Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/9 nk. 5-7
  • Siansi, lingomba, mpe bolukiluki ya solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Siansi, lingomba, mpe bolukiluki ya solo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lingomba epesi lokumu mabe epai na bozalisi
  • Kosalela bokonzi na lolenge mabe
  • Kolónga ya lingomba ya solo
  • Lisolo ya bozalisi oyo bato mingi bayebaka te
    Lamuká!—2014
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/9 nk. 5-7

Siansi, lingomba, mpe bolukiluki ya solo

“Likambo oyo ete mangomba mingi ya lokuta masili kopalangana . . . ezali na bopusi likoló na ngai.”​—Charles Darwin

NA EBANDELI ya ekeke ya 19, siansi mpe lingomba ezalaki na boyokani malamu. Búku Darwin: Before and After (Darwin: Liboso na ye mpe nsima na ye) elobi ete: “Ata kati na mikanda mibimisami na bato ya siansi, bakomi bazalaki na mokakatano mpo na koloba na ntina na Nzambe na bonsomi nyonso mpe na bosembo nyonso na lolenge ya polele.”[1]

Búku L’Origine des espèces ya Darwin esungaki mpo ete mbongwana oyo esalema. Siansi mpe liteya ya évolution eyaki kosala bokangami oyo etyaki lingomba​—mpe Nzambe​—na mpembeni. Sir Julian Huxley alobi ete: “Na makanisi ya bato oyo bandimaka liteya ya évolution, likambo oyo ete Nzambe oyo asalaki biloko nyonso azali, ezali na ntina te mpe ebongi te.”

Lelo oyo, liteya ya évolution elobelami ete ezali moboko ya ntina ya siansi. Moto ya siansi, Fred Hoyle, amonisaki ntina mpenza ya boyokani wana: “Bato ya siansi oyo bandimaka makanisi ya kala batye likebi na bango mingi mpo na kopekisa bozongi ya makanisi ya kolekisa ndelo ya mangomba na esika ya kotalela bosolo oyo ezali na liboso.” Makambo nini ya kolekisa ndelo oyo esalaki ete lingomba eyinama na siansi?

Lingomba epesi lokumu mabe epai na bozalisi

Na libaku moko, mpo na koluka kotombola Biblia, bato oyo bandimaka liteya ya “bozalisi-ndambo” (créationisme)​—mingimingi na boyokani na bato ya Protestá​—balobaki na etingya nyonso ete mabelé mpe mɔlɔ́ngɔ́ ekokisi naino mibu 10 000 te. Likanisi oyo ya kolekisa ndelo epusaki banganga-mayele oyo bakoyekolaka mabelé, baoyo bakoyekolaka myoto, mpe ba physicien na kotyola, mpamba te ezalaki na boyokani te na oyo bayebaki na nzela ya bolukiluki na bango.

Kasi Biblia elobi mpenza nini? “Na ebandeli Njambe ajalisaki likoló mpe [mabelé, NW].” (Genese 1:1) Ntango oyo yango ekamataki eyebisami sikisiki te. “Mokolo ya yambo” ya bozalisi elobelami te ata kino na Genese 1:3-5. “Likoló mpe mabelé” ezalaki liboso nkutu ete “mokolo” ya yambo ebanda. Na yango, ekoki kozala ete likoló mpe mabelé eumeli uta bamiliare ya bambula, lokola bato ya siansi bazali koloba yango? Ekoki kozala bongo mpenza. Biblia ezali kolobela sikisiki te mpo na ntango oyo yango ekamataki.

Likambo mosusu ya kolekisa ndelo kati na mangomba ezali bongo lolenge basusu balimbolaka ‘mikolo’ motoba ya bozalisi. Bato mosusu ya Protestá bazali koloba na molende nyonso ete yango ezali mpenza mikolo ya solo, komonisáká bongo ete bozalisi esalemaki bobele na boumeli ya bangonga 144. Yango ebimisaki ntembe epai na bato ya siansi, mpamba te bakanisi ete likanisi wana ezali na boyokani te na makambo mamonisami polele na siansi.

Nzokande, ezalaki likanisi ya bato wana ya Protestá​—kasi ya Biblia yango moko te​—nde ezali na boyokani te na siansi. Biblia elobi te ete “mokolo” moko na moko ya bozalisi ezali na boumeli ya ya ngonga 24; ya solo, ekɔtisi kati na yango ‘mikolo’ oyo nyonso kati na mokolo moko ya molai koleka, “mokolo oyo Nzambe asalaki mabelé mpe likoló,” komonisáká ete mikolo ya Biblia nyonso te mizali na boumeli ya bangonga 24. (Genese 2:4) Misusu mikokaki kozala na bankóto ya bambula na boumeli na yango.a

Na yango, likanisi ya baoyo bandimaka liteya ya bozalisi-ndambo mpe bato ya Protestá bapesaki lokumu mabe epai na bozalisi. Mateya na bango likoló na bambula oyo mɔlɔ́ngɔ́ eumeli mpe bolai ya ‘mikolo’ ya bozalisi ezali na boyokani te na siansi ya solo, soko mpe na Biblia te. Nzokande, ezali na makambo mosusu ya kolekisa ndelo oyo esalaki ete lingomba eyinama na nsiansi.

Kosalela bokonzi na lolenge mabe

Na boumeli ya lisoló ya bato, lingomba esalaki makambo mingi ya bokesene. Na boumeli ya eleko oyo ebéngamaki Moyen Age, liteya ya bozalisi ebebisamaki mpo na kolóngisa lolenge ya boyangeli oyo kati na yango bobele moto moko nde azali na bokonzi nyonso (autocratie), kati na mikili ya Mpótó. Ebimisaki likanisi oyo ete etelemelo oyo bato bazali na yango ya kozala bazwi to babólá euti na ekateli ya Nzambe. Búku The Intelligent Universe (Molɔ́ngɔ́ ya mayele) elobi ete: “Bazalaki koyebisa bana mike ya bato ya bozwi ete ezalaki ‘ebongiseli ya Nzambe’ nde ezalaki kopesa bango biloko moke to eloko te kati na bozwi ya libota, mpe bazalaki koyebisa mobali mosáli ete asengeli kosepela na ‘ezalela oyo Nzambe aponelaki ye.’”

Ezali likambo ya kokamwa te na komona ete bato mingi bazali kobanga kozongela “makambo ya kala ya kolekisa ndelo ya lingomba”! Na esika ya kokokisa bamposa ya elimo ya bato, lingomba ezali mbala mingi nde kobebisa bamposa yango. (Ejekiele 34:2) Mokomi moko na zulunalo India Today alobi ete: “Na kotalela lisoló oyo, yango emisaleli na boumeli ya bambula, ezali likambo ya mawa na komona ete lingomba ezwi soko moke te bato oyo bakoki kotyela yango motema . . . . Na nkombo ya Mozalisi Monene, . . . bato basaleli baninga na bango makambo mabe mpenza koleka.”

Ebele na makambo ya nsɔ́mɔ ya mangomba ya lokuta ezwaki bopusi monene likoló ya makanisi ya Darwin. Akomaki ete: “Mokemoke, nayaki koboya kondima ete boklisto euti na Nzambe. Likambo oyo ete mangomba mingi ya lokuta masili kopalangana nokinoki na biteni minene ya mabelé ezali na bopusi likoló na ngai.”

Kolónga ya lingomba ya solo

Bokosi ya lingomba ebandi lelo te kati na mokili oyo. Yesu alobaki epai na bakambi ya mangomba oyo bazalaki na mposa ya bokonzi ete: “Bomonani bato malamu na libándá​—kasi na kati botondi na bokosi mpe na yauli.”⁠—​Matai 23:28, Phillips.

Nzokande, boklisto ya solosolo ‘esangani na mokili te.’ (Yoane 17:16) Basangani na yango bamikɔtisaka te kati na lingomba oyo ebebisami, soko mpe kati na politiki te; bazimbisami mpe te na bafilozofi oyo ezali koloba ete Nzambe azali te. Ntoma Paulo akomaki ete: “Mpɔ ete mayɛlɛ na [mokili, NW] oyo ezali bolema epai na Njambe.”​—1 Bakɔlinti 3:19.

Nzokande, yango elimboli te ete baklisto ya solo bazangi boyebi ya makambo ya siansi. Nkutu, basangani ya lingomba ya solo basepelaka na siansi. Eyebisamaki epai na Yisaya, mosakoli ya kala, ete: “Bótombola miso na bino likoló mpe bómɔna! Nani asalaki yango?” (Yisaya 40:26) Bobele bongo, mpo na koyeba malamu Mozalisi, Yobo asɛngamaki ete atala biloko ya kokamwa ya bozalisi mpe mɔlɔ́ngɔ́.​—Yobo, mikapo 38-41.

Ya solo, baoyo bandimelaka Mozalisi batalelaka bozalisi na limemya mozindo. (Nzembo 139:14) Lisusu, bandimaka oyo Yehova Nzambe alobi na ntina na elikya kitoko mpo na mikolo mizali koya. (Emoniseli 21:1-4) Na lisalisi ya boyekoli ya Biblia, bamilió ya bato bazali koyekola ete ezala ebandeli ya bomoi ya moto, ezala mpe mikolo na ye oyo mizali koya, eloko moko te etambwisami na lolenge ya pwasa. Nzokande, Yehova azalaki na mokano wana asalaki moto, mpe mokano yango ekokokisama​—mpo na kopesa mapamboli epai na bato ya botosi. Tozali kosɛnga na yo otalela likambo yango yo moko.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Lamuká!, ebimeli ya Lifalansé ya Novɛmbɛ 8, 1982, nkasa 6-9, mpe Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible, lokasa 344, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc. Mpo na koyeba makambo mosusu na ntina na liteya ya bozalisi-ndambo mpe kozanga boyokani na yango na siansi mpe na Biblia, talá Lamuká!, ebimeli ya Lifalansé ya Mársi 8, 1983, nkasa 12-15.

[Etanda na lokasa 6]

BAZANGI KOYEBA BILEMBETELI?

“ATA Batatoli ya Yehova mpe basili koyekola makambo mingi ya zebi ya bomoi,” ezali oyo moto moko wa mibeko, Norman Macbeth, akomaki kati na búku na ye Darwin Retried​—An Appeal to Reason (Darwin asambisami​—libyangi mpo na kokanisa malamu) oyo ebimaki na mobu 1971. Nsima ya kotánga lisoló moko ya Lamuka! oyo elobelaki évolution, Macbeth alobi ete: “Nakamwaki mingi na komona ete ezalaki na makanisi ya mayele, ya botendoli mateya ya Darwin.” Wana asosolaki bolukiluki monene oyo esalemaki mpe bozongeli ya sikisiki ya maloba ya bato na mayele oyo bayebi malamu likambo yango, mokomi yango asukisaki ete: “Ebongi lisusu te mpo na Simpson koloba ete: ‘. . . bato oyo bandimelaka yango te [évolution] bazali bobele moke mpenza to mpe bazangi koyeba bilembeteli ya siansi.’”

[Elilingi na lokasa 7]

Mikolo mizali koya liboso mpo na bato mitambwisami te na lolenge ya pwasa

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto