Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/5 nk. 21-26
  • Mpo na nini Batatoli ya Yehova bazali kolanda kosɛnzɛla

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini Batatoli ya Yehova bazali kolanda kosɛnzɛla
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bayekoli ya liboso bamonisaki ete bazalaki kosɛnzɛla
  • Baoyo batikaki kosɛnzɛla
  • Makambo mauti na kozanga kosɛnzɛla
  • Lolenge oyo bazalaki kosɛnzɛla
  • Ozali kolanda kosɛnzɛla?
  • Bokonzi ebotami na likoló
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Tólanda ndakisa ya Yesu—Tósɛnzɛlaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • “Bókɛngɛlaka”—Ngonga ya kosambisa eyei!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • “Bókɛngɛlaka”!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/5 nk. 21-26

Mpo na nini Batatoli ya Yehova bazali kolanda kosɛnzɛla

“Bólanda kosɛnzɛla mpo ete boyebi te soko mokolo nini Nkolo na bino azali koya.”​—MATAI 24:42, NW.

1. Toli ya “kolanda kosɛnzɛla” etaleli banani?

TOLI oyo ya Biblia, ete: “Bólanda kosɛnzɛla,” etaleli basaleli nyonso ya Nzambe​—bilenge soko mikóló, baoyo bauti komipesa na Nzambe soko baoyo baumeli mingi na mosala. (Matai 24:42) Mpo na nini ezali na ntina?

2, 3. (a) Elembo nini Yesu amonisaki yango polele, mpe kokokisama ya esakweli emonisaki likambo nini? (b) Likambo nini lilobelami na Matai 24:42 oyo ezali komeka bosolo ya kondima na biso, mpe lolenge nini?

2 Pene na nsuka ya mosala na ye awa na mabelé, Yesu asakolaki elembo ya kozala na ye ezangi komonana kati na nguya ya Bokonzi. (Matai, Mokapo 24 mpe mokapo 25) Amonisaki polele ntango ya kozala na ye lokola Mokonzi​—mpe makambo matali kokokisama ya esakweli mamonisi ete atyamaki lokola Mokonzi na 1914 kati na makoló. Alobelaki lisusu likambo moko oyo lisengelaki bongo komeka bosolo ya kondima na biso. Yango etalelaki ntango oyo asengelaki kokokisa mosala lokola Mobomi mpo na kobebisa ebongiseli mabe ya ntango oyo, na eleko ya bolózi monene oyo Yesu alobaki, ete: “Mpo na mokolo mpe ngonga yango, moto moko te ayebi [yango], ézala baanzelu ya likoló te soko Mwana te, kasi bobele Tata.” Ezalaki na likanisi wana nde alobaki ete: “Boye, bólanda kosɛnzɛla mpo ete boyebi te soko mokolo nini Nkolo na biso azali koya.”​—Matai 24:36, 24, NW.

3 Likambo oyo ete toyebi mokolo te mpe toyebi ngonga te oyo bolózi monene ekobanda, esɛngi biso baoyo tokolobaka ete tozali baklisto, tózala na bomoi lokola baklisto ya solo mokolo na mokolo. Lolenge oyo ozali kosalela bomoi na yo ekosala ete óndimama na Nkolo na ntango bolózi monene ekoya? To soki okufi liboso, akomikundola mpo na yo lokola moto na sembo oyo asalelaki Yehova kino nsuka ya bomoi na ye?​—Matai 24:13; Emoniseli 2:10.

Bayekoli ya liboso bamonisaki ete bazalaki kosɛnzɛla

4. Tozali koyekola nini na ndakisa ya Yesu na ntina na kosɛnzɛla kati na elimo?

4 Yesu Klisto ye moko asili kotika ndakisa malamu ya kosɛnzɛla kati na elimo. Azalaki kobondela Tata na ye mbala na mbala mpe na mayoki nyonso. (Luka 6:12; 22:42-44) Wana azalaki kokutana na mimekamo, azalaki kotalela Makomami na mozindo mpo na kozwa litambwisi lizwami kati na yango. (Matai 4:3-10; 26:52-54) Amitikaki te kopɛngwisama longwa na mosala oyo Yehova apesaki ye. (Luka 4:40-44; Yoane 6:15) Baoyo bazalaki komitalela lokola bayekoli ya Yesu basengelaki mpenza kosɛnzɛla lolenge moko?

5. (a) Mpo na nini bantoma ya Yesu bazalaki na mokakatano mpo na kobatela bokatikati ya elimo? (b) Lisalisi nini Yesu apesaki bantoma na ye nsima na lisekwa na ye?

5 Na nsima, ata bantoma ya Yesu mpe balɛmbaki. Mpo na motema likoló mpe mpo na makanisi mabe, bilikya na bango bikokisamaki te. (Luka 19:11; Misala 1:6) Liboso ete báyekola kotalela Yehova, mimekamo mibimaki pwasa mibulunganisaki bango. Yango wana, ntango Yesu akangamaki, bantoma na ye bakimaki. Na nsima, na butu wana, mpo na bobangi, Petelo aánganaki mbala mingi ete ayebaki Klisto te. Kino ntango wana, bantoma basimbaki naino te toli oyo na Yesu ete: “Bólanda kosɛnzɛla mpe bóbondelaka ntango nyonso.” (Matai 26:41, 55, 56, 69-75) Nsima ya lisekwa na ye, Yesu asalelaki Makomami mpo na kolendisa kondima na bango. (Luka 24:44-48) Mpe wana emonanaki ete bamoko kati na bango batyaki mosala oyo mopesamelaki bango na esika ya mibale, Yesu alendisaki mposa na bango ya komipesa na mosala wana ya ntina mingi.​—Yoane 21:15-17.

6. Mitambo nini mibale mpo na yango Yesu akebisaki bayekoli na ye?

6 Liboso, Yesu akebisaki bayekoli na ye ete básangana na mokili te. (Yoane 15:19) Apesaki mpe bango toli ete báyangela te lokola bankolo kati na bango, kasi na kosala elongo lokola bandeko. (Matai 20:25-27; 23:8-12) Balandaki toli na ye? Balandaki kokólisa mosala oyo ye apesaki bango?

7, 8. (a) Lolenge nini lisoló ya baklisto ya ekeke ya liboso limonisi ete basimbaki toli ya Yesu? (b) Mpo na nini kolanda kosɛnzɛla kati na elimo ezali na ntina mingi?

7 Na ntango oyo bantoma bazalaki naino na bomoi, babatelaki lisangá. Lisoló ya bato limonisi ete baklisto ya liboso bamikɔ́tisaki te kati na makambo ya politiki na Bokonzi ya Loma mpe ete basalaki kelasi ya bakonzi ya mangomba te. Nzokande, bazalaki basakoli ya molende ya Bokonzi ya Nzambe. Na nsuka ya ekeke ya liboso, bapesaki litatoli na bamboka nyonso eyangelamaki na Bokonzi ya Loma, kozalisáká bayekoli na Azia, na Mpótó, mpe na Afrika ya Nɔ́rdi.​—Bakolose 1:23.

8 Nzokande, kokokisama ya makambo wana kati na mosala ya kosakola elimbolaki te ete basengelaki te kolanda kosɛnzɛla kati na elimo. Maloba oyo Yesu asakolaki esengelaki kokokana na nsima mpenza. Mpe lokola lisangá ekómaki na ekeke ya mibale T.B., makambo mabimaki kino mabebisaki elimo ya baklisto. Lolenge nini?

Baoyo batikaki kosɛnzɛla

9, 10. (a) Nsima ya liwa ya bantoma, bokóli nini bomonisaki ete, bato mingi oyo bazalaki komitánga baklisto bazalaki kolanda kosɛnzɛla te? (b) Mikapo nini (mitángami kati na paragrafe) mikokaki kosalisa baoyo bazalaki komitánga baklisto mpo na kotikala makasi kati na elimo?

9 Bato mosusu oyo baingelaki kati na lisangá babandaki kolobela bindimeli na bango ya filozofi ya Greke, kolandáká kosala ete makambo bazalaki kosakola mándimama mingi na bato ya mokili. Mokemoke, mateya ya bapakano, lokola Bosato mpe molimo ekufaka te, ekómaki moko na likambo oyo libebisaki boklisto. Yango ememaki na kosundola elikya mpo na eleko ya Mbula Nkóto. Mpo na nini? Baoyo bayambaki endimeli oyo ete molimo ekufaka te, basukisaki ete mapamboli manso mauti na boyangeli ya Klisto makozwama kati na bokonzi ya elimo na nzela ya molimo oyo mokobikaka longwa na nzoto ya moto. Bongo, bazalaki na mposa te ya kosɛnzɛla mpo na kozala ya Klisto kati na nguya ya Bokonzi.​—Kokanisá na Bagalatia 5:7-9; Bakolose 2:8; 1 Batesaloniki 5:21.

10 Ezalela oyo ekómaki makasi mpo na makambo mosusu oyo mabakisamaki. Basusu oyo bazalaki koloba ete bazalaki bakɛngɛli baklisto, babandaki kosalela masangá na bango lokola mwango ya komikumisa bango mpenza. Epai na makanisi na bango mpe mateya na bango, bapesaki motuya mokokani na Makomami, ata mpe koleka yango na motuya. Ntango libaku limonanaki, lingomba wana ya lipɛngwi likómaki kosalela matomba ya makambo ya politiki.​—Misala 20:30; 2 Petelo 2:1, 3.

Makambo mauti na kozanga kosɛnzɛla

11, 12. Mpo na nini Mbongwana ya Protestá ezalaki te bozongi epai na losambo ya solo?

11 Nsima ya bikeke oyo Lingomba ya Katolike ya Loma ekɔ́tisaki mbébá mingi, bamoko na baoyo basalaki kobongwana ya Lingomba babimaki na ekeke ya 16. Kasi wana ezalaki te elembo ya bozongi na losambo ya solo. Mpo na nini te?

12 Atako bituluku ndenge na ndenge ya Protestá emilongolaki na nsé na boyangeli ya Loma, bamemaki ebele na mateya mpe misala na bango ya moboko ya lipɛngwi​—likanisi ya bakonzi-bandimi, mpe kondima kati na Bosato, kondima kati na liteya oyo ete molimo ekufaka te, mpe na monyoko ya seko nsima na liwa. Mpe, lolenge moko na Lingomba ya Katolike ya Loma, balandaki kosangana na mokili, basalaki boyokani makasi elongo na bakonzi ya politiki. Na bongo, bamekaki koboya kondima elikya nyonso na ntina na koya ya Klisto lokola Mokonzi.

13. (a) Nini emonisi ete mibali mosusu babatelaki Liloba ya Nzambe? (b) Na boumeli ya ekeke ya 19, likambo nini lizalaki na ntina mingi mpo na bamoko kati na baoyo bazalaki komitánga baklisto? (c) Mpo na nini makambo mingi makokisamaki te?

13 Atako bongo, Yesu asakolaki ete nsima ya liwa ya bantoma, batuki ya solo na libula ya Bokonzi (baoyo ye akokanisaki na nganu [blé]) basengelaki kolanda kokóla esika moko na baklisto ya lokuta (to matiti mabe) kino na ntango ya kobuka mbuma. (Matai 13:29, 30) Lelo oyo, tokoki te koyebisa motuya ya sikisiki ya bato banso oyo Nkolo na elanga atalelaki lokola nganu. Kasi esengeli kosimba ete na boumeli ya ekeke ya 14, ya 15, mpe ya 16, ezalaki na mibali oyo batyaki bomoi na bango mpe bonsomi na bango na likámá mpo na kobongola Biblia na minoko oyo miyebanaki na bato banso. Basusu bandimaki bobele te ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe, kasi babwakaki mpe Bosato lokola liteya oyo liuti na Makomami te. Basusu baboyaki kondima liteya oyo ete molimo ekufaka te mpe liteya ya lifelo ya mɔ́tɔ, kotaleláká yango ete eyokani soko moke te na Liloba ya Nzambe. Lisusu, na boumeli ya ekeke ya 19, mpo na bokóli ya boyekoli ya Biblia, bituluku mingi kati na Etats-Unis, na Allemagne, Angleterre, mpe Russie ebandaki kolobela endimeli oyo ete ntango ya bozongi ya Klisto ebɛlɛmaki. Kasi mingi kati na bilikya na bango bikokisamaki te. Mpo na nini? Na kotalela yango na bozindo, ezalaki mpo ete bango batalelaki bato nde balandaki Makomami te.

Lolenge oyo bazalaki kosɛnzɛla

14. Yebisá mwango ya koyekola Biblia oyo mosalelamaki na C. T. Russell mpe baninga na ye.

14 Na nsima, na 1870, Charles Taze Russell mpe bamoko na baninga na ye basalaki etuluku moko mpo na boyekoli ya Biblia na engumba Allegheny, na Pennsylvanie. Bazalaki bato ya liboso te mpo na kososola ebele ya makambo ya solo ya Biblia oyo bayambaki, kasi wana bazalaki koyekola, bazalaki kosalela yango mpo na kotalela makomami nyonso likoló na likambo moko ya sikisiki.a Mokano na bango ezalaki te ete básembola makomi na kolanda makanisi oyo bazalaki na yango, kasi mpo na koyeba soki bazalaki kobimisa makanisi oyo mazalaki na boyokani na makambo nyonso oyo Biblia elobi mpo na yango.

15. (a) Bato mosusu basalaki makambo nini oyo ndeko Russell ayaki kosala na nsima? (b) Likambo nini likesenisaki Bayekoli ya Biblia mpe bango?

15 Ndambo moke na bato mosusu oyo bazalaki liboso na bango balobaki ete Klisto asengelaki kozonga na kozanga komonana, lokola ekelamu moko ya elimo. Basusu bamonaki ete mokano ya bozongi ya Klisto ezalaki te mpo na kozikisa mabelé mpe koboma bato banso, kasi ezalaki nde mpo na kopambola mabota nyonso ya mabelé. Na ntango wana, ezalaki mpe na bato moke oyo bazalaki koloba ete mobu 1914 esengelaki kozala nsuka ya Ntango ya Bapakano. Kasi mpo na Bayekoli ya Biblia oyo bazalaki elongo na Russell, yango ezalaki te bobele makambo masengelaki kosololama mpamba. Batongaki bomoi na bango likoló na makambo wana ya solo mpe bapalanganisaki yango na mokili mobimba koleka nyonso oyo esalemaki na ekeke wana.

16. Na mobu 1914, mpo na nini ndeko Russell akomaki ete: “Tozali na eleko ya komekama”?

16 Atako bongo, basengelaki kosɛnzɛla. Mpo na nini? Na ndakisa, atako bayebaki ete 1914 elobelamaki na esakweli ya Biblia, kasi bayebaki te makambo oyo masengelaki kobima sikisiki na mobu wana. Yango ezalaki momekamo mpo na bango. Kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Novɛ́mbɛ 1, 1914 (na Lingelesi), ndeko Russell akomaki ete: “Tómikundola ete tozali na eleko ya komekama . . . Soki yango ezali likambo oyo lisengeli komema bamoko na koangana Nkolo mpe Solo na Ye mpe kotika komipesa mpo na Matomba ya Nkolo, boye oyo epusaki bango na komipesa na Nkolo ezalaki te bolingo mpo na Nzambe oyo ezalaki kati na motema na bango, kasi ezalaki nde eloko mosusu; ekoki kozala elikya oyo ete ntango esengelaki kozala mokuse; esengelaki komipesa bobele mpo na mwa ntango moke.”

17. Lolenge nini A. H. Macmillan, mpe basusu bazalaki lokola ye, babatelaki bokatikati ya elimo?

17 Basusu basundolaki mosala ya Yehova na ntango wana. Kasi A. H. Macmillan azalaki moko na baoyo basundolaki te. Bambula mingi na nsima, alobaki na bosembo nyonso ete: “Mbala mosusu bilikya na biso mpo na badati mosusu eyokanaki te na makambo oyo mayebisamaki na Makomami.” Nini esalisaki ye na kobatela bokatikati na ye ya elimo? Ye moko alobaki ete, azalaki kokanisa boye ete, “ata bilikya wana bizalaki kokokana te, yango ebongolaki mikano ya Nzambe te.” Abakisaki ete: “Nasosolaki ete tosengelaki kondima mabungá na biso mpe kolanda kotalela Liloba ya Nzambe mpo na kongɛngisama mingi.”b Na komikitisa nyonso, Bayekoli ya Biblia wana ya liboso batikaki ete Liloba ya Nzambe lisembola lolenge na bango ya kotalela makambo.​—2 Timoté 3:16, 17.

18. Lolenge nini ezaleli ya kosɛnzɛla ya baklisto ebimisaki matomba mokemoke kati na likambo ya koboya kosangana na mokili?

18 Na mibu milandaki, mposa na bango ya kosɛnzɛla ekitaki te. Ya solo, bayebaki ete baklisto basengelaki kosangana na mokili te. (Yoane 17:14; Yakobo 4:4) Na boyokani na etindá yango, basanganaki te na Boklisto ya nkombo mpamba, na kotaleláká Lisangá ya Mabota lokola momonisi ya Bokonzi ya Nzambe na lolenge ya politiki. Kasi na 1939 nde bamonisaki polele ezaleli ya boklisto mpo na koboya kosangana na mokili.​—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, Novɛ́mbɛ 1, 1939.

19. Matomba nini mabimaki kati na bokɛngɛli ya lisangá mpo ete ebongiseli elandaki kosɛnzɛla?

19 Bazalaki na kelasi ya bakonzi ya lingomba te, atako bankulutu mosusu oyo baponamaki na voti bazalaki kokanisa ete bango basengelaki kosakola bobele na kati ya lisangá. Nzokande, na mposa makasi ya komiyokanisa na Makomami, mbala na mbala, ebongiseli emonisaki mokumba ya bankulutu na kolanda Makomami na nzela ya milɔngɔ́ ya masoló na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Mbongwana kati na lolenge ya kobongisama esalemaki na boyokani na makambo oyo malakisamaki na Makomami.

20-22. Lolenge nini ebongiseli mobimba emilɛngɛlaki mokemoke mpo na kokokisa mosala oyo mosilaki koyebisama mpo na kosakola Bokonzi na mabelé mobimba?

20 Ebongiseli mobimba emilɛngɛlaki nokinoki mpo na kokokisa mpenza mosala oyo Liloba ya Nzambe emonisaki yango mpo na mikolo na biso. (Yisaya 61:1, 2) Na mikolo na biso, nsango malamu esengeli kosakolama kino na etando nini? Yesu alobaki ete: “Esengeli liboso nsango malamu ésakolama kati na mabota nyonso.” (Malako 13:10, NW) Mpo na bato, mbala mingi mosala yango emonani lokola ete ekoki kosalema te.

21 Nzokande, na kotyáká motema epai na Klisto lokola Motó ya lisangá, kelasi ya moombo na sembo mpe na mayele ezwaki esika ya liboso. (Matai 24:45) Na bosembo nyonso mpe na mpiko nyonso, bamonisaki mosala oyo mopesami epai na libota ya Yehova. Kobanda liboso ya mobu 1919, nsɛtɛ ebɛtamaki mingi mpo na mosala ya elanga. Mpo na bato mingi, ezalaki pɛtɛɛ te mpo na kokende ndako na ndako mpe kosolola na bato oyo bayebanaki na bango te. (Misala 20:20) Kasi masoló ya boyekoli lokola “Esengo na baoyo bazali kobanga te” mpe “Bózala na mpiko” (na 1921) esalisaki basusu mpo na kobanda mosala, na kotyáká elikya epai na Yehova.

22 Libyangami oyo lipesamaki na 1922 ete “bósakola, bósakola, bósakola Mokonzi mpe bokonzi na ye,” lipesaki elendiseli ya kotya mosala oyo na esika ya liboso. Kobanda 1927, bankulutu oyo baboyaki kondima mokumba wana mouti na Makomami, balongolamaki. Na ntango wana, bamonisi-batamboli ya la Société, basáli mibembo, baponamaki mpo na kozala bakambi ya mosala na bitúká, mpo na kopesa malako mabongi epai na basakoli kati na mosala ya elanga. Mingi bazalaki babongisi-nzela te, kasi na wikende nyonso, bandeko mingi oyo bazalaki kokende mosala mikolo nyonso, bazalaki kobanda kosakola na ntɔ́ngɔ́ mpe kokata mwa ntango moke mpo na kolya mikáte na mwa ngúba, mpe na nsima, bazalaki kolanda mosala kino na mpokwa mpenza. Yango ezalaki mpenza bileko ya ntina mingi ya bokóli ya teokrasi, mpe tozali kozwa bolamu mingi na komikundoláká lolenge oyo Yehova azalaki kokamba libota na ye. Azali kolanda kosala bongo. Na lipamboli na ye, mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi oyo esili kotyama ekosukisama na elónga nyonso.

Ozali kolanda kosɛnzɛla?

23. Na ntina na bolingo ya boklisto mpe kokabwana na mokili, lolenge nini moko na moko kati na biso akoki komonisa ete tozali kolanda kosɛnzɛla?

23 Kolandáká litambwisi ya Yehova, ebongiseli na ye ezali kolanda kokebisa biso mpo na misala mpe bizaleli oyo ekoki komonisa biso lokola bato oyo basangani na mokili, likambo oyo likoki komema biso na koleka elongo na yango. (1 Yoane 2:17) Na yango, moko na moko kati na biso asengeli kosɛnzɛla na kolandáká litambwisi ya Yehova. Mpe Yehova azali kopesa biso malako mpo na kofanda mpe kosalana elongo. Ebongiseli na ye ezali kosalisa biso mpo na kokólisa boyebi na biso likoló na ndimbola mpenza ya bolingo ya boklisto. (1 Petelo 4:7, 8) Kolanda kosɛnzɛla esɛngi na biso ete tókoba kosalela toli yango malamumalamu, atako tozali bato ya kozanga kokoka.

24, 25. Kati na makambo nini ya ntina mingi tosengeli kolanda kosɛnzɛla, mpe ezali na elikya nini kitoko?

24 Mbala na mbala, moombo na sembo mpe na mayele azali kokundwela biso toli, ete: “Tyá elikya epai na Yehova na motema na yo mobimba mpe kotya motema te likoló na bososoli na yo moko.” (Masese 3:5, NW) “Bobɔndɛlaka na kotika tɛ.” (1 Batɛsalɔniki 5:17) Tozwi toli ya koyekola kozwa bikateli na biso na kolanda Liloba ya Nzambe, na kotika ete liloba yango ézala ‘mwinda mpo na makolo na biso mpe pole mpo na nzela na biso.’ (Nzembo 119:105) Na bolingo nyonso, tolendisami na kotya mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi na biso, mosala oyo Yesu asakolaki mpo na mikolo na biso.​—Matai 24:14.

25 Ya solo, moombo na sembo mpe na mayele azali mpenza kosɛnzɛla. Moko na moko kati na biso asengeli mpe kolanda kosɛnzɛla. Na kosaláká bongo, moko na moko kati na biso akozala kati na baoyo bakondimama na Mwana na moto, na ntango akoya kosambisa.​—Matai 24:30; Luka 21:34-36.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Búku Faith on the March, ya A. H. Macmillan, Prentice-Hall, Inc., 1957, nkasa 19-22.

b Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, Augústo 15, 1966 (na Lingelesi), nkasa 504-10.

Bozongeli

◻ Lokola emonisami na Matai 24:42, mpo na nini tosengeli kokóba kosɛnzɛla?

◻ Lolenge nini Yesu mpe bayekoli ya ekeke ya liboso balandaki kosɛnzɛla kati na elimo?

◻ Uta 1870, bokóli nini bosalemi mpo ete basaleli ya Yehova balandaki kosɛnzɛla?

◻ Nini ekomonana soki moko na moko kati na biso alandi kosɛnzɛla?

[Elilingi na lokasa 23]

Yesu amipesaki mingi kati na mosala azwaki epai na Tata na ye. Azalaki mpe kobondela na mayoki nyonso

[Elilingi na lokasa 24]

Charles Taze Russell na mibu na ye ya nsuka

[Elilingi na lokasa 25]

Koleka basakoli ya Bokonzi 4 700 000 bazali kosala mosala kati na mabelé mobimba

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto