Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/5 nk. 14-20
  • Basakoli ya Bokonzi bazali kosala kati na mabelé mobimba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Basakoli ya Bokonzi bazali kosala kati na mabelé mobimba
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Liboso na nsuka ya Ntango ya Bapakano
  • Kotyama ya Bokonzi esakolami na molende nyonso
  • Bopalanganisi na mabelé mobimba mafandami
  • Lolenge ya komema nsango malamu epai na bato mingi
  • Basakoli ya Bokonzi​​—Bato bamipesi na bolingo na bango moko
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Bokonzi ebotami na likoló
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/5 nk. 14-20

Basakoli ya Bokonzi bazali kosala kati na mabelé mobimba

“Bokozala batatoli na ngai . . . kino na eteni eleki mosika ya mabelé.”​—MISALA 1:8, NW.

1. Nsango nini oyo Yesu alobaki na bayekoli na ye ete básakola yango na mikolo na biso?

WANA alobelaki mosala oyo Yehova atindaki Mwana na ye awa na mabelé, Yesu alobaki ete: “Ekoki na ngai kosakola Nsango Malamu na Bokonji na Njambe na mboka mosusu lokola, mpɔ ete natindami na likambo yango.” (Luka 4:43) Bobele bongo, na ntango alobelaki mosala oyo bayekoli na ye basengelaki kosala awa na mabelé, na ntango oyo asengelaki kozonga kati na nguya nyonso ya bokonzi, Yesu alobaki ete: “Nsango malamu oyo ya Bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba mafandami mpo na litatoli epai na mabota nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.”​—Matai 24:14, NW.

2. (a) Mpo na nini ezali likambo ya ntina mingi ete nsango ya Bokonzi eyebisama mingi mpenza? (b) Motuna nini biso banso tosengeli komituna?

2 Mpo na nini nsango ya Bokonzi ya Nzambe ezali na ntina mingi? Mpo na nini Bokonzi esengeli koyebisama mingi boye? Mpo ete ezali Bokonzi ya Masiya nde ekolóngisa boyangeli ya Yehova na molɔ́ngɔ́ mobimba. (1 Bakolinti 15:24-28) Na nzela na yango, Yehova akoyeisa kosambisa na ye likoló na ebongiseli ya ntango oyo ya biloko ya Satana mpe akokokisa elaká na ye ya kopambola mabota nyonso ya mabelé. (Genese 22:17, 18; Danyele 2:44) Kosaláká ete litatoli lipesama na ntina na Bokonzi, Yehova azwaki bato oyo apakolaki na nsima ete bázala basangoli ya libula elongo na Mwana na ye. Na nzela ya mosala ya kosakola Bokonzi, mosala ya bokaboli mozali mpe kokokisama lelo oyo. (Matai 25:31-33) Yehova alingi ete bato ya mabota nyonso báyeba mikano na ye. Alingi ete bázwa libaku ya kopona kozala bato ya Bokonzi na ye. (Yoane 3:16; Misala 13:47) Ozali kosangana mingi mpenza kati na mosala wana ya kosakola Bokonzi?

Liboso na nsuka ya Ntango ya Bapakano

3. (a) Likambo nini libongi mpenza oyo C. T. Russell amonisaki na ebandeli ya mobembo mpo na kobongisa bituluku ya boyekoli ya Biblia? (b) Bayekoli ya Biblia ya liboso basalaki nini mpo na esika oyo Bokonzi ya Nzambe esengelaki kozala kati na bomoi na bango?

3 Soki tozongi nsima na mobu 1880, Charles Taze Russell, mokomi wa yambo wa zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, asalaki mobembo kino na Nɔ́rdi-Ɛ́sti ya Etats-Unis mpo na kolendisa kosalema ya bituluku ya boyekoli ya Biblia. Na motindo mobongi mpenza, lisukúlu oyo asalaki ezalaki “Makambo kitoko mpo na Bokonzi ya Nzambe.” Lokola yango elakisami kati na banimero ya liboso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, Bayekoli ya Biblia (nkombo oyo Batatoli ya Yehova bayebanaki na yango) basosolaki ete mpo na kondimama ete babongi kozala kati na Bokonzi ya Nzambe, basengelaki kotya Bokonzi na esika ya liboso, kosalela bomoi na bango, makoki na bango, mpe bozwi na bango na esengo nyonso mpo na misala ya Bokonzi. Makambo nyonso mosusu mazalaki na esika ya mibale kati na bomoi. (Matai 13:44-46) Mokumba na bango mosangisaki mpe kosakwela basusu nsango malamu na ntina na Bokonzi ya Nzambe. (Yisaya 61:1, 2) Na meko nini basalaki yango liboso na nsuka ya Ntango ya Bapakano, na 1914?

4. Liboso ya mobu 1914, etuluku moke ya Bayekoli ya Biblia bakabolaki mikanda mikolimbolaka Biblia kino na etando nini?

4 Kobanda mobu 1870 kino mobu 1914, Bayekoli ya Biblia bazalaki mpenza moke. Na 1914, bobele bato soko 5 100 nde bazalaki kosangana na molende nyonso mpo na kopesa litatoli epai na bato banso. Kasi, ezalaki mpenza litatoli monene! Na 1881, bobele mibu mibale na nsima na kobima ya nimero ya liboso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, bakabolaki Food for Thinking Christians, búku ya nkasa 162. Nsima ya mwa basanza, bakabolaki babúku 1 200 000. Na boumeli ya mwa bambula, bankóto mingi ya batrakte ekabolamaki mbula na mbula kati na minoko mingi.

5. Banani bazalaki bamemi na nsango malamu, mpe bamonisaki elimo nini?

5 Lisusu, na ebandeli ya mobu 1881, basusu basalaki mosala ya bamemi-bapalanginisi na nsango malamu (colporteurs évangelisateurs). Bango bazalaki bafungoli-nzela (précurseurs) mpo na baoyo babéngami lelo ete babongisi-nzela (bapalanganisi nsango malamu na ntango nyonso). Bamoko kati na bamemi-nsango wana bazalaki kotambola na makolo to na nkínga, kopesáká litatoli na bisika mingi ya penepene na mokili oyo bazalaki kofanda. Basusu bakendaki kino na bilanga ya mboka-mopaya mpe bazalaki bato ya liboso mpo na komema nsango malamu na bisika lokola Finlande, Barbade, mpe Burmanie (lelo oyo Myanmar). Bamonisaki molende ya mosala ya misionere lokola oyo Yesu Klisto mpe bantoma na ye bamonisaki yango.​—Luka 4:43; Baloma 15:23-25.

6. (a) Kino epai wapi ndeko Russell asalaki mibembo mpo na kopalanganisa nsango ya Biblia? (b) Nini ezalaki lisusu na litomba mingi mpo na kobakisa mosala ya kosakola nsango malamu na bilanga ya mboka-mopaya liboso ya nsuka ya Ntango ya Bapakano?

6 Ndeko Russell asalaki mibembo milai mpo na kopalanganisa solo. Akendaki na Canada mbala na mbala; asakolaki na Panama, na Jamaïque, mpe na Cuba; asalaki koleka mibembo zomi na mikili ya Mpótó; mpe atambolaki na mokili mobimba mpo na kopalanganisa nsango malamu. Atindaki mpe mibali mosusu mpo na kotambwisa mpe kokamba mosala ya kosakola nsango malamu na bilanga ya mboka-mopaya. Adolf Weber atindamaki na mikili ya Mpótó na katikati ya bambula 1890, mpe mosala na ye mokokisamaki longwa na Suisse kino na France, na Italie, na Allemagne, mpe na Belgique. E. J. Coward atindamaki nokinoki na mikili ya Antilles. Robert Hollister atindamaki na mikili ya Orient, na mobu 1912. Na ntango wana, batrakte ya ntina mingi ebongisamaki kati na minoko zomi, mpe bamilió na yango epalanganisamaki na bipai binso ya Inde, ya Chine, ya Japon, mpe ya Corée na bato ya mikili oyo. Soki ozalaki na eleko wana, motema na yo mbɛlɛ mopusaki yo na kosala milende makasi mpo na koyebisa nsango malamu epai na bato ya mboka na yo mpe kokenda na mboka mosika mpo na yango?

7. (a) Lolenge nini bazulunalo esalelamaki mpo na kobakisa mosala ya kopesa litatoli? (b) “Fɔtɔ́ ya Lisano-liteya ya bozalisi” ezalaki nini, mpe lolenge nini bato mingi batalaki yango bobele na mobu moko?

7 Lokola Ntango ya Bapakano ekómaki na nsuka na yango, bazulunalo esalelamaki mpo na kobimisa masoló ya Biblia oyo masalemaki na ndeko Russell. Likebi na yango lityamaki mingi te likoló ya mobu 1914, kasi likoló na mokano ya Nzambe mpe likoló na bosolo ya kokokana na yango. Soko bazulunalo 2 000 na mbala moko, oyo ezalaki kokómela batángi 15 000 000, ezalaki kolakisa masoló yango mbala na mbala. Bongo, na ebandeli ya mobu 1914, la Société abandaki kolakisa bililingi na yango ya “Fɔtɔ́ ya Lisano-liteya ya bozalisi” (Photo-Drame de la création). Na biteni minei oyo moko na moko eumelaki ngonga mibale, elakisaki masoló ya Biblia longwa na bozalisi kino na eleko ya Mbula Nkóto. Bobele nsima ya mobu moko, elakisamaki koleka mbala milió libwa na Amerika ya Nɔ́rdi, na Mpótó, na Australie, mpe na Nouvelle-Zélande.

8. Na 1914, Bayekoli ya Biblia bamemaki nsango malamu kati na mikili boni?

8 Na kotatela matomba oyo mamonanaki na eteni ya nsuka ya mobu 1914, etuluku wana ya molende epalanganisaki mosala na bango ya kosakola Bokonzi ya Nzambe kati na mikili 68.a Kasi, wana ezalaki bobele ebandeli.

Kotyama ya Bokonzi esakolami na molende nyonso

9. Na liyangani ya Cedar Point, lolenge nini mosala ya kopesa litatoli ya Bokonzi mozwaki molende mingi koleka?

9 Wana Bayekoli ya Biblia bayanganaki na Cedar Point, na 1919, J. F. Rutherford, oyo azalaki bongo prezidá ya la Société Watch Tower, alobaki ete: “Mokumba na biso ezali koyebisa koya na nkembo ya Bokonzi ya Masiya.” Na liyangani ya mibale na Cedar Point, na 1922, ndeko Rutherford angɛngisaki likambo oyo ete na nsuka ya Ntango ya Bapakano, na 1914, ‘Mokonzi oyo akembisami asilaki kozwa nguya na ye monene mpe abandaki koyangela.’ Na nsima, amonisaki polele epai na bayoki na ye, mokumba oyo bazalaki na yango, ete: “Bondimi ete Mokonzi oyo akembisami asili kobanda boyangeli na ye? Boye, bózonga na elanga, Ɛ bino bana ya Nzambe oyo aleki likoló! . . . Bómema nsango bipai binso. Mokili mosengeli koyeba ete Yehova azali Nzambe mpe ete Yesu Klisto azali Mokonzi ya bakonzi mpe Nkolo ya bankolo. Oyo ezali mokolo moleki monene. Bótala! Mokonzi azali koyangela. Bozali balobeli na ye.”

10, 11. Lolenge nini radio, bavuatire na bikóliseli-loláká, mpe bilamba bizalaki na makomi esalelamaki mpenza mpo na komema solo ya Bokonzi epai na bato?

10 Esili koleka mibu 70 uta mayangani wana ya Cedar Point masalemaki​—soko mibu 80 uta Yehova abandaki komonisa boyangeli na ye na nzela ya Bokonzi ya Masiya, Mwana na ye. Kino na etando nini Batatoli ya Yehova bazali lelo kokokisa mosala oyo bazwi kati na Liloba ya Nzambe? Na meko nini ozali mpenza kosangana na yango?

11 Na ebandeli ya bambula 1920, radio ekómaki esaleli ya malamu oyo esalelamaki mpo na koyebisa nsango ya Bokonzi na bipai binso. Na boumeli ya bambula 1930, masukúlu ya liyangani oyo mamonisaki Bokonzi lokola elikya ya mokili oyo, epalanganisamaki na nzela ya ba stations ya radio to bipanzelo bikomemaka nsango na bikólo mosusu mpe na telefone oyo etongisamaki na mikili mingi. Bavuatire oyo ezalaki na bikóseli-loláká (haut-parleurs) esalelamaki mpe mpo na koyokisa masoló ya Biblia na bisika ya bato mingi. Bongo, na 1936, na engumba Glasgow, na Ecosse, mpo na mbala ya liboso, bandeko na biso babandaki kolata bilamba bizalaki na makomi na ntango bazalaki kotambola na bisika minene ya bitúká mpo na koyebisa mitó ya makambo ya masukúlu ya bato banso. Nyonso wana ezalaki mpenza myango ya kopesa litatoli epai na bato mingi na ntango oyo motuya na biso mozalaki naino moke.

12. Lokola Makomami mamonisi yango, wapi moko na myango mileki malamu mpo na moko na moko kati na biso mpo na kopesa litatoli?

12 Ya solo, Makomami mamonisi polele ete lokola tozali baklisto, moko na moko azali na mokumba ya kopesa litatoli. Tokoki te kotika bobele bazulunalo to baradio ésala mosala. Bankóto mingi ya baklisto ya sembo​—mibali, basi, mpe bilenge​—basili kondima mokumba yango. Na bongo, kosakola ndako na ndako esili kokóma elembo monene ya Batatoli ya Yehova.​—Misala 5:42; 20:20.

Bopalanganisi na mabelé mobimba mafandami

13, 14. (a) Mpo na nini Batatoli mosusu bazali kokende na bamboka mosusu, ata na mikili misusu, mpo na kokólisa mosala na bango ya kosakola? (b) Lolenge nini kozala na bolingo mpo na bato ya mboka oyo obotami esalisaki mpo na kopalanganisa nsango malamu?

13 Lokola bayebi ete nsango ya Bokonzi esengeli kosakolama na mabelé mobimba mafandami, bamoko na Batatoli ya Yehova bazali kotalela lolenge oyo bakoki mpenza kopalanganisa yango na bitúká misusu mosika na mboka na bango.

14 Bato mingi bayekolaki solo nsima na kokenda mosika na mboka na bango mpenza. Atako bakendaki mpo na matomba ya mosuni, bazwaki eloko oyo eleki motuya, mpe basusu bamoni malamu kozonga na mokili to na mboka oyo babotamaki mpo na koyebisa solo. Yango wana, na ebandeli ya ekeke oyo, mosala ya kosakola nsango malamu epalangani kati na Scandinavie, na Grèce, na Italie, na mikili ya Mpótó ya Ɛ́sti, mpe bitúká mingi mosusu. Ata sikawa, na bambula 1990, sango ya Bokonzi ezali kokóla na motindo moko.

15. Na boumeli ya bambula 1920 mpe 1930, likambo nini likokisamaki na baoyo bazalaki na ezaleli lokola oyo elobelami na Yisaya 6:8?

15 Kosaleláká toli ya Liloba ya Nzambe na bomoi na bango, basusu bandimaki kokende kosala mosala na bisika oyo bakómá naino te. Brown (oyo abéngamaki mbala mingi ete “Brown Biblia”) azalaki moko na bango. Na 1923, mpo na kokólisa mosala ya kopalanganisa nsango malamu, atikaki esanga Trinité mpo na kokende na Wɛ́sti ya Afrika. Na boumeli ya bambula 1930, Frank mpe Gray Smith, Robert Nisbet, mpe David Norman bazalaki kati na baoyo bamemaki nsango ya Bokonzi epai na ɛ́sti ya Afrika. Basusu bapesaki lisungi mpo na kolóna elanga ya Amerika ya Súdi. Na ebandeli ya bambula 1920, George Young, moto ya Canada, asalaki mosala na Argentine, na Brésil, na Bolivie, na Chili, mpe na Pérou. Juan Muñiz, oyo azalaki liboso na Espagne, alekaki nsima na Argentine, na Chili, na Paraguay, mpe Uruguay. Bango banso bamonisaki elimo ekokani na oyo elobelami na Yisaya 6:8, ete: “Ngai oyo: Tinda ngai!”

16. Bamboka nini oyo ezalaki lisusu bisika bisalelamaki mingi mpo na kopesa litatoli na mibu mizalaki liboso ya etumba?

16 Mosala ya kosakola nsango malamu ezalaki kopalangana ata na bitúká bitangwi mosika. Masuwa oyo matambwisamaki na Batatoli makendaki na banganda minene ya Terre-Neuve (na Canada), na Norvège kino na mai monene Artique, na bisanga ya Pacifique, mpe na mabóngo ya Súdi-Ɛ́sti ya Azia.

17. (a) Na 1935, Batatoli bakómaki kati na mikili boni? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete mosala mosilaki naino te na eleko wana?

17 Na kokamwa nyonso, na mobu 1935, Batatoli ya Yehova basakolaki na molende kati na mikili 115, mpe bakómaki na mikili misusu 34 na kopesáká litatoli na nzela ya mikanda to na kotinda nkomá na nzela ya pósita. Atako bongo, mosala mosilaki naino te. Na mobu wana, Yehova azipolaki miso na bango mpo na mokano na ye ya koyanganisa “ebele monene” oyo ekozala na bomoi kati na mokili ya sika. (Emoniseli 7:9, 10, 14) Ezalaki mpenza mosala monene ya kopesa litatoli oyo esengelaki kokokisama.

18. Kati na mosala ya kosakola Bokonzi, misala nini mikokisamaki na Eteyelo ya Galadi mpe Eteyelo mpo na Kobongisa Basungi?

18 Ata na ntango oyo Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki kopalangana na mabelé mpe yango epekisaki mikanda mpe mosala ya Batatoli ya Yehova na mikili mingi, Galadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower efungwamaki mpo na kobongisa bamisionere ete bákokisa mosala monene ya kosakola Bokonzi na mokili mobimba. Na ntango wana, baoyo bazwaki mapɔlɔ́mi ya Galadi batindamaki kati na mikili 200. Bakabolaki bobele mikanda te, kasi basalelaki mpe mwango mosusu. Batambwisaki boyekoli ya Biblia, babongisaki masangá, mpe bayekolisaki bato lolenge ya komema mikumba ya teokrasi. Kala mingi te, bankulutu mpe basaleli na misala oyo bazwaki mapɔlɔ́mi na Eteyelo mpo na Kobongisa Basungi (Ecole de formation ministérielle) basalisaki mpo na kokokisa bamposa ya mosala wana kati na mokili mobimba. Moboko makasi mosilaki kotyama mpo na kolanda kokóla.​—Kokanisá 2 Timoté 2:2.

19. Na meko nini basaleli ya Yehova bayanolaki na libyangi ya kosala na bitúká oyo mposa ezali monene?

19 Ekokaki na basusu ete bápesa lisungi mpo na kosala na bateritware oyo esalelamaki naino te. Na 1957, mayangani ya mokili mobimba malendisaki moto na moto mpe mabota ya Batatoli ya Yehova oyo bakomélí ete bátalela likambo ya kokende na bitúká oyo mposa ezali mingi mpo na kofanda kuna mpe kokokisa mosala na bango kuna. Libyangami lizalaki lolenge moko na oyo Nzambe asalaki epai na Paulo, oyo ye amonaki mobali moko kolɔmba ye kati na emonaneli ete: “Yaka na Makɛdɔnia kosunga biso!” (Misala 16:9, 10) Mingi bakendeki na boumeli ya bambula 1950, basusu balandaki na nsima. Bankóto mingi ya Batatoli bakendeki na Irland mpe na Colombie lokola; bankámá bakendeki na bisika mingi mosusu. Bankóto na nkóto bakendeki na bitúká oyo bizalaki na mposa kati na mokili na bango mpenza.​—Nzembo 110:3.

20. (a) Uta 1935, likambo nini lisalemaki kati na kokokisama ya esakweli ya Yesu oyo ezwami na Matai 24:14? (b) Na boumeli ya mwa mibu oyo milekaki, lolenge nini yango ekólisaki mosala na lombango?

20 Na lipamboli ya Yehova likoló na libota na ye, mosala ya kosakola Bokonzi mozali kolanda kokóla na lolenge ya kokamwa. Kobanda 1935, motuya ya basakoli mosili kobakisama koleka mbala mwambe, mpe kobakisama na motuya ya babongiseli-nzela ezali ya 60 kati na monkámá, koleka kobakisama kati na motuya ya basakoli. Boyekoli ya Biblia na ndako ebandaki kotambwisama na boumeli ya bambula 1930. Sikawa mwayene ezali ya milió minei na ndambo mpo na boyekoli ya Biblia oyo etambwisami sanza na sanza. Uta bambula 1935, bangonga koleka bamiliare 15 esili kolekisama kati na mosala ya kosakola Bokonzi. Mosala ya kosakola nsango malamu mbala na mbala mokokisami lelo kati na mikili 231. Lokola bateritware ya Mpótó ya Ɛ́sti mpe ya Afrika esili kofungolama mpo na bonsomi ya kosakola nsango malamu, mayangani ya mokili mobimba mazali kosalema mingi mpo na koyebisa nsango ya Bokonzi epai na bato mingi. Lokola Yehova alakaki uta kala, na Yisaya 60:22, azali mpenza ‘koyeisa mosala mbango na ntango na yango.’ Oyo nde libaku malamu mpo na biso na kosangana kati na yango!

Lolenge ya komema nsango malamu epai na bato mingi

21, 22. Biso moko tokoki mpenza kosala nini mpo na kozala Batatoli basɛlingwi epai tozali kosala?

21 Nkolo alobi naino te ete mosala mosili. Bankóto mingi bazali naino kondima losambo ya solo. Kasi motuna motunami ete, Tozali kosala nyonso mpo na kosalela ntango oyo Yehova, na motema pɛtɛɛ na ye, apesi nzela mpo na kosala mosala yango?​—2 Petelo 3:15

22 Ezali bato banso te nde bakokende na teritware oyo esalelami mingi te. Kasi yo ozali kosalela mabaku oyo mamonani na yo? Ozali kopesa litatoli epai na baninga ya mosala? Epai na balakisi mpe baninga ya kelasi? Osili komibongisa mpo na komimesenisa na mbongwana ya makambo ya teritware na yo? Soki bobele bato moke nde bazali na ndako na moi mpo na mbongwana na ngonga ya mosala, osili kobongola manáka na yo mpo na kokende kotala bango na mpokwa? Soki bandako na biteni mingi na likoló (buildings) ekoingisaka bapaya kati na yango te, ozali kopesa litatoli na nzela ya telefone to na kotinda nkomá na pósita? Ozali kolanda mposa emonisamaki mpe kosɛnga kotambwisa boyekoli ya Biblia? Ozali mpenza kokokisa mosala na yo mobimba?​—Kokanisá na Misala 20:21; 2 Timoté 4:5.

23. Lokola Yehova azali kotalela lolenge tozali kokokisa mosala na ye, eloko nini esengeli komonana epai na biso?

23 Tika ete biso banso tókólisa mosala na biso mpo na komonisa polele epai na Yehova ete tozali kosepela na libaku kitoko ya kozala Batatoli na ye na ntango oyo malamu. Tika tósimba libaku na biso ya komona lolenge oyo Yehova akokokisa bikateli na ye likoló ya ebongiseli mabe oyo enuni mpe kobandisa boyangeli ya nkembo ya Mbula Nkóto ya Yesu Klisto!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Engebene lolenge oyo mabelé makabolamaki na ebandeli ya bambula 1990.

Bozongeli

◻ Mpo na nini mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi mozali na ntina mingi?

◻ Kino na etando nini nsango malamu esakolamaki liboso ya mobu 1914?

◻ Na nguya nini litatoli lipesamaki uta kotyama ya Bokonzi?

◻ Nini ekoki kosala ete bosangani na biso kati na mosala ya kosakola ebota mbuma mingi?

[Etanda na lokasa 16, 17]

BATATOLI YA YEHOVA BASAKOLI YA BOKONZI YA NZAMBE

Na mayangani mingi oyo masalemi na mokili mobimba na boumeli ya 1993-1994, bayebisaki kobima ya búku ya sika na motó ya likambo Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu. Yango ezali mokanda ya lisoló mobimba ya Batatoli ya Yehova oyo ezali mpenza kotonga. Ezali búku ya nkasa 752, ekomami na lolenge kitoko, elongo na bililingi koleka nkóto oyo eutaki longwa na mikili 96 mikeseni. Esili kobimisama kati na minoko [25​—na nsuka ya mobu 1993] mpe ezali kobongolama kati na minoko mingi mosusu.

Mpo na nini búku yango eyei na ntango na yango? Na bambula oyo euti koleka, bamilió ya bato na mokili mobimba basili kokóma Batatoli ya Yehova. Bango banso basengeli kozala na boyebi malamu na ntina na lisoló ya ebongiseli oyo basangani kati na yango. Lisusu, mosala na bango ya kosakola mpe lolenge ya losambo na bango esili koingela kati na bituluku ya bikólo mpe mposo ya mokili mobimba, mpe esili koyambama na bilenge mpe mikóló ya motindo nyonso na bato. Mpo na yango, bato mingi oyo bazali komona makambo oyo mazali kosalema bazali komituna mituna na ntina na Batatoli​—bobele mpo na bindimeli na bango te, kasi lisusu na ntina na ebandeli na bango, lisoló na bango, ebongiseli na bango, mikano na bango. Basusu bazali kokoma mikanda na ntina na bango na kozanga koponapona. Nzokande, moto moko te ayebi malamu lisoló ya Batatoli ya Yehova ya ntango na biso koleka Batatoli bango mpenza. Bakomi ya búku yango basalaki makasi mpo na komonisa lisoló yango na mokano mpe na motindo na sembo. Bongo, bakomaki mpo na kokokisama kino lelo oyo ya likambo moko na elembo ya kozala ya Klisto oyo elobelami na Matai 24:14, mpe bapesi bandimbola mingi mpo na yango, oyo ekokaki kopesama bobele na baoyo bamipesaki mpenza kati na mosala wana mosakolamaki.

Búku yango ekabolami na biteni nsambo:

Eteni 1: Ndambo oyo ezali kotalela makambo na kala ya Batatoli ya Yehova. Elobeli makambo na bokuse mpe na lolenge ya kotonga na lisoló ya Batatoli ya Yehova ya ntango na biso uta 1870 kino 1992.

Eteni 2: Awa ezali botaleli bozindo ya bokóli ya mokemoke ya bindimeli oyo bikesenisi Batatoli ya Yehova na mangomba mosusu.

Eteni 3: Ndambo oyo ya búku ezali komonisa bokóli ya makambo ya ebongiseli na bango. Ezali koyebisa makambo kitoko matali makita na bango ya lisangá mpe mayangani, mpe lolenge oyo bazali kotonga Bandako ya Bokonzi, Bandako ya Mayangani minene, mpe bandako ya bamasini mpo na kobimisa mikanda mikolimbolaka Biblia. Ezali komonisa molende oyo Batatoli ya Yehova bazali kosakola Bokonzi ya Nzambe mpe bolingo oyo bozali komonana wana bazali kosungana na ntango ya mpasi.

Eteni 4: Awa, okokuta bandimbola kitoko likoló na lolenge oyo mosala ya kosakola Bokonzi ya Nzambe ekómaki na mikili minene mpe lolenge eingelaki na bisanga mosika ya mokili mobimba. Kanisá naino​—na mobu 1914, mosala ya kosakola mosalemaki na mikili 43, nzokande na 1992, ezali kati na mikili 229! Masoló ya baoyo basanganaki na bokóli wana na mokili mobimba ezali mpenza kosepelisa mitema.

Eteni 5: Mpo na kokokisa mosala wana ya kosakola Bokonzi, esengelaki kobakisa bamasini na mokili mobimba mpo na kobimisa Biblia mpe mikanda mikolimbolaka Biblia na minoko koleka nkámá. Awa, okoyeba makambo matali lolenge oyo ya mosala na bango.

Eteni 6: Batatoli bakutanaki mpe na mimekamo​—mosusu euti na kozanga kokoka ya biso bato, mosusu mpo na bandeko ya lokuta, mpe mosusu mpo na minyoko makasi. Liloba ya Nzambe lisilaki koyebisa ete esengelaki kozala bongo. (Luka 17:1; 2 Timoté 3:12; 1 Petelo 4:12; 2 Petelo 2:1, 2) Eteni oyo ya búku ezali koyebisa lolenge makambo malekaki na sikisiki mpe lolenge nini kondima ya Batatoli ya Yehova esalisaki bango na kolónga.

Eteni 7: Mpo na kosukisa, búku wana elobeli ntina oyo Batatoli ya Yehova bandimisami mpenza ete ebongiseli oyo bazali kati na yango ekambami solo na Nzambe. Elobeli mpe mpo na nini, bango banso lokola ebongiseli to moto na moto, bamoni ntina ya kosɛnzɛla.

Lisusu, búku oyo ezali kobenda likebi ya bato ezali nkasa 50 oyo ezali na bililingi kitoko ya langi mingi oyo emonisi biro monene ya mokili mobimba mpe bandako ya bafiliale oyo esalemi na Batatoli ya Yehova na mokili mobimba.

Soki osali naino bongo te, okosepela mpenza na kozwa búku wana kitoko mpe kotánga yango.

Maloba ya bamoko na baoyo basili kotánga yango

Baoyo basilaki kotánga búku wana bazali na mayoki? Mwa moke ezali awa:

“Nauti kosilisa kotánga búku oyo kitoko mpe ya makambo mabongi: Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu. Bobele ebongiseli na sembo mpe na komikitisa oyo emipesi na solo nde ekoki kokoma mokanda na kozanga kobomba makambo, na mpiko nyonso, mpe mayoki nyonso.”

“Ekomami lokola mokanda ya Misala, na kolɔngɔbana mpe na bosembo.”

“Oyo nde mokanda ya sika oyo mozali mpenza kobenda likebi! . . . Ezali mokanda moleki kitoko oyo molobeli makambo na kala.”

Nsima na kotánga ndambo ya búku wana, mobali moko alobaki ete: “Naokaki nsɔ́mɔ, nabulunganaki na makanisi, mpe nalingaki kotangisa mpisoli. . . . Uta nabotami, mokanda moko te esili kolamwisa mayoki na ngai motindo boye.”

“Nazali ntango nyonso na esengo soki nakanisi lolenge oyo búku wana ekolendisa kondima ya bilenge mpe bato ya sika oyo bazali lelo koya kati na ebongiseli.

“Nazali ntango nyonso kosepela na solo, kasi botángi ya búku esili kofungola miso na ngai mpe esalisi ngai na komona malamu mpenza ete elimo santu ya Yehova ezali nsima ya makambo nyonso wana.”

[Bililingi na lokasa 18]

Bato mingi bayokaki nsango ya Bokonzi wana motuya ya Batatoli mozalaki naino moke

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto