Mituna ya Batángi
Na eleko oyo ya mpasi na makambo matali nkita, bato mingi mpe bakompanyi mingi bazali kosalela mwango babéngi “banqueroute” (kokwea ya mombongo). Engebene Makomami, ebongi ete moklisto amibimisa na mikanda ya Leta mpo na koyebisa ete mombongo na ye mokwei?
Eyano na motuna oyo ezali elakiseli ya malamu mpo na komonisa lolenge oyo Liloba ya Nzambe ezali kopesa biso litambwisi libongi kati na makambo oyo mazali mpenza ya mikolo oyo. Mikili mingi mizali na mibeko na yango mpo na oyo etali kokwea ya mombongo. Mibeko mikeseni engebene ekólo moko na ekólo mosusu, mpe ezali te lisangá ya boklisto nde esengeli kopesa batoli oyo endimami na mibeko ya Leta mpo na likambo yango. Kasi tiká ete tótalela mwa moke mibeko ya Leta mpo na oyo etali kokwea ya mombongo.
Moko na bantina mpo na yango biyangeli bipesaka bato ya mombongo nzela ya koyebisa na mikanda ya Leta kokwea ya mombongo na bango ezali oyo ete yango ezali kopesa nzela na baoyo bazali kodefisa (créanciers) ete bázala na mwa libateli liboso na bato oyo badefi to baoyo bazwi nyongo, kasi bazali kokoka te kofuta nyongo na bango. Mpo na badefisi ekoki komonana lokola ete nzela bobele moko ezali bongo kofunda na bisambiselo mpo na kopusa modefi ayebisa na mikanda ya Leta ete mombongo na ye mokwei mpo ete biloko ya modefi bikoka bongo kokabolama mpo na kofuta nyongo na ye.
Na lolenge mosusu, koyebisa na mikanda ya Leta kokwea ya mombongo ekoki kozala lokola libateli mpo na modefi oyo, na sembo nyonso, akoki te kofuta nyongo ya badefisi na ye. Modefi akoki kopesamela nzela ya kokomisa nkombo na ye na mikanda ya Leta ete mombongo na ye mokwei, na nsima badefisi bakoki kozwa mwa ndambo ya biloko na ye. Nzokande, mobeko mokoki kopesa ye nzela ya kobatela ndako na ye to mwa ndambo moke ya biloko na ye mpe na nsima akóba bomoi na ye kozanga kobanga ete badefisi na ye ya kala bakoya kobɔtɔla ye yango.
Na bongo, na ntembe te, mibeko wana mibongisami mpo na kopesa mwa libateli epai na modefi mpe modefisi kati na makambo matali mombongo. Kasi, tiká ete tótalela batoli ya ntina oyo Biblia ezali kopesa.
Uta ebandeli na yango kino nsuka na yango, Biblia ezali kolendisa te ezaleli ya kodefa. Tozali kokuta likebisi lokola oyo na Masese 22:7: “Mojui ajali mokolo likolo na mobola; modefi ajali moombo na modefisi.”
Tómikundola mpe lisese ya Yesu oyo ezwami kati na Matai 18:23-34 oyo ezali mpe kolobela moombo moko oyo azalaki na ebakata ya nyongo. “Nkolo na ye alaki ete batɛkisa ye esika mɔkɔ na mwasi na ye mpe bana na ye mpe bilɔkɔ yɔnsɔ bijalaki na ye ete afuta nyongo,” kasi na nsima, nkolo na ye, oyo azalaki mokonzi, atikaki mpe amonisaki motema mawa. Na nsima, na ntango moombo yango amonisaki ezaleli ya kozanga mawa, mokonzi yango atindaki ete ‘apesama epai na banyokoli kino akofuta ye nyongo na ye nyonso.’ Emonani polele ete, lolenge malamu, lolenge lobongi ezali bongo ya koboya kodefa mosolo.
Basaleli ya Nzambe na Yisraele ya kala bazalaki kosala mombongo, ezalaki mpe kosalema mbala mosusu ete bádefa mpe bádefisa. Nini Yehova alakisaki bango ete básalaka? Soki moto alingi kodefa mosolo mpo na kobanda mombongo to kokólisa mombongo, engebene mibeko, ezalaki na yango mabe te ete Moebele asɛnga litomba (intérêt) likoló. Nzokande, Nzambe alendisaki bato na ye ete bázala na ezaleli ya moimi te na ntango bazali kodefisa Moyisraele oyo azali kokelela; basengelaki te kosepela na likambo wana mpo na kosengáká litomba. (Exode 22:25) Deteronome 15:7, 8 elobi ete: “Sɔkɔ mobola ajali kati na bino . . . okofungola lobɔkɔ na yɔ epai na ye, mpe okodefisa ye kokoka na bosenga na ye, sɔkɔ yango nini.”
Boboto to limemya motindo wana emonisamaki kati na mibeko oyo eyebisaki ete badefisi basengelaki te kobɔtɔla biloko ya ntina mingi epai na modefi, na ndakisa libanga oyo libota epelisaka na yango mbeli to elamba ya komizipa mpo na malili na butu.—Deteronome 24:6, 10-13; Ezekiele 18:5-9.
Ya solo, ezalaki Bayuda nyonso te nde bandimaki to basalelaki mibeko oyo mitondi na bolingo, oyo eutaki epai na Mosambisi na bango monene mpe Mopesi-na-mibeko. (Yisaya 33:22) Bayuda mosusu ya lokoso basalelaki bandeko na bango makambo na makasi. Lelo oyo mpe, badefisi mosusu bakoki kozala na makambo makasi mpe na kozanga kokanisa malamu na masɛngi na bango, ata epai na moklisto ya sembo oyo na ntango wana azalaki na likoki te ya kofuta nyongo mpo ete makambo ya kozanga kokanela makómelaki ye. (Mosakoli 9:11) Na ntina na ezaleli na bango ya makambo makasi, na masɛngi ya makasi, badefisi ya mokili bakoki kotya modefi kati na ezalela oyo amonaki ete ezali libateli mpo na ye. Lolenge nini? Kati na makambo mosusu, likambo bobele moko oyo badefisi bakoyeba ezali bongo mwango ya mibeko oyo mitali koyebisa na mikanda ya Leta kokwea ya mombongo. Na yango, moklisto oyo azalaki na ezaleli ya lokoso te to na bopotu te mpo na kofuta banyongo na ye, akoki kokomisa nkombo na mikanda ya Leta mpo na koyebisa kokwea ya mombongo na ye.
Nzokande, tosengeli kosɛnzɛla mpo na oyo etali ngámbo mosusu ya likambo. Moklisto akoki kozala na nyongo bobele mpo ete amonisaki te ezaleli ya komipekisa kati na oyo asalelaki to lolenge asalelaki yango to mpo ete akanisaki malamu te mpo na mikano na ye ya mombongo. Asengeli nde bobele kotala mpamba nyongo yango mpe nokinoki koluka libɔndisi na nzela ya koyebisa na mikanda ya Leta kokwea ya mombongo na ye, kopesáká bongo mpasi epai na basusu na ntina na kozanga na ye ya kokanisa malamu? Biblia ezali kondima te bopotu motindo oyo kati na makambo matali mombongo. Ezali kolendisa mosaleli ya Nzambe ete ɛɛ na ye etikala ɛɛ. (Matai 5:37) Omikundola mpe maloba ya Yesu na ntina na kotánga motuya liboso ya kotónga ndako. (Luka 14:28-30) Bobele bongo, moklisto asengeli kokanisa na bozindo makambo mabe oyo makoki kobima liboso ya kodefa mosolo. Na ntango akamati nyongo, asengeli koyeba ete azali na mokumba ya kozongisela bato to bakompanyi mosolo na bango. Soki bato mingi mosusu bamoni ete moklisto akokisi mokumba na ye te to abongi na kotyela ye motema te, akoki kobebisa lokumu malamu oyo azwaki yango na milende nyonso mpe bato ya libándá bakopesa litatoli ya malamu te mpo na ye.—1 Timoté 3:2, 7.
Tomikundola oyo Nzembo 15:4 eyebisi biso na ntina na motindo ya bato oyo Yehova ayambaka. Tozali kotánga ete: “Ye [oyo Nzambe akondimaka] sɔkɔ akati ndai, akobongola yango tɛ ata epɛsi ye mpasi.” Ee, Nzambe alingi ete baklisto basalela badefi na bango lokola bango moko bakolinga ete básalela bango.—Matai 7:12.
Na yango, na mokuse, Biblia epekisi te likoki oyo moklisto azali na yango, soki makambo mayei ndóngó, ya kozwa litomba na libateli ya mibeko ya Kaisala mpo na oyo etali koyebisa na mikanda ya Leta kokwea ya mombongo. Nzokande, Baklisto basengeli kokesena mpo na oyo etali bosembo mpe kotyela motema. Na yango, basengeli kozala ndakisa malamu na mposa na bango makasi ya kokokisa mikumba na bango na makambo matali mosolo.