Elambo ya Mpokwa ya Nkolo—Esengeli kokumisama mbala boni?
EYENGA ya mbotámá, Eyenga ya pasiká, mikolo “mosantu’”. Ebele na mikolo mosantu mpe bafeti ezali kokumisama na mangomba ya boklisto ya lokuta. Kasi oyebi bilambo boni oyo Yesu Klisto apesaki etindá na bayekoli na ye ete bakumisa yango? Eyano ezali ete, bobele moko! Moko te kati na bafeti mosusu wana epesamaki ndingisa na Mobandisi ya boklisto.
Emonani polele ete, soki Yesu asalaki bobele elambo moko, yango ezali na ntina mingi. Baklisto basengeli kokumisa yango lokola Yesu atindaki bango mpenza. Etindá yango moko ezali nini?
Bobele elambo moko
Elambo oyo ebandisamaki na Yesu na mokolo oyo akufaki. Akumisaki Pasiká ya Bayuda elongo na bantoma na ye. Bongo, alekisaki mwa mampa mazangi mfulu ya Pasiká epai na bango, kolobáká ete: “Oyo elakisi nzoto na ngai epesami mpo na bino. Bósalaka boye mpo na ekaniseli na ngai.” Na nsima, Yesu alekisaki kɔ́pɔ ya vinyo, mpe alobaki ete: “Kɔ́pɔ oyo elakisi kondimana ya sika na nzela na makila na ngai, oyo esopami mpo na bino.” Alobaki lisusu ete: “Bosalaka [boye, NW] mpɔ na ekaniseli na ngai.” (Luka 22:19, 20, NW; 1 Bakɔlinti 11:24-26) Elambo oyo ebéngami Elambo ya Mpokwa ya Nkolo, to Ekaniseli. Ezali elambo bobele moko oyo Yesu apesaki etindá na bayekoli na ye ete bakumisa yango.
Mangomba mingi makolobaka ete masili kozwa etindá ya kokumisa elambo oyo elongo na bafeti na bango nyonso mosusu, kasi mingi bazali kokumisa yango na lolenge lokeseni mpenza na oyo Yesu atindaki. Kokesena monene ezali ntango mosusu na motuya na mbala oyo yango ezali kokumisama. Mangomba mosusu mazali kokumisa yango sanza na sanza, poso na poso, ata mokolo na mokolo. Ezali yango nde Yesu azalaki kokanisa wana alobaki na bayekoli na ye ete: “Bosalaka [yango, NW] mpɔ na ekaniseli na ngai”? The New English Bible elobi ete: “Bósala yango lokola ekaniseli na ngai.” (1 Bakolinti 11:24, 25) Ekaniseli to mokolo na kokundola esalemaka mbala boni? Ya solo, bobele mbala moko na mbula.
Tomikundola lisusu ete, Yesu abandisaki elambo yango mwa liboso na kufa na ye na Nisan 14, engebene manáka ya Bayuda.a Yango ezalaki na mokolo ya Pasiká, feti oyo Bayuda bazalaki kokanisa kosikwama monene ntango babimaki na Ezipito na ekeke ya zomi na motoba liboso ya ntango na biso. Na ntango wana, mbeka ya mwana na mpate ezalaki mpo na lobiko ya bana mibali ya liboso ya Bayuda, wana anzelu ya Yehova abomaki bana mibali nyonso ya Ezipito.—Exode 12:21, 24-27.
Lolenge nini yango ezali kosalisa biso na kokanga ntina? Ya solo, ntoma moklisto Paulo akomaki ete: “Klisto Pasiká na biso asili kopesama mbeka.” (1 Bakolinti 5:7, NW) Liwa ya Yesu lizalaki mbeka monene ya Pasiká oyo ezali bongo kopesa bato nzela na lobiko monene. Na yango, mpo na baklisto, Ekaniseli ya liwa ya Klisto esili kokitana Pasiká ya Bayuda.—Yoane 3:16.
Pasiká ezalaki kokumisama mbala moko na mbula. Na yango, Ekaniseli esengeli mpenza kozala bongo. Pasiká—mokolo oyo Yesu akufaki—ezalaki kosalema ntango nyonso na mokolo ya 14 na sanza ya Bayuda oyo ebéngami ete Nisan. Na bongo, liwa ya Klisto lisengeli kokanisama bobele mbala moko na mbula na mokolo oyo mokokani na Nisan 14. Na 1994, dati yango ezali Mokolo ya Poso, na Mársi 26, nsima na kolala na moi. Kasi, mpo na nini mangomba ya boklisto ya lokuta mazali kosalela mokolo yango te mpo na elambo wana ya ntina mingi? Mwa botateli ya lisoló ya makambo na kala ekoyanola na motuna oyo?
Momeseno ya bantoma mobebisami
Ntembe ezali te ete na boumeli ya ekeke ya liboso ya ntango na biso, baoyo bakambamaki na bantoma ya Yesu, bazalaki kokumisa Elambo ya Mpokwa ya Nkolo na lolenge oyo ye asɛngaki mpenza. Nzokande, na boumeli ya ekeke ya mibale, basusu babandaki kobongola eleko ya ekaniseli yango. Bazalaki kosala Ekaniseli na mokolo ya liboso na poso (oyo ebéngami sikawa Mokolo ya Eyenga), kasi na mokolo oyo mokokani na Nisan 14 te. Mpo na nini esalemaki bongo?
Mpo na Bayuda, mokolo mozalaki kobanda na ngonga ya motoba na mpokwa mpenza mpe ezalaki kosuka bobele na ngonga wana na mokolo molandi. Yesu akufaki na mokolo ya Nisan 14 ya mobu 33 T.B., oyo ebandaki na Mokolo ya Minei kino Mokolo ya Mitano na mpokwa. Asekwaki nsima ya mikolo misato, na ntɔngɔ́ ya Mokolo ya Eyenga. Basusu balingi ete kokanisama ya liwa ya Yesu esalema mbula na mbula na mokolo moko oyo moponami, na esika na kosala yango na mokolo oyo mokokani na Nisan 14. Batalelaki mokolo ya lisekwa na Yesu na motuya koleka mokolo ya liwa na ye. Yango wana, baponaki Mokolo ya Eyenga.
Yesu apesaki etindá mpo na liwa na ye, kasi mpo na lisekwa na ye te. Mpe lokola Pasiká ya Bayuda ezalaki mbula na mbula kokokana na mikolo mikeseni, engebene manáka ya Grégorien oyo tozali kosalela sikawa, yango mpe ezali lolenge moko mpo na Ekaniseli. Nzokande, mingi bakangamaki na ebongiseli ya ebandeli mpe bazalaki kokumisa Elambo ya Mpokwa ya Nkolo mbula na mbula na mokolo ya Nisan 14. Liboso, bazalaki kobéngama ete Quartodécimans, oyo elimboli “Baímokolo ya zomi na minei.”
Balimboli mosusu ya Biblia balobi ete “Baímokolo ya zomi na minei” wana bazalaki balandi bantoma ya ebandeli. Mokomi moko ya makambo na kala alobaki ete: “Mpo na oyo etali mokolo ya kokumisa Pascha [Elambo ya Mpokwa ya Nkolo], momeseno ya mangomba ya Quartodécimans ya Azia elandanaki elongo na oyo ya lingomba ya Yelusaleme. Na ekeke ya mibale, na Pascha na bango, mangomba wana mazalaki kokanisa lisiko oyo lizwamaki na liwa ya Klisto na mokolo ya 14 na sanza ya Nisan.”—Studia Patristica, Volimi V, 1962, lokasa 8.
Kowelana ebimi
Wana, na Asie Mineure, bato mingi bazalaki kolanda lolenge oyo bantoma bazalaki kosala, na Loma, Mokolo ya Eyenga moponamaki mpo na kokumisa elambo yango. Na mobu 155 T.B., Polycarpe ya mboka Sumuluna, momonisi ya masangá ya Azia, akendaki na Loma mpo na kolobela likambo yango mpe makambo mosusu. Na mawa nyonso, boyokani moko bosalemaki te na likambo yango.
Irenée ya engumba Lyon, akomaki na mokanda moko ete: “Anicet [ya Loma] akokaki soko moke te kolengola Polycarpe ete atika kosala likambo oyo azalaki kosala ntango nyonso elongo na Yoane, moyekoli ya Nkolo, mpe elongo na bantoma mosusu oyo asanganaki na bango; bobele bongo, Polycarpe abendaki Anicet te mpo na kosala yango, mpamba te Anicet alobaki ete ye asengelaki kolanda momeseno ya mikóló oyo bazalaki liboso na ye.” (Búku Eusebius, Mokanda ya 5, mokapo 24) Tósimba ete maloba ya Polycarpe matongamaki likoló na maloba ya bantoma, nzokande Anicet atalelaki momeseno ya mikóló ya lokumu ya Loma.
Kowelana wana ekólaki mpenza kino pene na nsuka na ekeke ya mibale ya ntango na biso. Soko na mobu 190 T.B., moto moko na nkombo Victor, aponamaki lokola episkópo ya Loma. Azalaki kondima ete Elambo ya Mpokwa ya Nkolo esengelaki kosalema na Mokolo ya Eyenga, mpe alukaki lisungi epai na ebele ya bakonzi mosusu ya lingomba. Victor asɛngisaki masangá ya Azia ete mabongwana mpo na kolanda ebongiseli ya Mokolo ya Eyenga.
Koyanoláká na nkombo ya baoyo nyonso bazali na Asie Mineure, Polycrate ya mboka Efese, aboyaki kotosa etindá wana. Alobaki ete: “Tokobatela mokolo wana kozanga kobebisa yango, kozanga kobakisa, soko kolongola mpe te.” Bongo, atangaki bato mingi, kati na bango ntoma Yoane. Alobaki ete: “Baoyo nyonso basalelaki mokolo ya zomi na minei mpo na kokumisa Pascha bazalaki na boyokani elongo na Evanzile, bapengwaki na likambo moko te.” Polycrate abakisaki ete: “Bandeko, mpo na ngai, . . . nazali kobanga makaneli te. Mpamba te, baoyo balekaki ngai balobaki ete, Tosengeli kotosa Nzambe liboso na kotosa bato.—Búku Eusebius, Mokanda ya 5, mokapo 24.
Victor asepelaki te na eyano wana. Búku moko ya makambo na kala elobi ete “alongolaki mangomba nyonso ya Azia, mpe atindaki mikanda na mangomba nyonso mandimaki likanisi na ye, ete basengeli kolongola mangomba wana.” Nzokande, “ekateli na ye wana ya mbangombango mpe ya lolendo, endimamaki te epai na bato nyonso ya bwanya mpe ya bososoli, baoyo bazalaki na ngámbo na ye; mingi na bango bakomelaki ye mokanda ya mokuse, na kopesáká ye toli . . . ete abatela bolingo, bomoko, mpe kimya.”—Búku ya Bingham oyo ebéngami Antiquities of the Christian Church, Mokanda ya 20, mokapo 5.
Lipɛngwi libandi
Atako botɛmɛli wana, baklisto ya Asie Mineure bazalaki bobele bango moko mpo na likambo litali ntango ya kokumisa Elambo ya Mpokwa ya Nkolo. Mbongwana ebandaki kokɔ́ta malɛmbɛmalɛmbɛ na bipai binso. Basusu bazalaki kokumisa eleko mobimba kobanda na mokolo ya Nisan 14 kino na Mokolo ya Eyenga oyo mozalaki kolanda dati yango. Basusu baponaki kosala yango mbala na mbala—Poso na poso na Mokolo ya Eyenga.
Na mobu 314 T.B., likita ya Arles (France) limekaki kolendisa ebongiseli wana ya Baloma mpe kosilisa kowelana nyonso. Baímokolo ya zomi na minei baoyo batikalaki, balɛmbaki. Mpo na kolendisa liteya yango mpe makambo mosusu oyo mazalaki kokabola baoyo bazalaki komitánga baklisto kati na bokonzi na ye, na mobu 325 T.B., mokonzi mopakano Constantin ayanganisaki bakonzi ya lingomba, na Likita ya Nicée. Yango ezwaki ekateli oyo ya koyebisa na bato nyonso ya Asie Mineure ete balanda mimeseno ya Loma.
Ebongi mpenza koyeba moko na makanisi ya ntina oyo mapesamaki mpo na kotika kokumisa Ekaniseli ya liwa ya Klisto na boyokani na dati oyo ekokani na manáka ya Bayuda. Búku A History of the Christian Councils, ya K. J. Hefele, eyebisi boye: “Elobamaki ete ebongaki mpenza te ete, feti oyo eleki nyonso mosusu na bulee, ete elanda momeseno (etangelí) ya Bayuda, baoyo bamikɔtisaki na mabe ya nsɔmɔ, mpe baoyo bazangaki bososoli.” (Volimi 1, lokasa 322) Engebene Studia Patristica, Volimi IV, 1961, lokasa 412, J. Juster alobaki ete: “Kotalelama na lolenge wana ezalaki lokola nde ‘kokitisama’ na nsé na Eyanganelo oyo ezalaki kotungisa bakonzi ya lingomba.”
Wana ezalaki lolenge mabe oyo bazalaki kotalela Bayuda! Baoyo bazalaki kokumisa Ekaniseli ya liwa ya Yesu na dati ekokani na mokolo oyo akufaki, bazalaki kotalelama lokola bato oyo bandimaki losambo ya Bayuda. Babosanaki ete Yesu ye moko azalaki Moyuda mpe ete amonisaki ndimbola ya mokolo wana na kopesáká bongo bomoi na ye mpo na bato. Kobanda wana, Baímokolo ya zomi na minei batalelamaki lokola bapɛngwi mpe bato balingi mikabwano, mpe banyokwamaki. Likita ya Antiokia na mobu 341 T.B. lizwaki ekateli ya kolongola bango na lingomba. Nzokande, bazalaki naino mingi na mobu 400 T.B., mpe mwa ndambo na bango balendendelaki ntango molai na nsima.
Uta mikolo yango, boklisto ya lokuta elongi te kozongela ebongiseli oyo Yesu asalaki na ebandeli. Molakisi William Bright alobaki ete: “Wana mokolo ya ntina mingi, Mokolo ya Mitano mosantu, eponamaki lokola mokolo ya kokanisa Mpasi monene oyo Yesu amonaki, nzela ezalaki lisusu te mpo na kosalela yango bobele mpo na makambo matali ‘pasiká’ oyo St. Paulo akangisaki na mbeka na kufa: makambo matali ‘pasiká’ masalelamaki na bonsomi nyonso mpo na Feti ya Lisekwa, mpe makanisi na mobulungano makɔtaki kati na milulu ya boklisto ya lokuta ya lokótá Greke mpe lokótá Latin.”—The Age of the Fathers, Volimi 1, lokasa 102.
Ezali boni lelo?
Okoki komituna ete: ‘Nsima ya bambula nyonso wana, eleko ya sikisiki ezali na ntina mpo na kokumisa Ekaniseli?’ Ee, ezali na ntina. Mbongwana esalemaki na bato na mpiko baoyo batyaki milende mpo na kozwa bokonzi. Bato balandaki makanisi na bango na esika ya kotosa Yesu Klisto. Emonani polele ete likebisi oyo ya ntoma Paulo likokanaki, ete: “Nayebi ete nsima na bokei na ngai, mbwa mabe ya zámba ekoingela kati na bino mpe bakosalela etongá na motema pɛtɛɛ te, mpe katikati na bino mpenza, mibali bakotelema mpe bakoloba na kobóngolabongola makambo mpo na kobenda bayekoli nsima na bango mpenza.”—Misala 20:29, 30, NW.
Wana ezali likambo lisɛngi botosi. Yesu atyaki bobele elambo moko mpo na baklisto ete basala yango. Biblia elimboli polele ntango nini mpe lolenge nini yango esengelaki kosalema. Bongo, nani azali na lotómo ya kobongola yango? Baímokolo ya zomi na minei ya liboso bandimaki monyoko mpe kolongolama na lingomba na esika ya kondima likambo wana.
Okoki kosepela na koyeba ete, awa na mabelé, ezali naino na baklisto baoyo bazali komemya maloba ya Yesu mpe bazali kokumisa Ekaniseli ya liwa na ye na dati oyo ye atyaki. Na mbula oyo, Batatoli ya Yehova bakoyangana na Bandako na bango ya Bokonzi kati na mokili mobimba, na nsima ya 6H00 ya mpokwa, na Mokolo ya Poso, na Mársi 26—na ebandeli ya mokolo ya 14 na sanza ya Nisan. Bakosala bongo na lolenge oyo Yesu asɛngaki ete esalema na eleko wana ya ntina mingi. Mpo na nini te kokumisa Elambo ya Mpokwa ya Nkolo elongo na bango? Na nzela na yango, yo mpe okoki komonisa limemya na yo na mokano ya Yesu Klisto.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nisan, sanza ya liboso na mobu ya Bayuda, ezalaki kobanda na eleko na kolimwa na sanza (nouvelle lune). Nisan 14 ezalaki ntango nyonso kokóma na eleko oyo sanza ekómi mobimba.
[Etanda na lokasa 6]
“LISIKO OYO YA MOTUYA MINGI”
Mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto ezali liteya oyo lileki nyonso mosusu. Yesu alobaki na ntina na ye moko ete: “Mwana na moto ayaki te mpo ete basalela ye, kasi mpo na kosalela mpe kopesa molimo na ye lisiko mpo na mingi.” (Malako 10:45, NW) Alimbolaki lisusu ete: “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana bobele moko ete moto na moto oyo akondimela ye, abomama te kasi azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16, NW) Mpo na bakufi, lisiko lisili kofungola nzela ya lisekwa mpe ya kozwa bomoi ya seko.—Yoane 5:28, 29.
Ezali liwa ya ntina mingi ya Yesu Klisto nde ezali kokanisama na bokumisi Elambo ya Mpokwa ya Nkolo. Mbeka na ye ekokisaki makambo mingi! Mwasi moko ya libala oyo abɔkɔlamaki na baboti oyo bazalaki kobanga Nzambe mpe oyo azalaki kotambola kati na solo ya Nzambe koleka bambula mingi, amonisaki botɔ́ndi na ye na maloba oyo:
“Tozali kozela Ekaniseli na esengo nyonso. Mbula na mbula, yango ezali kokóma sé na motuya mingi. Nazali komikundola wana nakɔtaki na ebombelo na bibembe ekokisi mibu 20 sikawa, mpo na kotala ebembe ya Papa na ngai molingami mpe nazalaki na botɔ́ndi ya solo mpenza mpo na lisiko. Liboso, ezalaki bobele boyebi oyo ezalaki na makanisi. Sikawa, nasili koyeba makomami nyonso mpe nayebi lolenge ya kolimbola yango! Kasi bobele na ntango oyo nazalaki kotungisama mingi na ntina na liwa, nde motema na ngai motóndaki na esengo mingi mpo na makambo oyo tokozwa na nzela ya lisiko oyo ya motuya mingi.”