Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/4 nk. 9-14
  • Etumba kati na mateya mauti na Nzambe mpe mateya ya bademó

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Etumba kati na mateya mauti na Nzambe mpe mateya ya bademó
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mateya ya bademó mamonisami polele
  • Mateya ya bademó na mikolo na biso
  • Lolenge ya koyeba mateya ya bademó
  • Tókangama na mateya mauti na Nzambe
  • Bilenge​—⁠bozali kolanda mateya ya nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Banani bazali banguna ya Nzambe?
    Okoki kozala moninga ya Nzambe!
  • Ndenge nini tokoki kotɛmɛla bademo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Kebá—Satana alingi kolya yo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/4 nk. 9-14

Etumba kati na mateya mauti na Nzambe mpe mateya ya bademó

“Basusu bakotangwa longwa na kondima, kotyáká likebi na maloba mapemami ya kozimbisa mpe na mateya ya bademó.”​—1 TIMOTÉ 4:1, NW.

1. Etumba nini baklisto bazali kati na yango?

KANISÁ ete na bomoi na yo mobimba, ozali kofanda kati na esika oyo bitumba bisalemaka. Okooka ndenge nini soki ozali kokende kolala na nsé ya lokito ya masasi mpe kolamuka na makelele ya bibundeli ya makasi? Na mawa nyonso, na bisika mosusu kati na mokili, ezali wana nde lolenge ya bomoi ya bato mosusu. Nzokande, na elimo baklisto nyonso bazali kati na ezaleli wana. Bazali katikati na etumba monene oyo esili kongala uta soko mibu 6 000, mpe na mikolo na biso, eyei makasi mingi. Etumba yango oyo eumeli bikeke mingi ezali nini? Ezali bongo etumba kati na solo mpe lokuta, kati na mateya mauti na Nzambe mpe mateya ya bademó. Tozali kolekisa ndelo te soki tobéngi yango etumba​—na kotalela ezaleli ya moko kati na babundi na yango​—matáta makasi mpe maleki koboma kati na lisoló ya bato.

2. (a) Engebene Paulo, ngámbo nini mibale oyo ezali kobundana? (b) Paulo alingaki koloba nini na liloba “kondima”?

2 Ntoma Paulo alobeli ngámbo mibale ya matáta yango, wana akomaki epai na Timoté ete: “Liloba lipemami lilobi polele ete, na bileko na ntango bikoya nsima, basusu bakotangwa longwa na kondima, kotyáká likebi na maloba mapemami ya kozimbisa mpe na mateya ya bademó.” (1 Timoté 4:1, NW) Tóyeba ete mateya ya bademó masengelaki kozala mpenza na bopusi makasi na “ntango ya nsuka.” Soki tokokanisi yango na mikolo ya Paulo, tozali solo kobika na eleko yango. Tóyeba lisusu oyo ezali kotɛmɛla mateya ya bademó, elingi koloba “kondima.” Awa, “kondima” emonisi mateya mauti na Nzambe, oyo mazwi moboko na maloba mapemami na Nzambe oyo mazwami kati na Biblia. Kondima motindo wana ezali kopesa bomoi. Ezali koteya moklisto lolenge ya kosala mokano ya Nzambe. Ezali solo oyo ezali komema na bomoi ya seko.​—Yoane 3:16; 6:40.

3. (a) Nini ezali kokómela bato oyo bazwami na likámá na etumba kati na solo mpe lokuta? (b) Nani azali nsima na mateya ya bademó?

3 Ye oyo azali kotangwa longwa na kondima, azali kobungisa bomoi ya seko. Etumba nyonso etikaka nsima na yango bato oyo bazwi makámá. Oyo nde mawa mpo na ye oyo akomitika kozimbisama na mateya ya bademó! (Matai 24:24) Lolenge nini tokoki, moko na moko, kopengola ete tózwama te na likámá yango? Ezali na kobwakáká mateya wana ya lokuta, oyo ezali bobele kosalela mokano ya “mokonzi ya badémo,” Satana Zábolo. (Matai 12:24) Ya solo, mateya ya Satana mazali lokuta, mpamba te Satana azali “tata na lokuta.” (Yoane 8:44) Tótalela sikawa lolenge nini asalelaki mpenza lokuta na mayele nyonso mpo na kozimbisa baboti na biso ya yambo.

Mateya ya bademó mamonisami polele

4, 5. Lokuta nini Satana ayebisaki na Eva, mpe mpo na nini yango ezalaki mpenza mabe?

4 Makambo yango malobelami kati na Biblia na Genese 3:1-5, NW. Kosaleláká nyoka, Satana abelemaki epai na mwasi, Eva mpe atunaki ye ete: “Ezali solo boye ete Nzambe alobaki na bino ete bosengeli te kolya mbuma na nzeté nyonso na elanga?” Motuna wana momonanaki lokola nde mozangi likámá, kasi tiká tótalela yango lisusu. “Ezali solo boye?” Satana asalaki lokola ete azali kokamwa, lokola ete alingi koloba: ‘Mpo na nini Nzambe akokaki koloba likambo motindo wana?’

5 Kozanga koyeba oyo alingaki kosala, Eva amonisaki ete ezalaki bongo. Ayebaki mateya mauti na Nzambe na ntina na likambo yango, mpamba te Nzambe ayebisaki Adama ete bakokufa soki bakolya mbuma na nzeté ya koyeba malamu mpe mabe. (Genese 2:16, 17) Motuna ya Satana molamwisaki mposa na ye ya koyeba makambo, na bongo, atyaki likebi mingi wana akómaki pene na koloba likambo ya ntina na lisoló na ye: “Nyoka alobaki na mwasi ete: ‘bokokufa solo te.’” Oyo nde likambo mabe mpo na koloba! Satana afundaki Yehova, Nzambe na solo, Nzambe na bolingo, Mozalisi, ete azali kokosa bana na Ye, bato!​—Nzembo 31:5; 1 Yoane 4:16; Emoniseli 4:11.

6. Lolenge nini Satana atyaki ntembe na boboto mpe na lotómo oyo Yehova azali na yango ya kozala Moyangeli?

6 Satana asukaki wana te. Alandaki koloba ete: “Mpo ete Nzambe ayebi ete, na mokolo oyo bokolya yango, miso na bino makofungwama mpe bokokóma lokola Nzambe, koyeba malamu mpe mabe.” Engebene Satana, Yehova Nzambe​—oyo apesaki biloko mingi epai na baboti na biso ya liboso na bokabi nyonso​—alingaki kopimela bango eloko moko ya kitoko mingi. Alingaki kopekisa bango ete bakóma te lokola banzambe. Na yango, Satana atyaki ntembe na boboto ya Nzambe. Lisusu, akólisaki ezaleli ya moimi mpe ezaleli ya koboya mibeko ya Nzambe na nkó nyonso, kolobáká ete kosala motindo wana ezali kopesa matomba. Ya solo, Satana atyaki ntembe na lotómo oyo Nzambe azali na yango ya kozala Moyangeli likoló na bikelamu na ye mpenza, kolobáká ete Nzambe azali na lotómo te ya kotya ndelo na oyo moto akoki kosala.

7. Ntango nini mateya ya bademó mabandaki koyokama mpo na mbala ya liboso, mpe lolenge nini yango ezali motindo moko lelo oyo?

7 Na maloba wana ya Satana, mateya ya bademó mabandaki koyokama mpo na mbala ya liboso. Kino lelo oyo, mateya wana ya mabe mazali kokólisa bizaleli motindo wana ya kozanga kobanga Nzambe. Bobele lolenge asalaki na Edene, Satana, oyo sikawa asangani na bilimu mosusu ya botomboki, azali kolanda kotya ntembe na lotómo oyo Nzambe azali na yango mpo na kotya mitinda na oyo esengeli kosalema. Kino lelo oyo, azali kotɛmɛla boyangeli ya Yehova mpe azali komeka kopusa bato na kozanga kotosa Tata na bango ya likoló.​—1 Yoane 3:8, 10.

8. Eloko nini Adama mpe Eva babungisaki kati na Edene, kasi lolenge nini Yehova amonanaki ete alobaki solo?

8 Na etumba wana kati na mateya mauti na Nzambe mpe mateya ya bademó, Adama mpe Eva basalaki liponi mabe mpe babungisaki elikya na bango ya bomoi ya seko. (Genese 3:19) Lokola bambula ezalaki koleka mpe nzoto na bango ebandaki kobeba, bango bamonaki polele nani alobaki lokuta mpe nani alobaki solo kati na Edene. Nzokande, bambula mingi liboso ete bákufa mpenza kati na mosuni, bakómaki bato ya liboso oyo bazwamaki na likámá na etumba kati na solo mpe lokuta, ntango bakataki boyokani elongo na Mozalisi na bango, Liziba ya bomoi. Ezalaki na ntango wana nde bakufaki na ndimbola ya elimo.​—Nzembo 36:9; kokanisá na Baefese 2:1.

Mateya ya bademó na mikolo na biso

9. Lolenge nini mateya ya bademó mamonisaki bopusi na yango na boumeli ya bikeke?

9 Kati na mokanda ya Emoniseli, ntoma Yoane, na kopemama na Nzambe, amemamaki kino na “mokolo na Nkolo,” oyo mobandaki na 1914. (Emoniseli 1:10) Na ntango yango, babenganaki Satana mpe bademó na ye longwa na likoló mpo na kozala na zingazinga ya mabelé​—kokwea monene mpo na monguna wana ya Mozalisi na biso Monene. Mongongo na ye mokoyokama lisusu na likoló te mpo na kofunda basaleli ya Yehova. (Emoniseli 12:10) Kasi, mateya ya bademó masili kosala bokóli nini awa na mabelé uta na Edene? Lisoló liyebisi ete: “Dalagɔna yango monɛnɛ abwakami, ye nyoka na kalakala, oyo abiangami [Zábolo, NW] mpe Satana, [oyo azali kozimbisa mabelé mobimba mafandami, “NW”].” (Emoniseli 12:9) Mokili mobimba mosili kokwea kati na lokuta ya Satana. Likambo ya kokamwa ezali te na komona ete Satana abéngami “mokonzi na mokili oyo”!​—Yoane 12:31; 16:11.

10, 11. Na makambo nini Satana mpe bademó na ye bazali kosala mosala lelo oyo?

10 Satana andimaki kokwea na ye nsima wana babenganaki ye longwa na likoló? Soko moke te! Azwaki ekateli ya kokóba kobundisa mateya mauti na Nzambe mpe baoyo bazali kokangama na yango. Nsima wana babenganaki ye longwa na likoló, Satana akóbaki etumba na ye: “Dalagɔna [Satana] ayokeli mwasi nkanda, mpe akei kobuna etumba na [batikali ya mombóto na ye, NW], baoyo batosaki malako na Njambe mpe bajalaki na matatoli na Yesu.”​—Emoniseli 12:17.

11 Longola likambo oyo ete azali kobundisa basaleli ya Nzambe, Satana azali mpe kotondisa mokili na bisakolá, kongalisáká makasi etumba na ye likoló na bato. Kati na moko ya bimonaneli na ye ya mokolo na Nkolo, ntoma Yoane amonaki nyama misato ya yauli oyo emonisi Satana, ebongiseli na ye ya politiki awa na mabelé, mpe nguya oyo ezali koyangela mokili na mikolo na biso. Longwa na minoko na bango misato, mbémba ezalaki kobima. Yango ezalaki elilingi ya nini? Yoane akomi ete: “Ya solo, ezali maloba mapemami na bademó mpe ekosalaka bilembo, mpe bazali kokende epai na bakonzi na mabelé mobimba mafandami, mpo na koyanganisa bango elongo mpo na etumba monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.” (Emoniseli 16:14, NW) Ya solo, mateya ya bademó mazali mpenza kosala mosala na mabelé. Satana mpe bademó na ye bazali kolanda kobundisa mateya mauti na Nzambe, mpe bakolanda kosala yango kino Yesu Klisto, Mokonzi Masiya, akokanga bango.​—Emoniseli 20:2.

Lolenge ya koyeba mateya ya bademó

12. (a) Mpo nini likoki ezali na kotɛmɛla mateya ya bademó? (b) Lolenge nini Satana azali komeka kokokisa mikano na ye epai na basaleli ya Nzambe?

12 Bato oyo bazali kobanga Nzambe bakoki kotɛmɛla mateya ya bademó? Bakoki mpenza kosala yango mpo na bantina mibale. Ya liboso, mpo ete mateya mauti na Nzambe mazali na nguya mingi; mpe ya mibale, mpo ete Yehova asilaki komonisa polele mayele mabe ya Satana ete tókoka kotɛmɛla yango. Lokola ntoma Paulo alobaki yango, “toyebi mayɛlɛ na ye.” (2 Bakolinti 2:11) Toyebi ete Satana asalelaka minyoko lokola moko na myango mpo na kokokisa mokano na ye. (2 Timoté 3:12) Nzokande, na lolenge ya mayele mabe koleka, azali komeka kopusa makanisi mpe mitema ya baoyo bazali kosalela Nzambe. Azimbisaki Eva mpe atyaki mposa mabe kati na motema na ye. Azali mpe komeka kosala bongo lelo oyo. Paulo akomaki epai na Bakolinti ete: “Lokola nyoka ajimbisaki [Eva, NW] nabangi ete makanisi na bino makopɛngwa longwa na sembo mpe mpɛtɔ mpɔ na Klisto.” (2 Bakɔlinti 11:3) Tótalela lolenge nini abebisaki makanisi ya bato.

13. Lokuta nini Satana ayebisaki bato uta na Edene?

13 Epai na Eva, Satana afundaki Yehova ete azali mokosi mpe alobaki ete bato bakoki kozala lokola banzambe soki bazangi kotosa Mozalisi na bango. Ezalela ya masumu oyo bato bazali kati na yango lelo, emonisi ete Satana nde azalaki mokosi, kasi Yehova te. Lelo oyo, bato bazali banzambe te! Nzokande, Satana alandisaki lokuta wana ya ebandeli na nkuta mosusu. Akɔtisaki likanisi oyo ete molimo ya moto mokokufaka te. Na yango, akosaki bato na komonisáká bango likoki ya kozala lokola banzambe na makambo mosusu. Na bongo, kolandáká liteya wana ya lokuta, apalanganisaki mateya lokola lifelo ya mɔ́tɔ, epongelo, misala ya bilimu mabe, mpe losambo ya bankɔ́kɔ. Kino lelo oyo, mateya wana ya lokuta makangi bato mingi kati na boombo.​—Deteronome 18:9-13.

14, 15. Solo na ntina na liwa mpe elikya ya moto na mikolo mizali koya, ezali nini?

14 Ya solo, oyo Yehova alobelaki Adama nde ezalaki solo. Adama akufaki wana asumukaki epai na Nzambe. (Genese 5:5) Ntango Adama mpe bakitani na ye bakufaki, bakómaki milimo na kufa, oyo eyebi likambo moko te mpe oyo ezangi mosala. (Genese 2:7; Mosakoli 9:5, 10; Ezekiele 18:4) Mpo ete basangolaki lisumu ya Adama, milimo nyonso na bato mizali kokufa. (Baloma 5:12) Nzokande, uta kala na Edene, Yehova alakaki koya ya mombóto oyo akobundisa misala ya Zábolo. (Genese 3:15) Mombóto yango ezalaki Yesu Klisto, Mwana bobele moko ya Nzambe. Yesu akufaki kozanga lisumu, mpe bomoi na ye ya mbeka ekómaki lisiko mpo na kosomba bato longwa na ezalela na bango ya kufa. Bato na botosi nyonso baoyo bazali kondimela Yesu, bazali na libaku ya kozwa bomoi ya seko oyo Adama abungisaki.​—Yoane 3:36; Baloma 6:23; 1 Timoté 2:5, 6.

15 Na bokeseni na likanisi mpamba oyo ete molimo mokolandaka kozala na bomoi nsima na liwa, lisiko nde ezali elikya ya solo mpo na bato. Yango ezali liteya liuti na Nzambe. Ezali solo. Ezali lisusu elembo ya kokamwa ya bolingo mpe ya bwanya ya Yehova. (Yoane 3:16) Tosengeli mpenza kozala na botɔ́ndi lokola toyekoli solo wana mpe lokola tosikwami longwa na mateya ya bademó kati na makambo wana!​—Yoane 8:32.

16. Matomba nini mabimaki na nsima wana bato balandaki bwanya na bango moko?

16 Na lokuta na ye kati na elanga ya Edene, Satana alendisaki Adama mpe Eva na koluka kozala na lipandá liboso na Nzambe mpe na kotalela bobele bwanya na bango moko. Lelo oyo, tozali komona matomba oyo mabimaki na nsima, mabe, kobeba ya nkita, bitumba, mpe bokóli ya bokesene oyo ezali komonana lelo kati na mokili. Likambo ya kokamwa ezali te soki Biblia elobi ete: “Bwanya ya mokili oyo ezali bolema liboso na Nzambe”! (1 Bakolinti 3:19, NW) Nzokande, na bolema nyonso, bato mingi bazali kolinga konyokwama na esika ya kotya likebi na mateya mauti na Nzambe. (Nzembo 14:1-3; 107:17) Baklisto, bato oyo bandimi mateya mauti na Nzambe, bazali kopengola kokwea na motambo yango.

17. Nini “oyo ebéngami na lokuta nyonso ete boyebi,” oyo Satana apalanganisaki, mpe mbuma na yango ezali nini?

17 Paulo akomelaki Timoté ete: “Ɛ Timoté, batelá yango ebombami na elikya nyonso epai na yo, kimá maloba na mpamba oyo mazali kobebisa yango ezali mosantu mpe longwa na bongolabongola ya oyo ebéngami na lokuta nyonso ete ‘boyebi.’ Na komonisáká motindo na [boyebi] wana, basusu basili kopɛngwa longwa na kondima.” (1 Timoté 6:20, 21, NW) “Boyebi” wana mpe ezali komonisa mateya ya bademó. Na ntango ya Paulo, yango emonanaki na makanisi ya lipɛngwi oyo basusu kati na lisangá bazalaki kopalanganisa. (2 Timoté 2:16-18) Na nsima, oyo ebéngamaki na lokuta nyonso ete boyebi, lokola gnosticisme (boyebi boleki na ntina na mabombami ya losambo) mpe filozofi ya Greke, ebebisaki lisangá. Lelo oyo, kati na mokili, athéisme (koboya kondima ete Nzambe azali), agnosticisme (kozanga kondima makambo maleki mayele na bato), mateya ya évolution, mpe kotyola Biblia ezali bandakisa ya oyo ebéngami na lokuta nyonso ete boyebi, ezali mpe bongo mpo na makanisi mauti na Makomami te, oyo epalanganisami na bapɛngwi ya mikolo na biso. Mbuma ya oyo ebéngami na lokuta nyonso ete boyebi ezali komonana kati na kobeba ya bizaleli malamu, na kopalangana ya kozanga limemya epai na bakonzi, na kozanga kolongobana, mpe na moimi oyo ezali komonana na ebongiseli ya biloko ya Satana.

Tókangama na mateya mauti na Nzambe

18. Banani bazali lelo koluka mateya mauti na Nzambe?

18 Atako Satana asili kotondisa mabelé na mateya ya bademó uta na Edene, ezalaki ntango nyonso na baoyo balukaki mateya mauti na Nzambe. Lelo oyo, bato yango bakómi bamilió. Kati na bango, tozali kokuta baklisto batikali bapakolami baoyo bazali na elikya ya solo ya koyangela elongo na Yesu kati na Bokonzi na ye ya likoló mpe ebele monene ya “bampate mosusu” oyo bazali na elikya ya kosangola mabelé oyo makoyangelama na Bokonzi yango. (Matai 25:34; Yoane 10:16; Emoniseli 7:3, 9) Lelo oyo, basangisami elongo kati na ebongiseli ya mokili mobimba oyo epai na yango maloba na Yisaya mazali kokokisama ete: “Bana na yo nyonso bakozala bato bateyami na Yehova, mpe kimya na bana na yo ekozala mingi.”​—Yisaya 54:13, NW.

19. Koteyama na Yehova elimboli nini?

19 Koteyama na Yehova esuki te bobele na boyebi ya mateya ya solo​—atako yango ezali na ntina. Yehova azali kolakisa biso lolenge ya kozala na bomoi, lolenge ya kosalela mateya mauti na Nzambe kati na bomoi na biso. Na ndakisa, tozali kotɛmɛla moimi, bizaleli ya mbindo, mpe elimo ya lipandá, oyo epalangani mingi kati na mokili zingazinga na biso. Toyebi malamu ete komipesa mobimba mpo na koluka bozwi ya mokili​—ezali komema na kufa. (Yakobo 5:1-3) Tóbosana soko moke te mateya mauti na Nzambe oyo mamonisamaki kati na maloba ya ntoma Yoane: “Bólingaka mokili te soko makambo kati na mokili te. Soki moto nani alingi mokili, bolingo na Tata bozali kati na ye te.”​—1 Yoane 2:15, NW.

20, 21. (a) Satana azali kosalela nini kati na milende na ye ya kokanga miso ya bato? (b) Mapamboli nini mazali kozwama epai na baoyo bazali kokangama na mateya mauti na Nzambe?

20 Bopusi ya mateya ya bademó likoló na baoyo bazali kozwama na yango emonisami kati na maloba ya Paulo epai na Bakolinti: “[Satana] asili koboma miso ya makanisi ya bato bazangi kondima, ete pole na nkembo ya nsango malamu na ntina na Klisto, oyo azali elilingi ya Nzambe, ekoka kongɛngɛla [bango] te.” (2 Bakolinti 4:4, NW) Satana alingi mpe kokangisa miso ya baklisto ya solo na motindo wana. Na Edene, asalelaki nyoka mpo na kozimbisa moko na basaleli ya Nzambe. Lelo oyo, azali kosalela makambo ya mobulu mpe ya mbindo oyo balakisaka na bafilime mpe na televizyó. Azali kosalela radio, babúku, mpe miziki. Ebundeli eleki na nguya oyo azali na yango ezali baninga mabe. (Masese 4:14; 28:7; 29:3) Ntango nyonso, tómilɛngɛla mpo na kososola myango mpe mateya ya bademó.

21 Omikundola ete maloba na Satana kati na Edene mazalaki lokuta; maloba ya Yehova nde mazalaki solo. Yango ebongwani te uta ntango wana. Satana amonani ntango nyonso ete azali mokosi, mpe mateya mauti na Nzambe mamonanaki na lolenge lobongi ete mazalaki solo. (Baloma 3:4) Soki tokangami na Liloba ya Nzambe, tokozala ntango nyonso na ngámbo oyo ezali kolónga na etumba kati na solo mpe lokuta. (2 Bakolinti 10:4, 5) Na bongo, tiká ete tózwa ekateli ya kobwaka mateya nyonso ya bademó. Na kosaláká bongo, tokoyika mpiko kino ntango etumba kati na solo mpe lokuta ekosila. Solo ekolónga. Satana akobomama, mpe bobele mateya mauti na Nzambe nde makoyokama na mabelé.​—Yisaya 11:9.

Okoki kolimbola?

◻ Ntango nini mateya ya bademó mabandaki koyokama mpo na mbala ya liboso?

◻ Wapi mwa makambo mosusu ya lokuta oyo Satana mpe bademó na ye bapalanganisaki?

◻ Kati na makambo nini Satana azali mpenza kosala mosala lelo oyo?

◻ Satana azali kosalela nini mpo na kopalanganisa mateya ya bademó?

◻ Mapamboli nini mazali kozwama na baoyo bakangami na mateya mauti na Nzambe?

[Elilingi na lokasa 9]

Mateya ya bademó mabandaki koyokama mpo na mbala ya liboso kati na elanga ya Edene

[Elilingi na lokasa 10]

Mateya mauti na Nzambe na ntina na lisiko mpe Bokonzi, mazali kopesa elikya bobele moko mpo na bato

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto