Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/11 nk. 28-29
  • Mpo na nini kondima mabungá na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini kondima mabungá na yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tozanga elikya te
  • Komikitisa: ezaleli ya ntina mingi
  • Bandimaki mabungá bango
  • Tobongisa mabungá na biso
  • Soki nkulutu moko asali libungá
  • Tozala pene mpo na kondima mabungá na biso
  • Tozala na esengo ya kondima mabungá na biso
  • Nasala nini mpo nabongisa mabe oyo nasali?
    Biyano na mituna 10 oyo bilenge batunaka
  • Nasengeli kosala nini soki nasali libunga?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Ndenge malamu ya kotalela mabunga
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Kosɛnga bolimbisi ezali sɛkɛlɛ mpo na kozongisa boyokani
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/11 nk. 28-29

Mpo na nini kondima mabungá na yo?

ETUMBA motindo boye esalemaki naino te. Mwasi moko oyo azalaki na bibundeli te azongisaki basodá ya mpiko 400 oyo bazalaki na mokano ya kozongisa mabe mpo ete bafingamaki. Nsima na koyoka malɔmbɔ ya mwasi wana ya mpiko, mokonzi ya basodá wana atikaki kolanda mokano na ye.

Mokonzi wana ezalaki Davidi, oyo na nsima akómaki mokonzi ya Yisraele. Ayokelaki Abigaili mpo ete alingaki kosepelisa Nzambe. Ntango mwasi wana amonisaki ye na mayele nyonso ete soki akozongisa mabe epai na mobali na ye, Nabala, akozwa nyongo ya makila. Davidi angangaki ete: “Jéhovah, Nzambe na Yisraele akumisama, oyo atindi yo na mokolo oyo mpo na kozwana na ngai! Mayele na yo ekumisama, yo mpe opambwama! Yo opekisi ngai lelo ete naya kotangisa makila te mpe ete nabukanisa makambo na ngai na loboko na ngai mpenza te.” Davidi azalaki na botɔndi mpo ete Nzambe asalelaki Abigaili mpo na kopekisa ye ete asala libungá monene.​—1 Samwele 25:9-35.

Kati na loyembo moko, Davidi atunaki ete: “Nani akososola mabungá na ye?” (Nzembo 19:12) Lokola ye, tokoki kozanga kososola mabungá na biso soki moto mosusu ayebisi biso yango te. Epai mosusu, matomba mabe oyo tozali kozwa mazali kopusa biso na kokanga ntina ete tosalaki libungá, tozangaki mayele to boboto.

Tozanga elikya te

Atako biso nyonso tosalaka mabungá, ntina ezali te ya kozanga elikya. Lokola lisese moko elobi yango: “Moto oyo asalaka libungá te mbala mingi asalaka eloko moko te.” Mpe moyekoli moklisto Yakobo alobaki ete: “Mpo ete biso nyonso tokweaka na makambo mingi.” (Yakobo 3:2) Mwana moke akoki koyekola kotambola kozanga ete akwea? Te, mpo ete mwana akoyekolaka na nzela ya mabungá mpe akomeka lisusu kino akoyeba kotelema malamu.

Mpo na kozala na bomoi ya bokatikati, tosengeli kozwa mateya na mabungá na biso mpe na mabungá ya basusu. Lokola Biblia ezali kolobela masoló ya bato mingi oyo makambo na bango makokani na oyo ya biso, ezali kosalisa biso na kosala te mabungá oyo bango basalaki. Tokoki kozwa litomba na mabungá na bango?

Komikitisa: ezaleli ya ntina mingi

Nzambe akweisaka te mbala moko baoyo nyonso bazali kosala mabungá, kasi akosambisaka bobele baoyo bazali koboya kobongisa yango. Saulo, mokonzi ya Yisraele azangaki kotosa malako ya Jéhovah matalaki koboma Baamaleke nyonso. Ntango mosakoli Samwele akutanaki na ye, Saulo alukaki liboso komonisa yango lokola likambo moke mpe na nsima amekaki kobwaka mabe yango likoló na bato mosusu. Azalaki komibanzabanza mingi mpo na lokumu na ye na esika ya kobongisa mbeba asalaki. Yango wana, ‘Jéhovah aboyaki ye ete azala mokonzi.’​—1 Samwele 15:20-23, 30.

Atako Davidi, mokitani ya Saulo asalaki mabungá minene, alimbisamaki mpo ete na komikitisa nyonso andimaki batoli mpe mpamela. Komikitisa ya Davidi etindaki ye na koyoka maloba ya Abigaili. Mampinga na ye mamilengelaki mpo na etumba. Nzokande, liboso na bato na ye, Davidi andimaki ete azwaki ekateli ezangi mayele. Na boumeli ya bomoi na ye, komikitisa motindo wana esalisaki Davidi na koluka bolimbisi mpe kosembola etamboli na ye.

Ezali komikitisa nde ezali kotinda basaleli ya Jéhovah na kosembola maloba ya kozokisa oyo babimisaki. Na boumeli ya kosambisama na ye liboso ya Esambiselo monene, nganga monene apesaki etinda ete babeta Paulo. Ntoma azongisaki ete: “Yo etutu etyami mpembe! Etikali moke Nzambe akobeta yo.” (Misala 23:3) Ekoki kozala ete mpo na kozanga komona malamu, Paulo asosolaki te soki azalaki koloba na nani, mpo ete bato batelemaki wana batunaki ye ete: “Ozali kofinga nganga monene ya Nzambe?” Na maloba yango Paulo andimaki libungá na ye nokinoki, mpe alobaki ete: “Nayebaki te, bandeko, ete azalaki nganga monene, mpo ete esili kokomama ete: ‘Oloba mabe na mokóló na bato na yo te.’” (Misala 23:4, 5; Exode 22:28) Ee, Paulo andimaki na komikitisa nyonso libungá na ye.

Bandimaki mabungá bango

Biblia ezali lisusu komonisa ete basusu babongolaki lolenge mabe na bango ya kokanisa. Na ndakisa, totalela oyo ekómelaki Asafa. Mpo ete emonanaki lokola ete bato mabe bazali kolónga malamu, alobaki ete: “Solo, ezali bobele mpamba ete napetoli motema na ngai mpe nasukoli maboko na ngai kati na sembo!” Kasi Asafa azongelaki makanisi ya sembo nsima ya kokende na ndako ya Jéhovah mpe kokanisa likoló na matomba ya losambo ya peto. Lisusu, andimaki mabungá na ye kati na Nzembo 73.

Yona mpe amitikaki kozimbisama na makanisi mabe. Nsima ya kosakola na Ninive, amibanzabanzaki mpo na lokumu na ye moko na esika ya komibanzabanza mpo na lobiko ya bafandi ya engumba wana. Atako bato ya Ninive babongolaki motema, Yona asilikaki mpo ete Jéhovah apesaki bango etumbu te, kasi Nzambe asembolaki ye. Yona ayaki kososola ete makanisi na ye mazalaki ya libungá, mpamba te kati na mokanda ya Biblia oyo ezali na nkombo na ye, azali na bosembo nyonso kondima mabungá na ye.​—Yona 3:10 kino 4:11.

Wana akanisaki na libungá nyonso ete ezali Jéhovah Nzambe nde azalaki ntina ya mikakatano na ye, kasi Satan le Diable te, Yobo amekaki komonisa ete asengelaki te kooka mpasi oyo azalaki na yango. Ayebaki te ntembe monene oyo ebimisamaki: basaleli ya Nzambe bakotikala sembo epai na ye kati na komekama? (Yobo 1:9-12) Nsima wana ete Elihu, mpe Jéhovah basalisaki Yobo na komona mabungá na ye, andimaki ete: “Boye, nabimisi makambo mayebi ngai ntina te . . . Bongo namityoli mpe nabongoli motema na mputulu mpe na mputulu na mɔ́tɔ.”​—Yobo 42:3, 6.

Kondima mabungá ekosalisa biso na kobatela boyokani malamu elongo na Nzambe. Lokola bandakisa touti kolobela emonisi yango, Jéhovah akokweisa biso te mpo na mabungá na biso soki tondimi yango mpe tosali oyo esengeli mpo na kosembola makanisi mabe na biso, maloba mazangi ntina to misala ya bozoba. Lolenge nini tokoki kosalela batoli wana?

Tobongisa mabungá na biso

Kondima na komikitisa nyonso mabungá na biso mpe kobongisa yango ekoyeisa bikanganeli ya mabota makasi. Na ndakisa, mbala mosusu mpo ete alembaki mingi to azalaki na nkanda, moboti moko alekisaki ndelo kati na lolenge na ye ya kosembola mwana. Koboya kobongisa libungá na ye wana ekoki kobimisa matomba mabe. Na ntina yango, ntoma Paulo akomaki ete: “Bino batata mpe boyokisa bana na bino nkanda te, kasi bobɔkɔla bango na mateya mpe na mpamela ya Jéhovah.”​—Baefese 6:4.

Elenge mobali moko moklisto na nkombo Paul azali komikundola na esengo nyonso ete: “Tata azalaki ntango nyonso kosenga bolimbisi soki amoni ete alekisaki ndelo. Yango esalisaki ngai na komemya ye.” Likambo ya kosenga bolimbisi to kosenga yango te, etaleli ekateli ya moko na moko. Nzokande, bolimbisi esengeli kolandana na milende mpo na kopengola mabungá lolenge yango na mikolo mizali koya.

Ezali boni soki mobali to mwasi asali libungá oyo epesi mosusu mpasi? Kondima yango polele, kosenga bolimbisi ya solo mpe elimo ya kolimbisa ekoki kosalisa bango na kobatela boyokani na bango ya bolingo. (Baefese 5:33; Bakolose 3:13) Jesús, mobali moko ya Espagne, moto ya lokumu oyo asili koleka mibu 50, amonisaka komikitisa mpo na kosenga bolimbisi epai na mwasi na ye, Albina. Mwasi yango alobaki ete: “Tozali na momeseno ya kosenga bolimbisi wana moko asaleli mosusu mabe. Yango ezali kosalisa biso na koyikisana mpiko kati na bolingo.”

Soki nkulutu moko asali libungá

Kondima mabungá mpe kosenga bolimbisi ya sembo ekosalisa mpe bankulutu baklisto na kosalana elongo kati na bomoko mpe na ‘kokumisana kati na bango.’ (Baloma 12:10) Nkulutu moko akoki kokakatana mpo na kondima libungá na ye mpo ete azali kobanga noki lokumu na ye kati na lisangá ekita. Nzokande, koluka komilóngisa, koboya kondima libungá, to komona libungá yango ete ezali moke, ekoki mpenza kotinda basusu na kozanga kotya motema epai na ye. Ndeko oyo ateli, oyo azali kosenga bolimbisi na komikitisa nyonso, mbala mosusu mpo na maloba mazangi ntina oyo abimisaki, akozwa limemya ya basusu.

Fernando, nkulutu moko na Espagne, azali komikundola oyo elekaki na libaku moko wana mokɛngɛli ya zongazonga azalaki kokamba likita moko monene oyo esangisaki bankulutu, mokɛngɛli alobaki likambo moko oyo elongobanaki te na lolenge ya kotambwisa likita moko. Ntango nkulutu moko asembolaki ye na limemya nyonso na likambo oyo alobaki, andimaki nokinoki ete asalaki libungá. Fernando amikundoli ete: “Ntango namonaki ye kondima libungá na ye na miso ya bankulutu wana nyonso, nakamwaki mingi. Nazalaki na limemya mingi koleka mpo na ye na nsima ya likambo yango. Ndakisa na ye eteyaki ngai na komona ete ezali mpenza na ntina mingi kondima mabungá na yo.”

Tozala pene mpo na kondima mabungá na biso

Soki tosengi bolimbisi, mbala mingi ekondimama malamu, mingi mpenza soki tosengi yango nokinoki. Tala ndakisa moko: na le 31 Octobre 1992, Pápa Jean Paul II andimaki ete esambiselo mabe ya Inquisition ezalaki “na libungá” esili koleka sikawa mibu 360 wana ekweisaki Galilée mpo alobaki ete mabelé mazali ntéi ya mɔlɔ́ngɔ́ te. Nzokande, kozela ntango molai mpo na kosenga bolimbisi ezali na motuya mingi te.

Etinda oyo ezali mpe solo kati na boyokani ya bato. Kosenga bolimbisi nokinoki ekoki kobosanisa liloba to likambo moko ya mabe. Yesu alendisaki biso na kosala noki mpo na kozongisa kimya, alobaki ete: “Soko okoyeisa likabo na yo na etumbelo mpe okokanisa wana ete ndeko na yo azali na yo na likambo, tika likabo na yo kuna liboso na etumbelo mpe kenda naino ete obongisa likambo na ndeko na yo, mpe na nsima ozonga mpo na kopesa likabo na yo.” (Matai 5:23, 24) Mbala mingi, kobongisa boyokani ya kimya elimboli bobele kondima ete tosalaki mabe mpe kosenga bolimbisi. Soki tozeli ntango molai liboso na kosala yango, ekozala mpasi mingi mpo na kosala yango na nsima.

Tozala na esengo ya kondima mabungá na biso

Lokola emonani na bandakisa ya Saulo mpe Davidi, lolenge oyo tozali kosala na mabungá na biso ezali na bopusi likoló na bomoi na biso. Saulo aboyaki kolanda batoli, mpe mabungá na ye mayikanaki mingi kino na nsuka mamemaki ye na kufa, kozanga ngolu na Nzambe. Atako Davidi asalaki mabungá mpe masumu, abongolaki motema, andimaki kosembolama mpe atikalaki sembo epai na Jéhovah. (Tala Nzembo 32:3-5.) Ezali yango nde biso tozali kolinga, boye te?

Litomba lileki monene ya kondima mpe kosembola mabungá to ya kobongola motema ezali ya koyeba ete Nzambe asili kolimbisa yango. Davidi alobaki ete: “Esengo na ye oyo . . . masumu na ye mazipami. Esengo na ye oyo Jéhovah atangeli ye mabe te.” (Nzembo 32:1, 2) Oyo nde likambo ya mayele, na kondima mabungá na yo!

[Elilingi na lokasa 29]

Mwana moke akokoka koyekola kotambola kozanga kokwea?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto