ya elimo ezali kotya mobulu na lolenge bato basengeli kotalela makambo ya motuya. Liloba na greke libongolami awa na “bomoi” ezali biʹos te (epai maloba “biologie,” “biographie” mauti), oyo elimboli lolenge ya bomoi. Kasi, ezali nde zo·eʹ (epai maloba “zoo,” mpe “zoologie” mauti). Na kotalela ndimbola epesami kati na mokanda Vine’s Expository Dictionary of Old and New Testament Words, yango elimboli “bomoi lokola liziba, bomoi na ndimbola na yango mpenza, bomoi lolenge oyo Nzambe azali na yango. . . . Longwa na bomoi wana moto apengwaki na ntina na lisumu.” Na bongo, ntoma Paulo azali koyebisa biso ete molili ya makanisi mpe ya elimo ezali te bobele komema bato na mokili na misala ya mbindo ya nzoto, kasi lisusu ezali kolongola bango elikya ya bomoi na seko oyo Nzambe azali kopesa. (Bagalatia 6:8) Mpo na nini bongo? Ntoma Paulo alandi koyebisa biso bantina yango.
14. Tanga ntina moko mpo na yango mokili emitangoli longwa na bomoi na Nzambe.
14 Ya liboso, alobi ete ezali “mpo na kozanga boyebi kati na bango.” (Baefese 4:18) Maloba “kati na bango” emonisi ete soki bazali na boyebi na Nzambe te, ezali te mpo ete bazwaki libaku ya kozala na yango te, kasi ezali mpo ete baboyaki yango na motema na bango. Na mabongoli mosusu maloba wana mazali kotangama boye: “koboya na bango mpenza ya koyeba Nzambe” (The Anchor Bible); “na ntina na kozanga boyebi oyo esali epai na bango ete motema mokóma makasi” (Bible de Jérusalem). Mpo ete babwaki, to baboyi na motema na bango boyebi ya sikisiki na Nzambe, bazali na moboko moko te mpo na kozwa lolenge ya bomoi oyo Jéhovah azali kopesa na baoyo bazali komonisa kondima epai na Mwana na ye, oyo alobaki ete: “Oyo elimboli bomoi na seko: ete bayekola koyeba yo, Nzambe bobele moko ya solo, mpe motindami na yo, Yesu Klisto.”—Yoane 17:3, MN; 1 Timoté 6:19.
15. Nini esali ete mokili emitangola longwa na bomoi na Nzambe?
15 Ntina mosusu oyo mokili na mobimba na yango epengwi na bomoi oyo ezali na Nzambe, na boyokani na maloba na ntoma Paulo, ezali: “makasi na mitema na bango.” (Baefese 4:18) Awa “makasi” elimboli mpenza koyeisa makasi, lokola nde ezipamaki na mposo makasi. Biso nyonso toyebi lolenge mposo ekómaka makasi. Mposo ekoki na ebandeli kozala petee mpe ekoki kooka mpasi, kasi soki mbala na mbala ezali kotutana na eloko oyo ezali makasi, ekoyeisama makasi mpe ekokemba na mabe, kosaláká bongo mposo makasi. Ekooka lisusu mpasi te. Bobele bongo, bato babotamaka na motema makasi te to oyo ekemba mpo ete bazala na maoki ya kozanga kosepela na Nzambe. Kasi lokola bazali na bomoi kati na mokili mpe lokola batyami liboso ya elimo na yango, ezalaka mosika te mpo ete motema eyeisama makasi to ekemba, soki ebatelami te. Yango wana ntoma Paulo apesaki likebisi oyo: “[Bokeba] . . . ete moko kati na bino te [akoma na motema] makasi na bozimbisi na masumu.” (Baebele 3:7-13; Nzembo 95:8-10) Na yango, ezali likambo ya kosala nokinoki na kobongwana kati na elimo mpe kongenga kati na motema!
“Bazali kooka Eloko moko te”
16. Likambo oyo ete mokili ezali kati na molili na makanisi mpe emitangoli longwa na bomoi na Nzambe ezali na nsuka nini?
16 Makambo mazali kobima na ntina na molili mpe kopengwa wana malobelami na mokuse na maloba oyo ya ntoma Paulo: “Bazali kooka eloko moko te, bamipesi na makambo na nsoni ete basala makambo na bosoto na bilulela.” (Baefese 4:19) Elobeli “bazali kooka eloko moko te” elimboli mpenza “kotika kooka mpasi” mpasi oyo moto akoki kooka na motema mpo na bizaleli mabe. Ezali lolenge wana nde motema ekómaka makasi. Soki etiki kooka mpasi na lisosoli mpe komimona ete ezali na mokumba moko te liboso na Nzambe, likambo moko ya komipekisa ezalaka lisusu te. Na bongo, ntoma Paulo alobaki ete “bamipesi” na makambo na nsoni mpe na bosoto. Ezali likambo basali yango na nko, na motema na bango. “Elobeli makambo na nsoni,” lokola yango esalelami kati na Biblia, emonisi ezaleli oyo ebongi te mpe ya mabe, kotyola mibeko mpe bokonzi. Bobele bongo, “makambo na bosoto” esangisi bobele pite te kasi lisusu makambo mabe oyo mazali kosalema na nkombo ya mangomba, lokola milulu ya kobota mpe milulu oyo mizalaki kosalema na tempelo ya Artémis kati na Efese, oyo batangi na mokanda ya ntoma Paulo bayebaki yango malamu.—Misala 19:27, 35.
17. Mpo na nini ntoma Paulo alobaki ete bato oyo bazali kooka eloko moko te basalaka masumu na “bilulela”?
17 Lokola nde komipesa kozanga komipekisa na makambo na nsoni mpe na bosoto ekokaki te, ntoma Paulo abakisi ete bato yango bazali kosala “na bilulela.” Ntango bato oyo bazali na lisosoli malamu basali lisumu, bayokaka mawa mpe bamekaka na makasi nyonso ete bazongela yango lisusu te. Kasi baoyo “bazali kooka eloko moko te” basalaka masumu na “bilulela” (“bakoluka ntango inso kosala mabe ndenge na ndenge,” Liloba lya Nzambe). Bazali komitika na mposa makasi kolanda makambo mabe kino komikotisa na makambo oyo mazali mpenza mabe koleka—mpe bazali komipamela na eloko moko te. Yango mpenza nde “mokano na bapakano”!—1 Petelo 4:3, 4.
18. Na mokuse, lolenge nini ntoma Paulo alobelaki ezalela ya makanisi mpe ya elimo ya mokili?
18 Esengelaki na ntoma Paulo bobele versets misato, na Baefese 4:17-19, mpo na komonisa ezalela ya solo ya makanisi mpe elimo ya mokili. Amonisi ete makanisi mpe mateya mapesami na bato na mayele ya mokili mpe lolenge na yango mabe ya koluka bozwi mpe bisengo ezali na litomba soko moke te. Amonisi polele ete mokili, na ntina na molili na yango ya makanisi mpe ya elimo, ezali lisusu na bizaleli malamu te mpe ezali se kobeba ntango nyonso. Na nsuka, na ntina na kozanga boyebi mpe na makasi ya motema oyo yango eponi, mokili ezangi elikya ya kobonga lisusu, emitangoli longwa na bomoi na Nzambe. Ya solo, tozali na bantina malamu ya kotika kotambola lokola bapakano bazali kotambola!
19. Mituna nini ya ntina tosengeli lisusu kotalela?
19 Mpo ete molili kati na elimo mpe na motema nde esali ete mokili emitangoli longwa na Jéhovah Nzambe, lolenge nini tokoki kosala mpo na kolongola molili nyonso longwa na makanisi mpe na mitema na biso? Ɛɛ, nini tosengeli kosala mpo tokoka kotambola lokola bana na pole mpe kozwa ngolu na Nzambe? Yango ekotalelama na lisoló lilandi.
Limbola
◻ Mpo na nini ntoma Paulo apesaki toli makasi oyo ezwami kati na Baefese 4:17-19?
◻ Mpo na nini banzela ya mokili ezali mpamba mpe ezali kati na molili?
◻ Elobeli “komitangola longwa na bomoi na Nzambe” elimboli nini?
◻ Elimo oyo ezali kati na molili mpe motema mozangi kooka eloko ekomemaka na nini?
[Bililingi na lokasa 9]
Efese eyebanaki mingi mpo na bizaleli na yango ya mbindo mpe losambo na yango ya bikeko
1. Mobundi Moloma na Efese
2. Bitika ya tempelo ya Artémis
3. Esika ya teyatre na Efese
4. Artémis ya Efese, nzambe mwasi mpo na kobota
[Elilingi na lokasa 10]
Mayele nini bato na mayele na mokili bazali kopesa?
Néron
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Musei Capitolini, Roma