Mituna ya Batangi
Mpo ete nganga Nzambe ya kala na nkombo Melikisedeke azalaki moto ya solo, mpo na nini Biblia elobi ete azalaki na “etangeli ya mabota te”?
Likanisi oyo lizali na Baebele 7:3. Na bongo, totalela maloba mazali zingazinga na yango:
“Mpo ete Melikisedeke, mokonzi na Saleme, nganga na Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, [akutanaki] na Abalayama wana [ezongaki] ye longwa na koboma mikonzi mpe apambolaki ye. Abalayama akabelaki ye ndambo na zomi na biloko nyonso. Liboso ye azalaki ‘Mokonzi na Boyengebene,’ (yango ntina na nkombo na ye) na nsima azalaki mokonzi na Saleme, yango ete ‘Mokonzi na Kimya.’ Ye [azali] na tata te na mama te na etangeli ya mabota te; na ebandeli na mikolo te to na nsuka te. Kasi asili kokokana na Mwana na Nzambe, akoumelaka nganga libela.”—Baebele 7:1-3.
Lokola tolobaki yango, Melikisedeke azalaki moto ya solo lokola Abalayama oyo azalaki na boyokani elongo na ye. (Genese 14:17-20; Baebele 7:4-10) Na yango, Melikisedeke asengelaki kozala na tata mpe na mama, mpe mbala mosusu na bakitani. Na bongo, lokola azalaki moto, asengelaki kozala na etangeli ya mabota to kolandana na mabota oyo ememaki kino na ye. Ye mpe azalaki na nsuka ya bomoi na ye ya mosuni. Melikisedeke akufaki, na boyokani na oyo ntoma Paulo alobaki kati na Baloma 5:12, 14. Kasi, lokola toyebi te ntango nini Melikisedeke akufaki mpe ntango oyo asukisaki mosala na ye ya nganga, na boyokani na yango, nsuka ya bonganga na ye eyebanaki te.
Na Baebele, Paulo alobeli mwa makambo matali Melikisedeke wana azalaki komonisa mokumba ya Yesu Klisto lokola Nganga Monene oyo aleki. Ntango alobelaki Melikisedeke lokola elilingi, to elakiseli ya Yesu kati na mokumba na ye ya nganga, Paulo alobaki ete: “Yesu . . . akómaki Nganga Monene libela [na lolenge] ya Melikisedeke.” (Baebele 6:20) Na ndimbola nini?
Esengeli kozala ete Paulo ayebaki ete masoló ya Biblia mazali kolobela makambo mingi te na ntina na libota ya Melikisedeke—bankɔ́kɔ na ye to bakitani na ye. Likambo yango lizali mpenza te kati na lisoló ya Biblia. Na bongo, engebene likanisi (oyo Paulo ayebaki to oyo biso toyebi), Melikisedeke akokaki mpenza kotangama ete “azalí na bankóko té” (Liloba lya Nzambe), to “bankoko na ye nyonso bayebani te.”—Boyokani ya Sika.
Na lolenge nini Yesu akokanaki na ye? Ya solo, toyebi ete Tata na Yesu ezalaki Jéhovah Nzambe mpe ete mama na ye ya bomoto ezalaki Maria na libota ya Yuda. Nzokande, bokokani ezali kati na Melikisedeke mpe Yesu. Lolenge nini? Yesu abotamaki na libota ya Levi te, libota ya banganga na Yisraele. Ya solo, Yesu akómaki nganga na nzela ya etangeli ya mabota ya bato te. Motindo moko na Melikisedeke, oyo akómaki nganga “engebene mobeko na malako ya mosuni” te, elingi koloba kobotama na etúlúká to na libota ya banganga. (Baebele 7:15, 16) Na esika ete akóma nganga nsima ya tata ya mosuni oyo azalaki ye moko nganga, Yesu “atyami na Nzambe ete azala Nganga Monene na [lolenge] ya Melikisedeke.”—Baebele 5:10.
Lisusu, Yesu azalaki na mokitani to na mosangoli ya bonganga na ye te. Na ndimbola wana mpe, azalaki na etangeli ya mabota te. Akotikala libela mpo na kokokisa mokumba na ye ya nganga na kolakisáká bato mpe na kosungáká bango. Paulo alobelaki mosala wana ya seko, ntango ayebisaki ete:
“Nde ye [Yesu] asimbi mosala mokosenzama te mpo ete ye akoumela seko. Bongo ayebi kobikisa bango bakobelema na Nzambe na nzela na ye, awa ezali ye na bomoi libela ete abondela mpo na bango.”—Baebele 7:24, 25.
Botaleli na biso ya maloba na Paulo kati na Baebele 7:3 esengeli te kozala bobele mwa boyebi oyo tokobomba kati na makanisi na biso. Esengeli kokólisa botɔndi na biso mpo na bibongiseli ya bolingo oyo Jéhovah Nzambe asili kokamata mpo ete tozwa bolimbisi ya seko ya masumu na biso mpe mpo na nzela oyo abongisaki mpo na biso ete tozwa lisalisi mpe litambwisi libela na libela.