Batatoli ya Yehova kati na mokili na Philippines
BISANGA 7 083 bikatanakatana oyo bisáli Ekólo Philippines, epai moi makasi mokongalaka, bizali mpenza nsɔngɛ ya molɔngɔ́ ya bangomba oyo emelami moke na mai.a Bafandi na yango 62 000 000, balingaka koloba na ntina na makambo nyonso. Ezalela na bango ya kolinga bato ezali kopesa bango nzela ete bandima nsango ya Bokonzi kozanga nkaka.
Litatoli na eteyelo
Na esanga ya Masbate, elenge mwasi moko moyekoli na eteyelo ya kati, akokaki kolobela solo epai na molakisi na ye mpe epai na baninga na ye ya kelasi na ntango ya momekano oyo mosengaki koyanola “solo” to “lokuta.” Ayebisi ete:
“Kati na momekano yango elobamaki ete: ‘Soki Nzambe alingaka ngai, akomemela ngai mimekano te mpe akopesa nzela te ete nanyokwama.’ Na kotaleláká malamu biyano na biso, molakisi amonaki ete nazalaki bobele ngai moko oyo ayanolaki ete ‘lokuta’ na motuna yango. Apesaki ngai nzela ete nalimbola eyano na ngai liboso ya kelasi mobimba. Nayebisaki ete mikakatano miutaka na Nzambe te, ata soki apesaki nzela na mpasi mpe na mimekano. Nasalelaki Biblia oyo namemaka ntango nyonso na eteyelo, mpo na kosalisa banakelasi na kokanisa likoló na 1 Yoane 4:8, epai kuna elobami ete: ‘Nzambe azali bolingo.’ Lokola andimaki bandimbola na ngai, molakisi abetabetaki loboko likoló na mesa na ye mpe alobaki ete: ‘Marilou azali na elonga.’ Nazalaki bobele ngai moko oyo napesaki eyano malamu na motuna yango, mpe nazwaki elembo ya malamu.”
Nsango ya Bokonzi esakolami na bisika binso
Mobongisi-nzela moko ya mwasi (mosakoli ya nsango malamu ya ntango nyonso), oyo azalaki kosakola ndako na ndako kati na etúká moko ya Philippines akutanaki na mama moko oyo azali na bana misato ya mike. Mwasi yango amonisaki bosepeli makasi mpo na nsango ya Bokonzi mpe andimaki boyekoli ya Biblia na boboto nyonso. Mobali asepelaki te na komona ete mwasi na ye ayekola Biblia, mingi mpenza elongo na Batatoli ya Yehova; kasi atako bongo, akobaki koyekola.
Mobali yango amemaki libota na ye mpo na kokende kofanda na engumba mosusu, kokanisáká ete yango esengelaki kosukisa bokutani kati na mwasi na ye mpe Batatoli ya Yehova. Nzokande baumelaki te mpo na kokutana na mwasi, oyo azongelaki boyekoli na ye. Ya solo mpenza, mobali atungisamaki mingi. Akendaki na mosala na ye na kosilika makasi mpe alimbolaki ntina ya nkanda na ye epai na nkolo vuatire oyo ye azalaki kobongisa. Mobali yango ayebaki te ete kiliya wana azalaki Motatoli ya Yehova.
Motatoli ayebisaki na mobali yango ete boyekoli ya Biblia ya mwasi na ye ekozala na litomba mpo na libota mobimba. Na yango, akokoka kosalela mitinda ya Biblia kati na ndako na ye. Ayebisaki mpe epai na mobali wana ete ye mpe akokaki kozwa matomba soki ayebaki Bokonzi na Nzambe.
Likambo nini lilekaki na nsima? Mobali wana apesaki nzela epai na mwasi na ye ete ayekola Biblia mpe azwaki ekateli ete libota na ye lizonga kofanda na ndako na bango ya kala. Mwasi na ye akólaki na elimo mpe azali kosangana na mosala ya kosakola Bokonzi. Mobali andimaki boyekoli ya Biblia, mpe libota mobimba lizali koyangana na makita ya boklisto.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na kozwa bandimbola ya sikisiki, talá Calendrier des Témoins de Jéhovah 1994.
[Etanda na lokasa 8]
MAKAMBO MATALI EKÓLO WANA
Mbula ya mosala 1993
MOTUYA NYONSO YA BASAKOLI: 116 576
BOKOKANISI: Motatoli 1 mpo na bato 549
MOTUYA YA BAYANGANI NA EKANISELI: 357 388
MWAYENE YA BABONGISI-NZELA: 22 705
MWAYENE YA BOYEKOLI NA BIBLIA: 94 370
MOTUYA YA BABATISAMI: 7 559
MOTUYA YA MASANGÁ: 3 332
FILIALE: MANILLE
[Elilingi na lokasa 9]
Kopesa litatoli na zándo ezali kobimisa matomba malamu
[Elilingi na lokasa 9]
Filiale ya la Société Watchtower na engumba Manille