Nsango malamu esengeli kosakolama liboso
“Nsango malamu esengeli liboso kosakolama kati na mabota nyonso.”—MALAKO 13:10, NW.
1, 2. Wapi elembo mpo na koyeba Batatoli, mpe mpo na nini?
MPO na nini Batatoli ya Yehova bazali kolendendela kati na mosala ya kosakola? Ya solo, toyebani na mokili mobimba mpo na mosala na biso ya kosakola, ezala ndako na ndako, na balabála, to na nzela ya litatoli ya libaku malamu. Na libaku nyonso oyo ebongi, tomimonisaka biso moko ete tozali Batatoli mpe tolukaka koyebisa, na mayele nyonso, nsango malamu oyo tozwaka na motuya mingi. Ya solo, tokoki koloba ete mosala yango mozali elembo oyo emonisaka biso!—Bakolose 4:6.
2 Kanisá naino likambo oyo—bipai binso oyo bato bamonaka na kartyé na bango etuluku ya mibali, ya basi mpe ya bana oyo balati malamu mpe bamemi basakosi, mbala mingi likanisi na bango ya liboso lizalaka nini? Ezalaka, ‘Oh, talá Bakatolike (to ba Orthodoxes) bayei lisusu!’ to, ‘Talá, ba Pentecotistes (to ba Baptistes) bayei lisusu!’ Te. Bato bayebi ete basangani ya mangomba wana basanganaka te na mabota na bango mobimba kati na mosala ya ndako na ndako. Ekoki kozala ete mwa bituluku mosusu ya mangomba batindaka ndambo na “bamisionere” na bisika mosusu mpo na kokokisa mokumba moko na boumeli ya mibu mibale, kasi mingi kati na basangani na yango basalaka mosala lolenge yango te. Bobele Batatoli ya Yehova nde bayebani na mokili mobimba mpo na molende na bango ya kosakwela basusu nsango na bango na libaku nyonso malamu. Bayebani lisusu malamu na nzela ya bazulunalo na bango, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!—Yisaya 43:10-12; Misala 1:8.
Bakeseni na bakonzi ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba
3, 4. Lolenge nini bamonisaka mbala mingi bakonzi ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba kati na bopanzi nsango?
3 Na kokesena monene, kati na mikili misusu bopanzi nsango esili mbala na mbala komonisa bakonzi ya mangomba ete bazali babebisi ya bana, bayibi oyo bazali na mayele mabe, mpe babúbi. Misala ya nzoto oyo bazali komonisa mpe lolenge ya bomoi na bango ya bato na bozwi mingi eyebani polele na baoyo nyonso bazali komona yango. Alangá-nzembo moko oyo ayebani mingi amonisaki yango polele kati na loyembo na ye moko na motó ya likambo ete “Yesu alingaki kolata móntɛlɛ Rolex [ya ntalo mingi oyo esalemi na wolo] wana ezali ye koteya na televizyó?” Atunaki motuna oyo: “Yesu alingaki kozala mokonzi ya politiki soki azongaka lisusu awa na mabelé? Mbɛlɛ ndako na ye mosusu ezali na engumba ya bozwi mingi ya Palm Springs [na Californie] mpe alingaki koluka kobomba bozwi na ye?” Maloba oyo ya Yakobo mabongi mpenza: “Bosili kofanda na mokili na bilɔkɔ kitɔkɔ mpe bomisepelisi; bomitondisi mitema na lokoso mpɔ na mokɔlɔ na kobomama.”—Yakobo 5:5; Bagalatia 5:19-21.
4 Boninga ya bakonzi na mangomba elongo na bakonzi ya politiki, mpe nkutu ebonga ya bokonzi oyo balukaka ntango na boponi ya bakonzi ya politiki ezali komonisa bango lokola bakomeli mpe bafalisai ya mikolo na biso. Bobele na ntango yango, na bamboka lokola Etats-Unis mpe Canada, mosolo ya mangomba mozali kosila na mbongo mingi oyo ebimisami mpo na bifundeli mpe kosamba makambo oyo ezali kokwela bakonzi ya mangomba, lokola mbuma ya etamboli na bango ya mbindo elongo na bana mpe mikolo.—Matai 23:1-3.
5. Mpo na nini bakonzi ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba bamonisaki bilembo te ete bazali “moombo ya sembo mpe ya mayele”?
5 Na lolenge lobongi, Yesu akokaki koloba na ntina na bakonzi ya mangomba na mikolo na ye ete: “Mawa na bino, bakomeli mpe Bafalisai, bakosi! Jambi bojali lokola mayita mapakolami mpɛmbɛ. Yango emɔnani kitɔkɔ libanda nde katikati itondi na mikwa na bato bakufi mpe na ndenge yɔnsɔ na bosɔtɔ. Bongo bino bomɔnani libanda epai na bato ete bojali bayɛngɛbɛni nde katikati botondi na bokosi mpe na yauli.” Na yango, Nzambe apesaki mokumba ya kosakola nsango malamu epai na bakonzi ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba te, ezala Katolike, Protestá, Orthodoxe, to ezala mangomba mosusu oyo matángami te kati na mangomba minene wana. Bamonisaki bilembeteli te ete bazali “moombo ya sembo mpe ya mayele” oyo asakwelamaki—Matai 23:27, 28; 24:45-47.
Mpo na nini kosakola liboso nsango malamu?
6. Makambo nini masengeli kobima mosika te?
6 Kati na lisoló mokuse oyo akomaki na ntina na etindá na Yesu ya kosakola nsango malamu kati na mabota nyonso, bobele Malako nde asalelaki liloba “liboso.” (Malako 13:10; Kokanisá na Matai 24:14.) Bondeko bwa sika ebongoli yango ete: “Kasi libosó Nsango Elámu esengelí kopalangana o bikólo bínso.” Esaleli ya litɛ́mɛlɛ “liboso” emonisi ete makambo mosusu masengelaki kolanda mosala ya kopalanganisa nsango malamu na mokili mobimba. Makambo yango makosangisa bolozi monene oyo ekanamaki mpe boyangeli ya sembo ya Klisto kati na mokili ya sika.—Matai 24:21-31; Emoniseli 16:14-16; 21:1-4.
7. Mpo na nini Nzambe alingi ete nsango malamu esakolama liboso?
7 Mpo na nini Nzambe alingi ete nsango malamu esakolama naino liboso? Moko na bantina ezali ete ye azali Nzambe ya bolingo, ya boyengebene, ya bwanya mpe ya nguya. Kati na kokokisama ya maloba na Yesu oyo mazali na Matai 24:14 mpe na Malako 13:10, tozali komona bilembo ya kokamwa ya bizaleli wana ya Yehova. Tiká tótalela bizaleli yango moko na moko mpe tómona lolenge nini yango ekangisami na kosakolama ya nsango malamu.
Nsango malamu mpe bolingo ya Yehova
8. Lolenge nini kosakolama ya nsango malamu ezali elembo ya bolingo ya Nzambe? (1 Yoane 4:7-16)
8 Lolenge nini kosakolama ya nsango malamu ezali komonisa bolingo ya Nzambe? Libosoliboso, mpo ete ezali te nsango oyo ekanami bobele mpo na lomposo moko to mpo na etuluku moko ya bato. Ezali nsango malamu mpo na “bato na mabota nyonso.” Nzambe alingi libota ya bato mingi na boye ete atindaki Mwana sé moko na ye awa na nsé mpo amipesa lokola mbeka na masumu ya bato nyonso, kasi te bobele mpo na bato na lomposo moko. Ntoma Yoane akomaki ete: “Mpɔ ete Njambe alingaki mokili na motindo boye ete apɛsi Mwana-na-likinda na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama tɛ kasi ete ajala na bomɔi na seko. Mpɔ ete Njambe atindi Mwana na ye kati na mokili ete asambisa mokili tɛ kasi ete mokili ebika mpɔ na ye.” (Yoane 3:16, 17) Ya solo, nsango malamu, oyo ezali na elaka ya mokili ya sika ya kimya, ya bomoko mpe ya boyengebene, ezali elembo ya bolingo na Nzambe.—2 Petelo 3:13.
Nsango malamu mpe nguya ya Yehova
9. Mpo na nini Yehova asalelaki te mangomba ya nguya mingi ya boklisto ya nkombo mpamba mpo na kosakola nsango malamu?
9 Lolenge nini nguya ya Yehova ezali komonana kati na kosakolama ya nsango malamu? Kanisá naino, banani oyo azali kosalela mpo na kokokisa mokumba yango? Ezali nde mangomba ya nguya mingi kati na boklisto ya nkombo mpamba, lokola Lingomba ya Katolike ya Loma, to mangomba minene ya protestá? Te, komikɔtisa na bango kati na politiki elongoli bango makoki ya kokokisa mokumba yango. (Yoane 15:19; 17:14; Yakobo 4:4) Bozwi mingi na bango mpe boyokani mpe bopusi oyo bazali kosala likoló na bakonzi ya politiki esepelisi Yehova Nzambe ata moke te, motindo moko lokola teoloji na bango oyo ekangami makasi na mateya ya bonkɔ́kɔ. Nguya ya bato ezali na ntina te mpo na kokokisa mokano ya Nzambe.—Zakaria 4:6.
10. Nzambe asili kopona nani mpo na kosakola?
10 Yango eyokani na oyo ntoma Paulo alobaki kati na mokanda na ye epai na lisangá ya Kolinti ete: “Bandeko, botala ebiangeli na bino. Bato na mayɛlɛ na njoto babiangami mingi tɛ, bato mingi na nguya mpe tɛ, bato mingi na mabota na lokumu tɛ. Kasi Njambe apɔni bilɔkɔ na bolema na mokili ete ayokisa bilɔkɔ na mayɛlɛ nsɔni mpe Njambe apɔni bilɔkɔ na bolembu kati na mokili ete ayokisa bilɔkɔ na nguya nsɔni. Njambe apɔni bilɔkɔ bijangi lokumu mpe bilɔkɔ bityolami mpe yango bijali tɛ ete bikomisa mpamba bilɔkɔ bijali. Yango wana, moto mɔkɔ akoki komikumisa liboso na Njambe tɛ.”—1 Bakɔlinti 1:26-29.
11. Makambo nini ya Batatoli mazali kokesenisa mpenza bango?
11 Batatoli ya Yehova bazali na bazwi mingi te kati na bango mpe bazali na bato na nguya ya politiki ata moko te kati na bango. Etɛlɛmɛlo na bango ya kozanga kokɔta na makambo ya politiki elimboli ete bakoki kozala na bopusi moko te ya politiki. Na kokesena, mbala mingi bazali kozwa minyoko ya mabe oyo miuti na bakonzi ya mangomba mpe na bakonzi ya politiki na boumeli ya ekeke oyo ya ntuku mibale. Nzokande, atako bakutanaki na botɛmɛli ya balandi ya Nazisme, ya Fascisme, ya Communisme, ya bolingi ekólo, mpe ya mangomba ya lokuta, Batatoli bazali bobele kosakola nsango malamu kati na mokili mobimba te kasi lisusu motuya na bango mozali kokóla na motindo ya kokamwa.—Yisaya 60:22.
12. Mpo na nini Batatoli bazali kozwa elónga monene boye?
12 Batatoli bakanisaka ete elónga na bango ezali kouta na nani? Yesu alakelaki bayekoli na ye ete: “Kasi wana ekosila [elimo santu, NW] koya na likolo na bino, bokojua nguya, mpe bokojala batatoli na ngai na Yelusaleme, na Yuda mobimba, na Samalia, mpe kino nsuka na mokili.” Na bongo, nini elingaki mpenza kozala eutelo ya elónga na bango? Yesu alobaki ete: “Wana ekosila [elimo santu, NW] koya na likolo na bino, bokojua nguya.” Bobele bongo lelo, ezali makoki ya moto te, kasi nguya euti na Nzambe nde ezali esaleli ya liboso mpo na elónga ya Batatoli kati na mosala na bango ya kosakola na mokili mobimba. Na kosaleláká bato oyo bamonani lokola bilɔkɔ na bolembu na mokili, Nzambe azali kokokisa mosala ya koteya oyo moleki monene kati na lisoló ya bato.—Misala 1:8; Yisaya 54:13.
Nsango malamu mpe bwanya ya Yehova
13. (a) Mpo na nini Batatoli basalaka mosala na bolingo malamu mpe kozanga kosɛnga lifuti? (b) Lolenge nini Yehova asili kopesa eyano na botyoli ya Satana?
13 Nsango malamu ezali kosakolama na bato ya bolingo malamu. Yesu alobaki ete: “Bojui na lisombi tɛ, bopɛsa na lifuti tɛ.” (Matai 10:8) Na yango, Motatoli ya Yehova moko te azwaka lifuti kati na mosala ya Nzambe, to alukaka kozwa lifuti. Nkutu, ata na makita na bango bakɔngɔlaka mosolo te. Na mosala mosalemi na bolingo bozangi moimi, bazali na esengo ya kopesa Nzambe makoki ya koyanola na mofundi na ye, Satana Zábolo. Ekelamu wana ya elimo, oyo azali motɛmɛli ya Nzambe, alobaki ete bato bakoki kosalela Nzambe na bolingo mpenza te. Kati na bwanya na ye, Yehova asili komonisa eyano ya polele na botyoli ya Satana—bamilió ya Batatoli baklisto ya sembo bazali kosakola nsango malamu ndako na ndako, na balabála, mpe na libaku malamu.—Yobo 1:8-11; 2:3-5; Masese 27:11.
14. “Bwanya ebombami” oyo Paulo azali kolobela ezali nini?
14 Elembeteli mosusu ya bwanya ya Nzambe kati na kosakolama ya nsango malamu ezali boye ete bilaka ya Bokonzi ezali komonisama ya bwanya ya Nzambe. Ntoma Paulo akomaki ete: “Tojali koloba na [bwanya, NW] epai na baoyo bakoli; ejali [bwanya, NW] na ekeke oyo tɛ sɔkɔ na mikonji na ekeke oyo tɛ baoyo bakolimwa. Nde tojali kolobaka mpɔ na [bwanya kati na libombami mosantu ya Njambe, bwanya oyo ebombami, NW] oyo Njambe alakisaki liboso na ekeke mpɔ na nkɛmbo na biso.” “Bwanya ebombami” wana ezali kotinda na kokanisa mwango ya bwanya ya Nzambe mpo na kosukisa botomboki oyo ebandaki na Edene. Bwanya ya libombami wana mosantu emonisamaki kati na Yesu Klisto, oyo azali na katikati ya nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe.a—1 Bakolinti 2:6, 7; Bakolose 1:26-28.
Nsango malamu mpe boyengebene ya Nzambe
15. Lolenge nini toyebi ete Yehova azali Nzambe ya boyengebene? (Deteronome 32:4; Nzembo 33:5)
15 Mingi mpenza na boyokani na boyengebene tozali komona ntina ya liloba “liboso” oyo ezwami na Malako 13:10. Yehova azali Nzambe ya boyengebene oyo elɛmbisami na motema-boboto. Alobaki na nzela ya mosakoli na ye Yilimia ete: “‘Tika ete ye oyo akomikumisaka, amikumisa na likambo oyo ete asɔsɔli mpe ayebi ngai ete najali [Yehova] nakosalaka na boboto mpe kosambisa-sembo mpe boyɛngɛbɛnɛ kati na mokili. Mpɔ ete [Yehova] alobi ete ‘Nakosepela na makambo oyo.’”—Yilimia 9:24.
16. Lolenge nini tokoki kolimbola ete boyengebene esɛngaka liboso kopesa likebisi?
16 Lolenge nini boyengebene na Yehova ezali komonisama kati na mosala ya kosakola nsango malamu? Tiká tolimbola yango na ndakisa ya mama moko oyo asali mikatɛ ya elengi na sɔkɔla oyo basengelaki kolya yango na mokolo wana kasi na nsima ntango bapaya bakoya. Soki atiki yango na mesa ya kúku kozanga koyebisa bana ntango nini bakolya yango, mposa ya mwana nyonso ekozala nini? Biso nyonso tozalaki bana na eleko moko! Mwa misapi ya mike ekolinga komeka mikatɛ yango! Sikawa soki mama apesaki likebisi moko te, akozala na moboko makasi te ya kopesa disipilini. Nzokande, soki alobaki polele ete mikatɛ wana bakolya yango na nsima ntango bapaya bakoya mpe na yango moto asimba yango te, bongo asili kopesa likebisi ya polele. Soki mwana moko azangi botosi, mama azali na lotomo ya kozwa bikateli ya makasi.—Masese 29:15.
17. Lolenge nini Yehova amonisaki boyengebene na lolenge moko ya sikisiki uta mobu 1919?
17 Yehova, kati na boyengebene na ye akosambisa ebongiseli ya biloko mabe oyo te kozanga kopesa liboso makebisi oyo mabongi. Na yango, mingimingi kobanda mobu 1919, nsima wana Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ememaki “mpasi,” Yehova azalaki na Batatoli na ye bipai nyonso na mabelé mpo na kosakola na molende nyonso nsango malamu. (Matai 24:7, 8, 14) Mabota makoki te na elónga nyonso koloba ete bayebi likambo te na ntina na likebisi yango oyo lileki monene.
Na meko nini nsango malamu esili kosakolama kati na mokili?
18. (a) Bilembeteli nini bizali komonisa mosala oyo Batatoli bazali kosala na bisika mosika ya mokili? (b) Bandakisa nini mosusu osilá koyoka yango?
18 Elembo ya kolónga ya mosala oyo ya koteya kati na mokili mobimba ekoki komonana kati na búku Last Places—A Journey in the North (Bisika ya nsuka—Mobembo epai na Nɔ́rdi). Mokomi na yango alobi ete ntango ye atalaki karte ya esanga etangolami ya Foula, moko na bisanga ya Shetland na nɔ́rdi ya Ecosse, bakarte elakisaki “bipai nyonso zongazonga ya esanga WKS (bintíka), RKS (mabangá), LDGS (bokokú), mpe OBS (bikangiseli).” Yango “ezalaki kokebisa mokumbi masúwa nyonso na kokenda kuna te. Mai ya Foula mazalaki bisika ya nsɔ́mɔ epai batye babómbi, oyo ezalaki kotangola bato oyo basalaka masano na masúwa, baoyo bakei kolekisa ntango mpe ata bato na mosala ya Mokonzi mwasi ya Angleterre, nzokande yango epekisaki te—nayokaki yango mwa mikolo moke na nsima—Batatoli ya Yehova.” Abakisaki ete: “Motindo moko lokola balukalukaka bandimi kati na bandako mike ya bingumba minene mpe na mikili ya bobóla, bobele bongo nde bazalaki kopalanganisa kondima na bango kuna mosika na Foula.” Andimaki ete, esili koleka mwa basanza, moto moko ya mboka yango, na nkombo Andrew, azwaki zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko oyo batyaki na nsé ya ekuke na ye. Bongo abakisaki ete: “Nsima na pɔsɔ moko namonaki zulunalo moko [Lamuká! na lokótá ya Danois] na Faeroes [bisanga ya Mer du Nord] mpe sanza mibale na nsima zulunalo moko [Linɔ́ngi ya Mosɛ́nzɛli na lokótá ya Danois] na Nuuq, na Greenland.” Oyo nde matatoli kitoko mpo na mosala ya molende oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala na bisika wana mosika ya nɔ́rdi!
Nini ezali kopusa Batatoli na kolanda kosakola?
19, 20. (a) Nini ezali kopusa Batatoli ya Yehova na kolanda kosakola? (b) Mituna nini mikozwa biyano na mbala ya nsima?
19 Ya solo, kosakola ndako na ndako epai na bato oyo oyebi bango te ezali likambo ya pɛtɛɛ te, atako osili koumela mibu boni lokola Motatoli. Bongo nini ezali kobatela baklisto wana na kokende liboso? Komipesa na bango epai na Nzambe lokola baklisto mpe kondima mikumba. Paulo akomaki ete: “Sɔkɔ najali kosakola nsango malamu, ejali na ngai likambo na komikumisa tɛ. Napɛsami simbisi ete nasala boye. Mawa na ngai sɔkɔ nakosakola nsango malamu tɛ!” Baklisto ya solo bazali na nsango oyo etali bomoi, bongo lolenge nini bakoki kobatela yango mpo na bango moko? Etinda oyo etali komema nyongo ya makila mpo ete moto azangaki kopesa likebisi na ntango ya likámá ezali ntina makasi oyo ezali kopusa na kosakola nsango malamu.—1 Bakɔlinti 9:16; Ezekiele 3:17-21.
20 Bongo, lolenge nini nsango malamu ezali kosakolama? Wapi moboko ya elónga ya Batatoli? Mitindo nini ya mosala mpe ebongiseli na bango ezali kopesa nzela na koyeba ete bazali na lingomba ya solo? Lisoló na biso oyo elandi ekoyanola na mituna oyo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na kozwa bandimbola mingi ya bwanya ya Nzambe mpe ya “libombami mosantu,” talá búku Insight on the Scriptures, Volimi II, lokasa 1190, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
Ozali komikundola?
◻ Nini ezali kokesenisa Batatoli ya Yehova na bakonzi ya mangomba?
◻ Lolenge nini mosala ya kosakola ezali komonisa bolingo, nguya, mpe bwanya ya Nzambe?
◻ Lolenge nini kosakola nsango malamu ezali komonisa boyengebene ya Nzambe?
◻ Nini ezali kotinda Batatoli ya Yehova na kokóba na mosala ya kosakola?
[Bililingi na lokasa 15]
Atako bato batangolami mosika boni, Batatoli ya Yehova balingaka kokutana na bango