Oyebaka kolimbisa?
BILL mpe Lisa mwana na ye ya mwasi ya mibu 16, bazalaki koyokana te. Mbala mingi, mwa kozanga boyokani moke ezalaki kokóma koswana makasi. Na nsuka, kowelana ekómaki makasi na boye ete Lisa asengelaki kolongwa na ndako na bango.a
Na nsima ya mwa ntango, Lisa ayaki koyeba ete ye nde azalaki na mbeba mpe alukaki kosɛnga bolimbisi epai na tata na ye. Kasi na esika ete abosana mabungá ya kala ya Lisa, tata na ye, ye oyo azalaki na nkanda, aboyaki kotalela milende oyo Lisa asalaki mpo na kozongisa kimya. Kanisá naino! Aboyaki komonisa ezaleli ya motema mawa epai na mwana na ye moko!
Esili koleka bikeke mingi, moto moko oyo azalaki ata na libungá moko te akatelamaki etumbu ya liwa mpo na likambo oyo ye asalaki te. Batatoli bapesaki eyambweli ya lokuta, mpe na nkó nyonso, bakonzi ya politiki baboyaki kosalela bosembo. Moto yango oyo ayebaki likambo te ezali bongo Yesu Klisto. Mwa moke liboso na kokufa na ye, asɛngaki na Nzambe kati na libondeli ete: “Tata, limbisa bango mpɔ ete bayebi yango ejali bango kosala tɛ.”—Luka 23:34.
Uta kati na motema na ye, Yesu alimbisaki kozanga kokakatana, mpe bayekoli na ye balendisamaki ete bámekola ye kati na likambo oyo. (Baefese 4:32) Nzokande, lokola Bill, bato mingi bazalaka motema makasi mpe baboyaka kolimbisa. Ezaleli na yo ezalaka nini kati na likambo oyo? Ozalaka pene ya kolimbisa basusu na ntango basaleli yo lisumu? Mpe ezali boni mpo na masumu minene? Yango mpe esengeli kolimbisama?
Kolimbisa ezali ntembe monene
Kolimbisa ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Mpe na eleko oyo ya mpasi, boyokani kati na bato ekómi lisusu na kwokɔsɔ mingi koleka liboso. Mingimingi, bomoi ya libota ezali kokutana na mikakatano mpe na mitungisi mingi. Uta kala, ntoma moklisto Paulo alobaki ete makambo motindo oyo masengelaki komonana mingi na “mikolo ya nsuka.” Alobaki ete: “Bato bakozala balingi na bango moko, balingi na mosolo, bato na lofundo, bato na ngambo, . . . bayini na malamu, basúli, bato na mitó makasi, bato bavimbi na lolendo.”—2 Timoté 3:1-4, NW.
Na ntembe te, biso banso tozali kokutana na bopusi euti na libándá, oyo ezali kotya kati na komekama makoki na biso ya kolimbisa basusu. Lisusu, tozali mpe kobunda mpo na kotɛmɛla bopusi oyo ezalaka kati na biso. Paulo amilelaki ete: “Malamu oyo elingi ngai kosala, nakosalaka yango tɛ. Kasi mabe oyo elingi ngai tɛ, nakosalaka bobɛlɛ yango. Na bongo, sɔkɔ nakosala yango elingi ngai tɛ, ejali ngai moto oyo akosala bongo tɛ kasi masumu mazali kofanda kati na ngai.” (Baloma 7:19, 20) Na yango, mingi kati na biso tokokaka te kolimbisa lokola tolingi yango. Ya solo, kozanga kokoka oyo tosangolaki mpe lisumu, ezali na bopusi makasi likoló na biso banso; yango wana tozangaka mbala mosusu motema mawa mpo na baninga na biso bato.
Na ntango balendisaki ye ete alimbisa moninga mosusu mpo na mwa libungá moke, mwasi moko ayanolaki ete: “Moto moko te abongi na kolimbisama.” Soki totaleli yango likolólikoló, maloba motindo oyo makoki komonana lokola ete mazangi boboto, mazali makasi, mpe mauti na motema mabe. Kasi, soki totaleli yango na bozindo, tokomona ete ezali komonisa kobanga oyo bato mingi bazalaka na yango wana ezali bango komiyeba ete bazali kati na mokili oyo bato bazali na ezaleli ya moimi, bazangi komibanzabanza mpo na basusu mpe bazali na ezaleli ya koyina basusu. Mobali moko alobaki ete: “Bato bakomonela yo soki ozali kolimbisa bango. Bakomona yo lokola zóba na bango.”
Na yango, ezali likambo ya kokamwa te ete kolóna ezaleli ya kolimbisa na mikolo oyo ya nsuka ezali mpasi. Nzokande, Biblia ezali kolendisa biso ete tólimbisaka na boboto nyonso. (Kokanisá na 2 Bakolinti 2:7.) Mpo na nini tosengeli koyeba kolimbisa?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bankombo ebongwanaki.