Batelá bosembo mpe zalá na bomoi!
“LAKELA Njambe mabe mpe kufa!” Ezipeli ya zulunalo na biso emonisi mwasi ya Yobo, oyo ayokisaki ye mpasi na maloba wana. Yango esalemaki esili sikawa koleka mibu soko 3 600. Nzokande, kobundisa wana ya maloba likoló na mosaleli ya sembo ya Nzambe emonisi likambo moko monene oyo bato bazali kokutana na yango kino lelo. Yobo, moto na sembo, abungisaki biloko mingi—bibwɛlɛ na ye, ndako na ye, bana na ye zomi. Sikawa, nzoto na ye ezalaki konyokwama na bokɔnɔ moko makasi, oyo etyaki ye na komekama kino na nsuka ya makoki na ye. Ntina na yango ezalaki nini? Monguna ya liboso ya Nzambe mpe ya bato, Satana Zábolo, azalaki kolandela ntembe oyo ete moto akoki te kotikala sembo epai na Nzambe soki amekami makasi.—Yobo 1:11, 12; 2:4, 5, 9, 10.
Lelo oyo, lokola mpe na mikolo ya Yobo, “mokili mobimba ejali kolala na kati na oyo mabe,” Satana Zábolo. (1 Yoane 5:19) Ya solo, yango ezali mpenza solo na mikolo na biso, mpo ete sikawa “ye oyo abyangami Zábolo mpe Satana, oyo azali kozimbisa mabelé mobimba oyo bato bafandi,” abwakamaki longwa na likoló mpo na koya awa na mabelé. (Emoniseli 12:9, NW) Yango ezali komonisa ntina ya bampasi makasi oyo ezali kokwela bato na ntango na biso. Etumba ya liboso ya mokili mobimba, oyo esalemaki na 1914, ezalaki “ebandeli na bolɔji” oyo ezali kokóba makasi na ekeke oyo ya ntuku mibale.—Matai 24:7, 8.
Kati na mokili oyo mabe, oyo ebebá, osilá naino te komiyoka ete okómi na nsuka ya makoki na yo ya koyika mpiko? Osilá naino te komituna, ‘Mokano ya bomoi ezali mpenza nini?’ Ekoki kozala ete Yobo azalaki na likanisi motindo wana, kasi abungisaki soko moke te kondima na ye epai na Nzambe, atako asalaki mabungá. Amonisaki ekateli na ye kati na maloba oyo: “Kino nakokufa nakomilongwela sembo na ngai tɛ.” Andimisamaki ete Nzambe asengelaki ‘koyeba bosembo na ye.’—Yobo 27:5; 31:6.
Yesu Klisto, Mwana mpenza ya Nzambe, ayikelaki mpe komekama mpiko ntango azalaki awa na mabelé. Satana abundisaki Yesu na mitindo mikeseni. Asalelaki bamposa ya mosuni ya Yesu mpe atyaki bokangami na Ye na Liloba ya Nzambe kati na komekama, lokola yango esalemaki na ngomba ya komekama. (Matai 4:1-11) Atungisaki Yesu na kopusáká bakomeli mpe Bafalisai bapɛngwi mpe bandimi na bango ete bányokola ye, báfunda ye ete azali motuki, mpe bayokanaki mpo na koboma ye. (Luka 5:21; Yoane 5:16-18; 10:36-39; 11:57) Bayokisaki Yesu mpasi koleka oyo babɔndisi misato ya lokuta bayokisaki Yobo.—Yobo 16:2; 19:1, 2.
Kati na elanga ya Gɛtɛsɛmanɛ, wana Yesu akómaki pene na ntango oyo ezalaki ya mpasi mingi koleka kati na komekama yango, alobaki na bayekoli na ye ete: “Molimo na ngai eyoki mpasi kino na liwa mpenza.” Na nsima, “Akwei na elongi na ye na mabelé mpe abondeli ete: ‘Tata na ngai, soki likoki ezali, tiká ete kɔ́pɔ oyo elongwa na ngai. Kasi lokola elingi ngai te nde lokola elingi yɔ.’” Na nsuka, likoló na nzeté ya mpasi, mpo na kokokisa maloba ya esakweli oyo mazali na Njembo 22:1, Yesu angangaki ete: “Ɛ Njambe na ngai, Ɛ Njambe na ngai, mpɔ na nini otiki ngai?” Kasi soki totali malamu, Nzambe atikaki Yesu te, mpamba te Yesu abatelaki bosembo ya kokoka epai na Ye, kopesáká ndakisa oyo baklisto nyonso ya solo basengeli kolanda. Yehova apesaki mbano na bosembo oyo Yesu abatelaki na kosekwisáká ye mpe na kokumisáká ye kino na makoló matombwami koleka. (Matai 26:38, 39; 27:46; Misala 2:32-36; 5:30; 1 Petelo 2:21) Bobele bongo, Nzambe akopesa mbano na baoyo nyonso bazali lelo kobatela bosembo epai na ye.
Bosembo ya Yesu esukaki te bobele na kopesa eyano mobimba na ntembe oyo Satana abimisaki, kasi mbeka ya bomoi na ye ya moto ya kokoka epesaki lisiko, oyo likoló na yango, bato oyo bazali kobatela bosembo bakoki kozwa bomoi ya seko. (Matai 20:28) Ya liboso, Yesu azali koyanganisa “etongá moke” ya bapakolami oyo bakómi basangoli ya libula elongo na ye kati na Bokonzi ya likoló. (Luka 12:32) Nsima na yango, “ebele monene” bazali koyanganisama mpo na kobika na “bolózi monene,” bazali kobima kati na yango mpo na kozala na bomoi ya seko awa na mabelé oyo ekoyangelama na Bokonzi ya Nzambe.—Emoniseli 7:9, 14-17.
Yobo, moto oyo abatelaki bosembo, akozala elongo na bamiliare ya bakufi oyo bakosekwisama mpo na kozala bafandi ya “mabelé ya sika” wana ya kimya. (2 Petelo 3:13; Yoane 5:28, 29) Lokola emonisami na ezipeli ya nsuka ya zulunalo na biso, Yobo azwaki mbano mpo na bosembo na ye na ntango Yehova “apambolaki mikɔlɔ na nsuka na Yobo koleka yango na ebandeli na ye.” Azwaki makasi na elimo lokola moto oyo “asalaki lisumu na bibɛbu na ye tɛ.” Nzambe abakiselaki ye mbula 140 na bomoi na ye. Na mosuni, apesaki Yobo biloko mbala mibale na nyonso azalaki na yango liboso, mpe Yobo “ajalaki mpe na bana babali nsambo mpe bana basi misato,” bana na ye ya basi bazalaki kitoko koleka basi nyonso mosusu kati na mokili mobimba. (Yobo 2:10; 42:12-17) Kasi bozwi nyonso wana ezalaki bobele elakiseli ya mapamboli oyo bato babatelaka bosembo bakozwa kati na Paladiso ya “mabelé ya sika.” Yo mpe, okoki kozwa esengo yango, lokola nkasa elandi ekolimbola yango!
[Maloba na elilingi ya lokasa 4]
Yesu atikaki ndakisa ya kokoka ya moto oyo abatelaki bosembo