Lingomba ya Katolike ya Amérique latine, lizali kati na mpasi—Mpo na nini bamilió na bato bazali kotika yango?
KOBANDA na ndelo ya nord ya Mexique kino na nsonge ya sud ya Chili, ezali mpasi mpo na kokuta engumba to mboka moko ya Amérique latine oyo ezangi lingomba ya Katolike na bisika na yango ya minene. Nzokande, Joseph E. Davis, directeur ya lisanga moko oyo ezali kokumisa misala ya lingomba ya Katolike, alobaki ete: “Mbongwana moko monene ezalaki kosalema na Amérique latine.” Alobaki mpe ete Amérique latine, etuka oyo ezali na bopusi ya lingomba ya Katolike uta koleka bikeke misato, ezali pene na komona mbongwana moko monene.
Eyebani mpenza ete, bopusi ya lingomba ya Katolike ezali kokita nokinoki. Kala mingi te, emonanaki ete kati na bafandi ya Amérique latine, bobele 15% ya bato nde bazali komipesa na misala ya lingomba ya Katolike. Zulunalo 1991 Britannica Book of the Year eyebisi ete: “Baepiskopo ya Katolike ya Loma mpe papa ye moko bamonisaki bobangi na bango na komona ete bakatolike ya Amérique latine bazali kotika bindimeli na bango ya kala.” Mpo na nini bongo? Mpo na nini bato mingi bazali kotika lingomba ya Katolike? Bazali kokoma banani?
Bolukiluki ya ndimbola
Bakonzi ya lingomba ya Katolike bazali koloba ete “mangomba mikemike” nde ebimisi mikakatano oyo bazali na yango. Sango moko ya Europe, oyo azali kosala na mboka Bolivie alelaki ete: “Lingomba ezali lokola nzeté oyo nguya na yango eningisami na mangomba mikemike oyo makokani na matiti mabe.”
Na Argentine, mangomba ya sika 140 mazali kotangama mbula na mbula, yango ekoki kolimbola mwa moke, kokwea ya 90% kino 70% to 60% ya motuya ya basangani ya Lingomba ya Katolike kobanda katikati ya bambula 1970. Na Tijuana, na Mexique, 10% ya bamilió mibale ya bafandi, basili kokota na mangomba 327 mazali ya Katolike te na mboka yango. Zulunalo Time eyebisaki ete: “Tozali kokamwa na komona ete na Brésil, na mokolo ya lomingo, baprotesta mingi bazali kokende na ndakonzambe, koleka bakatolike.” Lokola zulunalo moko elobaki yango, ezali likambo ya kokamwa te, ete wana “baepiskopo ya lokumu bayanganaki elongo na papa, na Engumba Vatican, mpo na kolobela makambo mibale ya minene mpo na Lingomba ya Katolike lelo oyo,” moko na makambo yango ezalaki “likambo ya mangomba mikemike.”
Na likita oyo asalaki elongo na baepiskopo ya Mexique, pápa alobaki ete bolóngi ya mangomba mingi ya sika “ezali komonana mpo na kozanga bosepeli mpe kozanga komibanzabanza ya bana ya Lingomba ya Katolike oyo bazali komimonisa ete bakoki te na mosala na bango ya kolakisa evanzile.” Mpo na nini “bana ya Lingomba ya Katolike” bazali komibanzabanza te na bamposa ya elimo ya bafandi ya Amérique latine, nzokande mingi kati na bango bazali mpenza komemya Biblia? Kati na Ultima Hora ya La Paz (Bolivie), lisoló moko ya ntina kati na zulunalo lipesi ndimbola oyo ete: “Lingomba lisili mpenza komikotisa na mokili, na boye ete, mokolo na mokolo, emonani ete ezali kotika mingi makambo na yango mpenza. Tosengeli te kokamwa na komona, lokola yango ezali kosalema, ete basango bazali komipesa mingi na boyekoli ya makambo ya bato, na makambo ya nkita, na makambo matali myango ya bopanzi nsango to makambo ya politike, na esika ya komipesa na makambo ya losambo.”
Bazali mingi bato na politike to bazali nde basakoli?
Komikotisa ya Lingomba kati na politike na boumeli ya bambula 1970 mpe 1980, kozanga ntembe, epesaki nzela na ebele ya bafandi ya Amérique latine, ete bayina Lingomba ya Katolike. Boyekoli moko oyo ebimisamaki na 1985 eyebisaki maloba malandi na ntina ya lisangá Maryknoll (Catholic Foreign Mission Society of America) mpe na ebele na misala na yango na Amérique latine: “Soki lisanga Maryknoll elongaki na kondimisa bato makambo ya Marxiste-Léniniste oyo ezali kolobela mingi mbongwana na lolenge ya mobulu, ezali mpo ete bazali mpenza kopesa yango nzela na kosala lokola ebundeli ya Lingomba Katolike. Nsango na yango ezali te bobele kotalela bato oyo bamipesi mingi te, kasi lisusu bato ya politike ya Amérique.”
Totalela lisusu, oyo babengaki ete Etumba ya mbindo, oyo na boumeli na yango, na lolenge ekanisamaki te, bafandi ya Argentine kobanda 10.000 kino 30.000 bakangamaki mpe babomamaki kozanga mawa na nsuka ya bambula 1970. Lisoló moko kati na zulunalo National Catholic Reporter, na nse na moto ya likambo: “Lingomba epakolamaki na makila na Argentine,” eyebisi ete: “Ezaleli oyo Lingomba ya Katolike emonisaki na Argentine ekokani mingi na oyo emonisaki na Allemagne ya Nazi. Na bongo, emonani ete, na miso ya Lingomba, bokonzi ya awa na nse ezali na ntina mingi koleka etinda oyo epesami kati na Baevanzile, oyo ya kopesa litatoli mpo na solo.”
Mposa ya Lingomba ya kozala na mwa bokonzi kati na biyangeli ya mokili emonisi polele ete bazali baninga na Nzambe te. Biblia elobi ete: “Boyebi te ete kolinga mokili ezali koyina Nzambe? Oyo alingi kozala moninga ya mokili, azali komikomisa monguna ya Nzambe.” (Yakobo 4:4, Jerusalem, Biblia ya Katolike) Na bongo, ezali likambo ya kokamwa te soki bato mingi bazali koluka litambwisi ya elimo na lingomba ya Katolike lisusu te. Kasi nini ekomeli bato oyo basili kotika lingomba ya Katolike?
Bampate bazangi mobateli
Bakokani mingi na baoyo, na ekeke ya liboso, bakonzi ya lingomba ya Bayuda, babatelaki bango te. Biblia elobi ete Yesu “aoki mawa na motema, zambi balembi mpe bafandi wana lokola mpata izali na mokengeli te.” (Matai 9:36, Liloba lya Nzambe) Mingi batikaki Lingomba ya Katolike mpo na kokende na oyo babengaka mangomba oyo mateyaka evanzile. Mangomba oyo mazali nde kobatela bampate oyo ebungi? Okanisi ete baprotesta bazali kotosa oyo Yesu alobaki mpo na bayekoli na ye ya solo ete: “Bazali bato ya mokili te, lokola ngai nazali moto ya mokili te”?—Yoane 17:14.
Mangomba mingi ya Katolike te balingi komimonisa ete bazali mangomba oyo mazali kotosa mpenza Biblia koleka mimeseno ya mangomba. Ezali bobele langi mpamba. Mateya ya moboko ya mangomba ya protesta mazali na boyokani mpenza na oyo ya Lingomba ya Katolike, na boye ete bato mingi oyo bazali komona yango bakoki kosalela lisese oyo ya etuká ya bangomba ya Andes: “Es la misma cholita con otra pollera” (Ezali bobele elenge mwasi yango moko ya mboka Inde oyo alati jupe mosusu).
Na ndakisa, pene na mangomba nyonso ya protesta mazali koteya ete Nzambe azali Bosato, nzokande yango eteyami kati na Biblia te. Buku monene ya Mangomba (na Lingelesi) elobi ete: “Balimboli na Biblia mpe bateolojiɛ ya ntango na biso bazali kondima ete Biblia ya Liebele ezali te na mateya matali Bosato ... Kondimana ya Sika yango mpe ezali ata na liteya moko te oyo ezali kolimbola Bosato.”a
Baprotesta bakangami polele na mokili mpe na politike na yango, lokola Bakatolike. Encyclopédie dˈAmérique latine (na Lingelesi) eyebisi ete: “Lingomba ya protesta oyo ezali na Amérique latine emikotisi mpe na ... politike ya bato mpo na oyo etali kosala vote. Ba pasteurs ya mboka bazali mbala mingi kokóma baninga ya bakonzi ya politike mpe bazali kolóngisa biyangeli yango mpo ete bakoka kosalisa mangomba na bango.” Latin American Research Review eyebisi ete: “Lingomba ya protesta ekangami na politike na Guatemala uta ekomaki na mboka,” mpe ebakisi ete “ezalaki esaleli ya makambo ya politike mpe ya bato, na lolenge ya lingomba.”
Komikotisa ya baprotestá kati na politike mbala mingi ememaki bango na komikotisa na bitumba. Harry Emerson Fosdick, oyo asila kokufa, oyo atalelami lokola moko na ba pasteurs ya baprotestá oyo bazalaki na bopusi mingi na lisoló ya Amerika, andimaki ete: “Lisolo ya mikili na biso [ya Mpoto mpe ya Amerika] ezali kolandana ya bitumba. Tobotaki mibali mpo na bitumba, toyekolisaki bango bitumba; tokómisaki bitumba; tokómisaki basodá na biso bilombe, mpe ata na bandakonzembe na biso, totombolaki bendele na biso ... Na monoko bobele moko ebimaki makumisi mpo na Nkolo ya kimya mpe maloba mpo na kopusa bato na etumba.”
Osengeli kosala nini?
Nsima na komonisa mangomba ya lokuta lokola mwasi na pite ya elilingi oyo azali kosala pite elongo na biyangeli ya mokili, mokanda ya Biblia, Emoniseli eyebisi ete: “Bino bato na ngai bobima kati na ye, ete bosangana na masumu na ye te, ete bozwa moko na malozi na ye mpe te.”—Emoniseli 18:4.
Bato mingi bazali koyeba ete makambo mingi kati na lingomba mazali ya mabe, kasi bazali kokakatana mpo na kotika yango, mpamba te Lingomba ya Rome ezali lingomba oyo eumeli mingi. Nzokande, omikundola ete lingomba ya Bayuda ezalaki lingomba oyo eumelaki mingi; kasi, Nzambe abwakaki Bayuda, libota oyo ye aponaki, ntango bapengwaki longwa na mateya na ye ya solo. Basaleli ya sembo ya Nzambe batikaki lingomba ya Bayuda ntango bamonaki ete Nzambe azalaki sikawa kosalela lisangá ya baklisto na esika na yango. Lolenge nini okoki koyeba lelo oyo lisangá ya solo ya boklisto?
Na boumeli ya bambula ntuku mibale oyo euti koleka, pene na milió moko ya bafandi ya Amérique latine bakomaki ba Témoins de Jéhovah. Mpo na nini basalaki mbongwana wana? Zulunalo moko ya engumba Martinez de la Torre, kati na etuká Veracruz, na mboka Mexique, etalelaki likambo yango. Eyebisaki ete: “Bayekoli wana ya Biblia, bazalaki kala basangani ya mangomba mosusu, mingimingi lingomba ya Katolike. Bamonaki ezaleli ya lingomba ya kosangana na makambo ya politike, mpe kondima to mpe kosepela na ezaleli moko oyo eyokani na Biblia te, oyo ezali komonana mpenza na bosangisi ya mangomba (oecuménisme), pite mpe mobulu. Ezalaki liziba ya esengo mpo na bango na koyokanisa bomoi na bango na mitinda ya Makomami mpo na oyo etali etamboli, mpe batikaki losambo ya bikeko mpe mimeseno oyo ezali ya molili. Yango epesaki bango bomoko kati na kondima oyo ebongi kokumisama, oyo ezali kokesenisa bango na bato mosusu, bipai binso bazali.”
Zulunalo mosusu ya Amérique latine eyebisi ete: “Ba Témoins de Jéhovah bazali bato oyo balingaka mosala, bato na kolongobana mpe bato oyo bazali kobanga Nzambe. Bazali na bokatikati, basepelaka na makambo ya kala, mpe lingomba na bango ezali na moboko likoló na mateya ya Biblia.” Tozali kobyanga yo ete oyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah ezala ete ozali na esika nini. Okoyekola ete elikya na bango mpe lolenge na bomoi na bango mobimba etongami likoló ya Biblia. Ee, okoyekola kosambela Nzambe “na elimo mpe na solo.”—Yoane 4:23, 24.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala brochure Osengeli kondima Trinité? ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Etanda na lokasa 21]
BA TEMOINS DE JEHOVAH KATI NA MWA MIKILI MISUSU YA AMERIQUE LATINE MPE NA BISANGA YA ANTILLES
1971 1992
Mboka Basakoli Basakoli
Argentine 20,750 96,780
Bolivie 1,276 8,868
Brésil 72,269 335,039
Chili 8,231 44,067
Colombie 8,275 55,215
Costa Rica 3,271 14,018
Dominicaine (Rép.) 4,106 15,418
Equateur 3,323 22,763
El Salvador 2,181 20,374
Guadeloupe 1,705 6,830
Guatemala 2,604 13,479
Honduras 1,432 6,583
Mexique 54,384 354,023
Panama 2,013 7,732
Paraguay 901 4,115
Pérou 5,384 43,429
Porto Rico 8,511 25,315
Uruguay 3,370 8,683
Venezuela 8,170 60,444
MOTANGO NYONSO 212,156 1,143,175