Bazwi ekateli ya kosalela Yehova!
“OKOBIMA te mpo na kosakola!” “Nalingi te ete bato wana báya awa!” Basi baklisto mingi bameseni koyoka makambo oyo mpe maloba lolenge yango ya botɛmɛli epai na mibali na bango. Kasi soki mibali yango bazali basodá, kondima ya basi na bango etyami mpenza na komekama. (Yisaya 2:4; Yoane 17:16) Bongo, lolenge nini basi wana baklisto basalaka mpo na komibatela makasi na elimo mpe kati na mosala ya Bokonzi?
Bosembo epai na Yehova Nzambe elongo na ekateli makasi ya bango moko ezali kosalisa bango na kolendendela. Yvonne, oyo azali mwasi ya sodá alimboli ete: “Nakanisi ete ezalaki bobele ekateli makasi ya ngai moko. Nayebaki ete makoki mazalaki mpo na kolónga botɛmɛli ya mobali na ngai.” Ya solo, makoki mazalaki.
Moklisto mosusu ya mwasi, oyo abalaki mokonzi moko ya basodá, alimboli lolenge nini etɛlɛmɛlo na ye makasi esalisaki nkutu mobali na ye. Alimboli ete, “Ayebaki manáka na ngai mpe oyo ya ye moko, mpe basodá balingaka lolenge yango.” Nzokande, mosala na ye mpo na Yehova oyo mosengelaki kolandana, mozalaki likambo ya pɛtɛɛ te.
Kolónga mokakatano ya kozala yo moko
Basi ya basodá bakutanaka na mikakatano ya komilɛngɛla nokinoki mpo na kolongwa esika bafandi, wana batindami mosika elongo na mibali na bango na bisika ya mosala. Bongo, wana bakómi na kartyé ya sika, ezalaka mpasi te ete bámiyoka ete bazali bango moko. Kasi ezalaka ntango nyonso bongo te. Basaleli ya Yehova bazali na libaku malamu mpenza. Ezali nini? Engebene ntoma moklisto Petelo, ezali “libota mobimba ya bandeko.” Lelo oyo na motuya ya bamilió, Batatoli ya Yehova kati na mikili 231, bazali kosala libota monene ya boklisto, “libota ya bandeko.” Okoki mpenza kokutana na bango bipai binso.—1 Petelo 2:17, maloba na nsé ya lokasa na Libongoli ya Mokili ya Sika (ebimeli ya Lingelesi).
Suzanne, alongwaki pwasa na mboka na ye, akómaki kofanda na Káa ya basodá oyo babundaka bitumba na nzela ya mpepo, na esika batindaki mobali na ye. Azalaki moto ya sika kati na kondima mpe azalaki kokutana na botɛmɛli ya mobali na ye oyo azali mondimi te, oyo azalaki kopusa ye ete atika kosangana na mosala ya kosakola; alobi ete: “Nakendeki nokinoki na makita na mboka wana, mpe kuna nafandaki mpe nasololaki elongo na bandeko basi mosusu. Nakoki mpenza koloba ete ezalaki baninga wana nde basalisaki ngai na kokangama ntango nyonso.”
Mbala mosusu, kozala yo moko ebimisaka mobulungano na makanisi. Ata bongo, nsango malamu epesaka elendiseli monene. Glenys, ndeko mwasi moko ya ekólo Angleterre akendeki elongo na mobali na ye epai batindaki ye na mikili ya bapaya, alobi ete: “Wana nabulunganaki mpenza, kozanga ete namizela na yango, mwasi moko oyo toyebanaki na ye eleki mibu mingi wana ngai moko nazalaki naino na mosala ya sodá, akomelaki ngai mokanda mpe ayebisaki ngai ete auti kozwa batisimo, mpe akómi Motatoli ya Yehova. Yango epesaki ngai elendiseli na ntango malamu.”
Jeanne, oyo akendeki elongo na mobali na ye na Kenya, amonaki ete makita ya boklisto mazalaki na ntina mingi, atako matambwisamaki na minoko oyo azalaki koyoka te. Alimbolaki ete: “Nayebaki ete ezalaki esika oyo Yehova alingaki ete nazala. Nazalaki elongo na bandeko na ngai, bazalaki elendiseli. Bayambaki ngai malamu, mpe nazalaki kooka ete tozali basangani ya libota moko.”
Jeanne azali bobele moko kati na bandeko mingi oyo bazali kati na ezalela lolenge yango, baoyo bakutanaki na bandeko ya elimo oyo bayebaki bango liboso te!—Malako 10:29, 30.
Kotikala ngwi liboso na mikakatano
Yesu apesi likebisi oyo ete: “Bokanisa tɛ ete nayei kotia kimia kati na mokili. Nayei kotia kimia tɛ kasi mopanga.” (Matai 10:34) Alingaki koloba nini? Ata kati na libota, epai kimya esengeli kozala, ekoki kosalema ete ‘mopanga mokwea pwasa,’ lolenge A. T. Robertson alimboli yango kati na búku Maloba ya bililingi kati na Kondima ya Sika (na Lingelesi). Yesu amonisaki ete: “[Ya solo, NW], bayini na moto bakojala bato na ndako na ye mɔkɔ.” (Matai 10:36) Maloba wana mazali mpenza solo, ntango moko na babalani azali kotɛmɛla solo!
Ntango Diane abandaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova, mobali na ye, oyo azalaki mokonzi na basodá oyo babundaka bitumba na nzela ya mpepo, asepelaki te. Yango ezalaki na bopusi nini likoló na boyokani na bango kati na libala? Diane alimboli ete: “Ezalaki lokola libangá ya ngalasi oyo etyami kati na biso. Tozalaki babalani ya esengo. Na pwasa, tokómaki bobele bafandi ya ndako moko.” Bongo, asalaki nini? “Endimiseli mpe ekateli ya makasi ya moto ye moko ezalaki likambo ya ntina, elongo na lisalisi ya Yehova mpe ya elimo na ye.” Diane atyaki kati na motema ndakisa ya mosakoli Danyele oyo elobelami kati na Biblia.
Ntango bamemaki ye na Babilone mpe bapesaki ye bilei oyo bibongi te na mosaleli na Nzambe kolya, Danyele “atiaki motema na komiyeisa mbindo na bilei kitɔkɔ na mokonji tɛ.” Ee, Danyele azwaki ekateli oyo ye ayebaki yango malamu. Azwaki ekateli kati na motema na ye ya komibebisa te na kolyáká bilei yango. Oyo nde bompíkílíkí amonisaki wana “alɔmbaki na kapita na mikube ete atika ye komibebisa tɛ”! Epesaki mbano nini? Yehova apambolaki etɛlɛmɛlo na ye ya ngwi.—Danyele 1:8, 9, 17.
Bobele bongo lelo, mobali oyo azali kotɛmɛla solo akoki kosɛnga na mwasi na ye na makasi ete atika koyangana na makita ya lisangá. Akosala nini? Jeanne amimonaki kati na ezalela yango. Alimboli ete: “Nazongaki nsima te mpo na botɛmɛli. Nayebaki ete nasengelaki kobebisa bosembo na ngai soko moke te. Nasengelaki komonisa mpenza ete makita mazali na motuya mingi mpo na ngai.” Yehova apambolaki ekateli na ye wana ya kolanda koyangana na makita.
Glenys ayebisi ete: “Mobali na ngai amekaki kopekisa ngai ete nakende na makita te, kasi yango eumelaki te. Natikaki kokende te. Na bozongi na ngai na ndako, mbala mosusu azalaki kobɛta ngai, mpe na bantango mosusu azalaki koboya kolobisa ngai.” Nzokande, alóngaki na kobondeláká ntango nyonso. Lisusu, bankulutu mibale ya lisangá bazalaki kobondela mbala na mbala elongo na ye, likambo yango lilendisaki ye mingi ete alanda koyangana na makita.—Yakobo 5:13-15; 1 Petelo 2:23.
Mbala mosusu, bakonzi ya mobali bakoki kolendisa ye na kopekisa mwasi na ye kosakola nsango malamu. Diane amonaki ete esengeli alimbola polele epai na mobali na ye makambo oyo mazali na ntina mingi mpo na ye. Alobi ete: “Namilɛngɛlaki mpo na kondima mikakatano ya mosala na ngai ya kosakola kozanga kotika.” Yango ezalaki mpenza lokola etɛlɛmɛlo ya bantoma! (Misala 4:29, 31) Nzokande, azalaki kosala mosala na ye ya kosakola na bokɛngi mpenza. Ayebisi ete: “Nazalaki na momeseno ya kobyanga baninga mpo na kosolola mpe komela kafé mpe nazalaki kopesa babyangami nyonso búku Solo.”—Matai 10:16; 24:14.
Botosi kozanga kobebisa bosembo
Atako batungisami na mikakatano ya libala, basi baklisto bazali kotalela mikolo mizali koya mpe bazali kotalela Yehova. Yango ezali kosalisa bango na kobatela ezaleli ya bokatikati. Bazali kosunga mibali na bango na makambo nyonso bakoki kosala kozanga kobebisa kondima na bango. Na kosaláká bongo, bazali kolanda toli ya Petelo, oyo epemami ete: “Bino basi, botosa babali na bino.” (1 Pɛtɛlɔ 3:1) Kati na búku The Amplified New Testament, mokapo wana ya ntoma mozali kotángama ete: “Bómisɔkisa bino mpenza lokola bato bazali na esika ya mibale mpe baoyo bakangami na bango, mpe bomiyokanisa na mitindo na bango.” Talá lolenge Jeanne alandaki toli wana. Alimboli ete: “Mobali na ngai ayebisaki ngai ete makambo oyo nazali kosala masengeli kobebisa mosala na ye te. Yango wana nalukaki myango ya kosunga ye.”
Basi baklisto basusu bandimaki kokende na milulu ya bilambo epai mibali na bango babyangamaki. Kasi ata bongo, bazwaki ekateli ya kobebisa kondima na bango soko moke te. Jeanne azwaki libaku ya kosolola na mobali na ye na ntina na likambo yango. Alimbolaki na boboto nyonso ete asepelaki kokende, kasi alingaki te ete kozala na ye kuna ebulunganisa mobali na ye. “Nayebaki malamu ete na bantango mosusu bato nyonso basengelaka kotɛlɛma mpe kotombola kɔ́pɔ. Nasili koyekola ete losambo esengeli kopesama bobele epai na Yehova, mpe kotombola kɔ́pɔ mpo na lokumu ya moto ezali bobele limemya mpamba te. Mobali na ngai asosolaki mikakatano oyo yango elingaki kobimisa, mpe alobaki bobele ete: ‘Koya te!’ Natosaki yango.”
Nzokande, Glenys azalaki kokende elongo na mobali na ye na milulu motindo yango, kasi azalaki kotala bakonzi oyo bafandi na nsuka ya mesa. Wana amonaki ete bazali komibongisa mpo na kotombola kɔ́pɔ, alongwaki malɛmbɛ kozanga kobenda likebi mpo na kokende na nsima! Ee, basi wana bamiyokanisaki na makambo bakutanaki na yango, kasi babebisaki bosembo na bango soko moke te.
“Bazwami na maloba te”
Yvonne akanisaki ete: “Soki nakólisi makoki na ngai ya mwasi ya libala, mobali na ngai akomona ete solo ezali kobongola ngai.” Mpo na yango, atángaki mpe azongelaki mbala mingi mokapo ya búku Libota ya esengo oyo elobi ete “Mwasi oyo akoki kolingama mingi na mobali na ye.”a “Natyaki likebi mingi na makambo mazali na motó ya likambo moke ‘Baoyo balelaka mpe batiaka makelele’! Kasi namonaki ete wana nazalaki komeka kosolola na mobali na ngai, makambo mazalaki sé kobeba.” Nzokande, na nsuka alóngaki kosalisa mobali na ye na kosalela Yehova. Lolenge nini? Na kosaleláká motindá moyebisami na 1 Petelo 3:1 (NW), ete mibali basengeli kozwama na maloba te.”
Lolenge oyo basi baklisto bazali kobatela mabota na bango ezali kosala mingi mpo na kotinda basusu ete bándima losambo ya boklisto. Diane ayebisi ete: “Namekaki kokómisa solo kitoko mpenza. Ntango nazalaki kokende na makita, mobali na ngai azalaki komiyoka ete atikami ye moko, mpo na yango nateyaki bana ete bámonisa bizaleli malamu wana tozali kokóma na ndako. Nazalaki mpe komeka kotyela ye likebi mingi soki tokómi na ndako.” Mokemoke mobali na ye abandaki kobongola makanisi wana azalaki kosepela na boboto oyo libota na ye lizalaki komonisela ye.
Basaleli mosusu ya Yehova bakoki mpe kosala oyo ekoki na bango. Jeanne ayebisi ete mobali na ye azalaki kosepela mingi na boninga elongo na bamisionere Batatoli oyo akutanaki na bango na Kenya. Alimboli ete: “Basalaki boninga elongo na ye mpe bazalaki kosolola na ntina na motope, mpe bazalaki na boyambi mingi. Na mabaku mosusu, tobyangamaki na bandako ekeseni ya bamisionere mpo na kolya.” Mobali na ye alimbolaki na nsima ete: “Nabandaki komona kondima ya Jeanne na lolenge mosusu mpenza. Baninga na ye nyonso bazalaki bato na mayele mingi oyo bazalaki kosolola na ntina na makambo makeseni.” Bobele bongo, mobali ya Diane abongolaki lolenge na ye ya kotalela solo. Ntango motuka oyo azalaki kokumba ebebaki, elenge Motatoli moko ayaki kosunga ye. Alobaki ete: “Yango ekamwisaki ngai.”
Ezali solo ete, babalani nyonso basukaka na kondima solo te. Bongo esengeli kosala nini? Yehova azali kopesa lisalisi oyo ekopesa nzela na basembwi ete bayika mpiko. (1 Bakolinti 10:13) Talá elendiseli oyo Glenys apesi na baoyo bazali kati na ezalela yango: “Kobeta ntembe ata moke te ete Yehova azali mobandisi ya libala mpe alingi ete babalani bázala esika moko. Mpo na yango ata likambo nini mobali akosala to botɛmɛli nini bokoki kouta na bato ya zingazinga na yo, Yehova akotika yo kotengatenga te.” Atako mobali na ye abandi naino kosambela Yehova te, kasi bizaleli na ye bisili kokóma kitoko epai na ye mpe epai na solo.
‘Kolóna na kolela; kobuka na esengo’
Ya solo, basi wana baklisto bazali na ekateli makasi ya kosalela Yehova. Soki ozali kati na ezalela lolenge yango, salá mpe ete yango ezala ekateli na yo. Kanisá elendiseli oyo ete: “Okobanga Yehova Nzambe na yo. Okosalela ye, mpe okokangama na ye.”—Deteronome 10:20, NW.
Mokomi na Nzembo alobi ete: “Ye oyo atamboli na kolela mpe anati nkona mpo na kokona, akobutwa sɔlɔ na konganga na esɛngɔ mpe akonata mbuma na ye.” (Njembo 126:6) Ndeko mwasi moko Motatoli andimaki yango, ete: “Okobimisa mpisoli mingi wana ozali komeka komonisa solo epai na mobalani na yo, ezala na ndakisa to na maloba. Kasi na nsuka okonganga na esengo, mpamba te ata soki andimi solo te, Yehova azali kopambola milende oyo ozali kosala.”
Baoyo nyonso bazali kosalela Yehova na bosembo nyonso atako bazali kokutana na botɛmɛli na ndako, babongi kokumisama. Babongi kozwa lisalisi mpe bolingo. Tiká ete bákangama na etɛlɛmɛlo na bango kozanga kobebisa bosembo na bango, awa ezali bango na ekateli ya kosalela Yehova!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ndenge nini okoki kozala na bomoi na libota ya esengo, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc. (1983).
[Elilingi na lokasa 28]
Baklisto basi bakoki kolendisa ekateli na bango na boyekoli mpe na mabondeli