Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/7 nk. 5-8
  • Jéhovah​—Nzambe ya solo mpe Nzambe ya bomoi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Jéhovah​—Nzambe ya solo mpe Nzambe ya bomoi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nkombo mpe lokumu na ye
  • Jéhovah mpe bizaleli na ye
  • Mokonzi ya likoló oyo akokani na mosusu te
  • Jéhovah azali Nzambe ya solo mpe Nzambe ya bomoi
  • Nani azali Nzambe ya solo?
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Nzambe azali na nkombo
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Jéhovah azali nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mokanda ya Biblia nimero 2​—Exode
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/7 nk. 5-8

Jéhovah​—Nzambe ya solo mpe Nzambe ya bomoi

FARAO ya Ezipito alobaki na ntembe mpe na kotyola ete: “Jéhovah azali nani?” (Exode 5:2) Lisoló ya liboso limonisi lolenge malozi mpe liwa eyeisamaki likoló na Baezipito, bakisa mpe lolenge oyo Farao mpe basodá na ye bazindaki na mai mpe yango ekómaki nkunda mpo na bango.

Na Ezipito ya kala, Jéhovah Nzambe amonisaki bonene na ye likoló ya banzambe ya lokutá. Kasi ezali na makambo mingi mosusu oyo tosengeli koyekola mpo na ye. Wapi ndambo na bizaleli na ye? Mpe likambo nini ye azali kosɛnga biso?

Nkombo mpe lokumu na ye

Ntango asalaki lilɔmbo epai na Farao ya Ezipito, Moize alobaki te ete: ‘Nkolo alobi boye na boye.’ Farao mpe bato mosusu ya Ezipito batalelaki ebele na banzambe na bango wana ya lokutá lokola bankolo. Ezalaki bongo te mpo na Moize oyo asalelaki nkombo ya Nzambe, Jéhovah. Ye moko ayokaki ntango eyebisamaki longwa na likoló wana azalaki pene na nzeté oyo ezalaki kopɛla mɔ́tɔ na mokili ya Madiani. Lisoló lipemami na Nzambe liyebisi ete:

“Nzambe alobaki na Moize ete: ‘Ngai nazali Jéhovah. . . . Nayoki mpe kokimela na bana na Yisraele, baoyo bakangami na boombo na Baezipito, mpe nakanisi kondimana na ngai. Na yango alobaki na bana na Yisraele ete: “Ngai nazali Jéhovah, mpe nakobimisa bino na misala na Baezipito mpe nakobikisa bino na boombo na bango mpe nakosikola bino na lobɔkɔ losembolami mpe na bitumbu minene, mpe nakozalisa bino lokola bato na ngai mpe ngai nakozala Nzambe na bino, mpe bokoyeba ete ngai nazali Jéhovah Nzambe na bino, oyo abimisi bino na misala na Baezipito. Nakokɔtisa bino na mokili mosili ngai kolapa ndai [Kanana] ete nakopesa na Abalayama mpe na Yisaka mpe na Yakobo. Nakopesa bino yango ete ezala mpo na bino. Ngai nazali Jéhovah.”’”​—Exode 6:1-8.

Ezali yango nde Jéhovah asalaki. Asikolaki Bayisraele na boombo ya Ezipito mpe apesaki bango nzela ya kozwa mokili ya Kanana. Lokola alakaki yango, Nzambe akokisaki yango nyonso. Yango ebongi mpenza! Nkombo na ye, Jéhovah, elimboli “Akoyeisaka.” Biblia ezali kobénga Jéhovah na nkombo lokola “Nzambe,” “Nkolo moyangeli,” “Mozalisi,” “Tata,” “Mozwi-na-Nguya-Nyonso,” mpe “Oyo-Aleki-Likoló.” Nzokande, nkombo na ye Jéhovah ezali komonisa ye lokola Nzambe ya solo oyo azali kosala mokemoke ete mikano na ye minene mikokisama.​—Yisaya 42:8.

Soki totangi Biblia na minoko oyo yango ekomamaki na ebandeli, tokomona nkombo ya Nzambe mbala mingi. Na Liebele, emonisami na mileli (consonnes) minei Yod Hé Waw Hé (יהוה), ebengami Tétragramme, etangami kobanda na lobɔkɔ ya mobali kino na lobɔkɔ ya mwasi. Baoyo bazalaki koloba Liebele bazalaki kobakisa milelisi (voyelles) misengelaki, kasi bato ya ntango na biso bayebi te milelisi ya sikisiki oyo mizalaki kotyama. Bamoko basepeli kobenga Yawe, nzokande ebengeli Jéhovah esalelami na bisika mingi mpe ezali komonisa Mozalisi na biso na lolenge lobongi.

Kosalela nkombo Jéhovah ezali mpe kokesenisa Nzambe na oyo babengi “Nkolo na ngai” na Nzembo 110:1, epai eyeisami na libongoli mosusu ete: “NKOLO [na Liebele, יהוה] alobi na Nkolo na ngai ete, ‘Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali, kino nakotya banguna na yo na nsé na makolo na yo.’” (King James Version) Koyebáká ete nkombo ya Nzambe esalelami na esika oyo kati na Makomami ya Liebele, Traduction du monde nouveau ekomi ete: “Oyo maloba na Jéhovah epai na Nkolo na ngai: ‘Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali kino nakotya banguna na yo lokola etyelo ya makolo na yo.’” Maloba oyo ya Jéhovah Nzambe ezali esakweli eyebisami na ntina na Yesu Klisto, oyo mokomi abengaki ete “Nkolo na ngai.”

Na mikolo ya Farao, Jéhovah ye moko amonisaki bonene ya nkombo na ye. Na nzela ya Moize, Nzambe alobaki na mokonzi wana ya motema makasi ete: “Mpo ete na mbala oyo, nakotinda malozi na ngai nyonso likoló na motema na yo, mpe likoló na basáli na yo mpe likoló na bato na yo, mpo oyeba ete mosusu azali te lokola ngai na mokili mobimba. Mpo ete nakokaki kotinda lobɔkɔ na ngai mpe kobɛta yo mpe bato na yo na maladi mabe, ete bokufa na mokili, kasi natiki yo na ntina boye ete namonisa yo nguya na ngai, ete nkombo na ngai esakolama na mokili mobimba.”​—Exode 9:14-16.

Na kotalela kobima ya Yisraele longwa na Ezipito mpe kozanga elónga ya bamoko na bakonzi ya Kanana, Rahaba, mwasi ya mboka Yeliko alobaki na Baebele mibale oyo bazalaki banɔngi, ete: “Ngai nayebi ete, Jéhovah asili kopesa bino mokili oyo, mpe ete nsɔmɔ na bino ekweli biso, mpe ete bato nyonso na mboka bazali kolɛnga na ntina na bino. Mpo ete biso toyoki motindo Jéhovah akaukisaki mai ya Mai Motane liboso na bino wana ebimaki bino na Ezipito, mpe yango esalelaki bino mikonzi mibale na Baamola baoyo bazalaki na ngambo na Yaladene, Sihona mpe Ogu, baoyo bino bobebisaki nyee. Wana toyokaki yango, tolɛmbaki mpe mpiko etikalaki na moto te na ntina na bino, mpo ete Jéhovah Nzambe na bino azali Nzambe ya lola na makoló mpe ya mokili na nsé.” (Yosua 2:9-11) Ya solo, lokumu ya Jéhovah lopalanganaki.

Jéhovah mpe bizaleli na ye

Mokomi na Nzembo amonisaki mposa wana monene: “Ɛɛ bayeba ete ezali bobele yo oyo azali na nkombo Jéhovah, Oyo-Aleki-Likoló na mokili mobimba.” (Nzembo 83:18) Lokola boyangeli ya Jéhovah ezali na molongo mobimba, bayekoli na Yesu oyo banyokwamaki bakokaki kobondela ete: “Nkolo moyangeli, Yo oyo osalaki likoló mpe mabelé mpe mai mpe biloko nyonso bizali kati na yango.” (Misala 4:24) Oyo nde libɔndisi na koyeba ete Jéhovah azali “Ye oyo ayokaka mabondeli”!​—Nzembo 65:2.

Ezaleli ya liboso ya Jéhovah ezali bolingo. Ya solo, “Nzambe azali bolingo”​—ezaleli oyo emonisi ye mpenza. (1 Yoane 4:8) Lisusu, “na ye mayele mpe nguya ezali.” Jéhovah aleki na mayele mpe aleki na nguya, kasi akosalelaka nguya na ye na lolenge mabe te. (Yobo 12:13; 37:23) Tokoki mpe kondimisama ete Jéhovah akosala ntango nyonso na sembo kati na boyokani na ye elongo na biso, mpo ete “boyengebene mpe bosembo ezali moboko ya kiti ya bokonzi na ye.” (Nzembo 97:2) Soki tosali libungá nde tobongoli motema, tokoki kobɔndisama na koyeba ete Jéhovah azali “Nzambe ya mawa mpe na ngolu, akookaka nkanda noki te. Aleki na boboto mpe na solo.” (Exode 34:6) Na ntembe te, tokoki kozala na esengo na kosaleláká Jéhovah.​—Nzembo 100:1-5.

Mokonzi ya likoló oyo akokani na mosusu te

Yesu Klisto, Mwana ya Jéhovah alobaki ete: “Nzambe azali elimo.” (Yoane 4:24) Yango wana, Jéhovah akomonanaka te na miso na bato. Mpo na yango, Jéhovah alobaki na Moize ete: “Okoki komona elongi na ngai te, mpo ete moto te akoki komona ngai mpe azala na bomoi.” (Exode 33:20) Mokonzi wana ya likoló azali na nkembo mingi na boye ete bato bakoki te kotala ye.

Atako Jéhovah amonanaka te na miso na biso, kasi ezali na makambo mazali kotatola na ntina na ye ete azali mpe azali Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Ya solo, “bizaleli na ye bizangi komonana uta kozalisama ya mokili, bimonani polele longwa na misala na ye na kozalisa, mpamba te yango esalami na mayele, ee, na nguya na ye ya seko mpe na bonzambe na ye.” (Baloma 1:20, MN) Mabelé​—matiti na yango, banzeté na yango, mbuma na yango, milóna na yango mpe folólo—​ezali kotatola mpo na Bonzambe ya Jéhovah. Na kokesena na banzambe-bikeko na mpamba, Jéhovah azali kopesa mbula mpe bileko ya kobota mbuma mingi. (Misala 14:16, 17) Tala naino minzoto na makoló kati na butu. Oyo nde elembeteli monene ya bonzambe ya Jéhovah mpe ya makoki na ye ya kotya makambo na molɔngɔ́!

Jéhovah abongisaki mpe bikelamu na ye ya elimo, ya mayele mpe ya bulee kati na makoló. Na lolenge ya lisangá lizali na boyokani, bazali kokokisa mokano ya Nzambe, lokola mokomi na Nzembo alobaki ete: “Bosanzola Jéhovah, bino baanzelu na ye, bino boleki na nguya, bino bokotosaka ye, ekoyokaka bino mongongo na ye. Bosanzola Jéhovah, bino mampinga na ye nyonso, basáli na ye baoyo bakosalaka mokano na ye.” (Nzembo 103:20, 21) Jéhovah abongisaki mpe libota na ye awa na mabelé. Libota ya Yisraele libongisamaki malamu, ezalaki mpe bongo mpo na bayekoli ya liboso ya Mwana na Nzambe. Bobele bongo lelo, Jéhovah azali na lisangá ya mokili mobimba ya Batemwe ya molende, baoyo bazali kosakola nsango malamu ete Bokonzi na ye ebɛlɛmi.​—Matai 24:14.

Jéhovah azali Nzambe ya solo mpe Nzambe ya bomoi

Bonzambe ya Jéhovah bomonisamaki kati na makambo mingi! Akitisaki banzambe ya lokutá ya Ezipito mpe akɔtisaki Bayisraele na Mokili ya ndaká kozanga likámá. Biloko bizalisami bimonisi mpenza Bonzambe ya Jéhovah. Mpe ezali polele ete bokokani bozali te kati na ye mpe banzambe-bikeko na mpamba na mangomba ya lokutá.

Mosakoli Yilimia amonisaki kokesena monene oyo ezali kati na Jéhovah, Nzambe ya bomoi, mpe bikeko bisalemi na bato, oyo bizangi bomoi. Kokesena wana emonisami malamu kati na Yilimia mokapo 10. Kati na makambo mosusu, Yilimia akomaki ete: “Jéhovah azali Nzambe ya solo. Azali Nzambe ya bomoi mpe Mokonzi ya seko.” (Yilimia 10:10, MN) Jéhovah, Nzambe ya solo mpe Nzambe ya bomoi, azalisaki biloko nyonso. Asikolaki Bayisraele baoyo banyokwamaki na boombo na Ezipito. Eloko moko te ezali mpasi mpo na ye ete asala yango.

Jéhovah, “Mokonzi ya seko,” akoyanola na libondeli oyo ete: “Tata na biso ozali na makoló, tika nkombo na yo ekumisama. Tika bokonzi na yo eya. Tika mokano na yo mosalema na mabelé lokola na makoló.” (1 Timoté 1:17; Matai 6:9, 10) Bokonzi ya Masiya na makoló, oyo ezali na mabɔkɔ na Yesu Klisto, mosika te ekoboma bato mabe mpe ekobebisa banguna nyonso ya Jéhovah. (Danyele 7:13, 14) Lisusu, Bokonzi wana ekotya mokili ya sika motondi na mapamboli mingi mpo na bato ya botósi.​—2 Petelo 3:13.

Ezali na makambo mingi mosusu oyo tosengeli koyekola mpo na Jéhovah mpe mikano na ye. Mpo na nini te kotya mokano ya kozala na boyebi lokola oyo mpe kosala na boyokani na yango? Soki osali bongo, okozala na libaku malamu ya kozala na bomoi ya seko kati na mabelé makokóma Paradis na nsé na boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe. Okozala na bomoi wana mpasi, mawa, ata mpe liwa ekozala lisusu te mpe boyebi ya Jéhovah ekotonda na mokili. (Yisaya 11:9; Emoniseli 21:1-4) Yango ekoki kosalema epai na yo soki oluki, omoni mpe omiyokanisi na biyano bitongami na Biblia na ntina na motuna oyo ete, “Jéhovah azali nani?”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto