Tólóna ezaleli ya kozala na makambo makasi te
“Tika ete boboto na bino boyebana na bato yɔnsɔ.”—BAFILIPI 4:5.
1. Mpo na nini ezali mpasi mpo na komonisa ezaleli ya kozala na makambo makasi te kati na mokili ya lelo?
“MOTO oyo azali na makambo makasi te”—engebene Sir Alan Patrick Herbert, oyo azali mokomi ya zulunalo, moto wa ekoló Angleterre, ezali moto ya lisapo mpamba. Ya solo, ekoki mbala mosusu komonana ete bato oyo bazalaka te na ezaleli ya makambo makasi basilá kolimwa kati na mokili oyo ekabwani na ntina na matáta. Biblia esakolaki ete na “ntango ya nsuka” oyo ya mpasi, bato bakozala “bato na yauli,” “bato na nkó,” “bazangi boboto”—na elobeli mosusu, bakozala na ezaleli ya makambo makasi. (2 Timɔtɛ 3:1-5) Nzokande, baklisto ya solo batalelaka ezaleli ya kozala na makambo makasi te na motuya monene mpenza, mpo bayebi ete ezali elembo ya mayele mauti na Nzambe. (Yakobo 3:17) Atako tozali kobika kati na mokili oyo ya makambo makasi, likoki ezali ya komonisa ezaleli ya kozala na makambo makasi te. Nkutu, atako lolenge nini ya mokakatano tokoki kokutana na yango, tozali kolanda toli epemami ya Nzambe oyo Paulo akomaki na Bafilipi 4:5: “Tika ete boboto na bino boyebana na bato yɔnsɔ.”
2. Lolenge nini maloba ya Paulo oyo mazwami kati na Bafilipi 4:5 mazali kosalisa biso na koyeba soki tozali na ezaleli ya makambo makasi te?
2 Tótalela lolenge nini maloba oyo ya Paulo ezali kosalisa biso na koyeba soki tozalaka to tozalaka te na ezaleli ya makambo makasi. Ezali te likambo ya koyeba lolenge nini biso moko tomitalelaka; ezali likambo ya koyeba lolenge nini basusu batalelaka biso, lolenge basusu bayebeli biso. Libongoli ya Phillips ebongoli mokapo wana boye: “Bóyebana ete bozali bato ya makambo makasi te.” Moko na moko na biso asengeli mpenza komituna: ‘Bato bayebeli ngai na lolenge nini? Nayebani ete nazalaka na ezaleli ya makambo makasi te, moto ya mindɔndɔ́ te mpe oyo azali na masɛngisi mingi te, to nayebani nde lokola moto oyo abongolaka makanisi na ye te, moto ya makambo makasi to ya motó makasi?
3. (a) Liloba ya Greke oyo ebongolami na “kozala na makambo makasi te” elimboli nini, mpe mpo na nini ezaleli yango ezali kitoko? (b) Lolenge nini moklisto akoki koyekola mingi kozala na ezaleli ya makambo makasi te?
3 Koyebana na biso na likambo oyo ekomonisa mpenza na meko nini tozali komekola Yesu Klisto. (1 Bakolinti 11:1) Ntango azalaki awa na mabelé, Yesu amonisaki na lolenge ya kokoka ndakisa eleki monene ya Tata na ye mpo na oyo etali ezaleli ya kozala na makambo makasi te. (Yoane 14:9) Nkutu, ntango Paulo akomaki na ntina na “bopɔlɔ mpe boboto ya Klisto,” liloba ya Greke oyo esalelami mpo na bopɔlɔ (e·pi·ei·kiʹas) elimboli mpe “kozala na makambo makasi te” to, na ndimbola na yango mpenza, “kobenda mindɔndɔ́ te.” (2 Bakolinti 10:1) Búku The Expositor’s Bible Commentary (Ndimbola ya maloba ya Biblia) ezali kobénga yango “moko na maloba ya ntina mingi mpo na kolobela lolenge kati na [K]ondimana ya [S]ika.” Ezali komonisa ezaleli moko kitoko mpenza, na boye ete molimboli moko ya maloba ya lokótá Greke abongoli liloba yango ete “ezaleli kitoko ya kozala na makambo makasi te.” Na bongo, ebongi ete tótalela mitindo misato oyo kati na yango Yesu, na ndakisa ya Yehova, Tata na ye, amonisaki ezaleli ya kozala na makambo makasi te. Tokoyekola mbala mosusu mpe lolenge biso moko tokoki kozala na ezaleli ya makambo makasi te.—1 Petelo 2:21.
“Kondima kolimbisa”
4. Lolenge nini Yesu amonisaki ete azalaki “kondima kolimbisa”?
4 Lolenge moko na Tata na ye, Yesu amonisaki ezaleli ya makambo makasi te na “kondimáká kolimbisa” mbala na mbala. (Nzembo 86:5) Tótalela likambo ya Petelo, moninga ya penepene ya Yesu, oyo awanganaki ye mbala misato na butu oyo akangamaki mpe asambisamaki. Liboso, Yesu ye moko alobaki ete: “Nde ye oyo akoangana ngai liboso na bato, ngai mpe nakoangana ye liboso na Tata na ngai na Likolo.” (Matai 10:33) Yesu asalelaki lilako wana epai na Petelo kozanga kobongola makanisi na ye mpe kozanga koyokela ye mawa? Ezali bongo te; nsima ya lisekwa na ye, Yesu ye moko akendeki kokutana na Petelo, na ntembe te, ezalaki mpo na kobɔndisa mpe kokitisa motema ya ntoma oyo abongolaki motema mpe azalaki na motema motutami. (Luka 24:34; 1 Bakolinti 15:5) Mwa moke na nsima, Yesu apesaki nzela na Petelo ete akokisa mokumba moko monene. (Misala 2:1-41) Talá lolenge malamu ya komonisa ezaleli kitoko ya kozala na makambo makasi te! Ezali mpenza libɔndisi na koyeba ete Yehova asili kotya Yesu lokola Mosambisi likoló na mokili, boye te?—Yisaya 11:1-4; Yoane 5:22.
5. (a) Bankulutu basengeli koyebana lolenge nini epai na bampate? (b) Masoló nini bankulutu bakoki kotánga yango lisusu liboso ya kosambisa makambo, mpe mpo na nini?
5 Na ntango bankulutu bazali kosambisa makambo kati na lisangá, basalaka makasi na kolanda ndakisa ya Yesu, na komonisáká ezaleli ya kozala na makambo makasi te. Mposa na bango ezali te ete bampate bábanga bango lokola nde bazalaki wana mpo na kopesa bitumbu. Nzokande, basalaka makasi na komekola Yesu mpo ete bampate bámiyoka ete babatelami epai na babateli batondi na bolingo. Ntango bazali kosambisa makambo, basalaka nyonso ete bázala na ezaleli ya makambo makasi te, kondima kolimbisa. Liboso ya kokata makambo motindo wana, bankulutu mosusu bamonaka malamu ete bázongela lisusu kotánga masoló oyo ya Mosenzeli ya Yúli 1, 1992, “Jéhovah, Mosambisi na sembo na mabelé mobimba” mpe “Bankulutu, bosambisaka makambo na bosembo nyonso.” Yango ezali kopesa bango nzela na koyeba lolenge Yehova asambisaka makambo, oyo emonisami na mokuse na maloba oyo: “Kozala ngwi na ekateli, soki esengeli; koyokela mawa, soki likoki ezali.” Ezali libungá te na komonisa motema mawa na ntango ya kosambisa likambo soki bantina malamu ya kosala bongo ezali. (Matai 12:7) Nzokande, ezali libungá monene kozala na makambo makasi mpe kozanga motema mawa. (Ezekiele 34:4) Na bongo, bankulutu bakopɛngola kosala libungá na kosaláká makasi na komonisa ezaleli eleki ya boboto mpe ya motema mawa, kozanga kobebisa bosembo.—Kokanisá na Matai 23:23; Yakobo 2:13.
Koyeba kotalela likambo na likambo ya sika
6. Lolenge nini Yesu amonisaki ezaleli ya kozala na makambo makasi te na ntango asololaki elongo na mwasi Mopakano, oyo mwana na ye ya mwasi atungisamaki na bademó?
6 Lolenge moko na Yehova, Yesu amonaki malamu kobongola makanisi na ye to komiyokanisa na likambo na likambo ya sika. Na libaku moko, mwasi moko mopakano asɛngaki ye ete abikisa mwana na ye ya mwasi oyo atungisamaki makasi na bademó. Na lolenge misato ekeseni, Yesu amonisaki ye liboso ete alingaki kosalisa ye te—ya liboso, aboyaki koyanola ye; ya mibale, alobaki na ye polele ete atindamaki mpo na Bapakano te, kasi mpo na Bayuda; mpe ya misato, apesaki lisese moko oyo emonisaki bobele likambo moko wana na boboto nyonso. Atako bongo, mwasi yango alɛmbaki te, amonisaki kondima moko monene. Kotaleláká bonene ya likambo wana, Yesu amonaki ete wana ezalaki te ntango ya kosalela lilako wana litalelaki bato banso; na likambo oyo, ezalaki ntango ya koyeba kotalela likambo na likambo na boyokani na mitinda mitombwami.a Na yango, Yesu asalaki mpenza likambo oyo amonisaki mbala misato ete akosala yango te. Abikisaki mwana mwasi ya mama wana!—Matai 15:21-28.
7. Na makambo nini baboti bakoki komonisa ezaleli ya kozala na makambo makasi te, mpe mpo na nini?
7 Biso mpe toyebani mpo na ezaleli na biso ya koyeba kotalela likambo na likambo na ntango ebongi? Mbala mingi, esɛngaka ete baboti bámonisa ezaleli motindo wana ya makambo makasi te. Mpamba te mwana moko na moko akeseni na mosusu, mwango oyo ekoki kobimisa matomba epai na mwana moko ekoki mbala mosusu kobonga te epai na mwana mosusu. Lisusu, wana bana bazali kokóla, bamposa na bango mpe ezali kobongwana. Okosengela nde kobongola ngonga oyo ozali kosɛnga bango ete bázonga na ndako na mpokwa? Boyekoli ya libota ekobimisa nde matomba soki esalemi na lolenge mosusu ya malamu koleka? Soki moboti moko asali na lolenge ya kolekisa ndelo na ntina ya libungá moko ya moke, akosepela komonisa komikitisa mpe kobongisa likambo yango? Baboti oyo bazalaka na mindɔndɔ́ te motindo wana bapɛngolaka kosilikisa bana na bango pambapamba mpe kotangwisa bango mosika na Yehova.—Baefese 6:4.
8. Lolenge nini bankulutu na masangá bakoki kopesa ndakisa mpo na oyo etali kokamata bibongiseli mpo na komiyokanisa na bamposa ya teritware?
8 Bankulutu mpe basengeli koyeba kotalela likambo na likambo ya sika, kozanga kobuka mibeko ya sikisiki ya Nzambe. Wana ezali bino kotambwisa mosala ya kosakola, boyebaka lolenge mbongwana ezali kosalema kati na teritware? Lokola lolenge ya bomoi ya bato ekoki kobongwana kati na esika efandi bango, mbala mosusu kopesa litatoli na mpokwa, na balabála to na nzela ya telefone ekoki kozala malamu. Na koyebáká kotalela likambo na likambo motindo wana, tokokokisa malamu mosala na biso ya basakoli. (Matai 28:19, 20; 1 Bakolinti 9:26) Kati na mosala na ye ya kosakola Paulo azalaki mpe komiyokanisa na motindo nyonso ya bato. Biso mpe tosalaka bongo, na ndakisa, na kolukáká koyeba makambo mingi na ntina na mangomba mpe mimeseno oyo ezali komonana mingi na teritware na biso, mpo na kosalisa bato?—1 Bakolinti 9:19-23.
9. Mpo na nini nkulutu moko asengeli te bobele kokangama na myango ya kala mpo na kosilisa mikakatano?
9 Lokola mikolo oyo ya nsuka ezali sé kokóma mpasi, babateli ya mpate mpe basengeli mbala mosusu kotalela mikakatano ndenge na ndenge mpe ya mpasi oyo bampate bazali kokutana na yango. (2 Timote 3:1) Bankulutu, oyo ezali te ntango ya kozala na makambo makasi! Ya solo, nkulutu moko akokangama te na mwango moko boye ya kala mpo na kosilisa likambo moko soki myango na ye ya kosalela mizali kobota lisusu matomba malamu te to soki “moombo ya sembo” amoni malamu kobimisa bingɛngiseli mosusu ya sika mpo na likambo yango. (Matai 24:45; kokanisá na Mosakoli 7:10; 1 Bakolinti 7:31.) Nkulutu moko oyo azalaki na bolingo malamu amekaki na bosembo nyonso kosunga ndeko mwasi moko oyo azalaki konyokwama mingi na makanisi mpe oyo azalaki na mposa ya moto oyo akoki koyoka ye malamu. Nzokande, nkulutu wana atalelaki mpasi ya ndeko mwasi wana te lokola likambo moko ya monene mpe asalisaki ye bobele na lolenge ya likolólikoló. Na nsima, la Société Watch Tower ebimisaki bandimbola oyo etóngami likoló na Biblia oyo etalelaki mpenza mpasi ya moklisto mwasi wana. Nkulutu yango amibongisaki ete asolola na ndeko mwasi wana lisusu, na mbala oyo, asalelaki makanisi wana ya sika oyo atángaki mpe amonisaki mawa na mpasi na ye. (Kokanisá na 1 Batesaloniki 5:14, 15.) Nkulutu oyo amimonisaki ete azali na ezaleli ya makambo makasi te; oyo nde ndakisa kitoko!
10. (a) Lolenge nini bankulutu basengeli komonisa ete bazali na ezaleli ya kobenda mindɔndɔ́ te moko epai na mosusu mpe epai na lisangani ya bankulutu na mobimba na yango? (b) Lolenge nini lisangani ya bankulutu basengeli kotalela nkulutu oyo azali na ezaleli ya makambo makasi?
10 Bankulutu basengeli mpe kozala na mindɔndɔ́ te kati na bango. Ntango lisangani ya bankulutu bazali esika moko, ezali likambo ya ntina ete moko alinga te ete basusu bayokaka bobele ye! (Luka 9:48) Ye oyo azali kokamba likita asengeli kozala na bokɛngi mpenza na likambo yango. Mpe na ntango nkulutu moko to bankulutu mibale bandimi te ekateli moko oyo ezwami na bankulutu mosusu oyo bazali na bango esika moko kati na lisangani, bakokangama te bobele ete likanisi na bango wana endimama. Nzokande, lokola etinda ata moko ya Biblia ekweisami te, bakoboya mindɔndɔ́, na komikundoláká ete nkulutu asengeli kozala moto ya makambo makasi te. (1 Timoté 3:2, 3) Epai mosusu, lisangani ya bankulutu esengeli koyeba ete Paulo apamelaki lisangá ya Kolinti mpamba te bazalaki ‘kondima bato ya makambo makasi,’ baoyo bamimonisaki ete bazali “bantoma minɛnɛ minɛnɛ.” (2 Bakɔlinti 11:5, 19, 20) Na yango, bankulutu basengeli te kokakatana na kopesa toli epai na nkulutu moko oyo azali komitambwisa na lolenge ya motó makasi to kozala na makambo makasi, kasi bango moko mpe basengeli kozala na bopɔlɔ mpe na boboto na ntango bazali kosala bongo.—Bagalatia 6:1.
Kozala na makambo makasi te mpo na kosalela bokonzi
11. Bokeseni nini bozali kati na lolenge oyo bakonzi na mangomba ya Bayuda bazalaki kosalela bokonzi mpe lolenge oyo Yesu asalelaki yango?
11 Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, ezaleli na ye ya kozala na makambo makasi te emonanaki polele na lolenge asalelaki bokonzi oyo Tata na ye apesaki ye. Oyo nde bokeseni na bakonzi ya mangomba oyo bazalaki na eleko na ye! Tókamata ndakisa moko. Mobeko ya Nzambe epekisaki ete mosala moko esalema te, ata mpe kolɔkɔta nkoni te, na mokolo ya Sabata. (Exode 20:10; Mituya 15:32-36) Bakonzi ya mangomba balingaki kolandela mpenza lolenge bato bazalaki kosalela mobeko wana. Na bongo, bamipesaki lotómo ya kokata na sikisiki mpenza eloko moto asengelaki kotombola na mokolo ya Sabata. Batyaki mobeko oyo ete: bakoki kotombola eloko moko te oyo ezali na bozito koleka mbuma mibale ya mosuke oyo ekauki. Bapekisaki ata kolata mapápa oyo ezalaki na nsɛtɛ, kolobáká ete kotombola bozito ya nsɛtɛ elimbolaki kosala mosala! Elobami ete, balakisi na mibeko ya Bayuda babakisaki malako 39 likoló na mobeko ya Nzambe na ntina na Sabata mpe na nsima, babakisaki makambo mingi mosusu likoló na malako yango. Nzokande, Yesu alukaki te kopesa bato liyoki ya komema ngambo, na kotyeláká bango ebele ya bipekiseli to na kotyáká mibeko makasi, oyo ezali mpasi mpo na kokokisa yango.—Matai 23:2-4; Yoane 7:47-49.
12. Mpo na nini tokoki koloba ete Yesu akakatanaki te mpo na kosimba mitinda ya sembo ya Yehova ntango yango etyelamaki ntembe?
12 Na yango, tosengeli koloba ete Yesu azalaki te kokangama na mitinda ya Nzambe oyo etali bosembo? Soko moke te! Ayebaki ete mibeko mizalaka na ntina mingi soki bato babateli na mitema na bango mitinda oyo likoló na yango mibeko misalemi. Wana Bafalisai bazalaki komonisa bato mpasi na ebele ya malako, Yesu azalaki koluka kosimba mitema. Na ndakisa, ayebaki malamu ete ntina ezalaki te na kobuka mibeko ya Nzambe lokola oyo ete “bokima pite.” (1 Bakɔlinti 6:18) Yango wana akebisaki bayoki na ye na ntina na makanisi oyo makoki komema na pite. (Matai 5:28) Lolenge wana ya koteya ezali kosɛnga mayele mingi mpe bososoli mingi, na esika ya kosala ebele na malako makasi mpe oyo etondi na bitumbu.
13. (a) Mpo na nini bankulutu basengeli kopɛngola ezaleli ya kopesa mibeko mpe malako oyo ekoki kobongwana te? (b) Wapi mwa makambo oyo kati na yango ezali ntina ete tótosa lisosoli ya moto mosusu?
13 Baklisto oyo bazali na mikumba lelo kati na lisangá basepelaka mpe na likambo litali kosimba mitema. Na yango, bapɛngolaka kotya malako makasi mpe oyo mazangi kobongwana, to kokómisa makanisi na bango moko mibeko. (Kokanisá na Danyele 6:7-16.) Na bantango mosusu, ebongi kolobela na boboto nyonso makambo matali molato mpe lolenge ya kokata nsuki, kasi nkulutu moko akoki kobebisa lokumu na ye malamu ya moto oyo azali na makambo makasi te soki akangami ntango nyonso na kolobeláká makambo wana mbala na mbala to soki ameki kosɛngisa bato makambo oyo ye asepelaka na yango. Ya solo, kati na lisangá tosengeli kopɛngola koluka kozala na bokonzi likoló na makambo ya basusu.—Kokanisá na 2 Bakolinti 1:24; Bafilipi 2:12.
14. Lolenge nini Yesu amonisaki ete azalaki na makambo makasi te mpo na oyo azalaki komizela na yango epai na basusu?
14 Bankulutu bakolinga mbala mosusu komitalela na likambo mosusu: “Nazalaka na makambo makasi te na oyo namizelaka na yango epai na basusu?” Kozanga ntembe, Yesu azalaki mpenza na ezaleli wana. Azalaki ntango nyonso komonisa na bayekoli na ye ete azalaki te kosɛnga bango makambo oyo malekaki milende oyo bazalaki kosala na molimo na bango mobimba, mpe ete azalaki kosepela mingi na milende yango. Akumisaki mwasi, mobola mokufeli-mobali oyo apesaki mosolo na ye ya motuya moke. (Malako 12:42, 43) Apamelaki bayekoli na ye na ntango batɔngaki Malia mpo na likabo na ye ya motuya mingi oyo apesaki, alobaki na bango ete: “Tika ye! . . . Ye asali elɔkɔ ekokaki na ye kosala.” (Malako 14:6, 8) Amonisaki ezaleli ya kozala na makambo makasi te, ata na ntango bayekoli na ye bazalaki kosala makambo oyo mazalaki kosepelisa ye te. Na ndakisa, atako ayebisaki bantoma na ye misato ya penepene ete bákɛngɛla elongo na ye mpe básɛnzɛla na butu oyo bakangaki ye, ayokaki mpasi mingi na motema na komona bango kolala mbala na mbala. Nzokande, ayebisaki bango na boboto nyonso ete: “[Elimo ezali makasi, NW] nde njoto ejali na motau.”—Malako 14:34-38.
15, 16. (a) Mpo na nini bankulutu basengeli kosɛnzɛla ete bápusa te to básɛngisa te bampate na kosala makambo na makasi? (b) Lolenge nini ndeko mwasi moko oyo azalaki na bolingo malamu ayebaki ntina ya kozala te na makambo makasi epai na basusu?
15 Ya solo, Yesu alendisaki bayekoli na ye ete ‘bábunda makasi.’ (Luka 13:24) Kasi apusaki bango na makasi te! Azalaki kolendisa bango mpo na yango, apesaki bango ndakisa, azalaki kosala yango ye moko liboso, mpe alukaki kosimba mitema na bango. Atyaki elikya na ye na nguya ya elimo ya Yehova mpo na kosala makambo mosusu. Bobele bongo mpe lelo, bankulutu basengeli kolendisa bampate mpo na kosalela Yehova na motema na bango mobimba, kasi basengeli kopɛngola kopusa bango na kosala makambo na makasi na kopesáká bango liyoki ya komema ngambo to koyokisa bango nsɔ́ni, komonisáká ete oyo bazali kosala kati na mosala ya Yehova ezali na ntina te to ekoki kondimama te. Ezaleli ya makambo makasi, ya kopusa bato na makasi ete “bósala mingi koleka, bósala mingi koleka, bósala mingi koleka!” ekoki kolɛmbisa baoyo bazali kosala nyonso oyo ekoki na bango. Oyo nde mawa, soki nkulutu moko ayebani ete azalaka moto “oyo asepelaka na likambo moko te”—ezaleli oyo ekeseni mpenza mosika na ezaleli ya kozala na makambo makasi te!—1 Petelo 2:18.
16 Biso banso tosengeli kozala na makambo makasi te mpo na oyo tozali komizela na yango epai na basusu! Moklisto mwasi moko, nsima wana ye mpe mobali na ye batikaki mosala ya misionere mpo na kosunga mama na ye oyo azalaki na bokɔnɔ, akomaki ete: “Eleko na biso ezali mpenza ya mpasi mpo na basakoli kati na masangá. Lokola tozalaki kati na mosala ya zongazonga mpe ya etúká, tobatelamaki na mitungisi mingi oyo tozali na yango sikawa, na pwasa nyonso mpe na lolenge ya mpasi, tosili komesena na yango. Na ndakisa, na ebandeli nazalaki koloba ete: ‘Mpo na nini ndeko mwasi oyo azali kokabola te mikanda misengeli na sanza oyo? Atángaka nde Mosala na biso ya Bokonzi te?’ Sikawa nayebi mpo na nini. Mpo na basusu, ezali nde nyonso oyo ekoki na bango kosala kati na mosala ya kosakola.” Ezali mpenza malamu kokumisa bandeko na biso mpo na oyo bazali kosala, na esika ya kotalela oyo bazali kosala te!
17. Ndakisa nini ya moto na makambo makasi te Yesu atikelaki biso?
17 Tótalela ndakisa ya nsuka oyo emonisi lolenge Yesu azalaki kosalela bokonzi na ye kozanga kozala na makambo makasi. Motindo moko na Tata na ye, Yesu abatelaka bokonzi na ye na makasi te. Ye akakatanaka te mpo na kopesa mikumba mingi, aponaki moombo na ye ya sembo mpe ya mayele mpo na kobatela “bozwi na ye nyonso” awa na mabelé. (Matai 24:45-47, NW) Mpe abangaka te mpo na koyoka makanisi ya basusu. Azalaki mbala mingi kotuna epai na bayoki na ye ete: “Bokanisi nini mpo na yango?” (Matai 17:25; 18:12; 21:28; 22:42) Esengeli mpe kozala bongo mpo na bayekoli nyonso ya Yesu na mikolo na biso. Atako bazali na mokumba ya lolenge nini, basengeli te komonisa bopotu mpo na koyoka basusu. Baboti, bóyokaka! Mibali, bóyokaka! Bankulutu, bóyokaka!
18. (a) Lolenge nini tokoki koyeba ete tozali bato oyo bazali na ezaleli ya makambo makasi te? (b) Tosengeli biso nyonso kozwa ekateli ya kosala nini?
18 Kozanga ntembe, moko na moko na biso alingi ‘koyebana ete azali moto na makambo makasi te.’ (Bafilipi 4:5, Phillips) Kasi ndenge nini tokoki koyeba soki toyebani motindo wana? Ee, na ntango Yesu alingaki koyeba soki bato bazalaki koloba nini mpo na ye, atunaki epai na baninga na ye oyo babongi na kotyela motema. (Matai 16:13) Mpo na nini te komekola ye? Okoki kotuna moto oyo otyelaka motema mpo ete aloba na bosembo nyonso, soki ozali to ozali te na makambo makasi to na mindɔndɔ́. Ya solo, biso banso tozali na mingi ya kosala mpo na komekola Yesu Klisto ndakisa ya kokoka mpo na oyo etali kozala na makambo makasi te! Mingimingi soki tozali na mwa bokonzi likoló na basusu, tiká ete tólanda ntango nyonso ndakisa ya Yehova mpe ya Yesu, kozala na ezaleli ya makambo makasi te, kondima kolimbisa, koyeba kotalela likambo na likambo to kozala moto na mindɔndɔ́ te soki likoki ezali. Ee, tósala makasi biso nyonso na “kozala na makambo makasi te”!—Tito 3:2.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku New Testament Words (Maloba ya Kondimana ya Sika) eyebisi ete: “Moto oyo azali epieikēs [oyo azali na makambo makasi te] ayebi ete na mabaku mosusu, likambo moko likoki kolóngisama na boyokani na mibeko, nzokande ekoki kozala libungá na kotalela bizaleli malamu. Moto oyo azali epieikēs ayebi ntango nini asengeli kolɛmbisa mobeko na nsé ya bopusi ya nguya oyo etombwami mpe ya malamu koleka mibeko.”
Okoyanola lolenge nini?
◻ Mpo na nini baklisto basengeli kolinga kozala na ezaleli ya makambo makasi te?
◻ Lolenge nini bankulutu basengeli komekola Yesu mpo na oyo etali kondima kolimbisa?
◻ Mpo na nini tosengeli, na ndakisa ya Yesu, kokangama na ezaleli ya kondima kobongola makanisi na biso?
◻ Lolenge nini tokoki komonisa ezaleli ya kozala na makambo makasi te ntango tozali kosalela bokonzi?
◻ Lolenge nini tokoki komitalela mpo na koyeba soki tozali mpenza na ezaleli ya makambo makasi te?
[Elilingi na lokasa 15]
Yesu andimaki mpenza kolimbisa Petelo, oyo abongolaki motema
[Elilingi na lokasa 16]
Liboso ya mwasi moko oyo amonisaki kondima monene, Yesu amonaki ete wana ezalaki te ntango ya kosalela lilako oyo litalelaki bato banso
[Elilingi na lokasa 18]
Baboti, bóyokaka!
[Elilingi na lokasa 18]
Mibali, bóyokaka!
[Elilingi na lokasa 18]
Bankulutu, bóyokaka!