Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/8 lok. 31
  • Mituna ya Batangi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya Batangi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Masolo mosusu
  • Yoane Mobatisi azalaki nani?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Yoane Mobatisi azalaki mpenza na bomoi?
    Makambo mosusu
  • Yoane alingi koyeba makanisi ya Yesu
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Mosala ya Yesu emati, oyo ya Yoane ekiti
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/8 lok. 31

Mituna ya Batangi

Esengeli kobénga Yoane oyo abatisaki Yesu ete “Jean le Baptiste (Yoane Mopesi batisimo)” to “Jean le baptiseur (Yoane Mobatisi )”?

Bibengeli yango nyonso mibale na Lifalanse bizali malamu mpe bindimami na Biblia.

Yoane asengelaki “kobongisela Jéhovah libota libongisami mpenza,” ezali yango asalaki na ntango “asakolaki batisimo mpo na kobongola mitema mpo na kolimbisama na masumu.” (Luka 1:17; 3:3) Ntoma Matai akomaki ete: “Yoane Mopesi batisimo (Jean le Baptiste) amonani; azalaki kosakola kati na mokili mokauki na Yuda, ete: ‘Bobongola mitema! Mpo ete Bokonzi na likoló esili kobelema.’ . . . Bongo Yelusaleme mpe Yuda mobimba . . . babimi epai na ye, abatisi bango na ebale na Yaladene wana bazali koyambola masumu na bango.”​—Matai 3:1-6.

Tomoni ete Matai alakisi Yoane lokola “Mopesi batisimo” (le Baptiste). Matai, akomaki lisoló na ye mpo na Bayuda, boye asosolaki ete Bayuda basengelaki koyeba ye oyo azalaki “Mopesi batisimo” (le Baptiste). Asalelaki liloba yango lokola nkombo ya kobakisa.a Yesu mpe bayekoli na ye basalelaki nkombo “Jean le Baptiste,” lokola basaleli ya Hérode basalaki yango.​—Matai 11:11, 12; 14:2; 16:14, MN.

Moyekoli Malako asalelaki mpe ebengeli “Mopesi batisimo (le Baptiste).” (Malako 6:25; 8:28) Kasi wana azali kolakisa Yoane, Malako abengaki ye “Yoane Mobatisi.” (Malako 1:4, MN) Liloba ya Greke oyo ezali kati na Malako 1:4 ekeseni mwa moke na oyo emonani na ba versets mosusu. Malako 1:4 ekoki lisusu kobongolama “ye oyo akobatisaka.” Malako amonisaki mosala oyo Yoane azalaki kosala; azalaki ye oyo akobatisaka, mobatisi.

Nzokande, emonani ete tosengeli te kokesenisa mitindo wana mibale basaleli mpo na kobenga Yoane na Lifalanse. Na Malako 6:24, 25, tozali kotanga na ntina na Salomé ete: “Abimi, alobi na mama na ye ete: ‘Nalɔmba eloko nini?’ Alobi ete: ‘Motó na Yoane Mobatisi (Jean le baptiseur).’ Nokinoki akoti mbango epai na mokonzi kolɔmba ete: ‘Nalingi ete opesa ngai sikawa motó na Yoane Mopesi batisimo (Jean le Baptiste) likoló na lungu.’” Bibengeli oyo mibale ekoki kosalelama moko na esika ya mosusu.

Bato mosusu bakoki kotalela liloba “Mopesi batisimo (le Baptiste)” engebene ndimbola ya mibale oyo diksionere moko epesi ete: “Mosangani to moto ya lingomba libengami confession protestante évangelique oyo ekabolami na masangá mpe ezali kopesa batisimo bobele na bandimi na yango na kozindisama kati na mai.” Nzokande, eyebani ete Yoane azalaki moto na lingomba ya Baptiste te.

Na bongo, bibengeli nyonso mibale “Yoane Mopesi batisimo (Jean le Baptiste)” mpe “Yoane mobatisi (Jean le baptiseur)” bizali malamu mpe bibongi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mokomi na makambo ya kala Flavius Josèphe akomaki na ntina na “Yoane, oyo abéngamaki Mopesi batisimo.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto