Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/3 nk. 27-30
  • Kitoko ya nsuki mpembe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kitoko ya nsuki mpembe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nguya na bolenge
  • Kozwa nkembo
  • Tokumisa nsuki mpembe
  • Talela mikolo mizali liboso
  • Yehova amibanzabanzaka mpo na basaleli na ye ya mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Zwáká na motuya bandeko oyo bakómi mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Libota ya boklisto esalisaka mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Ntango oyo nsuki mpɛmbɛ ezalaka “motole ya kitoko”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/3 nk. 27-30

Kitoko ya nsuki mpembe

OYO nde esengo ya kosolola elongo na mibali mpe basi ya sembo ya ntango ya kala! Kanisa naino masolo elongo na mibali lokola Noa, Abalayama, Moize mpe Yoane Mobatisi lolenge moko mpe mpo na basi lokola Sara, Rahabe, Luta mpe Debora! Okosepela te na koyoka bango kolobela makambo minene ya kala oyo bamonaki?

Ata lelo oyo, okosepela te koyoka mibange ya sembo koloba lolenge bango mpe basusu babatelaki bosembo na bango epai na Nzambe kati na komekama, lokola bipekiseli, kobetama mpe kokangama mpo na boyengebene? Na ntembe te! Bolingo na biso mpo na Nzambe mpe bosepeli na biso mpo na bango ekokola wana bakoyebisa biso mayoki na bango mpe mingimingi botondi na bango mpo na libateli ya Jéhovah oyo etondi na bolingo.

Kobanda kala, libota ya Nzambe ezali komonisa botosi monene epai na mibange mibali mpe mibange basi ya sembo mpo na eksperianse, boyebi mpe mayele na bango. Ya solo, Nzambe apesaki etinda oyo elandi na Bayisraele kati na Mibeko: “Okotelema liboso na nsuki mpembe mpe okokumisa mobali anuni mpe okobanga Nzambe na yo. Ngai nazali Jéhovah.” (Levitike 19:32) Liloba ya Liebele mpo na mobange to bonunu euti na mobimbi oyo elimboli “kokoma mpembe” mpe ezali lisusu kobongolama “nsuki mpembe.” Yango wana Bayisraele basengelaki kotelema mpo na komonisa botosi na bango epai na mibange, bazalaki kosala bongo mpo na komonisa ezaleli ya kobanga Nzambe.

Ezaleli wana ya botosi ezali komonana lelo oyo? Na ndakisa, bilenge bafungolaka na limemya nyonso ekuke mpo na mibange? Bazalaka na momeseno ya kotikela mibange esika wana etombola etondi na bato? To batikelaka mikolo efandelo na bango kati na train to na bus oyo etondi na bato? Bopotu ya kozanga kokokisa makambo oyo emonanaka ata epai na baklisto.

Nzokande, mpo na kosepelisa Jéhovah Nzambe baklisto basengeli kosala na boyokani na likanisi na ye mpe basengeli kobwaka makanisi, elobeli mpe misala na baoyo bazali ˈbamikumisi na bango mpenza, bazangi kokumisa baboti, bazangi matondi, bayini na malamu.ˈ (2 Timote 3:1-5) Bongo, Liloba na Nzambe ezali koloba nini na ntina na bilenge kati na boyokani na bango elongo na bato na nsuki mpembe?

Nguya na bolenge

Biblia endimi nguya mpe matomba na bolenge, wana elobaki ete: “Kitoko na bilenge ezali nguya na bango.” (Masese 20:29) Na Yisraele ya kala, bilenge Levite bazalaki kosalela nguya na bango kati na tempelo, mbala mingi mpo na misala makasi. Lelo oyo, mingi na misala na ba imprimeries, na ba Béthels mpe na bisika ya botongi ya la Société Watch Tower ezali kosalema na bilenge mibali mpe basi baoyo basili kopesa nguya mpe mayele na bango mpo na kotombola matomba ya Bokonzi. (Matai 6:33) Bongo bazali na mabaku malamu na mosala ya Nzambe.

Masese oyo totangaki maloba na yango esukisi na maloba oyo ete: “Nkembo na bampaka ezali nsuki na pee.” Wana nguya ya bolenge esangisami na mayele ya mibu mingi, bosangisi ya nguya mingi bokosalema.

Topesa ndakisa: Soki basengi na elenge moko moyekoli na mosala ya mabaya ete azipa efelo ya ndako na mabaya, akoluka kokokisa mokumba na ye na nguya ya bolenge. Mosali mosusu, oyo azali na eksperianse mingi akomona ete atako mosungi na ye elenge azali na nguya mingi, azali kobeta nsete moko mbala mingi liboso ete ekota. Mosali ya mokolo akosenga ete elenge asimba marto na nsuka ya esimbeli na yango na esika ya kosimba yango penepene na moto na yango ya ebende. Ekopesa elenge makoki ya kobeta nsete na nguya mingi, bongo akosalela malamu ntango mpe nguya.

Bobele bongo, elenge mwasi na nguya mingi akoyekola na komekameka ete bilamba mosusu ekobeba noki soki basokoli yango engebene malako te. Nzokande, mwasi oyo azali na esperianse ayebi ntina ya kozwa ntango ya kopona bilamba mpe kosokola bilamba mosusu yango moko. Asili mpe koyekola ete akoki kopengola kongoma bilamba mosusu soki agumbi yango ntango azali kolongola yango na nsinga to wana azali kobimisa na masini ya kokausa bilamba.

Koyekola makambo epai na bato oyo bazali na eksperianse ekoyeisa makambo ya bomoi petee. Nzokande, ekomaka ntango mosusu ete ata moto oyo ameseni mingi akokoka te kosala malamu misala misusu oyo azalaki kokokisa yango malamu mwa bambula liboso. Mokomi moko alobaki na mayele nyonso ete: “Soki bilenge bazalaka na mayele, mpe soki mibange bazalaka na makoki.” Oyo nde esengo soki mibange bakomonisa botondi mpo na nguya na bilenge mpe soki na motema petee bakopesa bango mayele oyo bazwi na boumeli ya mibu mingi mpe soki bilenge bakondima toli na komikitisa nyonso! Na lolenge yango, bato na mibu nyonso bakozwa matomba.

Kozwa nkembo

Mibu mingi mpamba ekoki te. Elenge Elihu alobaki ete: “Kozala mokolo ekopesa moto bwanya te, bobange banso bayebi mibeko ya bosembo te.” (Yobo 32:9, Liloba lya Nzambe; Mosakoli 4:13) Mpo ete akoka solo kozala na motuya mpo na nsuki mpembe na ye, moto oyo akoli asengeli te kofanda bobele mpamba kolekisa mikolo na ye na kotala televizyo, kokende na masano to na kolekisa ntango na motindo mosusu. Mpe ata bambula na bango epusani, mikolo basengeli kolanda koyekola.

Bato mosusu bazali kotuta ntolo ete bakosala makambo na lolenge na bango, to bazali koloba ete: “Eksperianse ezali moteyi malamu.” Nzokande, Liloba na Nzambe epesi toli oyo ete: “Moto na mayele akoyoka mpe akofulisa mayele; moto na boyebi akozwa toli malamu.” (Masese l:5; Tala 1 Bakolinti 10:11.) Eksperianse ezalaka ntango nyonso molakisi eleki malamu te, mpo ete tokoki kozwa mayele na mabunga na basusu kozanga kosala yango biso moko. Na koleka, moklisto asengeli kobatela na makanisi na ye ete: “Moto na pee ezali motole na nkembo, ezwami na nzela na boyengebene.” (Masese 16:31) Bomoi oyo elekisami na mosala ya sembo mpo na Jéhovah ezali kitoko na miso na ye mpe ebongi ete basusu bakumisa yango lokola ndakisa malamu. Ya solo, koyekola koyeba Nzambe mpe kozwa mayele “kati na boyengebene” ekoki kobanda uta bomwana mpe kolandana kozanga nsuka.​—Baloma 11: 33, 34.

Likambo yango ekokani na oyo ya mwana mobali moko ya mbula nsambo na mokili ya Suede. Asengaki na mokɛngɛli na Eteyelo na Mosala ya Nzambe soki akoki kokomisa nkombo na ye na eteyelo. Mokɛngɛli atunaki ete “Mpo na nini?” Na yango elenge ayanolaki ete: “Kolekisa bomoi mobimba bobele mpamba ezali ntina te!” (Mosakoli 12:1) Oyo nde ndakisa malamu mpo na bilenge mpe mpo na mikolo!

Tokumisa nsuki mpembe

Ezaleli ya mawa na mikolo na biso ezali ya kopesa motuya mingi na kolongono ya nzoto mpe na makoki ya kosangana na masano mpe ya kotyola mikóló. Ezaleli nini baklisto basengeli komonisa epai na baoyo bazali na nsuki mpembe kati na lisanga?

Na esika na kobosana mibange baklisto, tosengeli komemya bango mpe kolekisa ntango elongo na bango. Na ndakisa, na makita ya poso na poso ya ba Témoins de Jéhovah na Salle du Royaume, osalaka makasi mpo na kopesa mibange mbote? Basepelaka mingi na mbote ya bilenge mpe ya bandeko basusu. Oyo nde esengo mikóló bazalaka na yango na kozala na bisika ya kominanola oyo esangisi bato na mbula ekeseni! Atako babalani ya sika bakoki kozala na makambo mingi ya lolenge moko elongo na babalani mosusu ya mbula na bango, nzokande ekozala litomba mingi kobyanga babalani ya mikóló na kominanola ya esengo motindo yango.​—1 Batesaloniki 3:12; 5:15.

Ezali likambo na ntina mingi komonisa limemya wana tozali kosolola na mikolo! Ntango ndeko mobali moko oyo asali mibu 40 kati na mosala ya Jéhovah alobelaki nkulutu moko oyo azalaki elenge lolenge nini akoki kosalisa lisanga, ndeko yango ya elenge alobaki na ye ete: “Yo ozali na makoki mingi te.” Oyo nde eyano ezangi bolingo! Ndeko mobali ya mobange azalaki na nguya mingi te lokola na ntango ya liboso, kosangana na ye na mosala ya kosakola esili kokita, mpe mikumba misusu ya mokɛngɛli eleki makoki na ye ya sikawa; nzokande, azali na makambo mingi ya kopesa. Na boumeli ya mibu mingi asili kozwa mayele mpe eksperianse na nzela ya boyengebene. Mpo ete mibange ya lolenge yango basalaki mosala makasi lokola basakoli ya Bokonzi, bayikelaki minyoko mpiko, bamemaki mikumba minene ya boklisto mpe bapesaki formation na bandeko mosusu, libota na Nzambe ezali lelo kosepela na lisanga moko ya makasi oyo esimbami na elimo na Ye. Na yango, tika ete topesa na mibange wana limemya lokola bapesi toli ya mayele, babateli ya bampate na bolingo, mpe balakisi oyo babongi.

Ezali lisusu na ntina ya komonisa limemya mpo na batoli ya mibange. Na ndakisa, ndeko moko oyo azali na eksperianse mingi apesaki likanisi ete ekuke ya Salle du Royaume moko etyama na west ya ndako te. Bandeko oyo bazalaki bilenge balandaki toli na ye te mpo bazalaki komibanzabanza mingi mpo na bonzenga ya ndako. Nzokande, nsima na mibu mingi, esengelaki kotya ekuke mosusu mpo ete mbula mpe mopepe makasi oyo eutaka na ouest ebebisaki yango. Mayele mauti na eksperianse malekaki likambo ya bonzenga. Soki bilenge bakokumisa mikolo na kotya likebi na mayele na bango mauti na eksperianse, mbele ekobatela ntango mpe mosolo. Atako makanisi na mokolo esalelami te, ebongi kokumisa ye na komonisa ye ete batalelaki yango, kasi makambo mosusu mapesaki nzela ya kozwa ekateli ya lolenge mosusu.​—Tala Masese 1:8.

Talela mikolo mizali liboso

Mibange mosusu bazalaka na likanisi oyo: “Ezali na eleko mosusu te ekokani na ntango oyo tozalaki bilenge.” Na esika ya kokanisa mingi mikolo ya kala, nzokande mibange yango bakoki kolendisama na kokanisa mikolo oyo bakozwa mbano na bango na likoló to bakozwa lisusu nguya na bango ya bolenge na nse ya Bokonzi ya Nzambe. Na kozelaka yango, basengeli koyeba ndelo na bango na ntina ya mibu na bango mingi. Bososoli na likambo wana mpe koyeba mpenza kosala maseki ezali na motuya mingi ntango mibange oyo bazali koluka mikumba bamoni ete bazali kokanisa bango te.

Na ndakisa ekoki kozala ete bandeko ya mibange bazalaki kozwa mikumba mbala na mbala na assemblée ya district na mibu mileki. Sikawa bankulutu ya makoki bazali mingi mpe likoki lizali ya kopona mibali oyo bayebi koteya malamu. Atako bazali naino bilenge, bankulutu mosusu basili komimonisa bato na molende mpe ya mayele, bakoki koteya malamu mpe kopesa toli na boboto, mpe bazali na makoki ya kolendisa basusu. (1 Batesaloniki 5:12,13; 1 Timote 5:17) Na yango, bandeko ya mibange oyo nkombo na bango emonani te na molongo ya balobi na assemblée ya district bakoki kooka ete babosani bango mpe bakoki kosepela te ete bapesi mikumba na bankulutu oyo bazali bilenge. Nzokande, bakoki kolonga maoki wana ya mabe oyo euti na bomoto ya kozanga kokoka. Ya solo, basangani nyonso ya lisanga bakoki kopesa lisalisi na bango wana bazali komonisa na mibange ete bazali na mposa na bango, ete balingi bango mpo na bosembo na bango, mpe ete makanisi na bango mazali na motuya mingi.

Ezali solo ete, mibange basengeli komikundola ete baninga na bango bandimi basengeli kokumisama na motindo balingi ete bakumisa bango. (Matai 7:12; Baloma 12:10) Na esika ya kooka ete batye bango pembeni mpe kotungisama na likanisi oyo ebongi te, mibange basengeli nde kosepela mpo na bambula mingi ya misala na bango ya sembo. Mpe kozanga ntembe, biso nyonso tosengeli komonisa botondi mpo na mapamboli na Jéhovah, tozali na bokoli na motuya ya bakengeIi oyo babongisami malamu mpo na kokokisa mosala mpe komema mikumba wana bibele ya “bampate mosusu” bazali koya na lisanga ya boklisto.​—Yoane 10:16; Yisaya 60:8, 22; 2 Timote 2:2.

Na ntina na mpasi, kolongono ya mabe to makambo mosusu, mibange basilikaka ntango mosusu noki. Ezali kosenga bososoli mpe boboto epai na basangani mosusu ya libota to ya lisanga. Ezali lisusu kosenga ete mibange basala makasi mpo na kobatela elimo ya kolonga, batikala bilenge na motema mpe na makanisi. Esili koleka mwa mibu, ntango moninga na ye ya chambre asengelaki kolongwa na Bethel, ndeko moko oyo anuni, mosangani ya collège central na ba Témoins de Jéhovah atunaki likanisi na moninga wana mpo na moto oyo akoki kokitana ye mpe alobaki alingi elenge, ndeko mobali oyo ateli mpo na kosalisa ye na kotikala elenge mpe makasi. Ndeko wana mobange mopakolami na elimo azalaki pene te ya komibenda to ya komilembisa, mpo ete mosala mozali naino mingi. Oyo nde ndakisa malamu ya moto oyo azali kokanisa mpo na mikolo mizali koya mpe ya kobatela elimo ya kolonga!

Na ntembe te, “kitoko na bilenge mibali ezali nguya a bango, mpe nkembo na mibange mibali ezali nsuki mpembe na bango.” Oyo nde esengo wana bilenge bazali kosalela makasi na bango mpe mibange bakotya mayele na bango mpo na kolanda nzela na boyengebene! Mibange mpe lokola bilenge baklisto bazali kozwa esengo monene wana bazali kosala na bomoko mpo na kotombola matomba ya losambo ya solo ya Jéhovah Nzambe “Oyo Anuni.”​—Danyele 7:13.

[Elilingi na lokasa 28]

Baklisto oyo bazali na nsuki mpembe bakoki kolakisa basusu makambo mingi

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto