Lolenge ya bomoi oyo ezali na mokano
LISOLÓ YA MELVA A. WIELAND
Na Mársi ya mobu 1940, mwa basanza nsima wana nazwaki batisimo, Phillis, lɛki na ngai ya mwasi, ayaki epai na ngai mpe atunaki ete: “Mpo na nini te kobanda mosala ya mobongisi-nzela?” Natunaki ete: “Mobongisi-nzela?” “Olingi koloba, kosakola ntango nyonso, pene na mikolo nyonso?”
NAMITUNAKI ete: ‘Lolenge nini ngai nakoki kokóma mobongisi-nzela, ngai moto nazali bobele na boyebi moke ya Biblia mpe bobele na mosolo moke na banki?’ Nzokande, motuna ya Phyllis elamwisaki makanisi na ngai. Lisusu, nabandaki kosambela mingi mpo na yango.
Na nsuka, namitunaki ete: ‘Mpo na nini te kotya motema epai na Nzambe mpamba te ye alaki ete akobatela biso soki toluki liboso Bokonzi na ye?’ (Matai 6:33) Na yango, na sanza ya Yúni ya mobu 1940, nakomaki mokanda mpo na kotika mosala na ngai ya mosɔni bilamba. Na nsima, natindaki nkomá na biro ya filiale ya la Société Watch Tower, oyo ezali na Australie mpo na kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela.
Mosala ya bomoi na ngai mobimba
Mwa bapɔ́sɔ na nsima, nazwaki eyano, bayebisaki ngai ete bakopesa ngai teritware nsima na liyangani oyo esengelaki kosalema kati na etando ya lopango ya biro monene ya Batatoli ya Yehova na Strathfield, na kartyé moko mosika na Sydney, engumba eleki monene ya Australie. Na ntɔ́ngɔ́ ya mokolo oyo elandaki mokolo ya liyangani, nakendeki na biro mpo bayebisa ngai esika balingaki kotinda ngai.
Ndeko oyo azalaki na biro ayebisaki ngai ete: “Tozali sikawa na mosala mingi kati na esika ya kosukola bilamba. Okoki kotikala awa mpe kopesa lisungi mpo na mwa bapɔ́sɔ?” Ezalaki bongo na Augústo ya mobu 1940—mpe kino sikawa, nazali kokóba kosala kati na esika yango ya kosukola bilamba! Na ntango wana, libota ya biro monene ezalaki bobele na basangani 35; sikawa bakómi 276.
Kasi, bokoki komituna mpo na nini nazali kotalela mosala kati na esika ya kosukola bilamba lokola “lolenge ya bomoi oyo ezali na mokano,” mingimingi mpo ete yango ezali mosala na ngai uta mitu 50 sikawa. Liboso napesa eyano, tiká ete nayebisa bino na ntina na mikano na ngai ya bolenge.
Masano makómaki lolenge na ngai ya bomoi
Nabotamaki na engumba Melbourne na Yanuáli 1, 1914, mwana ya liboso kati na libota ya bana mitano. Tozalaki na baboti ya bolingo, oyo bazalaki komitambwisa engebene malako ya sembo mpe bazalaki kopesa disipilini soki yango esengeli. Tobokwamaki mpe kati na losambo oyo ekoki kobengama ete losambo lobongisami te, mpamba te baboti na biso bazalaki kokende ndako-nzambe te. Nzokande, bazalaki kolinga mpenza ete biso bana tokendeke na eteyelo ya mokolo ya lomingo, ya Lingomba ya Misioni.
Na ntango nalongwaki na eteyelo na mobu 1928 mpe nabandaki kosala mosala ya mosɔni bilamba, nazwaki ekateli ya kolekisa ntango na ngai mingi ya kozanga mosala na kosaláká masano, nazalaki kokanisa ete yango elingaki kosalisa ngai ete nalónga ezaleli na ngai ya nsoninsoni. Nakɔtaki na ekipi moko ya babeti tennis mpe nazalaki kosana na boumeli ya mbula mobimba. Na boumeli ya eleko ya mpiɔ nazalaki mpe kobɛta basket mpe base-ball, mpe na eleko ya molunge, nazalaki kobɛta na ekipi ya basi, ya lisano ebéngami cricket. Cricket ekómaki lisano oyo nazalaki kolinga mingi mpe nasalaki makasi ete nakólisa makoki na ngai mpo na kosana masano oyo ebɛtamaka kati na bitúká bikeseni ya ekólo.
Mokano oyo ekeseni na masano
Kobanda na bolenge mpenza, nakómaki kotungisama na ntina na liteya oyo ete Nzambe ya bolingo azali na esika moko oyo ebéngami lifelo epai bato oyo basalaka makambo mabe bakotungisama kozanga nsuka. Mpo na ngai, yango emonanaki lokola bolema. Na yango, kanisá naino esengo oyo nazalaki na yango na ntango nayekolaki, kozanga komizela na yango, ndimbola ya solo ya “lifelo.” Ezalaki boye:
Phyllis lɛki na ngai ya mwasi, oyo naleki ye na bambula mitano ya kobotama, azalaki mpe kosepela na masano, mpe tozalaki na ye na ekipi moko ya basi ya lisano libéngami cricket. Na 1936, moninga moko oyo tozalaki na ye ekipi moko alakisaki Phyllis epai na elenge mobali moko na nkombo ya Jim, oyo ayebanaki mingi ete azalaki moto oyo amipesi mpenza na makambo ya losambo. Nokinoki, Jim abandaki kosolola na Phyllis na ntina na mateya ya Biblia. Elamwisaki likebi ya Phyllis. Ayebisaki ngai ete: “Eyokani mpenza na mayele mpe na lolenge malamu ya kokanisa.”
Na ntango wana, ngai na Phyllis tozalaki kolala na eteni bobele moko ya ndako biso mibale, mpe amekaki kolamwisa likebi na ngai likoló na makambo oyo Jim azalaki koyebisa ye na ntina na Bokonzi ya Nzambe. Alobaki na ngai na esengo nyonso ete: “Ekosala makambo oyo bokonzi ya bato ekoki te kosala yango.” Nzokande, natyelaki ye ntembe, nalobaki ete yango ezali bobele lingomba mosusu oyo elingi kobulunganisa biso mpe ete moto moko te ayebi mpenza makambo matali mikolo mizali koya. Kasi Phyllis alɛmbaki te mpe azalaki kotika mikanda epai na epai kati na ndako, na elikya ete ngai nákoka kotánga yango.
Nalingaki mpenza koyeba soki mpo na nini Phyllis azalaki na esengo mingi mpo na endimeli na ye oyo ya sika; na yango, mokolo mosusu nazwaki mwa búku moko. Ezalaki na motó ya likambo moko ya kobenda likebi, oyo ete Hereafter (Nsima ya liwa). ‘Likebi na ngai elamukaki’ wana nazalaki kolekisa nokinoki nkasa na yango mpe namonaki liloba “lifelo.” Nakamwaki mpenza na koyekola ete liloba “lifelo,” oyo ezali kati na Biblia, elimboli mpenza nkunda ya bato banso, ezala bato malamu, to mpe bato mabe, bango nyonso bakokendeke kuna. Nayekolaki mpe ete lifelo ezali esika ya minyoko te; bakufi bayebi likambo te mpe bakookaka eloko moko te.—Mosakoli 9:5, 10; Njembo 146:3, 4.
Yango ezalaki na ndimbola mpo na ngai, mingimingi na ntango mwa búku yango ezalaki komonisa ete Nzambe ya bolingo mpe ya nguya, asilaki kolaka ete akozongisa bakufi na bomoi na nzela ya likamwisi oyo ebengami lisekwa. (Yoane 5:28, 29) Sikawa, nalingaki mpe koyeba makambo mosusu mingi kati na oyo Jim azalaki koyebisa Phyllis. Namonaki Biblia ya moke ya libongoli ya King James oyo tata na ngai apesaki ngai na ntango nazalaki mwana moke mpe nalukaki mikapo oyo mityamaki kati na mwa búku yango. Yango endimisaki makambo oyo malobamaki na ntina na lifelo mpe ezalela ya bakufi.
Likambo mosusu ya kokamwa oyo namonaki ezalaki ete, nayekolaki nkombo mpenza ya Nzambe, Yehova. (Nzembo 83:18) Nakokaki lisusu komona ete Nzambe azali na mokano, to ntina, mpo na biloko nyonso oyo asalaki to apesaki yango nzela ete esalema. Yango epusaki ngai na komituna ete: ‘Mokano na ngai kati na bomoi ezali mpenza nini?’ Kobanda na ntango wana, nabandaki komituna soki ezalaki na litomba mpenza mpo na ngai komipesa mobimba na masano—kino kotala mpamba eloko nyonso mosusu kati na bomoi.
Nasali engebene mikano na ngai
Jim mpe Phyllis bayebaki te ete lolenge na ngai ya kotalela bomoi ebongwanaki, kasi bayaki koyeba yango na ntango libota na biso ebyangamaki mpo na kokende na elambo ya moninga moko. Na mikolo wana, na mabaku motindo oyo, bato banso basengelaki kotelema mpo na kopesa lokumu na Mokonzi ya Angleterre mpe kotombola kɔpɔ mpo na lokumu ya mokonzi. Nzokande, ngai nazwaki ekateli ya kotikala bobele ya kofanda elongo na Jim mpe Phyllis. Bakamwaki mingi na ntango bamonaki ete ngai nazalaki sé ya kofanda! Ya solo, mokano na biso ezalaki te ya kozanga komonisa botosi, kasi lokola tozali baklisto, tomonaki ete tosengeli kozala na bokatikati mpe kozanga kokɔta na milulu wana ya bolingi-ekólo.—Yoane 17:16.
Nzokande, baboti na ngai mpe basangani mosusu ya libota babangaki. Balobaki ete biso tozali sembo te, to tozali ligboma—to nyonso mibale! Na nsima, na ntango ngai mpe Phyllis toyanganaki na molulu ya kopesa mbano mpo na ekipi ya basi ya lisano ya cricket, likambo motindo wana lisalemaki mpe na boumeli ya molulu yango ya bolingi-ekólo. Na nsuka, biso mibale tomilongolaki na ekipi yango. Yango ezalaki mpasi te na lolenge nazalaki kokanisa yango, mpamba te nayaki koyeba ete komipesa na ngai mpe bosembo na ngai ezalaki mpo na Klisto Yesu, Mokonzi na Bokonzi ya likoló.
Sikawa Phyllis alimbwelaki ngai ete nasengelaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova mbala na mbala mpo na kokólisa kondima na ngai na nzela ya boyebi mingi ya Biblia. Na ntango yango, ezalaki bobele na lisangá moko na engumba Melbourne; na yango, nabandaki koyangana na makita mokolo nyonso ya lomingo na mpokwa. Nokinoki, nayaki kondimisama ete ezalaki bongo lisangá ya solo ya Nzambe awa na mabelé.
Mosika te, nabyangamaki ete násangana na mosala ya lisangá mpo na oyo etali kosakola ndako na ndako. Na ebandeli, nazalaki kokakatana, kasi na ntɔ́ngɔ́ ya mokolo ya lomingo, nazwaki ekateli ya kobima elongo na basusu bobele mpo na kotala lolenge nini yango ezalaki kosalema. Nasepelaki mingi na ntango batindaki ngai ete nabima elongo na Motatoli moko oyo ameseni mingi na mosala ya kosakola, ye alobaki na motema kokita nyonso na ndako ya liboso mpe nkolo-ndako yango amonisaki ezaleli malamu. Namilobaki ete: ‘Ee, ezali mpasi mpenza te, kasi nasengeli komimekisa lisusu mingi liboso ete nakoka kosala motindo oyo.’ Na yango, kanisá naino kokamwa oyo nakamwaki na ntango, nsima ya kosilisa ndako ya liboso, Motatoli yango alobaki na ngai ete: “Okoki sikawa koteya yo moko.”
Nakokamwa nyonso, natunaki ete: “Ngai moko? Koloba boye te! Nakoloba nini soki moto moko atuni ngai motuna mpe nayebi eyano te?” Kasi moninga na ngai abongolaki maloba na ye te. Na yango, na kolenga nyonso mpenza, nakendeki ngai moko wana ye azalaki kokóba kopesa litatoli epai na bato na ngámbo mosusu ya balabála. Na lolenge moko to mosusu, nalóngaki na ntɔ́ngɔ́ ya liboso.
Uta ntango wana, nabandaki kosangana na mosala ya kosakola mokolo nyonso ya lomingo na ntɔ́ngɔ́. Soki moto moko na bandako wana atuni ngai motuna oyo nakokaki te koyanola yango, nazalaki koloba ete: “Nakosala bolukiluki mpe nakozongela yo lisusu.” Na esengo nyonso, Yehova azalaki ntango nyonso kopesa ngai nguya mpe mpiko mpo ete nakóba lolenge na ngai ya bomoi oyo ezali na mokano. Napesaki bomoi na ngai epai na Yehova, mpe na Ɔkɔtɔ́bɛ ya mobu 1939, nazwaki batisimo na pisíni ya bato banso na engumba Melbourne. Mwa moke na nsima, Phyllis, oyo na ntango wana asilaki kobalana na Jim, atunaki soki mpo na nini te nakokaki kobanda mosala ya mobongisi-nzela.
Mosala na filiale
Na Yanuáli ya mobu 1941, mwa moke nsima wana nabandaki kosala na Betele, nkombo oyo tozalaki kobénga na yango biro ya filiale, mosala ya Batatoli ya Yehova epekisamaki na Australie. Na nsima, basodá babotolaki Betele na biso ya Strathfield, mpe ngai natindamaki na ebokwelo bibwele ya la Société na engumba Ingleburn, pene na bakilomɛtɛlɛ 48 longwa na engumba Sydney. Na Yúni ya mobu 1943, bisambiselo bilongolaki bifundeli likoló na la Société Watch Tower mpe balongolaki epekiseli. Pene na nsuka ya mbula yango, bandeko 25 tobyangamaki lisusu na Betele ya Strathfield. Kuna, nakóbaki kosala na esika ya kosukola bilamba, mpe kosala misala misusu kati na ndako ya Betele.
Emonanaki lokola ete bambula zomi oyo elandanaki na nsima elekaki nokinoki. Na bongo na mobu 1956, nabalanaki na Ted Wieland moninga moko mosáli na Betele. Ted azalaki mobali moko ya kimya, motema pɛtɛɛ, mpe tosepelaki na ntango bayebisaki biso ete tokokóba kofanda na Betele lokola babalani. Biso mibale tosepelaki mingi na lolenge na biso ya bomoi oyo ezali na mokano, mpo na libaku malamu ya kosala na filiale ya Australie. Ya solo, longola mosala na biso na Betele, tozalaki lisusu na esengo ya kosala elongo mpo na kosalisa basusu ete bakóma bayekoli ya Klisto. Na ndakisa, bokoki kotánga lisoló ya libota ya ba Weekes kati nimero ya Lamuka! ya Ɔkɔtɔ́bɛ 22, 1993 (ebimeli ya Lifalansé).
Na boumeli ya bambula 30 ya liboso ya bomoi na kati na Betele, bokóli ya malɛmbɛ malɛmbɛ ya mosala ya kosakola Bokonzi esɛngaki kobakisama ya bato bobele 10 to 12 kati na ekipi na biso ya mosala. Kasi makambo mabongwanaki nokinoki na ba 1970 na ntango tobandaki konyata bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuka! awa. Mosala ya botongi ebandaki na Yanuáli ya mobu 1972 mpo na kotonga ndako ya sika ya binyateli. Nokinoki, bamisini ya binyateli ya batone 40 eyaki longwa na Japon, mpe pene na 1973, tozalaki konyata pene na bazulunalo 700 000 sanza na sanza. Libota na biso ya Betele ebandaki sikawa kokóla mpenza.
Bambula oyo elandaki na 1970 ezalaki mpe ntango ya mpasi mingi mpo na ngai mpenza. Ya liboso, Ted, mobali molingami na ngai akufaki na 1975 wana akómaki na bambula 80. Na nsima, mbula moko ekokaki te, tata na ngai, oyo akómaki mobangé, akufaki mpe. Nazwaki libondisi mingi epai na Yehova mpe Liloba na ye, Biblia, mpe epai na bandeko na ngai ya elimo, mibali mpe basi. Nazwaki lisusu lisungi mingi lokola namipesaki mingi na mosala na ngai ya ntina kati na Betele na boumeli ya ntango wana ya mawa makasi.
Atako bongo, bomoi esukaki wana te, mpe sikawa, nabandaki lisusu kozwa esengo mpe mapamboli, lokola mwasi-mokufeli mobali. Na 1978, nayanganaki na liyangani na Londres, na Angleterre, na nsima nakendeki kotala biro monene ya la Société Watch Tower na Brooklyn, kuna na New York. Komona ebele ya bandeko na ngai mibali mpe basi kosala na esengo kuna na Betele ya Brooklyn etikalaki ndakisa mpo na ngai.
Wana tokómaki na nsuka ya ba 1970, bayebisaki biso ete bazalaki kokana lisusu koyeisa bandako ya Betele ya Australie ete ekóma monene. Nzokande, mosala yango elingaki kosalema na Strathfield te mpo ete tosilaki kosalela eteni monene ya mabelé na biso. Bandako mosusu ya minene koleka esengelaki kotongama nde na lopango na biso na Ingleburn, epai kuna nazalaki kosala na ntango ya epekiseli, na ebandeli ya ba 1940.
Lolenge ya bomoi oyo ezali na mokano ekóbaki
Oyo nde esengo monene tozalaki na yango, na ntango tokendeki na bandako na biso ya sika na Yanúali 1982! Ya solo, mwa mawa ezalaki na ebandeli mpo na kotika bisika oyo tomesanaki na yango; kasi, nokinoki tosepelaki na esika na biso ya sika oyo ezalaki na biteni 73 ya kitoko mpo na kolala. Sikawa, na esika ya komona bifelo bitongami na bilíki mpe balabála ya mboka, tozali nde komona bilanga ya langi ya mayi ya pondu mpe banzete, bibwele bizali kolya matiti, kobima mpe kolala kitoko ya moi—esika kitoko mpenza.
Na Mársi 19, 1983, tozalaki na ebongiseli moko kitoko ya bofungoli Betele ya sika na mokolo kitoko ya moi na ebandeli ya eleko ya molunge. Lloyd Barry, moko kati na Lisangani ya Mikóló-bakambi asalaki lisukúlu ya bofungoli oyo ebendaki mpenza likebi. Ngai mpenza nasepelaki mingi kozala elongo na ye mpe mwasi na ye mpo na ebongiseli wana ya bofungoli, mpamba te nasalaki elongo na bango na Betele ya Stanthfield wana biso banso tozalaki mpenza bilenge.
Bokóli ya mosala ya kosakola oyo ezali sé kokóba esɛngaki mpenza ete babakisa lisusu bandako na biso awa na Ingleburn. Na mobu 1987, babiro ebakisamaki. Na nsima, na Novɛ́mbɛ 25, 1989, ndako mosusu ya kolala ya mikili mitano mpe ndako mosusu ya mikili misato mpo na binyateli efungolamaki. Oyo nde bokóli monene—kobanda na mwa ndambo ya basakoli 4 000 na Australie na ntango nabandaki mosala na ngai ya kosakola kino na basakola 59 000!
Kala mingi te, filiale ya Australie ekómi moko kati na babiro ya bitúká misato ya la Société mpo na kosala ba plans ya botongi, elongo na Japon mpe Allemagne. Yango mpe esɛngaki ete bandako ya Betele ébakisama lisusu. Sikawa ndako mosusu ya biro ya mikili misato euti kosila kotongama mpe misala ya botongi ndako ya kolala ya mikili mitano elingi kosila, ekozala na biteni ya kolala 80 mpo na libota na biso oyo ezali sé kokóla.
Kati na esika ya bosukoli bilamba, tozali na etululuku monene mpo na kokokisa mosala wana, kasi namikundwelaka ntango nyonso Augústo ya mobu 1940 na ntango nabyangamaki mpo na kopesa lisungi na mosala mpo na pɔ́sɔ mibale. Nazali na botɔ́ndi ete pɔ́sɔ mibale wana ekómi kino bambula koleka 50 mpe ete Yehova Nzambe akambaki matambe na ngai na lolenge ya bomoi oyo ezali na mokano.
[Elilingi na lokasa 21]
Ntango nazalaki na mibu 25
[Elilingi na lokasa 23]
Ntango tobalanaki, na 1956
[Bililingi na lokasa 24]
Na 1938 ngai mpe ndeko na ngai ya mwasi tomipesaki mingi na masano, kasi sikawa bomoi na ngai ezali kobimisa matomba mingi koleka