Mituna na Batangi
Bato oyo bazali kondima te boklisto ya solo lelo oyo mpe baoyo bakokufa liboso ya ebandeli ya bolozi monene, bakoki nde kosekwa?
Ezali malamu ete biso nyonso totemela ezaleli ya kosambisa [bato], mpe toyeba ete ezali lisambisi ya Jéhovah na nzela na Yesu Klisto nde ezali na ntina. (Yoane 5:22; Misala 10:42; 2 Timote 4:1) Kasi Makomami mazali kopesa mwa lisalisi mpo na koyanola na motuna wana.
Kosakolama ya nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe na mokili mobimba ezali elembo ya ntina ya ˈkozala ya Yesu.ˈ Elembo wana esili komonana polele uta ebandeli ya ekeke oyo. Mosala ya kosakola ezali kokabola bato na mabota nyonso mpo na kokokisama ya lisese na Yesu na ntina na “bampate” mpe “bantaba.” Na nsuka ya mosala oyo ya kosakola mpe ya kokabola, “bolozi monene” ekotya nsuka na biloko mabe ya ntango oyo.—Matai 24:3, 21, 22; 25:31-46.
Jéhovah, elongo na Mwana na ye nde bakokata soki moto oyo aboyaki koyamba nsango ya Bokonzi mpe akufaki liboso ya ebandeli ya bolozi monene azali kati na bantaba. Yesu alobaki ete bantaba “bakokende kino kobomama ya seko.” Na yango, tokoki kosukisa ete baoyo bamonani na miso na Nzambe ete bakokani na bantaba bakosekwa te. Bazali kozwa lisambisi motindo moko na baoyo “bakozwa etumbu ya kobomama ya seko” na ntango ya bolozi monene.—2 Batesaloniki 1:9.
Kasi ezali boni mpo na baoyo bamonani lokola ete bazwaki mpenza boyebi te ya nsango malamu ya Bokonzi mpo bakoka kosala liponi ya kondima to ya koboya solo liboso ete bakufa na boumeli ya “mikolo ya nsuka” oyo?—2 Timote 3:1.
Bato mingi oyo bazali kokufa ntango mosala ya kosakola ezali kosalema, liboso na bolozi monene, bakosekwa. Likambo yango emonisamaki na oyo tozali kotanga kati na Emoniseli 6:7, 8 na ntina ya kolandana ya bafandi na mpunda ya elilingi. Bato mingi bakufaki na bitumba, na nzala mpe na maladi mabe. Mpo ete ezali “Hades” nde ezali kokamata bato wana oyo babomami na “Liwa,” bakosekwa na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkoto ya Klisto, ntango Hadès ekozongisa bakufi oyo bazali kati na yango. (Emoniseli 20:13) Ekoki kozala ete basusu oyo bakosekwa basilaki koyoka mwa moke nsango ya Bokonzi liboso ya liwa na bango.
Ezali likambo ya esengo lokola Yesu atikelaki te bato likoki ya koyeba soki banani bazali lokola bampate to banani bakokani na bantaba! Moto ya kozanga kokoka akoki te koyeba na sikisiki mbala boni esengeli mpo na kopesa moto libaku ya koyoka mpe kondima nsango malamu. Tokoki koyeba soki ezalela na motema na ye ezalaki nini to soki alingaki mpenza boyengebene? Tokoki koyeba bopusi ya lolenge nini libota na ye, lingomba na ye, ebimisaki likoló na ye ntango azalaki koyamba solo? Soko moke te. Nzokande, tokoki solo kondimisama ete Jéhovah Nzambe mpe Yesu Klisto bakoki koyeba makambo wana mpe kosambisa na lolenge ya kokoka, ya sembo mpe ya boyengebene.—Deteronome 32:4; Yisaya 11: 1-5.
Na yango, tozali na ntina moko te ya koluka koyeba nani akosekwa to akosekwa te kati na baoyo bauti kokufa kala mingi te. Tozali na ndingisa ya kosala yango te. (Tala Luka 12:13, 14.) Eleki malamu mpo na biso kozela bikateli ya Basambisi na sembo, Jéhovah Nzambe mpe Yesu Klisto. Yango ekopesa biso kimya mingi na elimo na biso basaleli ya Jéhovah. Ekosalisa mpe biso na kotya likebi mingi na mosala oyo epesami na biso: oyo ya ˈkokende kozalisa bayekoli bato na mabota nyonso, kolakisa mpe bango ete batosa makambo nyonso masili Yesu kolaka.ˈ—Matai 28:19, 20.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]
Leicester sheep, Meyers