Babateli mpe bampate kati na teokrasi
“Yehova azali Mosambisi na biso, Yehova azali Mopesi-mibeko na biso, Yehova azali Mokonzi na biso; ye moko akobikisa biso.”—YISAYA 33:22, NW.
1. Mpo na nini tokoki koloba ete baklisto ya ekeke ya liboso mpe baoyo ya eleko na biso bazali kati na teokrasi?
TEOKRASI elimboli boyangeli etambwisami na Nzambe. Liteya wana lisangisi likambo ya kondima bokonzi ya Yehova, mpe kotosa mitinda na ye mpe malako kati na bikateli oyo tozali kozwa, ezala ya mike to ya minene. Lisangá ya ekeke ya liboso ezalaki teokrasi ya solosolo. Mpe baklisto ya ntango wana bakokaki koloba na bosembo nyonso ete: “Yehova azali Mosambisi na biso, Yehova azali Mopesi-mibeko na biso, Yehova azali Mokonzi na biso.” (Yisaya 33:22, NW) Elongo na batikali bapakolami lokola ntéi, ebongiseli na Yehova Nzambe na eleko na biso ezali mpe teokrasi ya solosolo.
Na ndimbola nini tozali lelo oyo kati na teokrasi?
2. Tangá likambo moko kati na yango Batatoli na Yehova bazali kotosa boyangeli ya Yehova.
2 Mpo na nini tokoki koloba ete ebongiseli ya Yehova na mabelé ezali teokrasi? Mpo ete basangani na yango bazali kotosa boyangeli ya Yehova. Lisusu, bazali kolanda litambwisi na Yesu Klisto, ye oyo Yehova atyaki lokola Mokonzi. Yango wana na ntango oyo ya nsuka, etinda oyo euti mpenza na Mokambi Monene ya teokrasi, epesami na Yesu ete: “Tinda likwangola na yɔ mpe buka, mpɔ ete ntango na kobuka eyei, mpe bilɔkɔ na kobuka na mokili biteli.” (Emoniseli 14:15) Yesu atosi, mpe abandi mosala ya kobuka mbuma na mabelé. Na molende nyonso, baklisto bazali kosalisa Mokonzi na bango kati na mosala wana ya ntina na kosakoláká nsango malamu mpe na kozalisáká bayekoli. (Matai 28:19; Malako 13:10; Misala 1:8) Na yango, bazali mpe basalani elongo na Yehova, Mokambi Monene ya teokrasi.—1 Bakolinti 3:9.
3. Mpo na oyo etali bizaleli malamu, lolenge nini baklisto bazali komonisa ete bazali kotosa teokrasi?
3 Kati na etamboli na bango mpe, baklisto bazali kotosa boyangeli na Nzambe. Yesu alobaki ete: “Ye oyo akosalaka malamu akoyaka epai na pole ete misala na ye mimɔnana ete misalami na boyokani elongo na Njambe.” (Yoane 3:21) Lelo oyo, ezali mpenza na masoló ya bowelani mazangi nsuka na ntina na bizaleli malamu, kasi masoló ya bowelani motindo wana mazali na esika te kati na baklisto. Likambo oyo Yehova alobi ete ezali mbindo, bango mpe bazali kotalela yango ete ezali mbindo mpe bazali kokima mbindo lokola bokɔnɔ bobé. Lisusu, bazali komibanzabanza na ntina na mabota na bango, bazali kotosa baboti na bango mpe bazali kotosa bakonzi baleki liboso. (Baefese 5:3-5, 22-33; 6:1-4; 1 Timoté 5:8; Tito 3:1) Na bongo, bazali kosala na lolenge losengami na teokrasi, na boyokani elongo na Nzambe.
4. Ezalela nini ya mabe oyo emonisamaki na Adama na Eva mpe Saulo, kasi baklisto bazali komonisa ezalela nini ekeseni?
4 Adama na Eva babungisaki Paladiso mpo ete balingaki kozwa ekateli na ntina na malamu mpe mabe. Nzokande Yesu asalaki mpenza lolenge mosusu. Alobaki ete: “Nakolukaka mokano na ngai mɔkɔ tɛ kasi mokano na ye oyo atindi ngai.” Baklisto bazali koluka bobele likambo motindo wana. (Yoane 5:30; Luka 22:42; Baloma 12:2; Baɛbɛlɛ 10:7) Saulo, mokonzi ya liboso ya Yisraele, atosaki Yehova, kasi na makambo nyonso te. Yango wana aboyamaki. Samwele alobaki na ye ete: “Kotosa eleki moboma na malamu mpe koyoka eleki mafuta na bampate.” (1 Samwele 15:22) Ezali mpenza kolanda nzela ya teokrasi na kokokisáká mokano ya Yehova na meko moko, mbala mosusu na kosakoláká sanza na sanza to na koyanganáká mbala na mbala kati na makita, kasi kobuka mibeko kati na likambo litali bizaleli malamu? Te, soko moke te! Tosalaka molende mpo na ‘kokokisa mokano na Nzambe na molimo na biso mobimba.’ (Baefese 6:6; 1 Petelo 4:1, 2) Na kokesena na Saulo, biso totosaka boyangeli ya Nzambe kati na makambo nyonso.
Teokrasi na ntango na biso
5, 6. Ndenge nini, na eleko na biso, Yehova azali kosala elongo na bato, mpe likambo nini boyokani yango ebimisi?
5 Na ntango ya kala, Yehova azalaki koyangela mpe koyebisa makambo matali solo na nzela ya bato, lokola basakoli, bakonzi mpe bantoma. Lelo oyo, ezali lisusu bongo te; ezali lisusu na basakoli te soko na bantoma te, baoyo bapemami na Nzambe. Na esika ezala motindo wana, Yesu alobaki ete na ntango ya kozala na ye lokola mokonzi, akomona etuluku moko ya sembo ya bayekoli, “moombo na sembo mpe na mayele,” oyo ye akotya likoló na bozwi na ye nyonso. (Matai 24:45-47; Yisaya 43:10) Na 1919, moombo yango ezalaki bongo batikali ya baklisto bapakolami. Uta ntango yango, lokola amonisami na Lisangani ya Mikóló-Bakambi (Collège central) ya Batatoli na Yehova, azali ntei ya teokrasi awa na mabelé. Kati na mokili mobimba, Lisangani ya Mikóló-Bakambi emonisami na Bakambi ya filiale, na bakɛngɛli-batámboli mpe na bankulutu ya masangá.
6 Mpo na kotosa teokrasi, ebongi kosala na boyokani elongo na ebongiseli wana ya teokrasi. Boyokani motindo wana ezali kopesa nzela na bomoko mpe kotambola na molɔngɔ́ kati “na libota mobimba ya bandeko” kati na mokili. (1 Petelo 2:17) Lisusu, ezali kosepelisa Yehova, ye oyo azali “Nzambe na mobulu tɛ, kasi na kimya.”—1 Bakolinti 14:33.
Bankulutu kati na teokrasi
7. Mpo na nini tokoki koloba ete, kati na lisangá ya boklisto, bankulutu baponami na kolanda teokrasi?
7 Atako mikumba nini bazali na yango, baoyo nyonso baponami bankulutu, bazali kokokisa masengami mayebisami kati na Biblia na ntina na mosala ya mokɛngɛli, to nkulutu. (1 Timote 3:1-7; Tito 1:5-9) Lisusu, maloba oyo Paulo ayebisaki na mikóló ya Efese mazali na ntina mpo na bankulutu nyonso: “Bokeba na ntina na bino mpenza mpe na ntina na etongá mobimba oyo elimo santu esili kopona bino bakɛngɛli kati na yango, mpo na kobatela lisangá ya Nzambe.” (Misala 20:28, NW) Ya solo, bankulutu baponami na elimo santu, oyo ekoutaka na Yehova Nzambe. (Yoane 14:26) Na bongo koponama na bango esalemi na kolandáká teokrasi. Lisusu, bazali kobatela etongá ya Nzambe. Etongá ezali ya Yehova, kasi ya bankulutu te. Yango ezali mpenza teokrasi.
8. Bankulutu bazali na mikumba nini mikeseni na mikolo na biso?
8 Kati na mokanda na ye epai na Baefese, ntoma Paulo alobelaki mikumba mikeseni ya bankulutu, koyebisáká ete: “Apɛsaki basusu lokola bantoma, basusu lokola basakoli, basusu lokola bapalanganisi na nsango malamu, basusu lokola babateli na mpate mpe balakisi, mpo na kosembolama ya basantu, mpo na mosala ya kosunga, mpo na kotongama ya nzoto ya Klisto.” (Baefese 4:11, 12, NW) Na ntango “nzoto na Klisto” elongwaki na bolenge na yango, bantoma mpe basakoli bazalaki lisusu te. (Kokanisá na 1 Bakolinti 13:8.) Nzokande, bankulutu bazali ntango nyonso kosala mingi kati na mikumba na bango ya bapalanganisi na nsango malamu, ya babateli na mpate mpe ya balakisi.—2 Timoté 4:2; Tito 1:9.
9. Lolenge nini bankulutu basengeli kosɛnzɛla ete mokano na Nzambe mosalema kati na lisangá?
9 Lokola teokrasi ezali boyangeli etambwisami na Nzambe, bankulutu ya makoki bazali na boyebi ya kokoka ya mokano na Nzambe. Yosua azwaki etindá ya kotanga Mobeko mokolo na mokolo. Bankulutu basengeli mpe koyekola, mpe kosalela Makomami mbala na mbala, mpe koyeba malamu mikanda oyo moombo na sembo mpe na mayele azali kobimisa. (2 Timoté 3:14, 15) Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuka! ezwami kati na mikanda yango, bakisa mpe misusu oyo mizali kolakisa lolenge nini kosalela mitinda na Biblia na ntango ya mikakatano.a Kasi, atako ezali na ntina mpo na nkulutu ete ayeba mpe alanda malako mapesami kati na mikanda ya la Société Watch Tower, esengeli na ye mpe koyeba malamu mitinda ya Biblia oyo mizali moboko na yango. Na bongo, akozala na likoki ya kosalela malako ya Biblia na boyebi nyonso mpe na motema mawa.—Kokanisá na Mika 6:8.
Tósala na elimo ya boklisto
10. Ezalela nini ya mabe bankulutu basengeli komibatela na yango, mpe lolenge nini?
10 Pene na mobu 55 ya ntango na biso, ntoma Paulo akomaki mokanda na ye ya liboso na lisangá ya Kolinti. Moko na makambo oyo alobelaki etalelaki mibali mosusu oyo balingaki komitya na esika ya liboso kati na lisangá. Akomaki ete: “Bino mibali [oyo], bosili nde kotonda? Bosili nde kokóma bazwi? Bosili nde kobanda koyangela lokola bakonzi kozanga biso? Soki bobandaki ata koyangela lokola bakonzi, mbele biso mpe tokokaki koyangela elongo na bino lokola bakonzi. ” (1 Bakolinti 4:8, NW) Na ekeke ya liboso, baklisto nyonso bazalaki na elikya ya kozala bakonzi mpe banganga kati na likoló elongo na Yesu. (Emoniseli 20:4, 6) Nzokande, emonanaki ete, Bakolinti mosusu babosanaki ete, awa na mabelé bakonzi bazalaki te kati na teokrasi ya boklisto. Na esika ete bamitambwisa lokola bakonzi ya mokili oyo, babateli baklisto bazali kolona komikitisa, ezalela oyo ezali kosepelisa Yehova.—Njembo 138:6; Luka 22:25-27.
11. (a) Tangá mwa bandakisa malamu ya ezalela ya komikitisa. (b) Lolenge nini bankulutu mpe baklisto nyonso mosusu basengeli komitalela?
11 Komikitisa ezali nde bolembu? Soko moke te! Makomami malobi ete Yehova ye moko azali na komikitisa. (Njembo 18:35) Bakonzi ya Yisraele bazalaki kokamba mampinga na etumba mpe bazalaki kotambwisa libota na nsé na bokonzi ya Yehova. Kasi, moto na moto kati na bango asengelaki kosɛnzɛla ete “motema na ye ejala na lolɛndo na likolo na bandeko na ye te.” (Dutɛlɔnɔmɛ 17:20) Yesu oyo asili kosekwisama azali Mokonzi kati na likoló. Nzokande, ntango azalaki na mabelé asukolaki makolo ya bayekoli na ye. Oyo nde komikitisa! Komonisaká ete alingaki bantoma na ye bazala mpe na komikitisa, alobaki ete: “Sɔkɔ nde ngai, Nkolo mpe Molakisi, nasukoli [matambe, NW] na bino ekoki na bino ete bosukolana [matambe, NW].” (Yoane 13:14; Bafilipi 2:5-8) Nkembo nyonso mpe lokumu nyonso, esengeli kopesama na Yehova, kasi na moto mosusu te atako etelemelo nini ye azali na yango. (Emoniseli 4:11) Bazala bankulutu to te, baklisto nyonso basengeli komitalela na kongenga ya maloba oyo na Yesu: “Tozali baombo mpamba. Tosili kosala [bobele] oyo esengelaki na biso kosala.” (Luka 17:10, NW) Lolenge nyonso mosusu ya kotalela makambo ezali ya teokrasi te.
12. Mpo na nini bankulutu basengeli kolóna bolingo, ezalela oyo ya ntina mingi?
12 Na komikitisa nyonso, bakɛngɛli baklisto bazali kolóna bolingo. Ntoma Yoane amonisaki ntina ya bolingo na ntango alobaki ete: “Nde ye oyo akolingaka tɛ ayebi Njambe tɛ, mpo ete Njambe ajali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Baoyo bazangi bolingo bazali na boyokani te elongo na teokrasi. Bayebi Yehova te. Biblia elobi na ntina na Mwana na Nzambe ete: “Yesu alingaki bato na ye mɔkɔ baoyo bajalaki kati na mokili; alingaki bango kino nsuka.” (Yoane 13:1) Epai na mibali 11 oyo basengelaki kozala kati na lisangani ya mikóló-bakambi ya lisangá na boklisto, Yesu alobaki ete: “Liloba na ngai ezali boye ete bolingana pelamɔkɔ ngai nasili kolinga bino.” (Yoane 15:12) Bolingo ezali elembo ya boklisto ya solo. Ezali kobénda baoyo bazali na motema motutami, baoyo bazali kolela mpe bakangami na elimo baoyo bazali koluka bonsomi. (Yisaya 61:1, 2; Yoane 13:35) Bankulutu basengeli kozala ndakisa mpo na oyo etali komonisa bolingo.
13. Lolenge nini nkuluku moko akoki kozala na bopusi malamu kati na makambo nyonso, atako ekoki lelo kozala mpasi mpo na kosilisa mikakatano?
13 Lelo oyo, mbala mingi bakosengaka lisungi na bango epai na bankulutu mpo na kobongisa makambo minene. Mikakatano kati na libala mikoki mpenza kobota misisa mpe koumela ntango molai. Bilenge bazali na makambo na bango oyo mbala mosusu mikóló bazali na nkaka mpo na koyeba yango malamu. Mibulungano ya mayoki, yango mpe, mbala mingi ezalaka mpasi mpo na kososola yango. Kati na ezalela motindo wana, ekoki kozala ete nkulutu moko ayebi malamu te likambo nini asengeli kosala. Nzokande, akoki kondimisama ete, soki atii motema na mayele ya Yehova kati na mabondeli, soki asali bolukiluki kati na Biblia mpe kati na mikanda mibimisami na moombo na sembo mpe na mayele, mpe soki ataleli bampate na komikitisa mpe na bolingo nyonso, akozala na bopusi malamu, ata kati na makambo ya mpasi mingi.
14, 15. Tangá mwa matatoli oyo mazali komonisa ete Yehova asili kopambola libota na ye na kopesáká yango ebele na bankulutu ya malamu.
14 Yehova azali mpenza kopambola ebongiseli na ye na kopesáká yango ‘makabo na bato.’ (Baefese 4:8) Na bantango mosusu, la Société Watch Tower azali kozwa nkomá ya esengo oyo ezali komonisa bolingo ya bankulutu na komikitisa oyo bazali kobatela etongá ya Nzambe na motema mawa nyonso. Nkulutu moko akomaki ye moko ete: “Nazali komikundola lisusu te na boyei ya mokɛngɛli ya zongazonga oyo esili kosimba motema na ngai boye, to oyo ezali kolobelama mingi boye kati na lisangá. Mokɛngɛli ya zongazonga asalisaki ngai na kososola ntina ya komonisa ezaleli ya kolendisa kati na boyokani na ngai elongo na bandeko, na kokanisáká mingimingi mpo na kokumisa bango.”
15 Ndeko mwasi moko oyo akendaki kosalisa nzoto na ye lopitálo moko oyo ezalaki mosika na esika afandaka, akomaki ete: “Nalendisamaki, na boumeli ya butu wana ya liboso ya mpasi kati na lopitálo oyo lozalaki mosika mpenza na esika nafandaka, mpo ete nakutanaki na nkulutu moko! Ye mpe bandeko mosusu balekisaki ntango mingi elongo na ngai. Ata bato ya mokili baye bayebaki mpasi oyo nazalaki na yango bakanisaki ete, soki elendiseli mpe lisungi ya bandeko mibali wana te, baoyo na bolingo mpe na komipesa, mpe soki mabondeli na bango te, mbɛlɛ nabikaki te.” Ndeko mwasi mosusu akomaki ete: “Soki nazali na bomoi lelo oyo, ezali mpo ete lisangani ya bankulutu lisungaki ngai na motema molai nyonso na boumeli ya etumba na ngai mpo na maladi makasi ya konyokwama na makanisi. . . . Ndeko mobali moko mpe mwasi na ye bayebaki te likambo nini bakoloba na ngai. . . . Kasi likambo lisimbaki motema na ngai koleka, ezali ete atako bayebaki malamumalamu te mokakatano oyo nazalaki na yango, basungaki ngai na bolingo nyonso.”
16. Toli nini Petelo apesi na bankulutu?
16 Ya solo, bankulutu mingi bazali kolanda toli oyo ya Petelo, ete: “Bobatela etɔnga na Njambe kati na bino. Bobatela bango mpo na kopusama te, kasi na mitema malamu lokola elingi Njambe, na mposa na kojua lifuti te kasi mpɔ na kopesa mpamba; lokola mpo na kojala mikonji likolo na [libula na Nzambe, NW] tɛ, kasi lokola bilakiseli na etɔnga.” (1 Petelo 5:1-3) Motindo na bankulutu oyo bazali kolanda teokrasi, bazali mpenza lipamboli.
Bampate kati na teokrasi
17. Tangá mwa bizaleli oyo basangani nyonso ya lisangá basengeli kolóna.
17 Kasi, teokrasi esalemi bobele na bankulutu te. Soki babateli na mpate basengeli komiyokanisa na teokrasi, bampate basengeli mpe kosala motindo moko. Lolenge nini? Bobele mitinda oyo moko nde mizali kotambwisa babateli na mpate mpe bampate. Mpo na kozwa lipamboli na Yehova, baklisto nyonso, kasi bobele bankulutu te, basengeli kozala na komikitisa. (Yakobo 4:6) Biso banso, tosengeli kolona bolingo, mpamba te soki tozangi bolingo, mbeka oyo tozali kopesa epai na Yehova endimami te epai na ye. (1 Bakolinti 13:1-3) Mpo na kosukisa, biso banso, kasi bobele bankulutu te, tosengeli “kotonda na boyebi [ya sikisiki, NW] na mokano na [Yehova], na mayɛlɛ yɔnsɔ mpe na bosɔsɔli na elimo.”—Bakolose 1:9.
18. (a) Mpo na nini boyebi ya likolólikoló ya solo ekoki te? (b) Tosengeli kosala nini mpo ete biso banso tozala na boyebi ya sikisiki?
18 Kati na bikateli minene oyo basengeli kokamata ntango nyonso, bilenge mpe mikóló bazali komeka kotikala sembo, atako bazali kobika kati na mokili ya Satana. Bopusi ya mokili kati na makambo matali molato, miziki, bafilime mpe mikanda ya lolenge nyonso ezali kotya elimo ya basusu kati na komekama. Boyebi ya likolólikoló ya solo ekoki te mpo na kopesa biso nzela ete tobatela bokatikati na biso. Mpo na kotikala sembo, esengeli na biso kotonda na boyebi ya sikisiki. Esengeli na biso kozala na bososoli mpe na bwanya oyo tokoki kozwa bobele kati na Liloba ya Nzambe. (Masese 2:1-5) Na yango, ezali na ntina na kolóna bizaleli malamu ya boyekoli, ya komanyola makambo oyo tozali koyekola, mpe ya kosalela yango. (Njembo 1:1-3; Emoniseli 1:3) Paulo akomelaki nde baklisto nyonso, kasi bobele na bankulutu te, wana alobaki ete: “Kasi bilei makasi bizali mpɔ na bato bakómeli, mpo na baoyo basili koyeba kosalela bisosweli na bango mpo na kokesenisa kati na malamu mpe mabe.”—Baɛbɛlɛ 5:14, NW.
Babateli mpe bampate bazali kosala elongo
19, 20. Toli nini epesami epai na biso banso mpo ete tosala na bomoko elongo na bankulutu, mpe mpo na nini?
19 Nsuka na yango, esengeli mpenza koloba ete baoyo bazali kosala na bomoko elongo na bankulutu bazali komonisa elimo ya solo ya teokrasi. Paulo akomelaki Timoté ete: “Tika ete mikóló oyo bakokambaka na lolenge loleki malamu bakumisama na lokumu mibale, mingi mpenza baoyo bakosalaka makasi kati na liloba mpe na koteya.” (1 Timoté 5:17, NW; 1 Petelo 5:5, 6) Kozala nkulutu ezali mokumba ya malamu mpenza; kasi, mingi kati na bankulutu bazali na mabota: bakendeke na mosala mikolo nyonso, mpe bazali na mwasi mpe bana oyo basengeli kobatela. Ya solo, bazali na esengo mpo na kosalela bandeko na bango, kasi mosala na bango ekozala pɛpɛlɛ mpe ezali kopesa bango bosepeli mingi na ntango lisangá ezali kosunga bango, na ntango ezali kotɔ́ngatɔ́nga bango te to mpe ezali kosengisa bango makambo mingi te.—Baɛbɛlɛ 13:17.
20 Ntoma Paulo alobaki ete: “Bokanisa baoyo bakokambaka bino, baoyo basololi Liloba na Nzambe epai na bino. Bobanjabanja mpo na nsuka na bijaleli na bango mpe boyekolaka kondima na bango.” (Baɛbɛlɛ 13:7) Te, Paulo alendisaki bandeko te ete bázala bayekoli ya bankulutu. (1 Bakolinti 1:12) Kozala moyekoli ya moko na bato ezali kolanda nzela ya teokrasi te. Kasi, ezali mpenza likambo na mayele na komekola kondima emekami ya nkulutu moko oyo azali komiyokanisa na teokrasi, oyo azali kokokisa mosala ya kopalanganisa nsango malamu, oyo azali koyangana na makita mbala na mbala, mpe oyo azali kosalela lisangá na komikitisa nyonso mpe na bolingo nyonso.
Litatoli ya kondima
21. Lolenge nini baklisto bazali komonisa kondima moko makasi lokola oyo ya Mose?
21 Ya solo mpenza, lolenge ebongiseli moko ya teokrasi ezali na eleko oyo esili mpenza kobeba kati na lisoló ya bato, emonisi nguya ya Mokambi Monene ya teokrasi. (Yisaya 2:2-5) Ezali mpe komonisa kondima ya baklisto soko bamilió mitano—mibali, basi mpe bana—baoyo bazali kobunda na mitungiseli ya bomoi mokolo na mokolo, kasi bazali kobosana te ete Yehova nde azali Mokonzi na bango. Lolenge moko mosembwi Mose “[atelemaki ngwi, NW] lokola ete ajali komɔna ye oyo akomɔnanaka tɛ,” bobele bongo lelo, baklisto bazali mpe na kondima moko makasi. (Baɛbɛlɛ 11:27) Bazali na libaku kitoko ya kozala kati na teokrasi, mpe bazali kotɔ́ndo Yehova mpo na yango mikolo minso. (Njembo 100:4, 5) Lokola bazali kooka nguya na lobiko ya Yehova, bazali na esengo mpo na kosakola ete: “Yehova azali Mosambisi na biso, Yehova azali Mopesi-mibeko na biso, Yehova azali Mokonzi na biso, ye moko akobikisa biso.”—Yisaya 33:22, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kati na yango, mokanda “Bokeba na ntina na bino mpenza mpe na ntina na etonga mobimba,” oyo ezali na mitinda ya Makomami mpe oyo epesami epai na bakɛngɛli, to bankulutu, oyo baponami kati na lisangá.
Biblia emonisi nini?
◻ Lolenge nini baklisto bazali kotosa teokrasi?
◻ Lolenge nini teokrasi ebongisami na eleko na biso?
◻ Lolenge nini bankulutu basengeli komilɛngɛla mpo na kokokisa mikumba na bango?
◻ Bizaleli nini ya boklisto oyo ezali na ntina ete bankulutu balóna mpe bamonisa yango?
◻ Kati na teokrasi, boyokani nini bosengeli kozala kati na bampate mpe babateli na mpate?
[Elilingi na lokasa 16]
Adama na Eva babungisaki Paladiso mpo balingaki kozwa ekateli kati na malamu mpe mabe
[Elilingi na lokasa 18]
Nkulutu oyo azali kosalela bampate na komikitisa nyonso mpe na bolingo, akozala ntango nyonso na bopusi malamu