Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/6 nk. 8-12
  • Lingomba ya solo​—Osili komona yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lingomba ya solo​—Osili komona yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lolenge nini tokoki koyeba makanisi ya Nzambe?
  • Baoyo nyonso basalelaka Biblia bazali na lingomba ya solo?
  • Bilembo mpo na koyeba lingomba ya solo
  • Losambo oyo Nzambe andimaka
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Tosalela losambo na solo mpo na lobiko na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Ndenge nini nakoki koyeba lingomba ya solo?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Tosikwami na losambo ya lokuta
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/6 nk. 8-12

Lingomba ya solo​—Osili komona yango?

“Losambo na mpɛtɔ mpe lobɔngi epai na Njambe Tata na biso ejali boye.”​—YAKOBO 1:27.

1, 2. (a) Kati na makanisi ya bato mingi, nini ezali kokata soki lingomba na bango lizali ya solo? (b) Esengeli kotya likebi mingi na nini wana tozali kotalela lingomba?

TOZALI kobika na eleko oyo bato mingi bazali kopesa na losambo bobele esika moke kati na bomoi na bango. Ekoki kozala ete bakendaka na ndakonzambe, kasi bobele bato moke nde basalaka bongo mbala na mbala. Ntalo monene ya bato bamonaka te ete mangomba nyonso mosusu mazali ya lokuta mpe ete bobele lingomba na bango nde lizali ya solo. Bakanisaka bobele ete lingomba na bango lizali oyo ebongi mpo na bango.

2 Na kotalela makambo wana, motuna oyo, ‘Osili komona lingomba ya solo?’ molingi bobele koloba ete, ‘Osili komona lingomba oyo ebongi na yo?’ Nini ekataka mpo na oyo olingaka? Libota na yo? Baninga na yo? Mayoki na yo moko? Na meko nini osili mpenza kotalela malamu makanisi ya Nzambe na likambo oyo?

Lolenge nini tokoki koyeba makanisi ya Nzambe?

3. (a) Mpo ete tóyeba makanisi ya Nzambe, esengeli ete tózala na nini? (b) Mituna nini tosengeli komituna mpo na ntina oyo tozali na yango ya kondima ete Biblia euti na Nzambe?

3 Mpo ete tókoka koyeba makanisi mpenza ya Nzambe, esengeli bongo tozala na emoniseli oyo euti epai na ye. Biblia ezali búku eleki koumela, oyo yango moko elobi ete epemamaki na Nzambe. (2 Timoté 3:16, 17) Kasi tokoki solo koloba ete búku yango, na kokesena na babúku mosusu nyonso, ezali na nsango ya Nzambe mpo na bato banso? Lolenge nini okoyanola na motuna oyo, mpe mpo na nini? Ezali mpo ete baboti na yo bakanisaka bongo? Ezali mpo ete baninga na yo bakanisaka bongo? Osili yo moko kotalela bilembeteli na yango? Mpo na nini okoki te kosala yango sikawa, na lisalisi ya bilembeteli minei oyo elandi?

4. Mpo na oyo etali likoki na yango ya kozwama na bato banso, nini emonisi ete ezali Biblia nde euti na Nzambe, kasi búku mosusu te?

4 Mpo na bato banso: Nsango oyo euti solo na Nzambe mpe oyo ezali mpo na bato ya mokili mobimba esengeli kokoka kozwama na bato banso. Ezali bongo mpo na Biblia? Talelá likambo oyo: Biblia, na mobimba to na ndambo, esili kobimisama na nkótá koleka 2 000. Engebene Société biblique américaine, eleki soko mibu zomi mpamba nkótá oyo Biblia enyátamaki kati na yango esalaki ete 98% ya bafandi na mabelé bakoka komona yango. Lokola emonisamaki kati na búku Guinness Book of World Records, Biblia ezali mpenza “búku oyo eleki kokabolama kati na mokili mobimba.” Oyo ezali likambo tosengeli kozela epai na nsango euti na Nzambe oyo ebongisami mpo na bato ya mposo nyonso, ya bikólo nyonso mpe ya nkótá nyonso. (Kokanisá na Emoniseli 14:6.) Ezali na búku mosusu te kati na mokili oyo esili kokabolama lokola yango.

5. Mpo na nini bosolo ya makambo makomami na Biblia ezali na ntina mingi?

5 Elobaka solo na makambo ya kala: Botaleli ya penepene ya lisoló ya makambo mayebisami kati na Biblia ezali komonisa likambo mosusu oyo likesenisi Biblia na babúku mosusu oyo elobaka ete ezali mosantu. Biblia ezali na lisoló ya makambo masalemaki solo, kasi masapo mpamba te oyo mazangi bilembeteli. Irwin Linton, oyo, lokola azalaki avocat amesenaki mingi na kotalela bilembeteli oyo bisengeli kondimama na esambiselo, akomaki ete: “Wana babúku ebéngami romans, masapo mpe matatoli ya lokuta elukaka kolobela makambo masalemaki na mwa bisika mosika mpe na bantango eyebani malamu te, . . . masoló ya Biblia mazali kopesa biso na bosikisiki nyonso badati mpe bisika makambo yango masalemaki.” (Na ndakisa, talá 1 Mikonzi 14:25; Yisaya 36:1; Luka 3:1, 2.) Mpo na bato oyo bazali komibalola epai na lingomba na mokano ya kokima mikakatano ya bomoi te kasi mpo na koluka solo, likambo oyo lizali na ntina mingi.

6. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete Biblia ezali mpenza kosalisa bato na kolónga mikakatano ya bomoi? (b) Na mitindo nini misato Biblia ezali kosalisa bato na kolónga mikakatano minene ya bomoi?

6 Ezali kopesa lisalisi libongi: Baoyo bazali kotalela Biblia na likebi nyonso bazali nokinoki kososola ete mibeko mpe mitindá na yango misalemaki te mpo na kopesa bango mpasi. Nkutu, mibeko mpe mitindá na yango mizali kolakisa lolenge ya bomoi oyo ezali kopesa litomba epai na baoyo bazali mpenza kolanda yango. (Yisaya 48:17, 18) Libondisi oyo yango ezali kopesa epai na bato oyo bazali kati na mpasi ezali ya likolólikoló te, oyo euti na bafilozofi ya mpamba. Nkutu, ezali nde kosalisa bato na kolónga mikakatano ya bomoi. Lolenge nini? Na mitindo misato: (1) na kopesáká batoli malamu etali lolenge ya kolónga mikakatano, (2) na kolimboláká lolenge nini tokoki kozwa lisungi ya bolingo oyo Nzambe azali kopesa na basaleli na ye na mikolo na biso, mpe (3) na komonisáká mikolo kitoko mizali koya nsima oyo Nzambe abombeli baoyo bazali kosalela ye mpe na kopesáká bantina ya solo ya kotya motema kati na bilaka na ye.

7. (a) Na nzela ya mikapo mipesami na maloba na nsé ya lokasa, limbolá eyano ya Biblia na moko moko na mikakatano minene oyo bato bazali kokutana na yango na mikolo na biso. (b) Monisá lolenge nini toli ya Biblia ezali kobatela biso to kosalisa biso na kolónga mitungisi makasi ya bomoi.

7 Atako batoli ya Biblia mbala mingi endimamaka te na baoyo baboyaka kotosa bakonzi mpe baoyo balingaka bobele bosepeli na bango moko, bato mingi basili kososola ete bomoi motindo yango ememaka bolamu ya solosolo te. (Bagalatia 6:7, 8) Biblia ezali kopesa biyano ya polele na mituna mitali kosopa zemi, koboma libala, mpe kosangisa nzoto mibali na mibali. Batoli na yango ezali kobatela biso na molangwa ya masanga mpe ya bilangwiseli mosusu, ezali kobatela biso na kozwa SIDA na nzela ya makila oyo mazali na mikrobe to na nzela ya kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo. Ezali komonisa biso lolenge ya kozala na bomoi ya libota na esengo. Ezali kopesa biyano oyo bikoki kosalisa moto na kolónga mikakatano makasi ya bomoi, bakisá koboyama na basangani ya penepene ya libota, bokɔnɔ makasi, mpe kufa ya molingami na biso. Ezali kosalisa biso na kososola makambo maleki ntina na boye ete bomoi na biso ekóma na ntina mingi na esika ete tózala na mawa.a

8, 9. (a) Esakweli nini ezali mpenza kosimba motema na yo lokola elembeteli ya kopemama ya Biblia? (b) Bisakweli ya Biblia bizali komonisa nini na ntina na eutelo na yango?

8 Bisakweli: Lokola búku ya bisakweli, Biblia ekeseni mpenza na babúku mosusu, ezali búku oyo eyebisaka makambo makobima na nsima mpe ezali kosakola yango na sikisiki mpenza. Esakolaki kobomama ya Tulu, kokwea ya Babilone, kotóngama lisusu ya Yelusaleme, kobima mpe kokwea ya bokonzi ya Médo-Perse mpe ya Grèce, mpe makambo mingi mosusu ya bomoi ya Yesu Klisto. Esakolaki lisusu na sikisiki ezalela ya mokili oyo ezali komonana na ekeke oyo, mpe ezali kopesa ndimbola na yango. Ezali komonisa lolenge ya kosilisa mikakatano oyo mileki makoki ya bato oyo bazali koyangela, mpe ezali kolobela Moyangeli oyo akopesa kimya ya seko mpe kobatelama ya solo mpo na bato.b​—Yisaya 9:6, 7; 11:1-5, 9; 53:4-6.

9 Biblia emonisi ete bobele Nzambe nde azali na likoki ya kosakola na bosikisiki makambo makoya nsima. (Yisaya 41:1 kino 46:13) Ye oyo akoki kosala bongo to akoki kopemisa basusu na kosala yango azali ekeko te oyo ezangi bomoi. Akoki mpe te kozala bobele moto oyo asambelaka mingi. Azali nde Nzambe ya solo, mpe búku oyo ezali na bisakweli motindo wana ezali Liloba na ye.​—1 Batesaloniki 2:13.

Baoyo nyonso basalelaka Biblia bazali na lingomba ya solo?

10, 11. Lokola Yesu amonisaki yango, atako moteyi moko ya lingomba akoki kosalela Biblia, nini ekoki kokómisa lingomba na ye mpamba?

10 Ezali likambo ya mayele​—oyo eleki ntina, endimami kati na Makomami​—kosukisa ete, mangomba nyonso oyo mazali koloba ete masalelaka Biblia mateyaka losambo ya solo? Moto nyonso oyo azali komema Biblia to oyo alobelaka makambo mazali kati na Biblia asalelaka lingomba ya solo?

11 Bakonzi mingi ya mangomba, atako bazalaka na Biblia, basalelaka lingomba lokola mwango ya komikumisa bango moko. Bazali kobebisa mateya ya solo oyo mazali peto na kosangisáká yango na mateya ya bonkɔ́kɔ mpe na bafilozofi ya bato. Losambo na bango londimami epai na Nzambe? Epai na bakonzi ya mangomba ya Yelusaleme na ekeke ya liboso, baoyo bazalaki kosala bongo, Yesu asalelaki na motindo mobongi maloba oyo Nzambe apesaki na nzela ya mosakoli Yisaya, ete: “Bato oyo bakotosaka ngai na minɔkɔ, kasi mitema na bango ijali mosika na ngai. Bakosanjolaka ngai mpamba, bakolakisaka malako majali mibeko na bato.” (Matai 15:8, 9; 23:5-10) Ezali polele ete, lingomba ya motindo oyo lizali lingomba ya solo te.

12, 13. (a) Lolenge nini etamboli ya basangani ya lingomba moko ekoki kosalisa moto na koyeba soki losambo na bango ezali oyo ya solo? (b) Lolenge nini Nzambe akotalela losambo na biso soki toponi lokola baninga bato oyo ye aboyi? (2 Ntango 19:2)

12 Ezali boni soki mbuma oyo mateya ya mangomba mosusu eboti, na lolenge emonani na bomoi ya basangani na yango oyo bazali na lokumu mingi, ezali ya kopɔla? Kati na Lisoló na ye likoló ya Ngomba, Yesu akebisaki ete: “Bokeba mpɔ na basakoli na lokuta . . . Bokoyeba bango mpɔ na mbuma na bango. . . . Njete malamu na njete malamu ekobota mbuma malamu nde njete mabe na njete mabe ekobota mbuma mabe.” (Matai 7:15-17) Ezali solo ete bato mosusu bakoki kosala mabungá mpe kozala na mposa ya kosembolama. Kasi ezali likambo mosusu soki basangani ya lingomba, ata mpe bakonzi ya mangomba, bazali komipesa na pite mpe na ekobo, na bitumba, na kolangwa masanga, na lokoso, na lokuta, na losambo ya bilimu mabe, na losambo ya bikeko​—moko na makambo oyo to yango nyonso​—nzokande etumbu moko te epesameli bango, mpe baoyo bazali kolanda etamboli yango babimisami na lisangá te. Biblia ezali koloba polele ete baoyo bazali kosala makambo lolenge yango basengeli kobimisama na lisangá; bakozala na esika te kati na Bokonzi ya Nzambe. (Bagalatia 5:19-21) Losambo na bango lozali kosepelisa Nzambe te, bobele bongo losambo na biso lokoki kosepelisa ye te soki toponi kozala baninga ya bato oyo ye aboyi.​—1 Bakolinti 5:11-13; 6:9, 10; Emoniseli 21:8.

13 Ezali polele ete bituluku nyonso oyo bizali koloba ete bisalelaka Biblia, bilandaka losambo ya solo oyo Biblia ezali kolobela te. Na yango, makambo nini Biblia emonisi lokola bilembo mpo na koyeba lingomba ya solo?

Bilembo mpo na koyeba lingomba ya solo

14. (a) Mateya nyonso ya lingomba ya solo matongami likoló na nini? (b) Na yango, tokoki koloba boni mpo na oyo etali mateya ya boklisto ya nkombo mpamba na ntina na Nzambe mpe molimo?

14 Mateya na yango matongami likoló na Makomami mapemami. “Makomi yɔnsɔ mapemami na [elimo, NW] na Njambe, makoki kopɛsa litomba na mateyo, na mpamela, mpɔ na kosembola mpe kobɔkɔla.” (2 Timɔtɛ 3:16) Na yango, epai wapi Biblia mosantu elobeli Bosato oyo mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba bateyaka mingi? Mpe epai wapi Biblia ezali koteya, lokola bakonzi na mangomba bateyaka yango, ete bato bazali na molimo oyo molandaka kozala na bomoi nsima ya kokufa ya nzoto ya mosuni? Osilá naino kosɛnga na mokonzi moko ya lingomba ete alakisa yo mateya wana kati na Biblia na yo? Búku The New Encyclopædia Britannica eyebisi ete: “Ezala liloba Bosato to liteya na yango ya polele ezali komonana te kati na Kondimana ya Sika.” (1992, Micropædia, Volimi 11, lokasa 928) Mpe búku New Catholic Encyclopedia endimi ete: “Kati na Bakonzi ya mangomba balandi na bantoma, ezalaki na eloko moko te ata ya mosika oyo eyokani na likanisi to na liteya yango.” (1967, Volimi XIV, lokasa 299) Mpo na likanisi ya boklisto ya nkombo mpamba ete molimo mozali kokabwana na nzoto ntango ya kufa, bato na mayele oyo bayekolaka makambo na mangomba bazali kondima ete bazwaki liteya yango na filozofi ya Bagreke. Nzokande, lingomba ya solo etyaka Biblia pembeni te mpo na kolanda filozofi ya bato.​—Genese 2:7; Deteronome 6:4; Ezekiele 18:4; Yoane 14:28.

15. (a) Engebene Biblia, bobele nani nde tosengeli kosambela? (b) Lolenge nini basambeli ya solo bazali kotalela likambo ya kobɛlɛma penepene na Yehova?

15 Lingomba ya solo elendisaka losambo ya Nzambe bobele moko ya solo, Yehova. (Deteronome 4:35; Yoane 17:3) Wana alobelaki makanisi oyo mazwami na Deteronome 5:9, Yesu Klisto ayebisaki na sembo nyonso ete: “Ezali Yehova Nzambe na yo nde osengeli kosambela, mpe ezali bobele ye nde osengeli kosalela mosala na bulee.” (Matai 4:10, NW) Na boyokani na yango, Yesu ayebisaki nkombo ya Tata na ye epai na bayekoli na ye. (Yoane 17:26) Lingomba na yo elakisaki yo kosambela Yehova? Osili koyeba ye oyo abyangami na nkombo yango​—mikano na ye, misala na ye, bizaleli na ye​—na boye ete ozali kooka ete obendami na kokangama epai na ye? Soki lingomba na yo lizali ya solo, eyano ekozala ete ee.​—Luka 10:22; 1 Yoane 5:14.

16. Kondimela Klisto ezali na ntina nini mpo na baoyo bazali kolanda lingomba ya solo?

16 Eteni moko ya ntina monene ya losambo oyo ezali kosepelisa Nzambe ezali bongo kondimela Mwana na ye, Yesu Klisto. (Yoane 3:36; Misala 4:12) Yango elimboli te bobele kondima ete azalaki na bomoi to azalaki moto oyo alekaki bato nyonso. Esangisi lisusu komonisa botɔ́ndi mpo na oyo Biblia ezali koteya biso na ntina na motuya ya mbeka ya bomoi ya kokoka ya Yesu mpe kondima etelemelo oyo azali na yango lelo oyo lokola Mokonzi kati na makoló. (Nzembo 2:6-8; Yoane 3:16; Emoniseli 12:10) Soki osanganaka elongo na baoyo bazali kolanda losambo ya solo, oyebi malamu ete kati na bomoi ya mokolo na mokolo, basalaka milende mpo na kotosa Yesu, kolanda ndakisa na ye, mpe kosangana moto na moto na molende nyonso kati na mosala oyo apesaki na bayekoli na ye. (Matai 28:19, 20; Yoane 15:14; 1 Petelo 2:21) Soki ezali bongo te epai na baoyo ozali kosangana elongo na bango mpo na kosambela, osengeli koluka epai mosusu.

17. Mpo na nini basambeli ya solo basengeli komibatela na mbindo nyonso ya mokili, mpe yango elimboli lisusu nini?

17 Lingomba ya solo emikɔtisaka te kati na politiki mpe kati na matáta ya mokili. (Yakobo 1:27) Mpo na nini te? Mpamba te Yesu alobaki na ntina na bayekoli na ye ete: “Bajali bato na mokili tɛ pelamɔkɔ ngai najali moto na mokili tɛ.” (Yoane 17:16) Yesu amikɔtisaki na politiki te, mpe apekisaki bayekoli na ye kosalela bibundeli ya mosuni. (Matai 26:52) Baoyo bazali kotya likebi na Liloba ya Nzambe ‘bakoyekola etumba lisusu tɛ.’ (Yisaya 2:2-4) Soki lingomba oyo ozali mosangani na yango ata bobele na nkombo mpamba ekokisi makambo oyo te, ezali sikawa ntango ya kokata boyokani elongo na yango.​—Yakobo 4:4; Emoniseli 18:4, 5.

18. (a) Yoane 13:35 emonisi ezaleli nini ya ntina mingi mpo na koyeba lingomba ya solo? (b) Lolenge nini okoki kosalisa moto moko na koyeba etuluku nini ekokisi maloba yango?

18 Lingomba ya solo ezali koteya mpe komonisa bolingo bozangi moimi. (Yoane 13:35; 1 Yoane 3:10-12) Bolingo motindo yango ezali te bobele kolobelama kati na masoló. Ezali mpenza kosangisa esika moko kati na bondeko ya solo bato ya mposo nyonso, ya mitindo nyonso, ya nkótá nyonso, ya bikólo nyonso. (Emoniseli 7:9, 10) Ezali kokabola baklisto na mokili oyo mozingi bango. Soki obandi naino kosala yango te, yanganá na makita na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova, mpe kati na mayangani na bango ya minene. Talá bango wana bazali kosala elongo kati na botóngi ya Bandako ya Bokonzi. Talá lolenge bazali kosalisa mibangé (babosani te basi bakufeli mibali) mpe bilenge (lokola baoyo batikali bobele na moboti moko to baoyo baboti nyonso mibale basili kokufa). (Yakobo 1:27) Kokanisá oyo ozali komona na oyo osili komona kati na mangomba mosusu. Na nsima omituna yo moko ete, ‘Nani azali kolanda lingomba ya solo?’

19. (a) Mwango nini mpo na kosilisa mikakatano ya bato lingomba ya solo ezali komonisa? (b) Basangani ya lingomba ya solo basengeli kosala mosala nini?

19 Lingomba ya solo ezali komonisa Bokonzi ya Nzambe lokola mwango ya nsuka mpo na kosilisa bampasi ya bato. (Danyele 2:44; 7:13, 14; 2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:4, 5) Ezali ata na lingomba moko kati na mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba oyo ezali koteya yango? Ntango nini oyokaki mpo na mbala ya nsuka moteyi moko ya lingomba kolimbola Bokonzi ya Nzambe mpe kolimbola oyo Makomami mazali komonisa ete yango ekokokisa? Lingomba oyo ozali kati na yango lizali kolendisa yo na kolobela Bokonzi ya Nzambe epai na basusu, mpe soki ezali kosala yango, basangani na yango nyonso bazali kosangana na kosala bongo? Yesu apesaki litatoli lolenge yango; bayekoli na ye ya liboso basalaki yango. Yo mpe okoki kozala na libaku kitoko ya kosangana na mosala yango. Ezali mosala moleki ntina oyo mozali kosalema lelo oyo na mabelé.​—Matai 24:14.

20. Longola likambo ya koyeba lingomba ya solo, tosengeli kosala nini lisusu?

20 Atako mangomba mazali mingi, Biblia ezali kosalisa biso nokinoki na kolongola mobulungano mpo ete tókoka koyeba oyo ya solo. Kasi tosengeli te kosuka bobele na koyeba yango. Ezali na ntina mingi ete tósalela yango. Oyo yango esengi ekotalelama na mozindo na lisoló na biso lilandi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Kosopa zemi: Misala 17:28; Nzembo 139:1, 16; Exode 21:22, 23. Koboma libala: Matai 19:8, 9; Baloma 7:2, 3. Kosangisa nzoto mibali na mibali: Baloma 1:24-27; 1 Bakolinti 6:9-11. Kolangwa bilangwiseli mpe masanga: 2 Bakolinti 7:1; Luka 10:25-27; Masese 23:20, 21; Bagalatia 5:19-21. Makila mpe pite: Misala 15:28, 29; Masese 5:15-23; Yilimia 5:7-9. Libota: Baefese 5:22 kino 6:4; Bakolose 3:18-21. Koboyama: Nzembo 27:10; Malaki 2:13-16; Baloma 8:35-39. Bokɔnɔ: Emoniseli 21:4, 5; 22:1, 2; Tito 1:2; Nzembo 23:1-4. Liwa: Yisaya 25:8; Misala 24:15. Makambo maleki ntina: Matai 6:19-34; Luka 12:16-21; 1 Timoté 6:6-12.

b Mpo na koyeba mwa ndambo ya bisakweli wana mpe kokokisama na yango, talá babúku La Bible ​— Parole de Dieu ou des hommes?, nkasa 117-161; mpe Comment raisonner à partir des Ecritures, nkasa 60-62, 225-232, 234-240. Nyonso mibale ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

Okopesa biyano nini?

◻ Mpo na oyo etali koyeba lingomba ya solo, likanisi ya nani lizali na ntina mingi?

◻ Bilembeteli nini minei bizali komonisa Biblia ete ezali Liloba ya Nzambe?

◻ Mpo na nini mangomba nyonso oyo mazali kosalela Biblia mandimami na Nzambe te?

◻ Wapi bilembo motoba mpo na koyeba lingomba bobele moko ya solo?

[Etanda na lokasa 10]

Batatoli ya Yehova. . .

◆ Mateya na bango nyonso mauti na Biblia.

◆ Basambelaka Nzambe bobele moko ya solo, Yehova.

◆ Bazali komitambwisa na boyokani na kondima na bango kati na Yesu Klisto.

◆ Bamikɔtisaka na makambo ya politiki te soko mpe na bitumba ya mokili.

◆ Bamonisaka bolingo bozangi moimi kati na bomoi ya mokolo na mokolo.

◆ Bazali komonisa Bokonzi ya Nzambe lokola mwango ya nsuka mpo na kosilisa bampasi ya bato.

[Elilingi na lokasa 9]

BIBLIA​—nini emonisi ete ezali nsango ya Nzambe mpo na bato banso?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto