Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/7 nk. 13-18
  • Tómonisa kondima kati na bilaká ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tómonisa kondima kati na bilaká ya Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kondima mpe bilaká ya Jéhovah
  • Makambo ya ntina mingi mpo na kondima
  • Bopusi bokeseni
  • Kondima kati na liloba ya esakweli
  • Bazalaki na kondima kati na bilaká ya Nzambe
  • Kondima ezali na ntina mingi mpo na baklisto
  • Monisá kondima na bilaka ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Tózala na kondima oyo etongami likoló na solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tósimba ngwi kondima na biso ya motuya!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Ondimaka mpenza nsango malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/7 nk. 13-18

Tómonisa kondima kati na bilaká ya Nzambe

“[Jéhovah Nzambe] asili kopesa biso bilaká kitoko mpe ya minene mingi.”​—2 PETELO 1:4, MN.

1. Nini ezali kopesa biso nzela na komonisa kondima ya solo?

JÉHOVAH asɛngi biso ete tomonisa kondima kati na bilaká na ye. Nzokande, “bato nyonso bazali na kondima te.” (2 Batesaloniki 3:2) Ezaleli wana ezali mbuma ya elimo santu ya Nzambe, to bokasi bokosalaka mosala. (Bagalatia 5:22, 23) Na yango, bobele baoyo bakambami na elimo ya Jéhovah nde bakoki komonisa kondima.

2. Lolenge nini ntoma Paulo alimbolaki “kondima”?

2 Kasi kondima ezali nini? Ntoma Paulo abéngi yango ete “elimbweli ya makambo na solo atako tozali komona yango te.” Bosolo ya makambo yango mazangi komonana ezali na nguya mingi na boye ete kondima ekokisami na yango. Kondima ezali mpe “elendiseli na biloko bikolikyaka biso” mpamba te, baoyo bazali na ezaleli wana bandimisami ete biloko nyonso oyo bilakami na Jéhovah Nzambe bizali mpenza solo, bimonani na lolenge mosusu ete bisili kokokana.​—Baebele 11:1, MN.

Kondima mpe bilaká ya Jéhovah

3. Nini ekokómela baklisto bapakolami soki bamonisi kondima?

3 Mpo na kosepelisa Jéhovah, tosengeli komonisa kondima kati na bilaká na ye. Ntoma Petelo amonisaki yango kati na mokanda na ye ya mibale mopemami, oyo mokomamaki soko na mobu 64 T.B. Amonisaki ete soki baninga na ye baklisto bapakolami bamonisaki kondima, mbɛlɛ bamonaki kokokana ya “bilaká kitoko mpe ya minene ya Nzambe.” Na yango, bakokaki “kozala na motindo na Nzambe” lokola basangoli na libula elongo na Yesu Klisto kati na Bokonzi ya likoló. Na kondima mpe na lisungi ya Jéhovah Nzambe, babimaki na boombo ya misala mpe bizaleli ya mokili oyo mosili kobeba. (2 Petelo 1:2-4, MN) Mpe kanisa naino! Baoyo bazali komonisa kondima wana ya solo bazali mpe na bonsomi wana boleki na motuya.

4. Bizaleli nini tosengeli kobakisa likoló na kondima na biso?

4 Kozala na kondima kati na bilaká ya Jéhovah mpe komonisa botɔndi mpo na bonsomi oyo Nzambe apesi biso, esengeli kopusa biso na kosala nyonso ekoki na biso mpo na kozala baklisto malamu. Petelo alobaki ete: “Bosala na makasi nyonso ete bobakisa bizaleli bibongi wana ezali bino na kondima; mpe bobakisa boyebi wana ezali bino na bizaleli bibongi; mpe bobakisa komipekisa wana ezali bino na boyebi, mpe bobakisa koyika mpiko wana ezali bino na komipekisa, mpe bobakisa ezaleli ya kobanga Nzambe wana ezali bino koyika mpiko, bozala na bolingo mpo na bandeko wana ezali bino na ezaleli ya kobanga Nzambe, mpe bobakisa bolingo wana ezali bino na bolingo mpo na bandeko.” (2 Petelo 1:5-7, MN) Na bongo, Petelo apesi biso molongó ya makambo oyo mabongi na biso kobomba yango na bɔɔngɔ́. Tótalela bizaleli yango malamumalamu.

Makambo ya ntina mingi mpo na kondima

5, 6. Bizaleli bibongi ezali nini, mpe lolenge nini tokoki kobakisa yango likoló ya kondima na biso?

5 Petelo alobaki ete bizaleli bibongi, boyebi, komipekisa, koyika mpiko, ezaleli ya kobanga Nzambe, bolingo mpo na bandeko mpe bolingo ezali kobakisama moko likoló na mosusu mpe ezali kokólisa kondima na biso. Tosengeli kosala makasi mpo na kosala ete bizaleli wana bizala makambo ya ntina mingi mpo na kondima na biso. Na ndakisa, soki kondima ezali te bizaleli bibongi bikoki komonisama te. W. E. Vine, molimboli na maloba ya nkóta, amonisaki ete na 2 Petelo 1:5, “bizaleli bibongi bilakisami lokola ezaleli ya ntina mingi mpo na komonisa kondima.” Mokomoko na bizaleli mosusu bilobelamaki na Petelo esengeli kozala likambo ya ntina mingi mpo na kondima na biso.

6 Ya liboso, tosengeli kobakisa bizaleli bibongi likoló na kondima na biso. Kozala moto na bizaleli bibongi elimboli kosala oyo ezali malamu na miso ya Nzambe. Mpo na liloba ya Greke oyo libongolamaki na “bizaleli bibongi,” mabongoli mingi masaleli “bizaleli ya malamu.” (Boyokani ya Sika) Bizaleli bibongi bizali kopusa biso na kopɛngola kosala mabe to kosala mabe na baninga na biso bato. (Nzembo 97:10) Ezali mpe kopusa na nguya ya kosala malamu na makambo ya elimo, ya mosuni, mpe na mayoki ya bato mosusu.

7. Mpo na nini tosengeli kobakisa boyebi likoló na kondima na biso mpe na bizaleli na biso bibongi?

7 Mpo na nini Petelo alendisi biso ete tobakisa boyebi likoló na kondima na biso mpe na bizaleli na biso bibongi? Mpamba te, lokola kondima na biso ezali kokutana na mimekamo mbala na mbala, tozali na mposa ya boyebi mpo na kokesenisa malamu mpe mabe. (Baebele 5:14) Tozali kobakisa boyebi na biso na boyekoli ya Biblia mpe na kosalela makambo mazwami kati na Liloba ya Nzambe mpe komonisa mayele na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Mpe, yango ezali kosalisa biso na kobatela kondima na biso mpe na kolanda kosala makambo mabongi na ntango tokutani na momekamo.​—Masese 2:6-8; Yakobo 1:5-8.

8. Komipekisa ezali nini, mpe lolenge nini ekangani na koyika mpiko?

8 Tozali na mposa ya kobakisa komipekisa likoló ya boyebi na biso mpo esalisa biso na kobatela kondima wana tokutani na mimekamo. Liloba ya Greke oyo libongolami na “komipekisa” limonisi makoki ya kozala na bokonzi likoló na biso moko. Mbuma wana ya elimo na Nzambe ezali kosalisa biso na kotya ndelo na makanisi, na maloba, mpe na etamboli. Soki tolendendeli kati na komipekisa, tokobakisa koyika mpiko likoló na yango. Liloba ya Greke oyo libongolami na “koyika mpiko” elimboli kotɛlɛma ngwi na mpiko nyonso, kasi ezali te komonisa elongi ya mawa mpe kolɛmba liboso ya mimekamo oyo tokoki kopɛngola yango te. Ezali mpo na esengo oyo ezalaki liboso na ye nde Yesu ayikelaki nzeté ya mpasi mpiko. (Baebele 12:2) Nguya euti na Nzambe, oyo esangisami na koyika mpiko, ezali kosimba kondima na biso mpe ezali kosalisa biso na kosepela kati na bolozi, na kotɛmɛla komekama, mpe na koboya koangana kondima na biso na ntango tonyokwami.​—Bafilipi 4:13.

9. (a) Ezaleli ya kobanga Nzambe ezali nini? (b) Mpo na nini tosengeli kobakisa bolingo mpo na bandeko likoló na ezaleli ya kobanga Nzambe? (c) Lolenge nini tokoki kobakisa bolingo likoló ya bolingo mpo na bandeko?

9 Likoló na koyika mpiko na biso, tosengeli kobakisa ezaleli ya kobanga Nzambe​—limemya mozindo, kosambela, mpe kosalela Jéhovah. Kondima na biso ezali kokóla wana tozali na ezaleli ya kobanga Nzambe mpe na komona lolenge Jéhovah azali kobatela libota na ye. Nzokande, mpo na komonisa ezaleli ya kobanga Nzambe, tosengeli kozala na bolingo mpo na bandeko. Mpamba te, “soko moto akolingaka ndeko na ye te, oyo ye asili komona, akolinga Nzambe te, oyo ye amoni naino te.” (1 Yoane 4:20, MN) Mitema na biso misengeli kopusa biso na komonisa bolingo ya solo mpo na basaleli mosusu ya Jéhovah mpe koluka ntango nyonso bolamu na bango. (Yakobo 2:14-17) Kasi mpo na nini elobami na biso ete tobakisa bolingo likoló na bolingo na biso mpo na bandeko? Na ndenge emonani, Petelo alingaki koloba ete tosengeli komonisa bolingo epai na bato nyonso, nde bobele na bandeko na biso te. Bolingo wana emonisami mpenzampenza na kosakoláká nsango malamu mpe na kosalisáká bato kati na elimo.​—Matai 24:14; 28:19, 20.

Bopusi bokeseni

10. (a) Misala nini tokokokisa soki bizaleli bibongi, boyebi, komipekisa, koyika mpiko, ezaleli ya kobanga Nzambe, bolingo mpo na bandeko, mpe bolingo ebakisami likoló ya kondima? (b) Nini ekokóma soki moto oyo azali komitanga moklisto azangi bizaleli wana?

10 Soki, likoló na kondima na biso, tobakisi bizaleli bibongi, boyebi, komipekisa, koyika mpiko, ezaleli ya kobanga Nzambe, bolingo ya bandeko mpe bolingo, tokokanisa, tokoloba, mpe tokosala makambo na lolenge londimami na Nzambe. Na kokesena, soki ye oyo azali komitanga moklisto amonisi bizaleli wana te, akokóma mokufeli miso kati na elimo. ‘Akangi miso na ye ete amona pole te’ oyo euti na Nzambe mpe abosani ete asilaki kopetwa longwa na masumu na ye ya kala. (2 Petelo 1:8-10; 2:20-22) Tika te ete eloko moko ekweisa biso na nzela wana mpe bongo kobungisa kondima kati na bilaká ya Nzambe.

11. Nini tokoki komizela komona epai na bapakolami na sembo?

11 Baklisto bapakolami na sembo bazali na kondima kati na bilaká ya Jéhovah mpe bango moko bazali kosala makasi mpo ete bandimisama na libyangi na bango mpe na koponama na bango. Atako mabaku nini bazali kokutana na yango, tokoki komizela ete bamonisa bizaleli ya Nzambe. Bapakolami ya sembo ‘bakokɔtisama mpenza kati na bokonzi ya seko ya Yesu Klisto’ na nzela ya lisekwa mpo na kozala na bomoi ya elimo kati na makoló.​—2 Petelo 1:11, MN.

12. Lolenge nini tozali kokanga ntina ya maloba ya 2 Petelo 1:12-15?

12 Petelo ayebaki ete mosika te asengelaki kokufa, mpe alikyaki kozwa lisekwa mpo na kozala na bomoi na likoló. Kasi lokola azalaki naino na bomoi kati na “hema oyo”​—nzoto na ye—​amekaki kotonga kondima ya baninga na ye bandimi mpe kolendisa bango na kokundweláká bango makambo oyo bazalaki na yango mposa mpo na kozwa ngolu ya Nzambe. Nsima ya liwa na ye, bandeko ya Petelo kati na elimo, mibali mpe basi, bakokaki kosimba kondima na bango na kokanisáká maloba na ye.​—2 Petelo 1:12-15.

Kondima kati na liloba ya esakweli

13. Nzambe apesaki litatoli nini mpo na kolendisa kondima na ntina na koya ya Klisto?

13 Nzambe ye moko apesaki litatoli oyo lizali kolendisa kondima na ntina etali bosolo na koya na Yesu “kati na nguya mpe na nkembo monene.” (Matai 24:30; 2 Petelo 1:16-18) Lokola bazangaki bilembeteli, banganga ya Bapakano bazalaki koyebisa masapo ya lokutá na ntina na banzambe na bango, nzokande Petelo, Yakobo, mpe Yoane bamonaki mpenza nkembo monene ya Klisto kati na kobongwana. (Matai 17:1-5) Bamonaki ye wana akembisamaki mpe bayokaki mongongo ya Nzambe ye moko koloba ete Yesu azali Mwana molingami na Ye. Eyambweli wana mpe kongɛnga makasi emonanaki na Klisto, epesaki ye lokumu mpe nkembo. Na ntina na emoniseli wana ya Nzambe, Petelo abéngaki esika yango, oyo na ntembe te ezalaki nkiteli ya Helemona, ete “ngomba mosantu.”​—Tala Exode 3:4, 5.

14. Kobongwana na Yesu esengeli kozala na bopusi nini likoló na kondima na biso?

14 Kobongwana na Yesu esengeli kozala na bopusi nini likoló na kondima na biso? Petelo alobaki ete: “Tozali na liloba ya esakweli limonani mpenza solo, yango nde bozali kotalela lokola mwinda oyo mozali kongɛnga kati na esika na molili, kino ntɔngɔ́ ekotána mpe monzoto ya ntɔngɔ́ mokobima kati na mitema na bino.” (2 Petelo 1:19, MN) Na ndenge emonani, “liloba ya esakweli” ezali te bobele bisakweli ya Makomami na Liebele na ntina na Masiya, kasi esangisi mpe oyo Yesu alobaki ete akoya “kati na nguya mpe na nkembo monene.” Lolenge nini liloba “limonani mpenza solo” na nzela ya kobongwana? Likambo wana lindimisaki liloba ya esakweli na ntina na koya na nkembo ya Klisto kati na nguya ya Bokonzi.

15. Esengeli kosala nini mpo na kotya likebi na liloba ya esakweli?

15 Mpo na kolendisa kondima na biso, tosengeli kotya likebi na liloba ya esakweli. Yango esɛngi koyekola liloba yango, kotalela yango kati na makita ya boklisto, mpe kosalela batoli na yango. (Yakobo 1:22-27) Tosengeli kotika yango ezala “mwinda oyo mozali kongɛnga kati na esika ya molili,” kopesáká pole na mitema na biso. (Baefese 1:18) Bobele na lolenge wana nde ekokamba biso epai na Yesu Klisto, “monzoto ya ntɔngɔ́” to “monzoto oyo mokongɛngaka na ntɔngɔ́ntɔngɔ́,” oyo amimonisaki ye moko kati na nkembo. (Emoniseli 22:16) Komonana wana ekolimbola libebi mpo na baoyo bazangi kondima mpe mapamboli mpo na baoyo bazali komonisa kondima.​—2 Batesaloniki 1:6-10.

16. Mpo na nini tokoki kondima ete bilaká nyonso bisakolami kati na Liloba ya Nzambe bikokokana?

16 Basakoli ya Nzambe bazalaki te bobele bato ya bososoli oyo basalaki bisakweli ya mayele, mpamba te Petelo alobaki ete: “Esakweli moko te kati na Makomami esili kouta na bato. Mpo ete esakweli moko te esili kobima na mokano na moto, kasi bato balobi na ntina na Nzambe wana bapusamaki na elimo santu.” (2 Petelo 1:20, 21, MN) Na ndakisa, Davidi alobaki ete: “Elimo ya Jéhovah elobaki na nzela na ngai.” (2 Samwele 23:1, 2) Mpe Paulo akomaki ete: “Makomami nyonso mapemami na Nzambe.” (2 Timoté 3:16) Lokola basakoli ya Nzambe bapemamaki na nzela ya elimo na ye, tokoki kozala na kondima ete bilaká nyonso bizwami kati na Liloba na ye bikokokana.

Bazalaki na kondima kati na bilaká ya Nzambe

17. Kondima ya Abele etongamaki likoló ya elaká nini?

17 Bilaká ya Jéhovah bizalaki moboko mpo na kondima ya ‘lipata monene’ ya batatoli na ye oyo bazalaki liboso na Klisto. (Baebele 11:1 kino 12:1) Na ndakisa, Abele azalaki na kondima kati na elaká na Nzambe na ntina na “libota” oyo lisengelaki konyata “nyoka” na motó. Yango emonisaki kokokana ya etumbu oyo Nzambe apesaki baboti ya Abele. Na libandá ya Edene, Adam mpe libota na ye balyaki limpa na motoki na elongi na bango, mpamba te mabelé malakelamaki mabe mpe mabimisaki nzube mpe mikulu na nzube. Na ntembe te, Abele amonaki lolenge nini Eva azalaki na mposa ya mobali na ye mpe amonaki lolenge Adam azalaki na bokonzi likoló na ye. Na ntembe te, Eva azangaki te kolobela na ntina na mpasi ya zemi na ye. Mpe nzela ya kokɔta na elanga ya Edene ebatelamaki na bakeluba mpe na mopanga na mɔ́tɔ. (Genese 3:14-19, 24) Nyonso wana ezali “elembeteli monene” endimisaki Abele ete kosikwama esengelaki koya na nzela na Libota ya ndaká. Na kondima, Abele apesaki Nzambe mbeka oyo ezalaki na motuya mingi koleka oyo ya Kaina.​—Baebele 11:1, 4.

18, 19. Abalayama mpe Sara bamonisaki kondima kati na makambo nini?

18 Batata na mabota: Abalayama, Yisaka na Yakobo bazalaki mpe na kondima kati na bilaká ya Jéhovah. Abalayama amonisaki kondima kati na elaká ya Nzambe oyo ete, mabota nyonso ya mokili masengeli kopambolama na nzela na ye mpe ete libota na ye lisengelaki kopesamela mboka moko. (Genese 12:1-9; 15:18-21) Yisaka, mwana na ye mpe Yakobo, mwana na mwana na ye, bazalaki “basangoli na elaká elongo na ye.” Mpo na kondima, Abalayama “afandaki lokola mopaya na mokili ya ndaká” mpe azelaki “mboka oyo ezali na miboko malamu,” Bokonzi ya Nzambe na nzela na yango nde akosekwa mpo na kozala na bomoi awa na mabelé. (Baebele 11:8-10) Ozali na kondima motindo moko?

19 Sara, mwasi ya Abalayama, azalaki soko na mibu 90 mpe alekisaki ntango ya kobota bana nzokande azalaki na kondima kati na elaká ya Nzambe, mpe apesamelaki nguya “ya kokumba zemi” mpe abotaki Yisaka. Bongo, na mibu 100, Abalayama oyo azalaki “lokola nde akufi” mpo na oyo etali kobota bana, na nsima, “bana babotamelaki ye lokola minzoto ya likoló mpo na motuya na bango monene.”​—Baebele 11:11, 12, MN; Genese 17:15-17; 18:11; 21:1-7.

20. Batata na mabota basalaki nini, atako bamonaki te kokokisama nyonso ya bilaká ya Nzambe epai na bango?

20 Batata na mabota wana ya sembo bakufaki nde bamonaki te kokokisama nyonso ya bilaká ya Nzambe epai na bango. Atako bongo, “bamonaki [makambo oyo malakamaki] na mosika mpe bayambaki yango, mpe bayamboláki ete bazalaki bapaya mpe basáli mobembo kati na mokili.” Bikeke mingi bilekaki liboso ete bakitani ya Abalayama bazwa Mokili ya ndaká. Nzokande, na bomoi na bango mobimba, batata na mabota oyo bazalaki kobanga Nzambe, bazalaki na kondima kati na bilaká ya Jéhovah. Lokola babungisaki kondima na bango te, bakosekwisama mpo na kozala na bomoi kati na mabelé ya “mboka” oyo Nzambe asili kosala mpo na bango, Bokonzi ya Masiya. (Baebele 11:13-16) Bobele bongo, kondima ekoki kosalisa biso na kotikala sembo epai na Jéhovah ata soki tomoni te kokokisama ya bilaká na ye nyonso sikawa. Kondima na biso ekopusa biso lisusu na kotósa Nzambe, lokola Abalayama asalaki yango. Mpe lolenge moko apesaki libula ya elimo epai na bakitani na ye, biso mpe tokoki kosalisa bana na biso na komonisa kondima kati na bilaká kitoko ya Jéhovah.​—Baebele 11:17-21.

Kondima ezali na ntina mingi mpo na baklisto

21. Lelo oyo, tosengeli komonisa kondima na nini, mpo ete tondimama na Nzambe?

21 Ya solo, kozala na kondima esuki te bobele na kotya motema kati na kokokisama ya bilaká ya Jéhovah. Na boumeli ya lisoló ya bato, emonanaki ete komonisa kondima epai na Nzambe kati na makambo makeseni ezalaki na ntina mingi mpo na kondimama na ye. Paulo amonisaki ete “soki moto azangi kondima, akoki kosepelisa [Jéhovah Nzambe] te. Mpo ete ye oyo akobɛlɛma na Nzambe asengeli kondima ete azali mpe akozongisa libonza epai na baoyo bakolukaka ye.” (Baebele 11:6, MN) Mpo na kondimama lelo epai na Jéhovah, moto asengeli kondimela Yesu Klisto mpe mbeka ya lisiko oyo Nzambe apesaki na nzela na ye. (Baloma 5:8; Bagalatia 2:15, 16) Lokola Yesu ye moko alobaki ete: “Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana na ye bobele moko ete moto na moto oyo akondimela ye, abomama te kasi azwa bomoi ya seko. Ye oyo andimeli Mwana azali na bomoi ya seko; ye oyo aboyi kotósa Mwana akozala na bomoi te, kasi nkanda na Nzambe ekoumela likoló na ye.”​—Yoane 3:16, 36, MN.

22. Bokonzi ya Masiya ekokokisa elaká nini?

22 Yesu azali na mokumba monene kati na kokokisama ya bilaká ya Nzambe na ntina na Bokonzi oyo mpo na yango baklisto bazali kobondela. (Yisaya 9:6, 7; Danyele 7:13, 14; Matai 6:9, 10) Lokola Petelo amonisaki yango, kobongwana endimisaki liloba ya esakweli na ntina na koya na Yesu kati na Bokonzi na nguya mpe na nkembo. Bokonzi ya Masiya ekosala mpo na kokokisama ya elaká mosusu ya Nzambe, mpamba te Petelo akomaki ete: “Engebene elaká, tozali kozela mabelé na sika mpe makoló na sika, epai boyengebene ekofanda kati na yango.” (2 Petelo 3:13, MN) Esakweli ya lolenge moko ekokanaki ntango Bayuda oyo bakendeki na boombo na Babilone bazongaki kotonga lisusu mboka na bango na mobu 537 L.T.B. na litambwisi ya guvernere Yolobabele mpe Yosua, nganga monene. (Yisaya 65:17) Kasi Petelo alobelaki ntango ekoya wana “makoló ya sika”​—Bokonzi ya Masiya na likoló—​ekoyangela “mabelé ya sika,” libota ya bayengebene oyo bazali na bomoi na etando oyo.​—Tala Nzembo 96:1.

23. Mituna nini tokotalela na lisoló lilandi na ntina na bizaleli bibongi?

23 Biso basaleli ya sembo ya Jéhovah mpe bayekoli ya Yesu Klisto, Mwana na ye molingami, tozali kozela mokili ya sika molakami na Nzambe na motema likoló. Toyebi ete ebɛlɛmi, mpe tozali na kondima ete bilaká kitoko nyonso ya Jéhovah bikokokana. Mpo na kotambola na lolenge londimami na Nzambe na biso, tosengeli komonisa kondima na biso na kobakisáká bizaleli bibongi, boyebi, komipekisa, koyika mpiko, ezaleli ya kobanga Nzambe, bolingo mpo na bandeko, mpe bolingo likoló na yango.a Mpo na yango, motuna motunami ete: Lolenge nini tokoki komonisa bizaleli bibongi? Mpe lolenge nini bizaleli na biso bibongi bikozala na litomba mpo na biso mpe mpo na bato mosusu, mingi mpenza mpo na baninga na biso baklisto, baoyo bazali komonisa kondima kati na bilaká ya Nzambe?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Kondima mpe bizaleli bibongi elobelami kati na nimero oyo ya Mosenzeli. Boyebi, komipekisa, koyika mpiko, ezaleli ya kobanga Nzambe, bolingo mpo na bandeko, mpe bolingo ekotalelama kati na banimero ekolanda.

Okoyanola lolenge nini?

◻ Lolenge nini “kondima” ekoki kolimbolama?

◻ Na kotalela 2 Petelo 1:5-7, bizaleli nini tosengeli kobakisa likoló na kondima na biso?

◻ Kobongwana na Yesu esengeli kozala na bopusi nini likoló na kondima na biso?

◻ Bandakisa nini ya kondima oyo epesamaki na Abele, Abalayama, Sara, mpe bato mosusu ya ntango na kala?

[Elilingi na lokasa 15]

Oyebi bopusi oyo kobongwana na Yesu ekoki kozala na yango likoló na kondima ya moto?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto