Bokonzi—Eloko nini ekómeli yango?
BATO ya makanisi malamu bazali komona ntina ya kozala ya bokonzi. Soki ezali na lolenge moko te ya ebongiseli ya bokonzi, libota ya bato mbɛlɛ ekokóma nokinoki na mobulungano. Na yango, búku moko ya Lifalansé mpo na malako matali mibeko ya mboka, elobi ete: “Kati na bituluku nyonso ya bato, tokoki komona kelasi mibale ya bato: baoyo bazali kopesa mitinda mpe baoyo bazali kotosa, baoyo bazali kopesa malako mpe baoyo bazali kolanda yango, bakambi mpe baí-lisangani, bakonzi mpe bakonzami. . . . Bokonzi ekoki komonana na bisika binso oyo bato bazali.”a
Nzokande, ezalela ya bato liboso ya bokonzi esili kobongwana uta Etumba ya Mibale ya Mokili mobimba mpe mingimingi kobanda na bambula 1960. Kolobeláká na ntina na eleko yango, búku Encyclopédie Universelle ezali kolobela “mpasi monene kati na likambo litali ebongiseli ya bokonzi mpe botɛmɛli bakonzi.” Mokakatano wana mozali kokamwisa bayekoli ya Biblia te. Ntoma Paulo asakolaki ete: “Kasi osɔsɔla likambo oyo ete, na mokɔlɔ na nsuka, ntango na mpasi ekoya. Jambi bato bakojala bamikumisi na bango mpenza, baluki na mosɔlɔ, bato na lolɛndo, bato na ngambo, batuki, bato bajangi kokumisa baboti, . . . bato bajangi bolingo, . . . batomboki, bato na yauli, . . . bato babimbi na lolendo, baoyo bakolingaka malamu na bango mpenja koleka bolingo epai na Njambe.”—2 Timɔtɛ 3:1-4.
Bakonzi kati na mpasi monene
Esakweli oyo ezali mpenza kolobela mikolo mpe eleko na biso. Bokonzi ebundisami na bisika binso—na libota, na eteyelo ya katikati, na eteyelo monene, na bakompanyi, na boyangeli ya bamboka mike mpe bikólo mpenza. Mbongwana na makambo matali kosangisa nzoto, miziki babéngi ete hard rap, botomboki ya banakelasi, koboya mosala na lolenge eyokani na mibeko te, koboya kotosa bayangeli, mpe misala ya mobulu, nyonso wana ezali bilembo ya kozanga botosi epai na bakonzi.
Kati na masolo oyo ebongisamaki na Paris, na Eteyelo monene na zébi ya politiki mpe zulunalo Le Monde oyo ekobimisamaka mokolo na mokolo, Professeur Yves Mény alobaki ete: “Bokonzi ekoki kozala bobele soki ezwi mobɔkɔ na yango likoló na lotómo ya koyangela.” Moko na bantina ya mpasi monene oyo ekómeli bokonzi na mikolo na biso, ezali ete bato mingi bazali kobɛta ntembe likoló na lotómo ya koyangela ya baoyo bazali kokonza. Elingi koloba ete bazali kobɛta ntembe likoló na lotómo na bango ya kozala bakonzi. Bolukiluki moko emonisaki ete na ebandeli ya bambula 1980, bato 9 kati na monkámá na Etats-Unis, bato 10 kati na monkámá na Australie, bato 24 kati na monkámá na Grande Bretagne, bato 26 kati na monkámá na France, mpe bato 41 kati na monkámá na Inde, bazalaki kotalela biyangeli na bango ete ezali na lotómo ya koyangela te.
Bato bazali koluka bokonzi oyo ezali na lotómo ya koyangela
Engebene Biblia, liboso mpenza, moto azalaki na nsé ya bokonzi ya Nzambe ye mei. (Genese 1:27, 28; 2:16, 17) Kasi, bobele na ebandeli, bato basɛngaki lipandá longwa na Mozalisi na bango kati na oyo makambo matali bizaleli malamu. (Genese 3:1-6) Nsima ya kobwaka teokrasi, to boyangeli ya Nzambe, basɛngelaki koluka bibongiseli mosusu ya bokonzi. (Mosakoli 8:9) Basusu basalelaki bokonzi na bango na makasi. Mpo na bango, kozala na lotómo ezali mpamba, kasi kozala nde na nguya eleki malamu. Esɛngelaki na bango bobele kozala na makasi mpo na kondimisa bato mokano na bango moko. Nzokande, mingi na bango bazalaki na mposa ete bokonzi na bango ézala na lotómo ya koyangela.
Uta na bileko ya kala, bayangeli mingi basalaki bongo na kolobáká ete bazalaki banzambe to mpe ete bazwaki nguya na bango epai na banzambe. Likanisi liuti na lisapo mpamba, oyo ete “bokonzi bobulisami,” elobelamaki mingi na bakonzi ya kala ya Mésopotamie mpe na Bafarao ya Ezipito ya kala.
Alexandre le Grand, bakonzi ya Grèce ya kala oyo bakitanaki ye, mpe mingi na bakonzi ya Loma bamilobaki mpe ete bazalaki banzambe mpe basɛngaki nkutu ete bato básambela bango. Bibongiseli bizalaki na nsé ya bayangeli motindo wana, bibengamaki “losambo mpo na moyangeli,” mpe mokano na yango ezalaki ya koyeisa makasi bokonzi ya moyangeli likoló na bato ndenge na ndenge oyo ye asili kolónga. Koboya kosambela moyangeli ekweisamaki lolenge moko na likambo ya kotɛmɛla Ekólo. Kati na búku L’heritage de la Grèce et de la Rome, Professeur Ernest Barker akomaki ete: “Kotalela mokonzi [ya Loma] lokola nzambe, mpe lisungi oyo ye azwaki mpo na bonzambe na ye, emonani polele ete ezali mobɔkɔ, to na sikisiki mpenza, ezalaki lokola ciment ya bokonzi.”
Likambo yango limonanaki ata nsima wana “Boklisto” endimamaki na Leta na Mokonzi Constantin (oyo ayangelaki na mobu 306-337 T.B.) mpe na nsima, endimamaki lokola lingomba ya Leta na Mokonzi Théodose I (oyo ayangelaki na mobu 379-395 T.B.). Basusu kati na bakonzi “baklisto” basambelamaki lokola banzambe kino na ekeke ya mitano T.B.
“Nguya mibale,” “Mipangá mibale”
Wana bopápa ekómaki makasi mingi koleka, mikakatano kati na Lingomba mpe Leta ekómaki makasi. Na yango, na nsuka ya ekeke ya mitano T.B., pápa Gélase wa yambo abimisaki mobeko ya “nguya mibale”: bokonzi bobulisami ya bapápa ezalaki esika moko na nguya ya bakonzi—bakonzi bazalaki na nsé ya bapápa. Na nsima mobeko yango moyaki kokóma liteya ya “mipangá mibale”: “Mopangá ya elimo mosalelamaki na bapápa bango moko, na kopesáká mopangá ya makambo ya losambo te epai na bayangeli baoyo bazalaki bakonzi na Lingomba te, nzokande bakonzi yango bazalaki kosalela mopangá ya makambo ya losambo te na kolanda litambwisi ya pápa.” (The New Encyclopædia Britannica) Na nzela ya liteya oyo, Lingomba ya Katoliki ezalaki koloba na boumeli ya eleko ya Moyen Age ete, yango nde ezalaki na lotómo ya kofandisa bakonzi na ngwɛndɛ́ mpo ete bokonzi na bango endimama; yango ekóbisaki lisapo mpamba ya kala oyo ete “bokonzi bobulisami.”
Nzokande, yango esɛngeli te kokokanisama na oyo ebéngami ete bokonzi bouti na Nzambe, ebongiseli oyo esalemaki na nsima mpo na kosikola bakonzi ya politiki na nsé ya bokonzi ya bapápa. Liteya ya bokonzi bouti na Nzambe elobi ete bakonzi bazali kozwa bokonzi na bango epai na Nzambe ye mei, kasi na nzela ya pápa na Loma te. Búku New Catholic Encyclopedia elobi ete: “Na ntango oyo pápa azalaki kosalela nguya na ye ya mokonzi ya mokili mobimba, mpe azalaki kosalela ata bokonzi ya makambo ya losambo te likoló na bakambi ya bikólo, likanisi ya bokonzi bouti na Nzambe epesaki bakonzi ya bikólo nzela ya komonisa ete bokonzi na bango euti mpe na Nzambe motindo moko na oyo ya pápa.”b
Lisapo ya boyangeli mpo na bato banso
Na nsima ya bambula, bato basɛngaki biutelo mosusu ya bokonzi. Moko na yango ezalaki bokonzi bouti na bayangelami. Bato mingi bakanisaka ete likanisi wana liutaki na Grèce. Nzokande, demokrasi ya Grèce ya kala esalelamaki bobele kati na mwa ndambo moke ya bingumba minene, ata kati na yango, bobele babáli nde bazalaki kosala voti. Ekanisamaki ete, basi, baombo, bautá—50% kino 80% ya bato ya ekólo—batalelamaki te. Ezalaki soko moke te bokonzi bouti na bayangelami!
Nani akólisaki likanisi oyo ete bokonzi bouti na bayangelami? Likambo ya kokamwa, bateolozié ya lingomba ya Katoliki nde bakɔ́tisaki yango na eleko ya Moyen Âge. Na ekeke ya 13, Thomas d’Aquin alobaki ete atako lotómo ya koyangela euti na Nzambe, yango epesami nde na bayangelami. Likanisi yango lindimamaki na bato mingi. Búku New Catholic Encyclopedia elobi ete: “Mingi kati na bateolozié ya Katoliki ya ekeke ya 17 batómbolaki likanisi oyo ete bayangelami bazali eutelo ya bokonzi.”
Mpo na nini batéolozié ya lingomba oyo kati na yango bato bazalaki te na lotómo ya koloba kati na likambo litali koponama ya pápa, ya episkɔ́pɔ, mpe ya sángo, bakólisaki likanisi oyo ete bokonzi bouti na bayangelami? Mpo ete bakonzi mosusu ya mikili ya Mpótó bakómaki koboya mokemoke kozala na nsé ya bokonzi ya pápa. Liteya oyo ete bokonzi bouti na bayangelami lipesaki pápa nguya ya kolongola mokonzi moko soki amoni ete esɛngeli bongo. Bakomi na makambo na kala, Will mpe Ariel Durant, bakomaki ete: “Kati na bato oyo bazalaki kotombola likanisi oyo ete bokonzi bouti na bayangelami, ba Jésuites bazalaki mingi, bango nde bazalaki kotalela likanisi oyo lokola mwango mpo na kolɛmbisa bokonzi ya Leta liboso na bokonzi ya pápa. Episkɔ́pɔ Bellarmine alobaki ete soki bokonzi ya bakonzi euti na bayangelami na bongo, baoyo batyami na nsé na yango, na ntembe te, ezali mpenza na nsé ya bokonzi ya bapápa . . . Luis Molina, Jésuite ya mboka Espagne, alobaki ete lokola bayangelami bazali eutelo ya bokonzi, bakoki na bosembo nyonso—kasi na mwango malamu—kolongola mokonzi mabe.”
Na ntembe te, pápa nde asɛngeli kosala “mwango malamu” wana. Kondimáká likambo yango, Histoire Universelle de l’Eglise Catholique, búku moko ya Katoliki, etángi maloba ya búku Biographie universelle, oyo elobi ete: “Bellarmin . . . alakisi liteya ya Bakatoliki banso ete bayangeli bazalaki kozwa bokonzi na bango uta na liponi ya bayangelami, mpe bayangelami bakoki kosalela lotómo yango bobele na nsé ya bokonzi ya pápa.” (Biso nde totɛngisi yango.) Bokonzi bouti na bayangelami bokómaki esaleli ya pápa mpo na kopusa bato na kopona bayangeli, mpe kolongola bango soki yango esɛngeli. Na mikolo oyo, kati na mikili oyo mizali kosalela demokrasi, ekómi mwango mpo na bakonzi ya Lingomba ya Katoliki ete bápusa basangani ya lingomba na bango na kopona boyangeli ya demokrasi.
Kati na mikili ya demokrasi na mikolo na biso, lotómo oyo bulamatari ezali na yango mpo na koyangela ezwi mobɔkɔ na yango likoló na oyo ebéngami ete “mokano ya bayangelami.” Nzokande, yango ebéngami na lolenge loleki malamu ete “mokano ya bato mingi,” mpe mpo na kozanga bosepeli ya baponi mpe mayele mabe ya politiki, “bato mingi” wana ezali bobele bato moke kati na bayangelami. Lelo oyo, mbala mingi “mokano ya bayangelami” elimboli mpenza te “koboya ya bayangelami.”
Lisapo mpamba ya bokonzi bouti na ekólo
Lisapo mpamba ya bokonzi bobulisami, oyo bapápa batombolaki uta kala ezongelaki bango moko kozanga ete ekokisa mikano na yango na ntango ebongolamaki na bokonzi bouti na Nzambe. Bobele bongo, liteya oyo ete bokonzi bouti na bayangelami ebimisaki matomba mabe mpo na Lingomba ya Katoliki. Na boumeli ya ekeke ya 17 mpe ekeke ya 18, bafilozofe oyo bazalaki kati na lingomba te, lokola Bangelesi Thomas Hobbes mpe John Locke mpe Mofalansé Jean-Jacques Rousseau, bakanisaki mingi likoló na likanisi oyo ete bokonzi bouti na bayangelami. Bakólisaki makanisi na ntina etali liteya oyo ete “boyokani bosalemi na bato” kati na bayangeli mpe bayangelami. Malako na bango mazwaki mobɔkɔ na yango likoló na mateya ya lingomba te kasi likoló na “mibeko miuti na bato,” mpe liteya yango ebimisaki makanisi oyo epesaki mpasi monene na Lingomba ya Katoliki mpe bopápa.
Mwa moke nsima ya liwa ya Jean-Jacques Rousseau, Mbongwana monene esalemaki na France. Mbongwana yango ebebisaki makanisi mosusu na ntina na lotómo ya koyangela, kasi ebimisaki likanisi mosusu ya sika, oyo ete bokonzi bouti na ekólo. Búku The New Encyclopædia Britannica elobi ete: “Bafalansé baboyaki lotómo oyo Nzambe asili kopesa na bakonzi, baboyaki bopusi ya bato minene, bato na mikumba minene na Lingomba Katoliki ya Loma.” Kasi, búku Britannica elobi ete: “Mbongwana ememaki eloko ya sika, Ekólo-mboka, kino na bokóli.” Baoyo balukaki mbongwana bazalaki na mposa ya “eloko” wana ya sika. Mpo na nini?
Mpo ete na nsé ya ebongiseli oyo Rousseau azalaki kokumisa, banamboka nyonso bazalaki na lotómo lolenge moko mpo na kopona bayangeli. Yango elingaki kobimisa demokrasi oyo mobɔkɔ na yango mbɛlɛ ezalaki likoló na voti ya bato banso—likambo oyo bakambi ya Mbongwana na France balingaki yango te. Professeur Duverger alimboli ete: “Ezalaki mpenza mpo na kopɛngola likambo yango, oyo etalelamaki lokola ya mabe, nde, kobanda na mobu 1789 kino mobu 1791, bato minene ya Assemblée Constituante babimisaki liteya ya bokonzi bouti na ekólo. Babéngaki bayangelami ete ‘Ekólo,’ oyo batalelaki yango lokola eloko ya solo, oyo ekeseni na basangani na yango. Ekólo yango moko, na nzela ya bamonisi na yango, bapesamelaki likoki ya kosalela lotómo na bango ya koyangela . . . Na demokrasi ya likolólikoló, liteya oyo ete bokonzi bouti na ekólo ezali mpenza demokrasi soko moke te, mpamba te ekoki kosalelama mpo na kolóngisa motindo nyonso ya bulamatari, mingimingi, lolenge ya boyangeli oyo bobele moto moko nde azali na bokonzi nyonso.” (Biso nde totɛngisi yango.)
Milende ya bato milóngi te
Kondima Ekólo-Mboka lokola eutelo elongobani mpo na bokonzi ebimisaki ezalela ya bolingí-ekólo (nationalisme). Búku The New Encyclopædia Britannica elobi ete: “Bolingí-ekólo etalelami mingi lokola ezalela moko ya kala mpenza; mbala mosusu etalelamaka na lolenge mabe, lokola ete ezali likambo ya ntango nyonso kati na makambo ya politiki. Ya solo, mbongwana oyo ba américains mpe Bafalansé basalaki ezali bilembeteli na yango ya nguya.” Uta mbongwana wana esalemaki, ezalela ya bolingí-ekólo epalanganaki na Amerika, na Mpótó, na Afrika, mpe na Azia. Bitumba ya nsomo bindimamaki mpo na bolingí-ekólo.
Arnold Toynbee, mokomi na makambo na kala, ye moto ya mboka Grande-Bretagne, akomaki ete: “Bolingí-ekólo ezali mfulu ya ngayi ya vinyo ya sika ya Demokrasi kati na milangi ya kala ya bolingí-etulúká (tribalisme). . . . Boyokani oyo ya kokamwa kati na Demokrasi mpe bolingí-etulúká ezali makasi kati na lolenge ya kosalela makambo ya politiki na mikili ya Wɛ́sti ya mikolo oyo koleka Demokrasi yango moko.” Bolingí-ekólo ememi kimya na mokili te. Toynbee alobaki ete: “Na nsima na kopema mwa ntango mokuse, bitumba ya mangomba bilandanaki na bitumba biuti na bolingí-ekólo; mpe kati na mikili na biso ya Wɛsti ya mikolo oyo elimo ya kokumisa lingomba na kolekisa ndelo, ezali mpenza elimo bobele moko ya kosala mabe.”
Na nzela ya masapo mpamba na ntina etali “bokonzi bobulisami,” “bokonzi bouti na Nzambe,” “bokonzi bouti na bayangelami” mpe “bokonzi bouti na ekólo,” bayangeli bamekaki kondimisa bokonzi na bango likoló na baninga na bango bato. Nzokande, na nsima ya kotalela lisoló ya bayangeli, moklisto akoki bobele kondima likanisi oyo limonisamaki na Salomo, ete: “Moto azali koyangela [moninga na ye] moto mpo na kopesa ye mpasi.”—Mosakoli 8:9, NW.
Na esika ya kopesa losambo na bango epai na ekólo moko ya politiki, baklisto bazali kopesa losambo na bango epai na Nzambe mpe bazali kondima ete lotómo ya koyangela euti nde epai na ye. Bazali kondima maloba ya Davidi mokomi na Nzembo, oyo alobaki ete: “Na yo Yawe, bonene, nguya, nkembo, bokonzi na lokumu seko, zambi binso bizali o likoló mpe o nsé bizali bya yo. Na yo, Yawe bokonzi na boyangeli bwa bikelamo binso.” (1 Mikolo 29:11, Liloba lya Nzambe) Nzokande, mpo na limemya na bango epai na Nzambe, bazali komonisa botosi na lolenge lobongi epai na bokonzi ezala kati na makambo ya mokili to makambo ya elimo. Kati na masoló mibale oyo malandi, tokotala lolenge nini mpe mpo na nini bakoki kosala yango na esengo nyonso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Droit constitutionnel et institutions politiques, ya Maurice Duverger.
b The Catholic Encyclopedia elobi ete: “‘Bokonzi bouti na Nzambe’ (ekeseni mpenza na liteya oyo ete bokonzi nyonso, ézala ya koyangela mikili to ya koyangela bikólo, euti na Nzambe), endimamaki soko moke te na Lingomba ya Katoliki. Na ntango ya Mbongwana, ekómaki mpenza mabe koleka ndelo mpo na Lingomba ya Katoliki, bakonzi lokola Henri VIII, mpe Jacques I, ya Angleterre, bazalaki komitánga bakonzi na bokonzi nyonso likoló na Lingomba mpe likoló na ekólo.”
[Elilingi na lokasa 15]
Lingomba ya Katoliki ezalaki koloba ete yango ezalaki na lotómo ya kotya bakonzi na ngwɛndɛ́
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Consecration of Charlemagne: Bibliothèque Nationale, Paris