Likámá ya nikleere—Mbala oyo esili?
“EMONANI ete, elikya ya kimya awa na mabelé ezali monene sikawa koleka na eleko nyonso mosusu uta Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.” Makanisi oyo matondi na bilikya mingi ya mokomani ya Zulunalo moko, na nsuka ya bambula 1980, matongamaki likoló na likambo oyo ete boyokani mingi ya ntina esalemaki mpo na kotika kosalela bibundeli mpe mbongwana ya pwasa kati na makambo ya politiki eyaki kosukisa kowelana kati na mikili ya Nɔ́rdi mpe ya Súdi. Kasi likámá ya nikleere, oyo ezalaki makasi na ntango ya kowelana kati na mikili ya nguya, esilaki mpe? Kimya mpe kobatelama ya koumela elingaki kozwama mosika te?
Makámá mauti na bokóli ya mitango ya mikili oyo mizali na bibundeli ya nikleere
Wana bazalaki kotya motema na oyo ebéngamaki ete équilibre de la terreur mpo na kobatela kimya, na boumeli ya kowelana kati na mikili ya Nɔ́rdi mpe ya súdi, banguya minene ya mokili bandimaki kopesa nzela na bokóli ya boyebi ya kosalela nguya ya nikleere na malamu mpo na kimya kasi lisusu mpo na kotya ndelo na motango ya mikili oyo mikoki kosala bibundeli ya nikleere. Na mobu 1970, mokanda ya boyokani mpo na kopekisa bokóli ya mikili oyo mizali na bibundeli ya nikleere, etyamaki mabɔkɔ; na nsima endimamaki na mikili 140. Nzokande, mikili oyo mizali na likoki ya kosala bibundeli ya nikleere, lokola Inde, Argentine, Brésil mpe Israël bazali koboya kotya mabɔkɔ kino lelo oyo.
Nzokande, na 1985, Corée du Nord, mokili mosusu oyo ezali na likoki ya kosala bibundeli ya nikleere, eyaki kotya mabɔkɔ. Na yango, na ntango mokili yango eyebisaki ete emilongoli na boyokani wana na Mársi 12, 1993, mokili mobimba mozalaki na bobangi. Zulunalo Der Spiegel ya Allemagne elobaki ete: “Liyebisi wana mpo na kolongwa na boyokani ya kopekisa bokóli ya bibundeli ya nikleere ezalaki elembo ya makambo oyo masengelaki koya nsima: Sikawa ezali likámá ya komekana na bibundeli ya nikleere, kobanda na Azia, oyo ekoki kokóma mabe mingi koleka kowelana na babombi oyo ezalaki kati na banguya minene ya mokili.”
Awa bolingi-ekólo ezali kobota bikólo ya sika na lombangu mpenza, na ntembe te motángo ya mikili oyo mizali na bibundeli ya nikleere ekomata. (Talá etánda.) Mopanzi nsango Charles Krauthammer apesi likebisi oyo ete: “Nsuka ya likámá ya mikili ya Soviétique elimboli te nsuka ya likámá ya nikleere. Likámá ya solo mpenza ezali bongo bokóli ya motángo ya mikili oyo mizali na bibundeli ya nikleere, mpe bokóli yango ebandi nde kobanda.”
Babómbi ya kotɛka
Mikili oyo milingi kokóma na nguya ya kosala bibundeli ya nikleere mizali na mposa makasi ya kozwa lokumu mpe nguya oyo bibundeli wana bikopesaka. Nungunungu ezali koyokana ete mboka moko esombi mitó mibale ya babómbi na Kazakhstan. Mboka yango ezalaki kati na oyo ebéngamaki kala ete Union Soviétique, elobi ete mitó wana “ebungaki”.
Na Ɔkɔtɔ́bɛ 1992, bakangaki bato mingi na engumba Frankfurt, na Allemagne, bazalaki na césium oyo ezali na nguya makasi ya kongala, ezalaki na likoki ya kobebisa ebombelo ya mai ya engumba mobimba. Poso moko na nsima, bakangaki bayibi nsambo na engumba Munich, bazalaki na 2,2 kilos ya uranium. Bakonzi ya Leta bakamwaki na ntango bayaki koyeba bisika mibale ya bobimisi makéle ya nikleere na moyibi, mpo ete bobele bisika mitano ya motindo wana nde biyebisamaki kati na mokili mobimba mpo na mbula mobimba oyo euti koleka.
Eyebani te soki bato wana bazalaki na mokano ya kotɛka yango epai na basali na mobulu to na biyangeli ya mikili. Na bongo, likoki ya kobima ya mobulu na nzela ya bibundeli ya nikleere ezali sé kokóla. Dr. David Lowry mosali kati na ndako ya koyekola bokóli ya kosalelama ya bibundeli ya nikleere alimboli likámá yango, ete: “Moto ya mobulu akoki bobele kotinda mwa ndambo ya uranium ya nguya makasi lokola ndakisa epai na mokonzi oyo ayebani malamu mpo ete ameka ye, kolobáká ete azali na yango mingi mpe mwa ndambo oyo ezali bobele elembeteli. Ezali lokola moto oyo ayibaka bato, atindi litoyi ya moto oyo ye ayibi.”
“Babómbi oyo ebetaka mbala moko te” mpe “mitambo oyo ebomaka”
Na ebandeli ya mobu 1992, bamotɛ́lɛ 420 oyo ekobimisaka nguya ya nikleere esalemaki na mokano malamu mpo na kobimisa na yango lotilíkí; wana bazalaki kosala bamotɛ́lɛ mosusu 76. Kasi na nsima ya bambula, makámá ya bamotɛ́lɛ yango ebimisaki makono mingi, kosopana ya bazemi, bana babotami na nzoto mabe. Lapólo moko eyebisi ete pene na mobu 1967, makámá oyo mabimaki na izíni moko ya plutonium na mokili ya Union soviétique mabimisaki nguya ya nikleere mbala misato koleka oyo esalemaki na likámá ya engumba Chernobyl.
Ya solo, bapanzi nsango balobelaki mingi likámá wana ya engumba Tchernobyl, na mboka Ukraine, oyo esalemaki na Apríli 1986. Grigori Medwedew, enzeniele-mokonzi oyo atindamaki na izíni ya Chernobyl na bambula 1970, apesi ndimbola oyo ete “ebele ya nguya ya nikleere oyo ekoumelaka” oyo ebwakami kati na mopepe “ekoki kokokisama na babɔ́mbi zomi oyo ebwakamaki na engumba Hiroshima na kotalela koumela ya matomba mabe na yango.”
Kati na búku na ye Tschernobylskaja chronika, Medwedew atángi makámá minene 11 ya bamotɛ́lɛ ya nikleere oyo esalemaki na mboka oyo ebéngamaki kala Union soviétique na katikati ya bambula 1980, mpe 12 mosusu na Etats-Unis. Kati na makámá 12 yango, ezalaki mpe na likámá monene oyo esalemaki na Three Mile Island na 1979. Na ntina na likambo yango, Medwedew alobi ete: “Ezalaki likámá ya liboso oyo ebebisaki lokumu malamu ya nguya ya nikleere mpe elongolaki kati na bɔɔngɔ ya bato mingi makanisi mpamba na ntina etali libateli ya baizíni oyo ekobimisaka nguya ya nikleere—kasi ezalaki bongo mpo na bato banso te.”
Yango ezali kolimbola mpo na nini makáma mazali kobima kino sikawa. Na boumeli ya mobu 1992 ebakisamaki mingi na Russie na motuya ya 20%. Na nsima ya moko ya makámá yango, bobele na Mársi ya mobu wana kaka, na izíni ya lotilíki ya engumba Sosnovy-Bor (na Saint-Pétersbourg), na Russie, motango ya nguya ya nikleere emataki na 50% na nɔ́rdi ya Angleterre mpe elekisaki lisusu ndelo mbala mibale na Estonie mpe na súdi ya Finlande. Molakisi John Urquhart ya Kelasi monene ya Newcastle andimi ete: “Nakoki kopesa elembeteli te ete ezalaki Sosnovy-Bor nde ematisaki bokóli wana—kasi soki ezalaki Sosnovy-Bor te, ezalaki nde nini?”
Bato mosusu ya mayele balobaka ete bamotɛ́lɛ ya lolenge ya Chernobyl ezalaki na libunga na lolenge basalaki yango mpe ezali mpenza likámá ete ekoka kosalelama. Nzokande, koleka zomi na mibale ezali naino kosalelama mpo na kokokisa mposa monene oyo ezali kuna na ntina na lotilíki. Bato mosusu oyo batambwisaka bamotɛ́lɛ wana bafundamaka ete babalusaka bisaleli mosusu ya libateli mpo na kobakisa nguya ete ébima mingi. Balapólo ya boye ezali kobangisa mikili lokola France, epai 70% ya lontilíkí euti na baizíni yango ya nikleere. Soki likámá mosusu lokola oyo ya Chernobyl esalemi lisusu, ekosenga ete baizíni na yango mingi ékangama mpo na libela.
Emonani ete, ata bamotɛ́lɛ oyo ezali na “libateli malamu,” ekoki kobimisa likámá na nsima ya bambula. Na ebandeli ya mobu 1993, na boumeli ya mosala oyo mosalemaka mbala na mbala mpo na kotala soki bamotɛ́lɛ ekoki kobimisa likámá te, emonanaki ete batiyó mingi ya mabende ezalaki na minkaka koleka monkámá kati na bamotɛ́lɛ ya nikleere ya engumba Brunsbüttel, moko na bamasini ya kalakala ya Allemagne. Minkaka motindo wana mimonanaki mpe na bamotɛ́lɛ na France mpe na Suisse. Likámá monene ya liboso oyo esalemaki na izíni moko ya nikleere na Japon ezalaki na mobu 1991, emonani lokola ete konuna na yango nde ezalaki moko na makambo oyo ebimisaki likámá wana. Yango emonisi ete, makámá motindo wana makoki mpe kosalema na Etats-Unis, epai kuna pene na ndambo mibale kati na misato ya bamotɛ́lɛ ya nikleere esili koumela koleka mbula zomi.
Makámá ya mitɛlɛ ya nikleere maponi esika te, maponi ntango te. Soki bamotɛ́lɛ ezali mingi, makámá mpe ekozala minene; soki bamotɛ́lɛ ezali ya konuna, makámá mpe makobakisama. Ezali mpo na ntina wana nde zulunalo moko ebengaki yango ete ezali babombi oyo ebetaka mbala moko te mpe ezali mitambo oyo ebomaka.
Epai wapi bakoki kobwaka bosoto ya biloko ya nikleere?
Na mikolo oyo miuti koleka, na bangomba ya France, bato bakamwaki na komona etando moko ya pene na ebale esika bato bakendeke kominanola ezingamaki na efelo ya bibende mpe ekɛngɛlamaki na bapolísi. Zulunalo The European epesaki ndimbola oyo ete: “Bato oyo batalelaka mbala na mbala nguya ya nikleere bamonaki ete nsima ya liwa ya mwasi moko ya mboka wana, oyo akufaki na ngenge oyo ezalaka na béryllium esilaki koleka sanza mibale, emonisaki ete nguya ya makéle ya nikleere kati na etando wana epai bato bakokendeke kominanola ezalaki makasi mbala nkámá koleka ya oyo ya bitando ya zingazinga.
Béryllium ezalli ebende moko ya pepele oyo esalemi na kolanda myango ndenge na ndenge, bakosalelaka yango kati na bakompanyi oyo ekosalaka mpepo, soki ezali kobimisa nguya na yango, basalelaka yango mpe na baizíni epai kuna bakobimisaka nguya ya nikleere. Na ntembe te, kompanyi moko oyo esalaka béryllium ebwakaki bosoto oyo euti na myango ya bosáli, na esika wana ya kominanola to pene na yango. Zulunalo The European elobaki ete: “Bosoto ya béryllium, ata soki ebimisi nguya na yango te, ezali moko na lolenge ya bosoto ezali na ngenge makasi koleka.”
Na ntango wana, elobamaki ete, na boumeli ya eleko ya bambula 30, pene na batonó 17 000 ya bosoto ya nikleere ebwakamaki kati na bibale oyo ezali pene na Novaïa Zemlia oyo bato ya Union soviétique basalelaki lokola esika ya bomeki nguya ya nikleere na ebandeli ya bambula 1950. Lisusu, biteni ya masuwa ya nsé ya mai oyo ekosalelaka nguya ya nikleere mpe biteni ya bamotɛlɛ ya nikleere pene na 12 ebwakamaki kati na bibwakelo oyo ebongi na yango mpenza.
Ata soki ekanami to te, kobebisama na ezingelo mpo na bisaleli ya nikleere ezali bobele likámá. Na ntina na masuwa moko ya nsé ya mai oyo ezindaki na libongo ya Norvege na 1989, zulunalo Time epesaki likebisi oyo ete: “Manzanza na yango ezali kino sikawa kobimisa césium 137, oyo babéngaka isotope carcinogène. Kino lelo oyo, bato bakanisaka ete yango ekoki te mpo na kotya bikelamu ya mai to kolongono ya bato kati na likámá. Nzokande, masuwa Komsomolets ememaki mpe bibundeli mibale ya nikleere oyo ezalaki na 13 kg ya plutonium oyo ezali na nguya ya koumela mibu 24 000 mpe ezali na ngɛngɛ makasi na boye ete ata mwa mbuma moke ekoki koboma. Bato ya mayele ya mboka Russie bapesaki likebisi oyo ete kobanda na 1994 plutonium ekosopana na mai mpe kobebisa eteni monene ya mai monene.”
Ya solo, kobwaka bosoto bouti na biloko ya nikleere ezali bobele mokakatano na France mpe na Russie te. Etats-Unis ezali “na bangomba ya bosoto bouti na biloko ya nikleere mpe bazali na esika te ya sikisiki mpo na kobomba yango,” engebene zulunalo Time. Zulunalo yango elobi lisusu ete bamilió ya batonó ya biloko ya ngɛngɛ bibombami na bisika mpo na ntango mokuse, kasi ezali “likámá ya ntango nyonso ya kobungisama, koyibama, mpe kobebisama ya ezingelo mpo na kosalelama na yango na lolenge mabe.”
Lokola nde ezalaki mpo na komonisa likámá yango, ebombelo moko ya bosoto bouti na biloko ya nikleere na izíni moko ya kala ya kosala bibundeli na engumba Tomsk, na Sibérie, epanzanaki na Apríli ya mobu 1993, bato babangaki mingi, kokanisáká ete likámá mosusu lokola oyo ya Tchernobyl elingaki kosalema.
Emonani polele ete konganga na ntina na kimya mpe libateli oyo elobelami mpo na kotya motema na kosila ya likama na bibundeli ya nikleere ezali na mobɔkɔ malamu te. Kasi, atako bongo, kimya mpe libateli ezali mosika te. Ndende nini toyebi yango?
[Etanda na lokasa 4]
MIKILI OYO EZALI NA NGUYA YA KOSALA BIBUNDELI NA NIKLEERE
12 mpe motuya mozali sé kobakisama
MIKILI OYO MIZALI NA YANGO: Afrique du Sud, Biélorussie, Chine, États-unis, France, Grande-Bretagne, Inde, Israël, Kazakhstan, Pakistan, Russie, Ukraine
MIKILI OYO MIKOKI KOSALA YANGO: Algérie, Argentine, Brésil, Corée du Nord, Corée du Sud, Iran, Iraq, Lybie, Syrie, Taiwan
[Elilingi na lokasa 5]
Kosalema ya nguya ya nikleere ata mpo na mikano malamu ekoki kobimisa likámá
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Background: U.S. National Archives photo
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]
Cover: Stockman/International Stock
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
Fɔtɔ́ ya U.S. National Archives