Kondima moto ezali mposa oyo tosengeli kokokisa yango
“OSALI malamu!” “Longonya na yo!” to “Osalaki oyo ekoki na yo; tozali na esengo mpo na yo”, maloba motindo oyo malobami na bosembo nyonso makoki kosala mingi mpo na kokólisa limemya oyo moto azalaka na yango mpo na ye moko, mingimingi soki mauti na moto moko oyo ye amemyaka. Bato basepelaka mpe basalaka malamu soki bazali kondima bango. Ya solo, lokola bilei malamu ezalaka na ntina mingi mpo na nzoto, bobele bongo mpe longonya oyo ebongi ezalaka na ntina mingi mpo na elimo mpe mpo na motema.
Diksionɛrɛ moko epesi ndimbola oyo ete kondima moto ezali bongo “kondima ete moto boye abongi na kopesamela lokumu to likebi” mpe “na kotyelama likebi ya sikisiki.” Ezali na bokangami makasi na bonkónde, mayoki ya bolingo, oyo na ntango epesami, emonisaka ete moto boye akoki na komonisamela limemya ya solo mpe botɔndi oyo ebongi na ye.
Kondima moto—Mposa ya ntina
Kondima moto oyo abongi na kondimama ezali likambo ya mayele mpe ezali sembo. Yesu atikaki elakiseli kati na lisese ya baombo oyo nkolo apesaki bango mokumba ya kobatela bozwi na ye. Kondimáká ete biloko na ye bibatelamaki malamu, alobi: “Malamu, yɔ moombo malamu mpe na sembo.” (Matai 25:19-23) Nzokande, mingimingi, ezaleli wana ya bonkonde etalelamaka lokola ete ezali na ntina te. Kozanga komonisa botɔ́ndi ekokitisaka molende mpe mposa ya kobanda misala malamu. Iona alobeli yango na maloba oyo: “Kondima moto ekomonisa ye ete azali na ntina, bazali na mposa na ye, mpe bazali kosepela na ye . . . Ekopusa moto na kobimisa makanisi malamu. Soki bazali kotala ye mpamba, akolɛmba mpe akomioka ete asundolami.” Patrick abakisi ete: “Na ntango yango ekozala mpasi mpo na kosala ntango nyonso mosala malamu mpenza mpe kobota mbuma malamu.” Yango wana, ezali na ntina ete toyekola ndenge nini mpe ntango nini kopesa moto longonya. Biso banso tozalaka na mposa makasi ya libateli ya koyeba ete tondimami na bato oyo bazingi biso. Mposa yango ezali na ntina mpo na moto.
Liloba ya bokumisi, kobakisamela mokumba, to ata likabo ya eloko moko ekopusaka na kokóba kosala oyo ekoki na yo. Ezali yango nde moboti, mobali, mwasi, mwana, mosangani ya lisangá, mokɛngɛli asengeli kosala. Margaret alobi ete: “Na ntango napesamelaka longonya, naokaka esengo, naokaka ete nazali na ntina, mpe nazalaka na mposa ya kosala lisusu malamu koleka.” Andrew abakisi ete: “Nazalaka na esengo, nazwaka nguya ya kosala lisusu makasi koleka.” Nzokande, mpo na kopesa botɔ́ndi mpe limemya epai na moto ezali kosɛnga kokanisa malamu mpe kozala na bososoli.
Tólanda ndakisa ya Yehova mpo na oyo etali kondima bato
Ndakisa eleki monene ya moto oyo ayebi kondima motuya ya basusu ezali bongo Yehova Nzambe. Andimaka baoyo babongi na kondimama. Atyaki likebi likoló na bato lokola Abel, Enoka, mpe Noa. (Genese 4:4; 6:8; Yuda 14) Yehova andimaki Davidi mpo na bosembo na ye monene. (2 Samwele 7:16) Samwele, oyo azalaki mosakoli akumisaki Yehova na boumeli ya bambula mingi, na nsima Yehova mpe akumisaki ye, ayanolaki nokinoki na libondeli ya Samwele mpo na kosunga ye na kolónga Bafilistia. (1 Samwele 7:7-13) Okomioka ete ozali na lokumu soki yo mpe ondimamaki na Nzambe, boye te?
Botɔ́ndi mpe komonisa bosepeli ezali mpenza na boyokani makasi na kondima moto. Biblia ezali kolendisa biso ete ‘tomonisaka matɔ́ndi’ mpe tozalaka na botɔ́ndi mpo na bolamu oyo bato basaleli biso. (Bakɔlɔsɛ 3:15; 1 Batɛsalɔniki 5:18) Atako yango etaleli mingi mpenza komonisa botɔndi epai na Yehova, kasi ezali mpe bongo mpo na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo. Ntoma Paulo andimaki yango. Andimaki Foibe, ete azalaki “mosungi na bato mingi,” andimaki Pilisika na Akula mpo ete “bakɔtisaki nkingo na bango na mpasi” mpo na bolamu na ye mpe mpo na bolamu ya bato mosusu. (Baloma 16:1-4) Kanisá soki bamiokaki ndenge nini na ntango baokaki maloba oyo ya botɔ́ndi malobami na lolenge ya polele. Ezalaki mpe malamu mpo na Paulo na kozala na esengo ya kopesa matɔ́ndi, lokumu, mpe simbisi. Biso mpe tokoki komekola Yehova mpe basambeli na ye oyo bazalaki na elimo ya kondima baoyo babongi na kondimama.—Misala 20:35.
Kondima basangani ya libota
Mitchell, ye oyo azali tata ya libota mpe nkulutu moklisto, alobi ete: “Botɔ́ndi epesaka esengo kati na bomoi. Ekoki kosala ete olinga mingi moto oyo amonisi botɔ́ndi epai na yo, mbala mosusu mpo na libela.” Na ndakisa, mobali moklisto azali komema mokumba monene mpe azali kokamata bikateli minene mpo na bolamu ya libota na ye. Asengeli kokokisa bamposa ya elimo, ya mosuni mpe ya mayoki ya libota na ye. (1 Timoté 5:8) Akozala mpenza na esengo soki botɔ́ndi emonisameli ye mpo na mokumba na ye ya motó ya libota oyo euti na Nzambe mpe na ntango mwasi na ye azali komonisela ye “limemya mozindo”!—Baɛfɛsɛ 5:33.
Misala ya mwasi ya libala, oyo esalemaka kozanga ete basusu bamona yango, misengeli kotalelama te lokola ete ezali na motuya te. Makanisi ya bato ya ntango na biso makoki kokitisa motuya ya mosala motindo oyo mpe kolongola yango lokumu mpe motuya na yango. Nzokande, ezali kosepelisa Nzambe. (Tito 2:4, 5) Oyo nde libondisi wana mobali oyo ayebi kososola azali kokumisa mwasi na ye, mingimingi na makambo nyonso ya bomoi kati na yango azali kosala malamu, kopesáká ye botɔ́ndi motindo wana na nsé ya bokonzi na ye! (Masese 31:28) Rowena alobi na ntina na mobali na ye ete: “Soki andimi likambo oyo nazali kosala, natosaka ye kozanga kokakatana mpe napesaka ye lokumu mpe namemyaka ye.”
Molakisi moko ya Amerika, Christian Bovee, alobaki mokolo mosusu ete: “Kokumisa bana ezalaka na matomba mpo na bana lokola moi ekozalaka na matomba likoló na fololo.” Ee, ata mwana oyo azali moke mpenza azalaka na mposa ya kondimisama ntango nyonso ete azali mosangani ya ntina kati na libota. Na bolenge na ye, wana mwana azali naino kobongisama, mbongwana ezali kosalema mingi kati na mayoki mpe na nzoto na ye, akómi kotya likebi mingi na ntina na libándá ya nzoto na ye, bakisa mpe mposa makasi ya lipandá mpe ya koyeba ete bazali kondima ye. Mingi mpenza na ntango yango, elenge azali na mposa ya komioka ete baboti na ye bazali kolinga ye mpe bazali komitya na esika na ye mpe bazali kosalela ye makambo na boboto nyonso. Baboti mpe bankɔ́kɔ oyo bakómi mibangé, bango mpe bazalaka na mposa bamonisa epai na bango ete bazali naino na ntina mpe balingami, ete ‘babwakami te mpo na bonunu.’ (Nzembo 71:9; Levitike 19:32; Masese 23:22) Kokokisa malamu mposa oyo na bato ete bandimi bango ememaka bolamu mingi mpe bolóngi kati na libota.
Botɔ́ndi kati na lisangá ya boklisto
Kolóna ezaleli ya kosepela mpenza na basusu mpe komonisa botɔ́ndi mpo na misala mpe milende na bango ezali na motuya monene kati na lisangá. Bankulutu baklisto basengeli kozala ndakisa mpo na oyo etali kondima misala mpe milende ya basusu kati na lisangá. Margaret alobaki ete: “Ezalaki bobele nsima wana bankulutu babandaki koya kotala ngai nde namonaki motuya monene ya maloba na bango ya longonya mpo na oyo etali elendiseli, kozala na bosepeli mpe na esengo. Namonaki nini oyo ezangaka soki botɔ́ndi emonisami te.” Oyo ezali ntina malamu mpenza ya komonisa bosepeli ya solosolo, oyo etondi na bolingo epai na bato banso kati na lisangá! Kondima misala malamu na bango. Tókakatana te mpo na kopesa bango longonya mpe simbisi. Kati na masangá mingi, ezali na mabota oyo ezali bobele na moboti moko, baboti motindo yango bazali kosala makasi mpo na kokɔtisa bizaleli malamu ya elimo kati na bana na bango. Mabota motindo wana mabongi mpenza na kozwa makumisi. Esengeli kolobela mingi makambo malamu na esika ya kolobela makambo ezangi kolendisa. Tiká ete basusu bámona bolingo na bino ya motema mpo na bango. Tiká ete bamona ete bozali komibanzabanza mpo na bango. Na lolenge yango, bakɛngɛli oyo bazali na bolingo bazali kosala mingi mpo na kolendisa lisangá. (2 Bakolinti 10:8) Mosangani moko moko ya lisangá azali mpe kozongisa bolingo na kondimáká mpe na kopesáká limemya epai na basembwi wana oyo bazali kosala mosala makasi mpo na bango.—1 Timoté 5:17; Baɛbɛlɛ 13:17.
Kasi, Likanisi mosusu ya sikisiki ezali kati na likambo oyo. Ya solo, mposa ya kondimama ezalaka makasi mpenza. Na ntango ya Yesu, ezalaki likambo ya lobanzo monene kati na bakonzi ya mangomba. Esengelaki ete Yesu asembola makanisi mabe ya bayekoli na ye na ntina na likambo yango. (Malako 9:33-37; Luka 20:46) Baklisto basengeli kozala na makanisi mabongi mpe na bokatikati. Soki etyelami ndelo te, mposa ya kondimama ekoki kozala likámá na elimo. (Yakobo 3:14-16) Na ndakisa, ekozala mpenza mawa soki nkulutu moko akómi lofúndo mpe akómi kosɛnga na makasi epai na basusu ete bandima lolenge na ye lotombwani ya komitalela!—Baloma 12:3.
Na mayele nyonso, ntoma Paulo apesaki toli oyo epai na baninga na ye baklisto na Loma ete: “Mpɔ na bolingo na bandeko, bolinganaka; mpɔ na lokumu, bokumisanaka.” (Baloma 12:10) Maloba oyo ezali kotalela liboso mpenza bankulutu baklisto, baoyo basengeli ntango nyonso koyeba ete Klisto azali Motó ya lisangá. Emonanaka ete bazali komitya na nsé ya litambwisi ya bokonzi na ye soki bazali koluka litambwisi na ye na nzela ya elimo santu, malako ya Biblia, mpe litambwisi oyo epesami na Lisangani ya Mikóló-bakambi ya “moombo na sembo mpe na mayele.”—Matai 24:45-47; talá Emoniseli 1:16, 20; 2:1.
Na yango, na ntango bankulutu bakutani na likita na bango, mpe bazali kosɛnga litambwisi ya Yehova mpo na kokamba etongá ya Nzambe, bakosala makasi ete bákamata bikateli oyo biyokani na Makomami. Bizaleli ya boklisto, oyo ete bopolo, komisokisa, mpe komikitisa ekosalisa nkulutu moko moko ete aluka te komitombola, koyangela bandeko na ye, mpe kondimisa bobele makanisi na ye kati na likita. (Matai 20:25-27; Bakolose 3:12) Na ntango likoki lizali, ekozala malamu ete mokɛngɛli-mokambi asɛnga liboso makanisi ya baninga na ye bankulutu mpe na nsima kopesa manáka mwa mikolo mingi liboso mpo na kopesa bango nzela ete bakanisa malamu mpe na bozindo likoló na makambo oyo matyami kati na manáka. Na boumeli ya likita ya bankutlutu, akoluka te kokamba makanisi ya bankulutu, kasi akoluka nde kolendisa bango ete basalela “molende na maloba” na ntina na makambo oyo bazali kotalela. (1 Timoté 3:13) Na nsima, baninga bankulutu mpe bakoyoka na likebi nyonso makanisi ya moko na mosusu mpe na esengo nyonso, bakozwa matomba na bososoli ya bankulutu oyo baumeli bambula mingi kati na bomoi ya boklisto.—Exode 18:21, 22.
Nzokande, bakɛngɛli bayebi ete, Klisto akoki kosalela nkulutu moko to mosusu mpo na kopesa malako ya Biblia oyo masengeli mpo na kolónga likambo moko to kokamata ekateli moko monene. Elimo malamu ekozala mpenza kati na lisangani ya bankulutu wana nkulutu moko moko andimami mpo na lisungi oyo ye azali kopesa mpo na matomba ya elimo ya lisangá.—Misala 15:6-15; Bafilipi 2:19, 20.
Salá milende mpo okoka kondimama mpe kondima baoyo babongi
Kondima moto elendisaka. Ekopesaka simbisi mpe ekokólisaka bolingo. Mary alobi ete: “Ata soki tozali komioka ete tozali bobele bato mpamba, tozalaka na mposa ete topesamela simbisi mpo na kobatelama ya lokumu na biso moko.” Na bosembo nyonso, tóndimaka milende oyo basusu bazali kosala mikolo minso. Kosala bongo ekomonisa bango ete bomoi na bango ezali ntina mingi mpe ekosepelisa bango. Baboti, bana, bakɛngɛli, mpe basangani mosusu ya lisangá ya boklisto, bokoki kondimama mpo na lolenge na bino ya koloba mpe mpo na lolenge na bino ya kosala makambo. Biblia ezali kokumisa bato oyo balingá mosala, bato na bopolo, mpe bato na komikitisa. (Masese 11:2; 29:23; Baebele 6:1-12) Na bonkonde nyonso, yekolá kondima makambo malamu ya bato mosusu. Talelá maoki ya basusu wana ezali yo kosala elongo na bango. Ntoma Petelo apesaki toli oyo, ete: “Bino banso bozala na elimo motindo moko, komityáká na esika ya basusu, na motema mawa, na elimo ya komikitisa.” (1 Petelo 3:8, NW) Yango ezali kosɛnga kondima basusu, kokokisáká bongo mposa moko ya ntina ya moto.