Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/10 nk. 15-20
  • Bóbatela etongá ya Nzambe na bolingo nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bóbatela etongá ya Nzambe na bolingo nyonso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndakisa ya Mobateli malamu
  • Babateli mabe na Yisraele
  • Babateli ya bolingo kati na lisangá ya boklisto
  • Bótosa likoki ya kopona ya moto
  • Babateli ya mpate, bómekola babateli minene ya bampate
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Tosá babateli ya mpate oyo Yehova atye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Bóbatela na bolingo nyonso bampate ya motuya mingi ya Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • “Bóbatela etonga ya Nzambe oyo bapesi na mabɔkɔ na bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/10 nk. 15-20

Bóbatela etongá ya Nzambe na bolingo nyonso

“Bóbatela etongá ya Nzambe oyo epesami na bino.”​—1 PETELO 5:2, NW.

1, 2. Ezaleli nini ya Yehova oyo eleki monene, mpe lolenge nini yango ezali komonana?

NA NZELA ya Makomami Mosantu, emonisami polele ete bolingo ezali ezaleli ya Nzambe oyo eleki monene. 1 Yoane 4:8 elobi ete: “Nzambe azali bolingo.” Mpo ete bolingo na ye emonisami kati na misala, 1 Petelo 5:7, (NW) elobi ete Nzambe azali “komibanzabanza mpo na bino.” Kati na Biblia, lolenge oyo Yehova azali komibanzabanza mpo na libota na ye ekokisami na lolenge oyo mobateli ya mpate ya bolingo azali komibanzabanza mpo na bampate na ye: “Talá! Nkolo Moyangeli Yehova ye moko . . . akobatela etongá na ye. Na lobɔkɔ na ye akoyanganisa bana na mpate esika moko; mpe na ntolo na ye akokumba bango. Baoyo bazali konungisama akokamba bango malɛmbɛmalɛmbɛ.” (Yisaya 40:10, 11, NW) Oyo nde kobɔndisama Davidi azwaki mpo akoka koloba ete: “Yehova azali Mobateli na ngai. Nakozanga eloko moko te”!​—Nzembo 23:1, NW.

2 Ebongi mpenza ete Biblia ekokanisa bato oyo bandimami epai na Nzambe na bampate, mpamba te bampate bazalaka na kimya, na komisɔkisa, na botosi epai na babateli na bango oyo bamibanzabanzaka mpo na bango. Lokola Mobateli ya bolingo, Yehova azali komibanzabanza mingi mpo na bato na ye oyo bakokani na bampate. Azali komonisa yango na kokokisáká mposa na bango ya mosuni mpe ya elimo mpe na kokambáká bango kati na “mikolo ya nsuka” mpe ya mpasi ya mokili oyo ya mabe mpo na kokende kino na mokili na ye ya sika ya boyengebene oyo esili kobɛlɛma.​—2 Timoté 3:1-5, 13; Matai 6:31-34; 10:28-31; 2 Petelo 3:13.

3. Lolenge nini mokomi na Nzembo alobelaki motindo oyo Yehova azali kobatela bampate na ye?

3 Tótala komibanzabanza etondi na bolingo oyo Yehova azali na yango mpo na bampate na ye: “Miso na [Yehova] ikotalaka bato na boyɛngɛbɛnɛ mpe matoi na ye ikoyokaka konganga na bango. . . . Ekonganga bayɛngɛbɛni [Yehova] akoyoka mpe akobikisa bango na mpasi na bango yɔnsɔ. [Yehova] ajali pɛnɛpɛnɛ na bango bajali na mitema mitutami; akobikisa bango bajali na milimo minyɛtami. Moyɛngɛbɛni ajali na makambo mingi na mpasi nde [Yehova] akobikisa ye kati na yango yɔnsɔ.” (Njembo 34:15-19) Oyo nde kobɔndisama monene Mobateli ya mɔlɔ́ngɔ́ azali kopesa na bato na ye oyo bakokani na bampate!

Ndakisa ya Mobateli malamu

4. Mpo na oyo etali kobatela etongá ya Nzambe, mokumba ya Yesu ezali nini?

4 Yesu, Mwana na Nzambe, ayekolaki malamu epai na Tata na ye, yango wana Biblia ebéngi Yesu “mobateli malamu.” (Yoane 10:11-16) Mosala na ye ya ntina mpo na etongá ya Nzambe emonisami kati na Emoniseli mokapo 7. Na molɔngɔ́ 9, basaleli ya Nzambe ya mikolo na biso babéngami “ebele monene . . . oyo bauti na mabota nyonso mpe bikoló nyonso mpe minɔkɔ nyonso.” Na nsima molɔngɔ́ 17 elobi ete: “Mwana na Mpate [Yesu] . . . akobatela bango mpe akokamba bango na maziba ya mai ya bomoi. Mpe Nzambe akolongola mpisoli nyonso na miso na bango.” Yesu azali kokamba bampate ya Nzambe epai na mai na solo oyo ezali komema na bomoi ya seko. (Yoane 17:3) Tóyeba ete Yesu abéngami “Mwana na Mpate,” oyo emonisi bizaleli na ye mpenza oyo bikokani na oyo ya mpate, azali ndakisa monene ya botosi epai na Nzambe.

5. Yesu azalaki na mayoki nini epai na bato?

5 Ntango azalaki awa na mabelé, Yesu afandaki elongo na bato mpe amonaki ezalela na bango ya mpasi. Asalaki nini liboso na ezalela na bango wana ya mawa? “Ayokaki mawa mpo na bango ete balɛmbaki mpe balemalemaki lokola bampate bazali na mobateli te.” (Matai 9:36) Bampate oyo bazangi mobateli bamonaka mpenza mpasi liboso ya banyama mabe, motindo moko mpe na bampate oyo babateli bazali kotyela bango likebi te. Kasi Yesu azalaki komibanzabanza mingi mpo na bango, mpamba te alobaki ete: “Boya liboso na ngai, bino yɔnsɔ bojali kolɛmba na mosala mpe kokumba bojito mpe nakopemisa bino. Bokamata ekanganeli na ngai likolo na bino mpe boyekola na ngai; jambi ngai najali na bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi; bokojua kopema mpɔ na milimo na bino. Mpɔ ete ekanganeli na ngai ejali na motau, mpe mokumba na ngai ejali na bojito tɛ.”​—Matai 11:28-30.

6. Lolenge nini Yesu atalelaki bato oyo bazalaki konyokwama?

6 Biblia esakolaki ete Yesu akomibanzabanza na bolingo nyonso mpo na bato: “Yehova apakoli ngai . . . kobɔngisa batutami na motema, . . . kobɔndisa baoyo nyonso bazali kolela.” (Yisaya 61:1, 2, NW; Luka 4:17-21) Yesu atyolaki soko moke te babólá mpe bato oyo bazalaki na mawa. Nzokande, akokisaki Yisaya 42:3: “Akobuka mongendu motutami tɛ, akojimisa nkamba tɛ oyo ejali kojika mokɛ mokɛ.” (Kokanisá na Matai 12:17-21.) Bato na mawa bazalaki lokola mongendu motutami, lokola nsinga ya mwinda oyo elingi kozimama mpamba te ezangi mafuta. Koyebáká ezalela na bango ya mawa, Yesu ayokelaki bango mawa mpe apesaki bango makasi mpe elikya, kobikisáká bango na elimo mpe na mosuni.​—Matai 4:23.

7. Epai wapi Yesu azalaki kokamba bato oyo bandimelaki ye?

7 Bato bakokani na bampate oyo bayanolaki na libyangi ya Yesu bazalaki mingi. Mateya na ye mazalaki ya kosepelisa mingi na boye ete bapolisi oyo batindamaki mpo na kokanga ye balobaki ete: “Kino ntango oyo moto alobi lokola moto oyo tɛ.” (Yoane 7:46) Yango wana, bakonzi ya mangomba oyo bazalaki bakosi bamilelaki ete: “Mokili mobimba ekei nsima na ye”! (Yoane 12:19) Kasi Yesu alukaki te lokumu to nkembo mpo na ye moko. Akambaki bato epai na Tata na ye. Ateyaki bango ete básalela Yehova na kopusama na bolingo mpo na bizaleli kitoko na Ye; alobaki ete: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na nguya na yo mobimba mpe na elimo na yo mobimba.”​—Luka 10:27, 28, NW.

8. Lolenge nini botosi oyo libota ya Nzambe epesaka ye ekeseni na oyo basusu bapesaka na bakonzi ya mokili?

8 Yehova azali kosepela mingi lokola bokonzi na ye na mɔlɔ́ngɔ́ mobimba esimbami na bato na ye oyo bakokani na bampate, na ntina na bolingo oyo bazali na yango mpo na ye. Na bolingo nyonso, baponi kosalela ye mpamba te bayebi bizaleli na ye kitoko. Oyo nde bokeseni na batambwisi ya mokili, oyo bato na bango bazali kotosa bango bobele mpo na bobangi, to na mitema mibale, to mpo na koluka litomba! Ekoki kolobama bongo soko moke te mpo na Yehova to mpo na Yesu makambo oyo malobamaki na ntina na pápa moko ya Lingomba ya Katolike ya Loma, ete: “Bato mingi bazali kokumisa pápa, bato nyonso bazali kobanga ye, [kasi] moto moko te alingaka ye.”​—Vicars of Christ​—The Dark Side of the Papacy (Bakitani ya Klisto​—Mabe ya bopápa), ekomamaki na Peter De Rosa.

Babateli mabe na Yisraele

9, 10. Lobelá lolenge bakonzi na Yisraele ya kala mpe na ekeke ya liboso bazalaki.

9 Na bokeseni na Yesu, bakonzi ya mangomba na Yisraele na mikolo na ye bazalaki na bolingo te mpo na bampate. Bakokanaki na bakonzi oyo bayangelaki Yisraele na kala, baoyo Yehova alobaki na ntina na bango ete: “Mawa na babateli na mpate na Yisraele baoyo bamileisaki bango mpenja! Ebɔngi na babateli koleisa bampate na bango tɛ? . . . Bolendisaki oyo motau tɛ, bobikisaki oyo ebɛli tɛ, mpe bokangaki oyo ebukani tɛ, mpe bojongisaki oyo ekimisami tɛ, mpe bolukaki oyo ebungi tɛ, kasi bojalaki mikonji na bango na makasi mpe na yauli.”​—Ejekiele 34:2-4.

10 Motindo moko na bakɛngɛli wana bakonzi ya politiki, bakonzi na mangomba ya Bayuda ya ekeke ya liboso bazalaki na mitema makasi. (Luka 11:47-52) Mpo na komonisa yango, Yesu alobeli likambo ya Moyuda oyo babɔtɔli bayibaki biloko na ye, babɛtaki ye mpe batikaki ye pɛnɛpɛnɛ na kufa na mpembeni ya nzela. Nganga Moyisraele moko azalaki kokita na nzela yango, kasi wana emonaki ye Moyuda yango, akatisaki na ngambo mosusu ya nzela. Molevi moko mpe asalaki sé bongo. Na nsima moto oyo azalaki Moyisraele te, oyo azalaki Mosamalia, alekaki na nzela yango mpe ayokelaki moto yango mawa. Akangaki bampota na ye, abutisaki ye likoló na mpunda mpe akendaki na ye na ndako ya bato na mobembo, mpe abatelaki ye. Afutaki babateli ndako ya bato na mibembo mpe alobaki ete akozonga mpo na kofuta mbongo mosusu oyo ekoki kosɛngama.​—Luka 10:30-37.

11, 12. (a) Lolenge nini mabe ya bakonzi ya mangomba elekaki mpenza ndelo na mikolo na Yesu? (b) Baloma basukaki na kosala nini epai na bakonzi ya mangomba?

11 Bakonzi na mangomba oyo bazalaki na mikolo na Yesu bazalaki mpenza mabe, na boye ete ntango Yesu asekwisaki Lasalo longwa na kufa, banganga-kapita mpe Bafalisai babéngisaki Sanedrina mobimba mpe balobaki ete: “Tosala nini? Mpɔ ete moto oyo [Yesu] ajali kosala bilembo mingi. Sɔkɔ tokotika ye boye, bato yɔnsɔ bakondima ye mpe Baloma bakoya mpe bakobebisa esika na biso mpe libota na biso.” (Yoane 11:47, 48) Bamibanzabanzaki te mpo na likambo malamu oyo Yesu asalaki mpo na mokufi. Bazalaki nde komibanzabanza mpo na etɛlɛmɛlo na bango. Yango wana “longwa na mokɔlɔ yango, bakani ete baboma [Yesu].”​—Yoane 11:53.

12 Mpo na kobakisa mabe na bango, banganga-kapita “bakani ete baboma Lasalo mpe, jambi na mpɔ na ye Bayuda mingi bajalaki kolongwa mpe kondima Yesu.” (Yoane 12:10, 11) Milende na bango ya moimi mpo na kobatela etɛlɛmɛlo na bango ezalaki na litomba te, mpamba te Yesu ayebisaki bango ete: “Ndako na bino etikali mpamba.” (Matai 23:38) Mpo na kokokisama ya maloba wana, bobele na libota yango Baloma bayaki mpe bakamataki ‘esika na bango mpe libota na bango,’ mpe bomoi na bango.

Babateli ya bolingo kati na lisangá ya boklisto

13. Yehova alakaki ete akotinda nani mpo na kobatela etongá na ye?

13 Na esika ya babateli mabe, oyo bazali na moimi, Yehova asengelaki kobimisa Mobateli Malamu, Yesu mpo na kobatela etongá na Ye. Alakaki mpe lisusu ete akobimisa babateli-balandi oyo batondi na bolingo mpo na kobatela bampate: “Nakotia babateli likolo na bango baoyo bakoleisa bango; bakobanga lisusu tɛ.” (Yilimia 23:4) Na bongo, lokola ezalaki na lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso, lelo mpe “koponama ya mibangé mibali mboka na mboka” ezali kosalema. (Tito 1:5, NW) Mibangé mibali wana ya elimo oyo bazali kokokisa masɛngami ya Makomami bazali “koleisa etongá ya Nzambe.”​—1 Petelo 5:2; 1 Timoté 3:1-7; Tito 1:7-9.

14, 15. (a) Ezaleli nini bayekoli bazalaki na mpasi mpo na kokólisa yango? (b) Nini Yesu asalaki mpo na komonisa bango ete bankulutu basengeli kozala basaleli oyo bazali na komikitisa?

14 Wana ezali bango kobatela bampate, bankulutu basengeli “liboso na makambo nyonso” kozala na “bolingo makasi” mpo na bango. (1 Petelo 4:8, NW) Kasi, lokola bayekoli ya Yesu bazalaki komibanzabanza mingi mpo na lokumu mpe etɛlɛmɛlo, esengelaki na bango koyekola bolingo yango. Na bongo, wana mama ya bayekoli mibale ya Yesu alobaki na Yesu ete: “Lakisa ete bana na ngai mibale bafanda mɔkɔ na lobɔkɔ na yɔ na mobali mpe mosusu na lobɔkɔ na yɔ na mwasi kati na bokonji na yɔ,” bayekoli mosusu bamonaki mabe. Yesu alobaki na bango ete: “[Bayángeli ya mabota, NW] bajali mikonji likolo na bango mpe bato minɛnɛ bakonyɔkɔla bango na makasi. Nde kati na bino ejala bongo tɛ. Ye oyo alingi kojala monɛnɛ kati na bino, akoma mosungi na bino mpe ye oyo alingi kojala moto na liboso na bino, ajala moombo na bino.”​—Matai 20:20-28.

15 Na libaku mosusu, wana bayekoli “bajalaki kotiana ntembe sɔkɔ nani kati na bango aleki lokumu monɛnɛ,” Yesu ayebisaki bango ete: “Sɔkɔ moto nani alingi kojala moto na liboso, ajala moto na nsima mpe mosaleli na bato yɔnsɔ.” (Malako 9:34, 35) Elimo ya komikitisa mpe kolinga kosalela basusu esengelaki kokóma eteni ya bomoto na bango. Nzokande bayekoli batungisamaki na makanisi wana, mpamba te na butu oyo ezalaki liboso ya kufa ya Yesu, na ntango ya elambo na mpokwa na ye ya nsuka, “kowelana makasi” mpe ebimaki kati na bango mpo na koyeba soki nani alekaki monene! Yango ebimaki, atako Yesu amonisaki bango lolenge nkulutu asengeli kosunga etongá; ye moko amikitisaki mpe asukolaki bango makolo. Alobaki ete: “Sɔkɔ nde ngai Nkolo mpe Molakisi, nasukoli [makolo] na bino ekoki na bino ete bosukolana [makolo]; mpɔ ete napɛsi bino etaliseli ete bino mpe bosala pelamɔkɔ esili ngai kosalela bino.”​—Luka 22:24; Yoane 13:14, 15.

16. Na 1899, makambo nini Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisaki mpo na oyo etali ezaleli ya ntina monene ya bankulutu?

16 Batatoli ya Yehova bazali ntango nyonso koteya ete bankulutu basengeli kozala motindo wana. Ekokisi sikawa pene na mbula monkámá, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Apríli 1, 1899 (ebimeli ya Lingelesi), elobelaki maloba ya Paulo oyo mazali na 1 Bakolinti 13:1-8 mpe na nsima eyebisaki ete: “Ntoma amonisaki polele ete boyebi mpe koyeba koloba ezali te makambo maleki ntina, kasi bolingo oyo ekɔti na motema mpe oyo ezali komonisama kati na makambo nyonso ya bomoi na biso, mpe ezali kopusa biso mpe kosala kati na nzoto na biso oyo ekokufaka, nde ezali komekama ya solo​—elembeteli ya solo ya boyokani na biso elongo na Nzambe. . . . Ezaleli oyo ya ntina monene oyo esengeli kolukama epai na moto nyonso oyo andimami lokola mosaleli ya lingomba, mpo na kosunga na makambo ya mosantu, esengeli libosoliboso kozala elimo ya bolingo.” Emonisaki ete bato oyo bamikitisaka te mpo na kosala na bolingo “bazali bateyi oyo bakoki kotyelama motema te, mpe mbala mosusu bakosala mabe mingi koleka malamu.”​—1 Bakolinti 8:1.

17. Lolenge nini Biblia emonisi mpenza bizaleli oyo bankulutu basengeli kozala na yango?

17 Na yango, bankulutu basengeli te ‘kozala bakonzi likoló’ ya bampate. (1 Petelo 5:3) Na esika ya kosala bongo, basengelaki nde kopesa ndakisa mpo na oyo etali komonisa “boboto mɔkɔ epai na mosusu, na motema na mawa.” (Baɛfɛsɛ 4:32) Paulo alobeli yango na makasi: “Bomilatisa mitema na mawa, na boboto, na kosɔkɛma, na bopɔlɔ, na mitema pɛtɛɛ. . . . Nde likoló na oyo yɔnsɔ, bomilatisa bolingo oyo ejali ekanganeli ekoki mpenja.”​—Bakɔlɔsɛ 3:12-14.

18. (a) Ndakisa nini kitoko Paulo apesaki kati na boyokani na ye elongo na bampate? (b) Mpo na nini bankulutu basengeli te kobosana bamposa ya bampate?

18 Paulo ayekolaki kosala bongo; alobaki ete: “Kasi, tokomi bato na malɛmbɛ na kati na bino pelamɔkɔ mama oyo ajali kobɔkɔla bana na ye mpenja. Boye, ejalaki biso na bolingo monɛnɛ epai na bino, toselingwi kokabela bino bobɛlɛ Nsango Malamu na Njambe tɛ kasi bomɔi na biso mpenja, mpɔ ete bosili kokoma balingami na biso.” (1 Batɛsalɔniki 2:7, 8) Na boyokani na likambo yango, alobaki ete: “Bózala na maloba ya kolendisa mpo na milimo mizali konyokwama na makanisi, bósunga bato na bolɛmbu, bómonisa motema molai epai na bato banso.” (1 Batesaloniki 5:14, NW) Atako lolenge nini ya likambo oyo bampate bakoki koya na yango epai na bango, bankulutu basengeli komikundola Masese 21:13, oyo elobi ete: “Ye oyo akokanga matoi na ye wana mobola akolela, akolela ye mɔkɔ nde akoyokama tɛ.”

19. Mpo na nini bankulutu ya bolingo bazali lipamboli, mpe lolenge nini bampate bayanolaka na bolingo motindo yango?

19 Bankulutu oyo bazali kobatela etongá na bolingo nyonso bazali lipamboli mpo na bampate. Yisaya 32:2 esakolaki ete: “Moto na moto akojala lokola [ebombamelo, NW] mpɔ na mopɛpɛ, ejipelo na ntango na mbula makasi; lokola bitima na mai kati na esika ekaoki, mpe lokola [malili, NW] na libanga monɛnɛ kati na mokili molɛmbisami na moi.” Tozali na esengo ya koyeba ete mingi kati na bankulutu na biso lelo oyo bazali kosala na boyokani na maloba wana ya kokitisa motema. Basili koyekola lolenge ya kosalela etindá oyo elandi: “Mpɔ na bolingo na bandeko, bolinganaka [na bolingo ya motema, NW]; mpɔ na lokumu, bokumisanaka.” (Baloma 12:10) Wana bankulutu bazali komonisa lolenge oyo ya bolingo mpe ya komikitisa, bampate bakoyanola na kopesáká bango “lokumu mingi kati na bolingo mpɔ na mosala na bango.”​—1 Batɛsalɔniki 5:12, 13.

Bótosa likoki ya kopona ya moto

20. Mpo na nini bankulutu basengeli kotosa likoki ya kopona oyo moto na moto azali na yango?

20 Yehova azalisaki bato na likoki ya kopona oyo balingi mpo na kokamata bikateli na bango moko. Ntango bankulutu basengeli kopesa toli mpe ata kopesa disipilini, basengeli te kozala bakonzi likoló ya bomoi to kondima ya basusu. Paulo alobaki ete: “Biso tojali kosalela bino lokola [bankolo] kati na kondima tɛ nde tokosalanaka na bino mosala mpɔ na esɛngɔ na bino, jambi bojali kotɛlɛma ngwi mpo na kondima na bino.” (2 Bakɔlinti 1:24) Ee, “moto na moto akomɛma bojito na ye mɔkɔ.” (Bagalatia 6:5) Yehova asili kopesa biso bonsomi mingi kati na bandelo oyo etyami na mibeko mpe mitindá na ye. Na yango, bankulutu basengeli kopɛngola ezaleli ya kotya mibeko epai mitindá ya Makomami mibukami te. Mpe basengeli kotɛmɛla momeseno nyonso ya kopesa makanisi na bango moko lokola mibeko oyo mikoki kokweisama te to kondimisa makanisi na bango soki moto moko aboyi makanisi motindo wana.​—2 Bakolinti 3:17; 1 Petelo 2:16.

21. Nini tokoki koyekola na kotalela ezaleli ya Paulo epai na Filemona?

21 Tótala lolenge nini Paulo, wana azalaki na bolɔ́kɔ na Loma, asalaki epai na Filemona, moklisto oyo azalaki na moombo na ye moko na Kolose, na Asie mineure. Moombo ya Filemona, oyo nkombo na ye ezalaki Onesimo akimaki na Loma, kuna akómaki moklisto mpe asungaki Paulo. Paulo akomelaki Filemona ete: “Ngai nalingaki kobatela ye awa na ngai ete asalela ngai na esika na yɔ kati na kokangama na ngai mpɔ na Nsango Malamu. Bobɛlɛ ete nalingi kosala likambo tɛ sɔkɔ yɔ ondimi tɛ, ete boboto na yɔ bobima mpɔ na lilako tɛ kasi mpɔ na mokano na yɔ mɔkɔ.” (Filemona 13, 14) Paulo azongisaki Onesimo, kosɛngáká na Filemona ete asalela ye lokola ndeko na ye moklisto. Paulo ayebaki ete etongá ezalaki ya ye te; ezalaki nde ya Nzambe. Ye azalaki nkolo na yango te kasi nde mosaleli na yango. Paulo asɛngisaki Filemona na makasi te; atosaki likoki na ye ya kopona.

22. (a) Bankulutu basengeli koyeba nini na ntina na etɛlɛmɛlo na bango? (b) Lolenge nini ya lisangá Yehova azali kokólisa?

22 Lokola lisangá ya Nzambe ezali sé kokóla, bankulutu mingi bazali koponama. Bango, elongo na bankulutu oyo basili komesana na mosala, basengeli koyeba ete etɛlɛmɛlo na bango ezali mosala oyo ezali kosɛnga komikitisa. Na yango, lokola Nzambe azali kotambwisa lisangá na ye kino na mokili ya sika, yango ekolanda sé kokóla lokola alingi yango​—ekobongisama malamu, kasi mpo ete etambola malamu esengeli ete bolingo mpe koyokela mawa ezala. Na yango, lisangá na ye ekolanda kokóla mpe kobenda bato oyo bakokani na bampate oyo bakomona kati na yango elembo ete “Njambe akosalana mosala mpɔ na malamu kati na makambo yɔnsɔ epai na bango bakolingaka ye.” Ezali yango tokoki kolikya komona kati na lisangá oyo etóngami likoló ya bolingo, mpamba te “bolingo ekosuka tɛ.”​—Baloma 8:28; 1 Bakɔlinti 13:8.

Okoyanola lolenge nini?

◻ Lolenge nini Biblia elobeli lolenge Yehova azali komibanzabanza mpo na libota na ye?

◻ Mokumba nini Yesu azali kokokisa mpo na oyo etali kobatela etongá ya Nzambe?

◻ Ezaleli nini eleki ntina bankulutu basengeli kozala na yango?

◻ Mpo na nini bankulutu basengeli kotosa likoki ya kopona oyo bampate bazali na yango?

[Elilingi na lokasa 16]

Yesu, “mobateli aleki malamu,” amonisaki motema mawa

[Elilingi na lokasa 16]

Bakonzi mabe ya mangomba bakanaki koboma Yesu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto