Eloko ya motuya monene oyo tosengeli kokabola
LISOLÓ YA GLORIA MALASPINA
Wana ezalaki biso kotika libongo ya Sicile, ngai mpe mobali na ngai tobandaki kotya makanisi na biso na esika tozalaki kokende, na esanga ya Melita oyo ezwami na katikati ya mai monene ya Méditerranée. Oyo nde likanisi ya esengo! Wana masuwa ezalaki kokatisa mai monene, tozalaki kokanisa likoló na likambo oyo likómelaki ntoma Paulo na esanga Melita na ekeke ya liboso.—MISALA 28:1-10.
EZALAKI bongo na mobu 1953, mpe mosala ya Batatoli ya Yehova mondimamaki te na mibeko ya esanga Melita. Na mbula oyo eutaki koleka, toutaki kozwa mapolomi na Galadi, eteyelo ya Biblia ya la Société Watch Tower mpe totindamaki na Italie. Bobele nsima na mwa ntango moke ya koyekola lokótá ya Italien, tokómaki na mposa makasi ya komona makambo oyo mazalaki kozela biso na Melita.
Bolingi koyeba lolenge nini ngai, elenge mwasi, nakómaki misionɛrɛ na mboka mopaya? Tiká nalimbwela bino.
Ndakisa ya mama
Na 1926, na ntango libota na biso ezalaki kofanda na engumba Fort Frances, na Ontario, na Canada, mama na ngai andimaki mwa búku Bamilió ya bato oyo bazali na bomoi na eleko oyo bakokufa te (na Lingelesi) oyo Moyekoli moko ya Biblia (lolenge bazalaki kobénga Batatoli ya Yehova na kala) apesaki ye yango. Atangaki yango na mposa makasi, mpe bobele na pɔsɔ wana asanganaki na etuluku moko ya boyekoli ya Biblia, oyo bazalaki kosalela Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Mama azalaki motangi monene ya Biblia, mpe andimaki nsango na ntina na Bokonzi ya Nzambe lokola eloko ya motuya oyo azalaki koluka. (Matai 6:33; 13:44) Atako botemeli makasi ezalaki kouta epai na tata, mpe atako azalaki na bana basi misato ya mike oyo asengelaki kobokola, akamataki etelɛmɛlo ya ngwi mpo na solo.
Na boumeli ya bambula 20 oyo elandaki na nsima, kondima makasi ya mama esalaki ete ngai mpe bayaya na ngai mibale ya basi, Thelma mpe Viola, tóyeba elikya kitoko ya bomoi ya seko kati na mokili ya sika ya boyengebene. (2 Petelo 3:13) Mama akutanaki na makambo mingi ya mpasi, kasi totyaki ntembe soko moke te na bosolo ya nzela oyo ye aponaki.
Na 1931, na ntango nazalaki bobele na mibu zomi, tokendeki kofanda na ebokwelo moko ya bibwɛlɛ na nɔ́rdi ya Minnesota, na Etats-Unis. Kuna, tozalaki lisusu na likoki te ya kosangana mbala na mbala esika moko na Batatoli ya Yehova, kasi mama akóbaki koteya biso na Biblia. Mosala na ye oyo amipesaki na yango ya colporteur, to mosakoli ya ntango nyonso, epesaki ngai mposa ya kolanda ye kati na mosala yango. Na 1938, ngai mpe bandeko na ngai mibale ya basi tomonisaki elembo ya komipesa na biso epai na Yehova na kozwáká batisimo na liyangani moko na Duluth, na Minnesota.
Na 1938, nsima ya kosilisa kelasi na eteyelo ya katikati, mama alendisaki ngai ete nakɔta kelasi ya mosala ya kaláki mpo ete nákoka komisunga ngai moko lokola pionnier (nkombo ya sika mpo na colporteur). Yango ezalaki toli moko malamu, mingimingi mpo ete tata azwaki ekateli ya kotika biso mpe tosengelaki komisunga biso moko.
Tokabolaki eloko na biso ya motuya kati na mosala ya ntango nyonso
Na nsima, nakendeki na Californie, mpe na 1947, nabandaki kosala mosala ya mobongisi-nzela na San Francisco. Wana namipesaki na misala ya bolengeli liyangani “Bokóli ya mabota nyonso” na Los Angeles, nakutanaki na Francis Malaspina. Mokano na biso mibale ya kosala mosala ya misionɛrɛ epusaki biso ete tolingana. Toyaki kobalana na 1949.
Na Sɛtɛ́mbɛ 1951, ngai mpe Francis tobyangamaki na eteyelo ya 18 ya Galadi. Na mokolo ya kozwa mapolomi, na mwa 10 Febwáli 1952, nsima ya sanza mitano ya kobongisama, prezidá ya eteyelo, Nathan H. Knorr, azalaki kobénga nkombo ya bamboka epai kuna totindamaki engebene lɛtɛlɛ ya ebandeli ya nkombo moko na moko. Na ntango alobaki ete, “Italie, ndeko mobali mpe ndeko mwasi Malaspina,” na ntango yango tosilaki kobanda kosala mobembo kati na makanisi!
Nsima ya mwa bapɔsɔ, tokotaki na masuwa na New York mpo na kosala mobembo ya mikolo zomi, kokende na Gênes, na Italie. Giovanni DeCecca mpe Max Larson, ya biro monene ya Brooklyn, bakendeki kotika biso. Na Gênes bayambaki biso na bamisionɛrɛ oyo bayebaki malamu mitungisi ya masengisi oyo bato ya Leta batunakatunaka mpo na kokota na mboka wana.
Tosepelaki mingi na makambo oyo tomonaki zingazinga na biso mpe tokamataki engbunduka mpo na kokende na Bologne. Na ntango tokómaki kuna, tomonaki ete engumba yango ezalaki naino ya kobebisama na babɔmbi ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Kasi tomonaki mpe biloko mingi ya kitoko, na ndakisa nsolo kitoko ya kafé oyo ezali kokalingama, oyo etondisaki mopepe na ntɔ́ngɔ́ mpe nsolo makasi ya supu kitoko oyo ezali kolambama mpo na lolenge mingi ya pasta.
Nakokisi mokano moko
Tobandaki mosala ya kosakola na kosaleláká ebandeli ya lisoló oyo tokangaki na motó, mpe tozalaki kozongela yango kino ntango nsango yango endimamaki to soki ekuke ekangami. Mposa ya koloba epusaki biso na koyekola lokótá yango na etingya nyonso. Nsima ya sanza minei, totindamaki na ndako ya sika ya bamisionɛrɛ na Naples.
Engumba oyo monene eyebani mingi mpo na bisika na yango ya kitoko. Tosepelaki na mosala na biso kuna, kasi na nsima ya sanza minei oyo elandaki, mobali na ngai atindamaki na mosala ya zongazonga, mosala ya kotala masangá na Rome kino na Sicile. Na nsima, tokendeki mpe kotala esanga ya Melita mpe ekólo Libye, na Afrika ya Nɔ́rdi.
Mibembo na engbunduka kobanda na Naples kino na Sicile na boumeli ya bambula wana ezalaki kosɛnga kobimisa makasi nyonso ya nzoto. Tosengelaki komata na engbunduka oyo etondi mpenza mpe tozalaki kotelɛma na bilekelo, katikati na milɔngɔ́ ya bakiti etondi na bato, mbala mosusu mpo na bangonga motoba to mwambe. Nzokande, epesaki biso libaku kitoko ya koluka koyeba malamumalamu bato oyo bazingaki biso. Mbala mingi, kisangala ya monene ya masanga oyo basalaka na mboka wana ezalaki kosalelama lokola efandelo mpo na nkoló na yango, oyo azalaki mbala mosusu komela masanga yango mpo na kosilisa mposa na ye na boumeli ya mobembo ya molai. Basáli-mibembo ya boboto bazalaki kokabela biso limpa mpe salami na bango, yango elembo ya boyambi mpe motema ya esengo motindo oyo esepelisaki biso mingi.
Na Sicile tozalaki kokutana na bandeko oyo bazalaki komema basanduku na biso kino likoló ya ngomba na kotamboláká ngonga misato na ndambo mpo na komata kino na nsongɛ ya ngomba epai lisangá ezalaki. Lolenge bandeko bazalaki koyamba biso na esengo ezalaki kosala ete tóbosana kolɛmba na biso. Mbala mosusu tozalaki kotambola likoló na mpunda oyo ekoki kobeta libaku te, kasi tozalaki soko moke te kotala na nsé na mopanzi ya ngomba, epai kuna soki mpunda abetaki mwa libaku moke ekokaki kokweisa biso. Bokangami makasi ya bandeko na biso kati na solo ya Biblia, atako bazalaki na mikakatano, epesaki biso makasi; mpe bolingo oyo bamonisaki epai na biso, esalaki ete tózala na botondi ya kofanda elongo na bango.
Melita mpe Libye
Wana bɔɔngɔ na biso etondaki na makambo ya bandeko na biso ya Sicile, tokendeki na Melita. Ntoma Paulo akutanaki na bato ya boboto kuna, ezalaki mpe bobele bongo mpo na biso. Mopepe makasi na libeke oyo ebéngami St. Paul, epusaki biso na koyeba likámá oyo masuwa ya mike ezalaki kokutana na yango na ekeke ya liboso. (Misala 27:39–28:10) Na nsima, tosengelaki kokende na Libye. Lolenge nini tolingaki kolónga kati na mokili oyo ya Afrika epai kuna mosala na biso mopekisamaki?
Kuna lisusu, tomonaki mimeseno oyo ekeseni mpenza. Biloko oyo tozalaki komona mpe makelele ya engumba Tripoli ebendaki likebi na ngai wana ezalaki biso kotambola kati na babálabála ya víli etondi na bapiké pembenipembeni. Mibali bazalaki kolata bilamba bitongami na nsuki ya kamela mpo na komibatela na molunge makasi ya mokili mokauki ya Sahara na boumeli ya mokolo mpe mpo na komibatela lisusu na malili na butu. Toyekolaki kondima mpe kotosa lolenge oyo bato bazalaki kosala mpo na komesena na molungé mpe na mpiɔ epai kuna bazalaki kofanda.
Molende mpe bokengi ya bandeko na biso eteyaki biso makambo mingi na ntina etali kotya mpenza motema epai na Yehova mpe kolanda malako ya baoyo bayebi malamu makambo matali koteya na nsé ya bipekiseli. Bandeko na biso baklisto oyo bazalaki bato bauti na mikili mikeseni bazalaki kosala na bomoko kati na mosala na bango mpo na Yehova.
Teritware ya sika
Mpo na botɛmɛli oyo ezalaki likoló na mosala na biso ya kosakola, tosengelaki kolongwa na Italie, kasi tondimaki na esengo nyonso teritware ya sika na Brésil na 1957. Ngai mpe Francis tomesanaki na bomoi mpe mimeseno ya kuna, mpe nsima na sanza mwambe, Francis abyangamaki ete ásala mosala ya mokɛngɛli ya zongazonga. Tozalaki kosala mibembo na bísi, na mpepo, mpe na makolo. Kosala mobembo kati na mboka oyo monene mpe ya kitoko ezalaki lokola nde tozalaki koyekola géographie.
Teritware ya zongazonga na biso ya liboso ezalaki na masangá zomi na engumba São Paulo, bakisa mpe bingumba mike zomi na kati ya mboka mpe pembenipembeni ya ngunda ya súdi na etúká ya São Paulo. Na eleko yango masangá mazalaki te na bingumba wana. Tosengelaki koluka esika ya kofanda, mpe na nsima ya koumela wana, tozalaki kokende kotala bato ndako na ndako mpo na komemela bango nsango ya Bokonzi. Tozalaki mpe kotika nkasa ya libyangi mpo na kolakisama ya moko na bafilme ya la Société Watch Tower mpo na koteya.
Kokɔta na bísi na bafilme, mwinda ya monene, transformateur, badosié, mikanda, nkasa ya libyangi mpe bisaleli mpo na kosala tɛ́mbɛlɛ ya kotya likoló na nkasa ya libyangi mpo na komonisa esika filme ekolakisama, yango ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te. Sanduku na biso ya bilamba ezalaki moke, soki tokokanisi yango na biloko oyo nyonso. Mwinda na biso esengelaki kobatelama malamu na kotyáká yango na mabɔ́lɔ́ngɔ́ na biso mpo ete ekwea te noki ekopanzana na mobembo na banzela ya mabulumabulu.
Nsima ya kopona esika ya kolakisa filme, tozalaki kokende ndako na ndako mpo na kotika nkasa ya libyangi mpo na kolakisama ya filme. Na mabaku mosusu tozalaki kopesamela ndingisa ya kolakisa filme na lɛsitolá to na lotɛ́lɛ moko. Na bantango mosusu, tozalaki kotanda elamba na esika ya polele. Bato bazalaki kotala na esengo nyonso, mingi kati na bango basilaki komona naino te bililingi oyo bizali kotambola, bazalaki kotelema mpe kolanda na likebi nyonso wana Francis azalaki kotánga lisoló. Na nsima tozalaki kokabola mikanda mikolimbolaka Biblia.
Mpo na kokóma na bamboka, tozalaki kokende na bísi. Mingálá misusu mizalaki na gbagba te, na yango bazalaki kotya bísi likoló na mabaya mpe ezalaki kotepa mpo na kokende kino na ngambo mosusu. Bazalaki koyebisa biso ete tókita na bísi, soki tomoni bísi elingi kokwea na mai, tópumbwa na ngambo mosusu ya mabaya mpo ete tozinda na mai te. Na esengo nyonso, ata mbala moko te bísi etikalaki kokwea na mongálá—ezalaki mpenza likambo ya esengo mingimingi mpo ete eyebanaki malamu ete mai wana ezalaki na bambisi ya piranha oyo ekoliaka misuni!
Nsima ya kosangana na liyangani ya mikili mingi na New York na 1958, tozongaki na Brésil epai kuna tozongelaki lisusu mosala ya zongazonga. Etúká na biso esangisaki bongo ndelo ya Uruguay na súdi, Paraguay na wɛ́sti, ekólo ya Pernambuco na nɔ́rdi, mpe mai monene ya Atlantique na ngambo ya Ɛ́sti ya Brésil.
Epai na bato ya maladi ya maba
Na katikati ya mibu 1960, tozwaki libyangi ya kokende kolakisa filme ya la Société na esika moko ya bato ya maba. Nasengeli koloba solo ete nazalaki na mwa kobanga. Tozalaki bobele na boyebi moke mpenza na ntina etali maladi ya maba, longola bobele makambo oyo totángaki na ntina na yango kati na Biblia. Na nsima ya kokɔta na lopango yango, oyo epakolamaki mokɔ́bɔ ya mpembe, balekisaki biso kino na ndako moko ya monene. Na lisalisi ya nsinga, eteni moko ekabolamaki na katikati mpo na biso mpe bisaleli na biso.
Mosáli mosala na lotilíki oyo azalaki kosalisa biso azalaki moko na bafandi ya esika yango oyo asilaki kolekisa mibu 40 kuna. Azalaki lisusu na mabɔkɔ te mpe biteni mosusu ya nzoto na ye ezalaki te, yango ebebisaki ye mpenza. Liboso, epesaki ngai mawa makasi, kasi ezaleli na ye ya esengo mpe lolenge na ye ya kosala malamu elongolaki ngai mayoki wana. Nokinoki, tokómaki kosolola likoló na makambo mingi wana ezalaki biso komilengela. Kati na bato ya maladi nkótó oyo bazalaki kofanda kuna, bato koleka nkámá mibale bayanganaki. Wana ezalaki bango kokɔta na kotenguma, tomonaki lolenge mingi ekeseni ya maladi yango oyo bazalaki kobɛ́la. Likambo yango elamwisaki mpenza mayoki na biso!
Tokanisaki na ntina na oyo Yesu alobaki na moto ya maba oyo asɛngaki ete, “Nkolo, sɔkɔ olingi, oyebi kopɛtɔla ngai.” Yesu asimbaki moto yango mpe ayebisaki na ye ete, “Nalingi, opɛtwa.” (Matai 8:2, 3) Nsima wana ebongiseli yango esukaki, mingi babelemaki epai na biso mpo na kotonda biso mpo ete tondimaki koya, nzoto na bango oyo ebebibebi ezali litatoli monene ete bato bazali mpenza kati na mpasi monene. Na nsima, Batatoli ya mboka wana babandaki koyekola Biblia elongo na baoyo bazalaki na mposa makasi ya koyekola makambo mingi lisusu.
Na 1967, tozongaki na Etats-Unis mpo na kozwa lisungi na ntina na mikakatano makasi etali kolongɔ́nɔ́. Wana ezalaki biso naino koluka kosilisa mikakatano wana, tozwaki lisusu libaku malamu ya kosala kati na mosala ya zongazonga. Na boumeli ya bambula 20 oyo elandaki na nsima, nasalaki elongo na Francis kati na mosala ya zongazonga na Etats-Unis. Na boumeli ya ntango yango, azalaki koteya kati na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi.
Oyo nde liziba ya elendiseli mpo na ngai ya kozala na mobali oyo atondi na bolingo mpe moninga ya bosembo oyo azalaki kokokisa mokumba nyonso oyo mozalaki kopesamela ye! Biso mibale tozalaki na libaku malamu ya kokabola solo ya Biblia, oyo ezali eloko ya motuya, kati na bamboka ya biteni minei ya mokili.
Eloko ya motuya epesaki biso makasi ya kokóba
Na ebandeli ya 1950, mama abalanaki na David Easter, ndeko moko ya sembo oyo azwaki batisimo na 1924. Na boumeli ya bambula mingi, basalaki elongo kati na mosala ya ntango nyonso. Nzokande, na eteni ya nsuka ya bomoi ya mama, bilembo ya maladi ya Alzheimer ebandaki komonana. Azalaki na mposa ya lisungi makasi wana maladi yango ezalaki kokitisa makoki ya bɔɔngɔ́ na ye. Bandeko na ngai ya basi ya boboto mpe David bakokisaki mokumba wana monene ya kobatela ye, mpamba te balingaki te ete biso tóbebisa libaku na biso kitoko ya mosala ya ntango nyonso. Kino na liwa na ye na 1987, ndakisa ya bosembo ya mama esalisaki biso mingi ete tómityela mokano kati bomoi na biso, mpe elikya ya mbano ya likoló oyo azalaki kolinga mingi ebondisaki biso.
Pene na 1989, nakokaki komona ete Francis azalaki lisusu makasi ndenge azalaki liboso te. Tozalaki koyeba te ete maladi ya schistosomiase, bokɔnɔ oyo eyebani mingi na bamboka ebele kati na mokili, ezalaki kolya ye. Na 1990, monguna mabe wana alóngaki ye mpe nabungisaki mobali na ngai ya bolingo oyo nalekisaki mibu koleka 40 elongo na ye kati na mosala ya Yehova.
Kosala mbongwana ezali eteni ya bomoi. Misusu ezalaka pɛtɛɛ, mpe misusu ezalaka mpasi. Kasi Yehova, Mopesi ya solo ya Biblia oyo ezali eloko ya motuya monene, abatelaki ngai na nzela ya lisangá na ye mpe na bolingo mpe elendiseli ya libota na ngai. Nazali ntango nyonso kosepela na oyo nazali na yango wana ezali ngai kozela na esengo nyonso kokokisama ya biláká ya sikisiki ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 23]
Na ntango ngai mpe mobali na ngai tozalaki bamisionere na Italie