Galadi—Kobongisama oyo etongami likoló na kondima oyo eleki mosantu
“BANAKELASI na biso babongisamaki malamu kati na kondima oyo eleki mosantu.” Ezali na maloba wana nde molobi afungolaki likita ya bopesi mapolomi na kelasi ya mbala ya 95 ya Galadi, Eteyelo ya Biblia ya Watchtower, mokolo ya Eyenga na sanza ya Sɛtɛ́mbɛ 12, 1993. Na ntɔ́ngɔ́ wana, George Gangas asalaki libondeli liboso na babyangami 4 614 mpe basangani ya libota ya Betele, oyo bayanganaki na Ndako ya mayangani (Salle d’assemblées) ya Jersey City. Ndeko Gangas, oyo azali na Betele uta mibu 65 azali na mbula 97, oyo aleki bandeko nyonso ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi na mbula ya kobotama.
Albert Schroeder, mosangani ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe mokambi ya likita yango, alobaki ete: “Na boumeli ya sanza mitano, mateya ya Galadi matongamaki likoló ya kondima eleki mosantu.” Kasi, “kondima eleki mosantu” ezali nini? Alimbolaki ete “kondima eleki mosantu” oyo etangami na Yuda 20, esangisi solo nyonso ya Biblia. Na yango, kobongisama oyo epesami na Galadi ezali na moboko na yango kati na Liloba ya Yehova, Biblia, oyo ezali búku na yango ya liboso.
Banakelasi bazwi batoli mingi
Molobi ya liboso, John Stuefloten, oyo azali mosangani kati na Bakambi ya Ferme ya Watchtower, apesaki lisoló oyo ezalaki na motó ya likambo “Bopusi malamu ya bato na mayele.” Biblia elobi ete: “Ye oyo akotambola na bato na mayɛlɛ akojala na mayɛlɛ.” (Masese 13:20) Na boumeli ya mateya ya Galadi, banakelasi balekisaki bangonga koleka 900 na koyekola Biblia. Ndeko Stuefloten atunaki bango ete: “Lolenge nini bopusi ya Yehova ekosala mosala epai na bino? Bokokende na mikili 18 epai bato soko bamilió 170 bazali kofanda. Bopusi nini bokozala na yango epai na bato wana?” Na komonisáká mayele ya Yehova, bamisionere ya sika bakokoka kosalisa bazalani na bango na kosambela Nzambe, liziba ya mayele ya bozindo.
Nsima na yango, Lloyd Barry, oyo azali moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi asalaki lisoló: “Bokóma nyonso epai na bato ya lolenge nyonso.” (Tala 1 Bakolinti 9:22, NW) Ndeko Barry ye moko akotaki na kelasi ya mbala ya 11 ya Eteyelo ya Galadi esili koleka mibu soko 45. Sikawa, banakelasi wana ya mbala ya 95 bayokaki na likebi nyonso misionere wana ya kala oyo aumelaki mingi na mokili ya bopaya. Alendisaki banakelasi na komimona nokinoki lokola bato ya teritware na bango na kolukáká koyeba mimeseno na bango mpe koyekola monoko na bango. Abakisaki ete mwango eleki malamu mpo na kosala yango ezali ya kozala elongo na bandeko, ya kosakola elongo na bango, ya koyeba bonkɔ́kɔ na bango mpe ya komekola yango soki likoki ezali.
Molobi oyo alandaki, Dean Songer, mosangani ya Bakambi ya enyateli, alamwisaki mposa ya bayoki na lisoló “Bolongola mikumba na bino.” Ndeko Songer, oyo abandaki mosala ya ntango nyonso esili koleka mibu 35, ayebaki malamu oyo elimboli kozala na bomoi ezangi mindɔndɔ́, oyo ekangami na mikumba ya teokratike mpe ezangi komibanzabanza mpo na biloko ya mosuni. Mpe yango ezali moboko ya toli na ye mpo na banakelasi. Kati na tempelo ya Yehova, bayembi balongolamaki na mikumba misusu ya Balevi, mpo bakoka komipesa mobimba na mosala na bango. (1 Ntango 9:33) Bobele bongo, bamisionere ya Galadi balongolami na mikumba misusu ya mosala ya mosuni mpo bakoka kopesa milende na bango na mosala na bango ya ntina. Mpo na kosukisa, ndeko Songer apesaki toli oyo: “Bomipesa na makambo ya ntina, mpe bozala na bomoi ezangi mindɔndɔ́. Lokola mikumba misusu elongolami epai na bino, bosengeli komipesa mingi mpo na kokumisa Yehova butu na moi.”
Daniel Sydlik, oyo azali moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi asalaki bongo lisoló oyo elobaki: “Bolakisa basusu lolenge ya kozwa litomba lileki malamu kati na bomoi.” Alendisaki banakelasi “bobele na kolakisa mateya te, kasi lisusu bayebisa bango na mpiko nyonso oyo basengeli kosala mpo na kozala na bomoi engebene mokano ya Nzambe.” Bateyi malamu basengeli koyeba kolekisa epai na bato mosusu esengo na bango mpe kopusa bango na mosala. Alobaki liboso ya kosukisa ete: “Na esika ya kolakisa bobele malako, bósalisa bato na kolona bizaleli ya boklisto. Kasi, liboso na nyonso, bandeko balingami, bókólisa bolingo mpe bósalisa basusu na kolona ezaleli yango, mpo ete ezali ekanganeli ekoki mpenza.”—1 Bakolinti 13:1-3; Bakolose 3:14.
Nsima ya basanza ya kobongisama, banakelasi bamesenaki mingi na balakisi mibale ya Galadi. Moko na bango, Jack Redford, oyo kala azalaki misionere, alobaki liboso, likoló na lisoló: “Bosali liponi malamu.” Kati na Bayuda ya ekeke ya liboso, ntoma Paulo azalaki moto ya lokumu, ya bopusi monene mpe ya bozwi mingi liboso ete akóma moklisto. Kasi kati na Bafilipi 3:8, alobi ete biloko wana nyonso ezalaki “bosɔtɔ” to “mbindo.” Mosala na ye mozalaki na motuya mingi mpo na ye, mpe asalaki liponi malamu. Nzokande, na eleko na biso, ntalo eleki monene ya bato bazali komonisa na lolenge ya bomoi na bango ete bazali kopesa motuya mingi na bozwi na bango ya mosuni koleka bomoi ya seko. Nzokande, bamisionere ya Galadi basalaki liponi malamu. Jack Redford alobaki mpo na kosukisa ete: “Kati na mokili ya Satana, eloko moko te ekokani na mosala ya misionere. Bobatela na likebi nyonso libaku wana ya motuya mingi mpe botika mokili na bosɔtɔ na yango.”
Uta mibu 32, Ulysses Glass azali molakisi na Eteyelo ya Galadi. Kati na lisoló oyo elobi: “Bobele Nzambe nde akoki kosala nzeté,” Ulysses Glass apesaki batoli ya nsuka epai na banakelasi na kotalela makanisi ya Nzembo 1:3. Atako bokóli ya tekiniki ekómi mosika, bato balóngi naino te kobimisa nzeté lokola oyo ezalisami na Nzambe. Baklisto ya solo bakokani na banzeté, oyo Yehova aloni mpe azali kosopela yango mai. Ndeko Glass amonisaki ete, na boumeli ya sanza mitano, lokola banzeté oyo elonami kati na mwa zámba moke ya elimo to paladiso, banakelasi “basopelamaki mai mbala na mbala, mai ya bomoi oyo mazali kobima na Liloba na Nzambe.” Nzokande, bamisionere wana basengeli kobatela “misisa na bango ya elimo na makámá nyonso.” Ndeko Glass alendisaki bango ete ‘bolanda komela kino kotonda mai oyo Yehova azali kopesa, mpamba te bobele Nzambe nde akoki kosala nzeté.’
Carey Barber, oyo azali moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki lisoló ya bosukisi. Lokola abandaki mosala ya ntango nyonso esili koleka mibu 70, ndeko Barber abongaki solo mpo na motó ya likambo oyo elobi ete: “Tómipesa mobimba epai na Yehova.” Ntalo eleki monene ya bato bamipesi mobimba epai na Yehova te. (Deteronome 5:9) Nzokande, ndeko Barber amonisaki ete, atako tozangi kokoka, “tozali mpenza na makoki ya komipesa mobimba epai na Nzambe.” Abakisaki ete: “Moto moko te akoki koloba ete: ‘Satana nde apusaki ngai na kosala yango.’” Nzokande, Satana akoki koyangela biso soki totemeli ye te. (Yakobo 4:7) Soki tosali mosala ya Yehova na molende nyonso, tokomipesa epai na ye mobimba, mpe tokozala na mpasi te ya kotemela Satana mpe mokili na ye.
Koponama lokola bamisionere
Penepene na nzánga, banakelasi 46 baponamaki liboso na bato nyonso lokola bamisionere. Bituluku 23 ya babalani wana bazwaki mapolomi oyo emonisi ete “babongisami na motindo ya sikisiki mpo na kokokisa mosala ya koteya, wana bazali kolendisa bolingo malamu mpe bazali kosala mpo na kimya ya koumela, oyo ya mibeko, ya ebongiseli ya kokoka mpe ya sembo, kati na bato na mabota nyonso.” Banakelasi oyo balandaki mateya ya mbala ya 95 ya Galadi bakosala milende mpo na kokokisa malamu mokumba na bango kati na mikili 18 epai batindami. Bakokende na biteni minei ya mokili: Na Azia, na Afrika, na Mpótó, na Amerika ya Súdi mpe na bisanga ya Antilles.
Nsima ya nzánga, na nsuka ya boyekoli mokuse ya Mosenzeli (na Lingelesi) oyo etambwisamaki na Charles Woody, oyo azali moko kati na Bakambi-mosala (comité de service), baye bazwi mapolomi sika na Galadi basalaki lisoló oyo elobi ete: “Galadi ebongisi biso mpo na koteya lokola bamisionere.” Drame “Liponi oyo ezali liboso na biso” esukisaki molúlú yango.
Nsima ya mokolo wana ya elendiseli, bamisionere ya sika bamilengelaki mpo na kokende na biteni nyonso minei ya mokili mpo na kokabola elongo na bato mosusu “kondima eleki mosantu.”
[Etanda na lokasa 26]
Makambo matali banakelasi
Motuya ya bikólo epai bauti: 7
Motuya ya bikólo epai batindami: 18
Motuya ya bayekoli: 46
Motuya ya mabala: 23
Mwayene ya mbula ya kobotama: 30,06
Mwayene ya mbula balekisi kati na solo: 12,92
Mwayene ya mbula balekisi kati na mosala ya ntango nyonso: 9,4
[Elilingi na lokasa 26]
95th Graduating Class of the Watchtower Bible School of Gilead
In the list below, rows are numbered from front to back, and names are listed from left to right in each row.
(1) Buelow, D.; Donzé, V.; Innes, S.; Fulk, N.; Billingsby, M.; Hoddinott, L.; Nygren, B.; Eriksson, L. (2) Boker, J.; Thomas, M.; Stedman, S.; Billingsby, D.; Waugh, I.; Purves, M.; Luttrell, M. (3) Jacobsen, T.; Boker, J.; Martínez, L.; Nilsson, E.; Purves, P.; Holt, L.; Larsen, M.; Jones, L. (4) Numminen, P.; Numminen, H.; Buelow, M.; Olson, W.; Holt, S.; Donzé, G.; DesJardins, C.; DesJardins, D. (5) Larsen, K.; Martínez, D.; Nygren, P.; Waugh, P.; Jones, D.; Hoddinott, J.; Thomas, G. (6) Innes, B.; Fulk, R.; Eriksson, A.; Nilsson, S.; Stedman, J.; Olson, K.; Jacobsen, F.; Luttrell, J.