Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/2 lok. 30
  • Yaká na liyangani ya etúká “bobangi Nzambe”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yaká na liyangani ya etúká “bobangi Nzambe”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Masolo mosusu
  • Yaká na Liyangani ya Etúká “Tókumisa Nzambe na esengo nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Boyei malamu na ba assemblées ya distrike “bamemi na pole”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Bisika mpe badates ya ba assemblées “Mateya mauti na Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Tobyangi yo ete oya koyanganana ba assemblée ya distrike “Baninga na bonsomi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/2 lok. 30

Yaká na liyangani ya etúká “bobangi Nzambe”

NA NTANGO ya kala, na nsé ya mibeko ya Moize, libota ya Yehova lisengisamaki na koyangana esika moko mbala misato na mbula mpo mwa ndambo ya bilambo. Yango ezalaki mabaku ya esengo mpe ya kolendisa.​—Deteronome 16:16.

Na mikolo na biso mpe libota ya Yehova lizali koyangana mbala misato na mbula: mpo na liyangani ya mokolo moko, liyangani ya zongazonga ya mikolo mibale, mpe mpo na liyangani ya Etúká ya mikolo misato to minei. Na boumeli ya mbula ya mosala 1994, Batatoli ya Yehova bayanganaka mpo na liyangani ya etúká “Bobangi Nzambe.”

Liloba ya Nzambe elobeli polele mpo na oyo etali ntina ya kozala na bobangi ya Nzambe. Bobangi motindo wana elobelami kati na Biblia pene na mbala 200. Bobangi Nzambe ezali libateli, lokola tokoki komona yango kati Masese 16:6, (NW): “Kati na bobangi ya Yehova moto akopengwaka longwa na mabe.” Nzembo 111:10 (NW) eyebisi biso ete kobanga Nzambe ezali ebandeli ya bwanya.

Tokoki koloba ete ezali na mitindo mibale ya bobangi Yehova. Ya liboso, bobangi motindo wana epusami na bolingo. Tozali kobanga ete tozanga kosepelisa Nzambe mpo na bolingo monene oyo tozali na yango epai na ye. (Masese 27:11) Lisusu, kozala na bwanya ekosalisa biso na kokolisa bobangi ya Nzambe kati na biso, mpo toyebi ete Nzambe azali mpe “mɔ́tɔ mokozikisaka” mpo na bato nyonso oyo basalaka mabe.​—Baebele 12:29.

Kati na liyangani na biso ya etúká “Bobangi Nzambe,” tokozwa malako mingi mpe bilendiseli mpo na kokóla kati na bobangi Nzambe. Mateya motindo yango makopesama na nzela ya masukúlu, bilakiseli mpe lisano-liteya, mpe masoló na ntina na makambo oyo bandeko bakutanaki na yango.

Lokola Bayisraele ya ntango ya kala basengisamaki na kokende na makita na bango maboko mpamba te, bobele bongo biso mpe tokosala oyo ekoki na biso mpo ete liyangani yango ekoka kopesa esengo. (Deteronome 16:17) Tokoki kosala bongo na komonisáká elimo ya botosi mpo na mesa ya Yehova. Na lolenge nini? Na koyáká na ntango malamu, na kotyáká likebi mozindo na oyo ekolobama uta na estrade, na kosanganáká na motema mobimba kati na boyembi ya nzembo. Tokosolola mpambampamba te to kotambolatambola na ntango masukúlu mazali kosalema. Tokolinga mpe kopesa lisungi na biso na meko oyo tokoki kosala yango. Kobongisama ya liyangani esangisi biteni mingi ya misala, oyo moko moko ezali kosenga bato oyo bakosala kati na yango. Tokolinga mpe kopesa lisungi na mosolo na ntina na bolamu oyo Yehova akopesa biso.

Tiká ete mosaleli mokomoko ya Yehova akamata bibongiseli uta sikawa mpo ete azala wana na boumeli ya mikolo misato ya liyangani ya etúká “Bobangi Nzambe,” kobanda na Nzembo ya ebandeli na mokolo ya mitano kino na libondeli ya nsuka na mokolo ya lomingo na nsima ya nzanga!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto